2010–2019
Zala lolenge moko na Maloba ya ba Profeta
sánzá ya zómi 2014


Zala lolenge moko na Maloba ya ba Profeta

Kozala lolenge moko na mabongisi ya bonzambe ya lola, tosungi profeta mpe toponi kozala kolandisama maloba na ye.

Tata na biso ya Lola alingi bana na Ye nyonso mpe alingi ete bango bayeba mpe basosola mabongisi na Ye ya esengo. Na bongo, Abengi baprofeta, baoyo bakulisami na nguya mpe makoki ya kosala na nkombo ya Nzambe mpo na lobiko ya bana na Ye. Bazali batindami ya sembo mpe ya nzeneneke ya Yesu Klisto mpe nguya ezangi suka ya Bomipesi na Ye. Basimbi bafungola ya bokonzi ya Nzambe na mabele mpe bapesami nzela ya kobongisa makuli yalobiko.

Na Eklezia ya solo ya Nkolo, “mosusu azali te kasi moko na mabele na ntango oyo likolo na bango nguya oyo mpe bafongola ya bonganganzambe oyo epesameli.”1 Tosungi Mokambi Thomas S. Monson lokola profeta na biso, momoni, mpe mosakoli. Asakoli liloba ya Nkolo mpo na kokamba mpe kotambolisamobimba ya Eklezia na biso. Lokola Mokambi J. Reuben Clark Jr. alimbolaki, “Mokambi ya Eklezia … azali apesameli ndingisa ya kozwa mabimisi mpo na Eklezia. ”2

Na oyo etali profeta ya bomoi, Nkolo atindi bato ya Eklezia na Ye ete:

Bosengeli kotia bokebi na maloba mayemanso mpe na mitindo na ye minso miye akopesa bino lokola akozua ntango kotambolaka na bonsantu bonso liboso na ngai;

“Mpo liloba na ye bondima yango lokola kaka kowuta na monoko na ngaimei, na motema pio mpe bondimi bonso.

“Nakosalaka makambo maye bikuke ya lifelo bikolonga bino te ”3

Kozala lolenge moko na mabongisi ya bonzambe ya lola, tosungi profeta mpe toponi kozala lolenge moko na maloba na ye.

Tozali lisusu kosunga bapesi toli ya Mokambi Monson mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale lokola ba profeta, bamoni, mpe babimisi. “Bazali nandingisa, na nguya, mpe makoki ya koloba makanisi mpe mposa ya [Nkolo] … , ntina ya … Mokambi ya Eklezia”4 Bazali koloba na nkombo ya Klisto. Bazali kosakola na nkombo ya Klisto. Bazali kosala nyonso na nkombo ya Yesu Klisto. Na kati ya maloba toyoki mongongo ya Nkolo mpe tozali koyoka bolingo ya Mobikisi. “Mpe nyonso nini basengeli koloba ntango basimbami na Molimo Mosantu esengeli ezala na makomi, mpe nguya ya Nzambe kati na lobiko.” 5 Nkolo Yemei alobaki: “Na nzela ya mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali ndenge moko.” 6

Tozali na botondi mingi mpo na eklezia “etongami likolo ya moboko ya bapostolo mpe baprofeta, Yesu Klisto yemoko azali mokonzi libanga esimbi nyonso.”7 Ndako ya Nkolo ezali ndako ya malonga, mpe tosengeli ata mokolo moko te komikosa na ntina ya esika ya koluka biyano na mituna na biso to ntembe na mongongo nini kolanda. Tosengeli te kozala “ya kokangama, mpe komemama na mipepe nyonso ya malongi.”8 Nzambe azali kobimisa liloba na Ye na nzela ya basali na Ye batiami maboko, “mpo na bobongi nye ya basantu, mpo na mosala ya misala, mpo na kolendisaka nzoto ya Klisto: tii biso nyonso tokoma na bosangani ya bondimi, mpe na boyebi ya Muana na Nzambe.”9 Ntango toponi kozala kolandisaka maloba ya baprofeta, tozali kati na nzela ya mayokani oyo ekomema na bobongi nye ya seko.

