2010–2019
Nayebi Makambo Oyo Ngai Moko
sánzá ya zómi 2014


Nayebi Makambo Oyo Ngai Moko

Tokoki koyeba bisomei ete Yesu Klisto azali Mobikisi na biso mpe Joseph Smith azali profeta ya Bozongisi.

Bandeko na ngai ya bolingo, tozali kokoba kofulama na ndakisa ya moto mei mpe ya mosala ya bonganganzambe ya Mokambi Thomas S. Monson. Kala te, bato mingi batunaki badiakona, “Nini esepelisaka bino koleka na ntina ya Mokambi Monson?” Diakona moko alobaki na ntina ya Mokambi Monson, ntango azalaki mwana, apesaki biloko na ye ya kosakana na baninga na ye bazangaki. Mosusu alakisaki boniboni Mokambi Monson asungaki bakufeli mibali na palwasi na ye. Ya misato alobaki ete abiangemaki lokola Apostolo na bolenge mingi mpe apambolaki bato na mokili mobimba. Sima elenge mobali moko alobaki, “Eloko esepelisaka ngai koleka na ntina ya Mokambi Monson ezali litatoli na ye ya makasi.”

Na yango, toyokaki banso profeta na biso nzeneneke ya kafukafu ya Mobikisi Yesu Klisto mpe mokano ya ye ya kolandaka ntango nionso nungunungu ya molimo. Elongo na boyebi moko na moko akaboli, Mokambi Monson abengi biso tosalela nsango malamu koleka mingi mpe toluka mpo na koyeisa matatoli na bisomei makasi ya moto mei. Bomikundola na ntina ya maloba na ye aloba na ye na makita eleki: “Na ntina na biso kozala makasi mpe na kotelemela makambo nionso oyo ekoki kokumba biso na nzela ya mabe  … , tosengeli kozwa litatoli na biso moko. Atako bozali na mibu 12 to 112— to ozali kati kati ya mibu oyo—bokoki koyeba binomei ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ya solo.”1

Atako nsango na ngai na mpokwa ya lelo epesami nabaye bazali pene na mibu 12 koleka 112, mibeko nakaboli ekosalema na moto nionso. Na eyeno na maloba ya Mokambi Monson, Nakoki kotuna, ezali moko na moko kati na bisomei koyeba ete nsango malamu ezali ya solo? Ekoki biso koloba ya solo ete matatoli na biso ezali solo ya bisomei? Nakotanga Mokambi Monson lisusu: “Nalobi ete litatoli makasi ya Mobikisi na biso mpe ya nsango malamu na Ye [ekobatela yo uta na masumu mpe mabe nzinganzinga na yo]. … Soki naino ozwa litatoli ya makambo oyo te, sala oyo ezali ya ntina mpo na kozwa moko. Ezali ntina mpo na yo kozwa litatoli ya yomei, mpo na litatoli ya basusu ekoki komema yo mosika.”2

Nayebi makambo oyo ngai moko

Koyekolaka mpo na bisomei ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisama ezali ya solo ekoki kozala moko ya minene mpe esengo ya koyeba koleka na bomoi. Tokoki kolanda ndakisa ya matatoli ya basusu—kolobaka, lokola bilenge bilombe basalaki, “Tokoki kozala na ntembe te bamama na biso bayebaki yango.”3 Oyo ezali esika malamu mpo na kobanda liatoli na biso, kasi tosengeli kosun ga bango mpo na kolonga ndelo wana. Kozala makasi na kosalela nsango malamu, ezali na eloko moko te eleki ntina lokola kozwa mpe koyeisa makasi litatoli na bisomei. Tosengeli kozala na makoki ya koloba, lokola Alama alobaki, “Nayebi makambo oyo ngai moko.” 4

“Mpe boniboni bobanzi ete nayebi bosolo bwa mango mpenza?” Alma akobaki. “Tala, Nalobi epai na bino mayebisami epai ya ngai na Molimo Mosantu ya Nzambe. Tala, nakilaki bilei mpe nasambelaki mikolo mingi ete nakoka koyeba makambo maye ngaimei. Mpe sikawa nayebi ngaimei ete mazali solo.”5

Nzali na mposa ya komona makambo maye tata wa ngai amonaki

Lokola Alma, Nefi lisusu ayaki koyeba bosolo yemei. Nsima ya koyoka tata na ye kolobela boyebi ya molimo, Nefi alingaki koyeba nini tata na ye ayebaki. Oyo ezalaki pete mingi koleka kaka mpo na kotalatala ya pamba te—ezalaki eloko moko azalaki na mposa makasi mpe komeka sima. Atako, yasolo azalaki “mpenza elenge,” azalaki “na mposa monene ya koyeba misala ya Nzambe.”6 Alingaki “komona, mpe koyoka, mpe koyeba makambo wana, na nguya ya Molimo Mosantu.”7

