2010–2019
Kozwa Kimia ya Kowumela mpe Kotonga Mabota ya Seko
sánzá ya zómi 2014


Kozwa Kimia ya Kowumela mpe Kotonga Mabota ya Seko

Ezali nsango malamu ya Yesu Klisto oyo epesi moboko likolo ya moye wapi tokoki kozwa kimia ya kowumela mpe kotonga biteni ya mabota ya seko.

Mobembo na biso na kati ya bomoi ezali na bileko ya malamu mpe ya mabe lokola. Nionso ezali na mimekamo ekeseni. Boniboni tokoyekola komikokisa mpo na mbongwana oyo ekoya ezali engebene na moboko likolo na yango totongi. Nsango malamu ya Nkolo mpe Mobikisi na biso epesi moboko ya solo mpe ya makasi. Yango ekotongama eteni na eteni lokola tozali kokola na boyebi ya mwango ya seko ya Nkolo mpo na bana na Ye. Mobikisi azali Nkolo Moteyi. Tokolanda Ye.

Makomi etatoli Ye mpe epesi ndakisa ya bosembo bobongi nie mpo na biso kolanda. Nakabolaki elongo na lisanga ya Eklezia na likita eleka oyo Nazwaki motango ya bakaye na oyo mama na ngai asangisaki esalelo azalaki kosalela mpo na kolengela mateya na yr ta Lisanga ya Bamama Basungi. Makomi ezali lokola ya libaku ya lelo lokola ezalaki ntango wana. Moko na yango ezalaki koloba ekomamaki na mobu 1908 na Charles Edward Jefferson lolenge ya Yesu Klisto. Etangami ete:

“Kozala Moklisto ezali kolinga Yesu na bosolo mpenza mpe na etingia mpenza ete bomoi mobimba ekende libanda epai na ye na bofulami moko ya kozala lokola ye.

“… Tokoki koya koyeba ye na nzela ya maloba alobaki, na nzela misala asalaki, mpe lisusu na nzela ya kimia na ye. Tokoki koyeba ye lisusu na liyoki oyo ye asalaki yambo likolo ya baninga na ye mpe ya mibale likolo ya banguna na ye, mpe ya misato likolo ya nzoto ninoso ya bato ya eleko na ye. …

“Moko ya mayebisi ya bomoi ya ekeke ya mbala ya 20 ezangi esengo [mpe mobulu]. …

“… Mokili ezali kolela mpo na eloko moko, eyebi te mingi nini. Bozwi eyei, … [mpe] mokili etondi na … bikela ya bato bazali banganga ya mayele, kasi … tozali[kaka] kotungisama, kozanga kotonda, [mpe] kozanga botambwisami. … [Soki tofungoli] Boyokani ya Sika [toyambami na maloba maye], ‘Boya epai na ngai mpe nakopesa bino kimia, nazali limpa ya bomoi, nazali Pole ya mokili, Soki nani azali na mposa ya komela botika ye aya epai na ngai mpe amela, Kimia na Ngai napesi epai na bino, Bokozwa nguya, Bokozwa esengo’” (The Character of Jesus [1908], 7, 11, 15–16).

Mibali mpe basi basalami ndambu na baye kati na bango baponi kovanda. Baoyo epai na bango batomboli miso mpe bameki komekola lisusu bakosala bango. Yesu azali Ndakisa monene. Nzela se moko mpo na kozwa kimia ya kowumela ezali kotala epai na Ye mpe bobika.

Nini na ntina ya Yesu elongobani mpo na koyekola na biso?

“Bakomi ya Boyokani ya Sika … bakebi eloko te mpo na nzoto [ya Yesu], bilamba alataki to bandako avandaki. … Abotamaki na elielo ya nyama, asalaki mosala ya mabaya, ateyaki mibu misato, mpe nsima akufaki na ekulusu. … Boyokani ya Sika ekomamaki na bato oyo balingaki mpenza ete biso … tokanga miso na biso likolo na [Ye]” (The Character of Jesus, 21–22) na elikia ete Ye ya solo azalaki mpe azali Mwana ya Mobali ya Nzambe, Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili.

Moko ya masese ya Mobikisi, nandimi, mingimingi etali mikolo na biso.

Ezali na Matai mokapo 13, epai totangi:

“Kasi ntango moto alali, monguna na ye ayaki mpe akoni matiti ya mabe kati na masango, mpe akei na nzela na ye.

“Kasi ntango eboti ekoli, mpe epesi mbuma, bongo matiti mabe emonani lokola.

“ Bongo basali ya mokolo elanga bayaki mpe balobaki epai na ye, nkolo okonaki nkona malamu na elenga te? Boye matiti ya mabe ewuti wapi?