Lokola Nefi “avandisaki yango na [motema] na ye,” amemamaki “na molimo …mpenza likolo ya ngomba,” kuna batunaki ye, “Mposa na yo ezali nini?” Eyano na Ye ezalaki ya pete: “Nalingi kotala makambo oyo tata na ngai amonaki.” 8Mpo na motema ya kondima mpe mosala ya etingia na ye, Nefi apambolamaki elongo na boyebi ya kokamwa. Ayambaki nzeneneke ya mbotama ekoya, bomoi, Kobakama na ekulusu ya Mobikisi Yesu Klisto; amonaki boyei ya Buku ya Mormon mpe Bozongisi ya nsango malamu na mikolo ya nsuka—nionso lokola litomba ya mposa ya koyeba solo mpo na yemei. 9

Boyebi oyo ya moto yemei na Nkolo elengelaki Nefi mpo na bonguna mpe mikakatano oyo asengelaki kokutana na nango kala te. Epesaki ye ndingisa ya koyika mpiko atako na ntango basusu na libota na ye bazalaki kobubunda. Akokaki kosala yango mpo ete ye ayekolaki mpo na yemei mpe ayebaki mpo na yemei. Apambolamaki na litatoli na yemei.

Tika Ye Atuna na Nzambe

Lolenge moko na, Profeta Joseph Smith azalaki “elenge koleka” ntango “mayele na ye esengamaki na kokanisa makasi” na ntina ya bosolo ya molimo. Mpo na Joseph, ezalaki ntango ya “pkokoso monene,” kozalaka kozingama na bobendani ya bansango ya mobulungano na ntina ya boyambi. Alingaki koyeba lingomba nini ezali ya solo. 10Kofulamaka na maloba oyo na Bibilia: “Soki moto moko kati na bino azangi bwanya, tika ye asenga na Nzambe,”11asalaki mpo na yemei mpo na kozwa eyano. Na ntongo kitoko na eleko ya milona ya 1820, akotaki na zamba ya banzete mpe afukamaki na libondeli. Na ntina ya bondimi na ye na Nzambe azwaki mosala mpenza ya kosala mpo na ye, Joseph azwaki limoni ya nkembo ya Nzambe Tata mpe ya Mwana na Ye, Yesu Klisto, mpe ayekolaki mpo na yemei nini asengelaki kosala.

Omoni kati na boyebi ya Joseph ndakisa okoki kolanda na kobakisa to kokolisa litatoli na yo moko? Joseph apesaki ndingisa makomi ekota na motema na ye. Alandaki yango na mozindo mpe asalelaki yango na ntina eteli ye moko. Bongo asalelaki oyo nini ayekolaki. Litomba ezalaki Limoni ya Yambo ya nkembo—mpe makambo nionso eyaki na nsima na yango. Eklezia oyo mobimba esalemi mpenza na mobeko ya moto te—kosangisa na mwana mobali ya bilanga ya mibu 14—akoka “kosenga na Nzambe” mpe kozwa eyano na mabondeli na ye.

Na bongo Nini ezali litatoli?

Toyokaka mbala mingi bandimi ya Eklezia koloba ete litatoli na bango ya nsango malamu ezali ya motuya koleka. Ezali likabo lisantu kouta na Nzamba oyo ayaki epai na biso na nguya ya Molimo Mosantu. Ezali kimia, boyebi ekoki kolongolama te, tozwaka lokola toyekoli, tobondeli, mpe tosaleli nsango malamu. Ezali liyoki ya Molimo Mosantu kotatola epai ya milimo na biso ete nini tozali koyekola mpe kosala ezali makamu.

Bato mingi balobelaka litatoli kaka lokola soki ezalaki mwinda—ezali ya kopela to ya kozi kozimisa; ozali na litatoli to ozali na yango te. Ya solo, litatoli ezali mingi lokola nzete ete koleka na bileko ekeseni ya bokoli. Banzete mingi ya minene emonanaki na nse na Parc National na Redwood na westi ya Etazini. Ntango totelemi na ntina ya banzete nionso wana, ezali likamwisi kokanisa ete moko moko ekolaki uta na mbuma ya moke. Na yango elongo na matatoli na biso.Atako ekoki kobanda elongo na boyebi ya molimo kaka, ekolaka nsima ya ntango na kokoba koleisa mpe bokutani mingi ya molimo.