“Alobaki na bango, Monguna moto asali boye. Basali balobaki na ye, bongo olingi ete tokende mpe topikola yango?

“Kasi alobaki, Te; wana epikola bino matiti ya mabe, bokopikola misisa ya masango lokola elongo na yango.

“Botika nionso mibale ekola elongo kino ntango tokobuka: mpe ntango tokobuka nakoyebisa babuki ete bolokota liboso matiti ya mabe, bosangisa yango esika moko mpe botumba yango: kasi bosangisa masango kati na ebombelo na ngai” (milongo 25–30).

Monguna oyo ya kala ya bana ya bato nionso akutaki banzela mingi lokola akoki kopanza mabe mosika mpe bisika nionso. Akutaki banzela mpo na bango kokota ata na bosantu ya bandako na bsomei. Banzela ya mabe mpe ya mokili epanzanaki mingi mpenza ete ezalaki te na nzela ya kopikola yango. Eyei na nsinga mpe na nzela ya mopepe kati na biloko mpenza tokolisi mpo na koyekola mpe kosakanisa biso. Masangu mpe mbuma ya mabe ekolaki penepene elongo. Mokengeli elanga, na nguya na ye nionso, aleisi oyo ezali malamu mpe akomisa yango makasi mpe kitoko mingi mpenza ete ekoki kobenda ata liso to litoyi te. Boniboni topambwami lokola bandimi ya Eklezia ya Nkolo mpo na kozwa nsango malamu ya ntango monene ya Nkolo mpe Mobikisi na biso lokola moboko likolo na yango tokoki kotonga bomoi na biso.

Uta na Buku ya Mormon na 2 Nefi totangi: “Mpo tala, lisusu nakoloba na epai na bino ete soki bokokota na nzela, mpe bokozwa Molimo Mosantu, akolakisa epai na bino makambo nionso bosengeli kosala” (2 Nefi 32:5).

Tosengeli ata moke te kotika makelele ya mokili kokonza mpe koniata mongongo wana ya kimia mpe moke.

Tokebisami ya solo na makambo oyo tokokutana na yango na mikolo na biso. Etumba na biso ekozala boniboni tolengelami mpo na makambo Nkolo alobaki ezali solo koya.

Mingi na lingomba ya bato ya motungisi basosoli ete kopanzana ya libota ekomema bobele mawa mpe kozanga esengo kati na mokili moko ya mobulu. Lokola bandimi ya Eklezia, tozali na mokumba ya kobomba mpe kobatela libota lokola etonga ya ntina ya lingomba mpe boseko. Baprofeta bakebisaki mpe balakelami mbano ya libebi ya ntembe te ya bantina ya libota.

Lokola mokili ezali kokoba kotala biso, tika tosala na elikia ete ndakisa na biso ekosimba mpe ekosunga mwango ya lobiko Nkolo abongisaki mpo na bana na Ye awa na bomoi ya kufa. Liteya ya monene ya nionso esengeli kosalema na ndakisa ya bosembo. Bandako na biso esengeli kozala bisika bisantu mpo na kotelemela mipepe ya mokili. Bomikundola ete lipamboli ya monene koleka mapamboli nionso ya Nkolo ekoya na nzela ya mpe epesami na mabota ya bosembo.

Tosengeli na bokengi kokoba na kotala misala na biso lokola baboti. Liteya monene mwana akoki kozwa ekoya uta na batata mpe bamama ya bosembo. Yambo tika biso totala mosala ya mama. Yokamela maloba oyo uta na Mokambi Gordon B. Hinckley:

“Basi oyo bakomisi ndako libota basali elongo mosala ya monene mosika koleka baye bazali kopesa mitindo na mampinga minene to batelemi na moto ya bakompani monene. Nani akoki kotia elembo ya ntalo na nguya mama azali na yango likolo ya bana na ye, nkoko ya mwasi likolo ya bankoko na ye, to tata mwasi mpe bandeko ya basi likolo ya libota monene?

“Tokoki te kobanda komeka to kopesa motuya ya nguya ya basi oyo, na banzela na bangomei, batongi bomoi ya libota elenda mpe kokolisa libela bankola ya malamu ya mikolo ekoya. Mikano ezwami na basi ya nkola oyo ekozala na mbano ya seko. Ekoka ngai kosenga ete bamama ya lelo bazala na libaku monene mingi te mpe mikakatano monene mingi te koleka kosala manso bakoki mpo na kokomisa makasi [mabota]” ( Standing for Something: 10 Neglected Virtues That Will Heal Our Hearts and Homes [2000], 152).

Sikawa tika totala mosala tata akosala na bomoi na biso:

Batata bakopesa mapamboli mpe bakosala makuli masantu mpo na bana na bango. Oyo ekokoma minda ya molimo na bomoi na bango.