Ekoki te kokamwisa, bongo, ete ntango profeta Alma alimbolaki boniboni tokoki kokolisa litatoli, alobaki na ntina ya mbuma kokola kati na nzete. “Soki bopesi yango esika, ” alobaki, “ete mbuma ekoki kolanama na motama na bino, tala, soki ezali mbuma ya solo, to mbuma ya malamu, soki bokofina yango te na bozangi kondima na bino, …ekobanda kovimbisa tolo na bino; mpe ntango bokoyoka kovimba wana, bokomilobela binomei—Mbuma oyo ezali mbuma ya malamu, mpo ebandi kokolisa molimo na ngai; iyo, ebandi kokongengisa kososoli na ngai, iyo, ebandi kokoma elengi mpo na ngai.”12

Oyo ezali mingi boniboni litatoli ebandaka: elongo na bosantu, bongengi, mayoki kolakisa solo biso ete maloba ya Nzambe ezali ezali ya solo. Ntango, lokola likamwisi ya mayoki wana ezali, ezali bobele ebandeli. Mosala na bino ya kokolisa litatoli esalemi te—mosala moko te koleka ya bokolisi nzete ya sequoia esalemi ntango botindiki moke kobima uta na mabele. Soki toyebi te to totali mpamba mamonisi ya molimo ya ebandeli, soki totelemisi yango te na kokoba koyekola makomi mpe kobondela mpe koluka boyebi mosala mingi elongo na Molimo, mayoki na biso ekonzuluka mpe matatoli na biso ekokita.

Lokola Alma atiaki yango: “Soki bokotala mpamba nzete, mpe kotelemisa te mpo na koleisa, tala ekoki kobota ata mosisa te; mpe ntango moto ya moyi ekoya mpe ezikisi yango, mpamba te ezali ata na mosisa te enzuluki, mpe bokokata yango mpe kobwaka yango libanda.”13

Mbala mingi, matatoli na biso ekokola lolenge moko na bokoli ya nzete: moke moke, mingi ezangi komonana, lokola litomba ya kokoba misala na biso mpe na etingia. “Kasi soki bokoki koleisa na maloba,” Alma alakaki, “iyo, koleisa nzete lokola ebandeli ya kokola, na bondimi na elongo na etingia monene, mpe na motema kokita, kozala na motema kokita mbuma ekoya, ekobota mosisa; mpe tala ekozala nzete ekokola mpo na bomoi ya libela.”14

Sikawa Ezali Ngonga; Lelo Ezali Mokolo

Litatoli na ngaimei ebandaki lokola nayekolaki mpe natalaki mateya ezwami na Buku ya Mormon. Ntango Nafukamaki mpo na kosenga na Nzambe na libondeli ya komikitisa, Molimo Mosantu etatolaki epai na molimo na ngai ete oyo nazalaki kotanga ezalaki ya solo. Litatoli ya yambo ekomaki ebandeli solo mpo na litatoli na ngai ya bosolo mingi ya nsango malamu, mpo na, lokola Mokambi Monson ateyeki: “Ntango toyebi Buku ya Mormon ezali ya solo, bongo ekolanda ete Joseph Smith azalaki bongo profeta mpe amonaki Nzambe Tata ya Seko mpe Mwana na Ye Yesu Klisto. Ezali lisusu kolanda nsango malamu ezongisamaki na mikolo miye ya nsuka na nzele ya Joseph Smith—kosangana ya bozongisi ya lisanga ya Bonganganzambe ya Alona mpe ya Melekisedeke.”15 Kobanda mokolo oyo, Nayaki kozwa mayebi masantu mingi elongo na Molimo Mosantu ete endimisaki epai na ngai ete Yesu Klisto azali Mobikisi ya mokili mpe ete nsango malamu ezongisama na Ye ezali ya solo. Elongo na Alma, Nakoki koloba elongo na koyeba solo ete Nayebi makambo oyo ngaimei.

Baninga na ngai ya bilenge, sikawa ezali ngonga mpe lelo ezali mokolo ya koyekola to kondimisama mpo na bisomei ete nsango malamu ezali ya solo. Moko na moko kati na biso azali na mosala ya ntina ya kosala. Kokokisa mosaala yango, mpe kobatelama uta na bandakisa ya mokili eye ezali lokola likama ya makasi, tosengeli kozala na bondimi ya Alma, Nefi, mpe elenge Joseph Smith mpo na kozwa mpe kokolisa litatoli na bisomei.

Lokola elenge diakona nalobelaki na ebandeli, Nalingaka Mokambi Monson mpo na litatoli na ye. Ezali okola nzete ya sequoia molai, ata soki litatoli ya Mokambi Monson ezali kokola ntango na ntango. Tokoki koyeba mpo na bisomei, kaka lokola Mokambi Monson, ete Yesu Klisto azali Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili, ete Joseph Smith azali profeta ya Bozongisi, kosangisa na bozongisi ya bonganganzambe ya Nzambe. Tomemi bonganganzambe wana mosantu. Ekoki biso koyekola makambo oyo mpe koyeba yango mpo na bisomei ezali libondeli na ngai ya sembo na kombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.