Batata bamipesi mpenza na kotambwisa mabondeli ya libota, botangi ya makomi mokolo na mokolo, mpe likita ya mpokwa na ndako poso nionso.

Batata batongaka bonkoko ya libota na komipesaka na kosunga mwango ya mobembo ya bopemi mpe kobima oyo ekoki kokotisa baye banso ya libota. Makundoli ya bangonga oyo ya kafukafu ekoki ata moke te kobosama na bana na bango.

Batata bakotala bana na bango moko na moko mpe koteya bango mitindo ya nsango malamu.

Batata bakoteya bana ya mibali mpe ya basi ntina ya mosala mpe bakosunga bango kotia bantina elongobani na bomoi na bangomei.

Batata bakotia ndakisa ya mosala ya nsango malamu ya botongono.

Bomikundola, bandeko balingami, libiangi na bino ya bule lokola tata na Isalaele—libiangi na bino ya ntina koleka na ntango mpe na boseko—libiangi uta na yango bokoki kopemisama te.

Mibu mingi mileki na makita ya likonzi, tokoki kolakisa bilili mpo na kolimbola nsango tozalaki kolakisa. Na bolai ya mobu, ntango tokei mobembo bipai na bipai na Eklezia na botali na biso ya Makita ya makonzi, tomesanaki mpenza na makambo mazali na bilili. Tokoki koloba yango na motema. Nsango etikali na makanisi na ngai mibu miye nionso. Bilili ezalaki na maloba ya Mokambi Harold B. Lee mpe apesaki nsango ekomaki na ndako ya mwana na ye ya mwasi. Ezalaki eloko moko lokola oyo:

Mpokwa moko mama ya ndako azalaki komeka na kolenga kosilisa kotia na molangi mwa bambuma. Na suka bana bazalaki pene mpo na kolala mpe basepelaki kovanda na nse. Ezalaki sikawa ngonga ya kozwa mbuma. Ntango abandaki mpe kolongola mposo mpe mokokoli, bana mike ya mibali babimaki na kikuku mpe balobaki ete bazalaki pene mpo na libondeli na bango ya kolala.

Kolingaka te bakata ye, mama alobaki na lombangu epai ya bana mibali, “ Mpo na nini te bosala kaka mabondeli na bino moko na mpokwa ya lelo, mpe Mama akoki kokoba mosala ya mbuma?”

Nkulutu ya bana mibali mibale na molende atelemaki mpe atunaki, “Nini ezali ya ntina, mabondeli to mbuma?” (Tala Teachings of Presidents of the Church: Harold B. Lee [2000], 143–44.)

Ntango mosusu tokomimona na makambo wapi tozali na libaku ya koteya bana liteya oyo ekozala na nguya ya kowumela na bomoi ya bilenge. Ya solo, mabondeli ezali na ntina mpenza koleka mbuma. Moboti ya elonga asengeli te kozala na misala mingi mpo na kobosana ngonga moko na bomoi ya mwana ntango liteya ya ntina ekoki koteyama.

Ezali boyebi na ngai ya sikisiki ete ezali ata moke te na ngonga moko na mibu mingi ya bomoi na ngai oyo bana ya Tata na biso na Lola bazalaki na bosenga ya liboko ya botambwisi ya botongono, baboti ya komipesa mingi. Tozali na libula monene mpe ya bonkumu ya baboti kotikaka biloko nionso bazali na yango mpo na kozwa esika wapi bakoki kokolisa mabota na bango na bondimi mpe mpiko mpenza boye nkola ekoya ekoka kozwa mabaku minene koleka oyo ya bango. Tosengeli kozwa kati na bisomei a molimo ya molende wana kaka mpe kolonga bitumba elongo na molimo moko kaka ya libonza. Tosengeli kolona na nkola ekoya elikia makasi koleka na mateya ya Nkolo na biso mpe Mobikisi.

“Mpe sikawa, bana na ngai ya mibali, bomikundola, bomikundola, ete ezali na likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana Mobali ya Nzambe, et bosengeli kotonga moboko na bino; ete ntango zabolo akotinda mipepe makasi na ye, iyo, makula na ye na mopepe ya kaina, iyo, ekobeta mvula nionso ya mabanga ya mpe moketi makasi na ye likolo na bino mpo na kobenda bino na nse ya libulu ya bobola mpe lisuma lizanga nsuka, na ntina ya libanga likolo na yango botongami, oyo ezali se moko ya solo, moboko moko likolo na yango soki bato batongi bakoki kokweya te.” (Helamani 5:12).

Ezali nsango malamu ya Yesu Klisto oyo epesi moboko likolo na yango tokoki kozwa kimia ya kowumela mpe kotonga biteni ya mabota ya seko. Yango natatoli na nkombo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, mpenza Yesu Kisto, amene.