Kowuta na mitungisi mpo na kozala na bomoi na eleko ya nzala ya mama moko monzemba, totangi oyo elingi koloba kosunga profeta. Nkolo apesaki mobeko na profeta Eliya akende na Salepata, kuna akomona muasi oyo Nzambe apesaki motindo ya kosunga ye. Ntango Eliya apusanaki na etuka, amonaki liboke ya nkoni na ye. Abiangaki ye, “Yela ngai, nasengi yo, mwa mai na kati ya kopo, mpo ete namela”10

“Mpe ntango abandaki koya nango, abiangaki ye [lisusu], mpe alobaki, Yela ngai, nasengi yo, na mwa lipa na loboko na yo.

“Mpe alobaki, Lokola Nkolo Nzambe na yo azali na bomoi, najali na eloko etumbami te, bobele mwa mfufu kati na Mbeki mpe mwa mafuta kati na molangi. Sasaipi najali kolokota nkoni mibale ete naingela kobongisa yango mpo na ngai moko mpe mwana na ngai ete tolia mpe tokufa.”

Eliya ayanolaki ye ete, “Kobanga te; kende mpe sala lokola yo olobi liboso, salela ngai mokateyambo, mpe yela ngai yango. Sima sala mpo na yo moko mpe mwana na yo.”11

Kanisa mpo na ntango ya mpasi na oyo profeta azalaki kosengaka na mama moko ya nzala kosala. Na ntembe te, Nzambe Yemoko akokaki kopesa bilei mpo na mosali na Ye ya bondimi. Kasi, kosalaka na nkombo ya Nkolo, Eliya asalaki lolenge atindamaki, oyo ezalaki kosenga na muana muasi moko ya bolingo ya Nzambe kobonza oyo azalaki nango mpo na kosunga profeta.

Kasi Eliya mpe alakaki libamboli moko mpo na botosi: “Jambi Yawe, Nzambe na Yisalaele alobi boye ete, Mbeki na Mfufu ekosila te mpe molangi na mafuta ekokoka te.”12 Nkolo apesaki muasi mokufeli mobali libaku ya kopona kondima mpe kotosa maloba ya profeta.

Na mokili oyo etondisami na nzala ya bosembo mpe ya molimo, topesameli mobeko ya kosunga profeta. Lokola tozali koyoka, komemia, mpe kotatola liloba ya bobimisi, tozali banzeneneke, totali ete tozali na bondimi ya komikitisa na bolingi, mayele, mpe ntango ya Nkolo.

Topesi ntina na liloba ya bobimisi atako ntango emonani kozanga mayele, ekokani te, mpe ebongisami te. Kolandisama na mibeko ya mokili, kolandaka profeta ekoki kozala na bato ebele te, malamu te mpona politiki, to endimami te na oyo etali mabota. Kasi kolanda profeta ezali ntango nyonso bosembo. “Mpo lokola lola ezali likolo makasi koleka mabele, boye ezali banzela na ngai likolo makasi ya banzela na bino, mpe makanisi na ngai na oyo ya bino makanisi.”13 “Talela Yawe na motema na yo mobimba; mpe kondima bososoli na yo moko te.”14

Nkolo akumisi mpe apesi libaku na bango baoyo bakolanda botambuisi esakolami: mpona muasi akufeli mobali ya Salapata, botosi na Eliya ebikisaki bomoi na ye mpe nzela moko na ya muana na ye. Lokola profeta alakaki, “muasi, mpe ye, mpe libota na ye, baliaki kino mikolo mingi … kolandaka maloba ya Nkolo, oyo elobamaki na Eliya.”15

Nkolo “akoleisa baoyo bakolikya na Ye.”16Maloba ya baprofeta ezali lokola mama na milimo na biso. Ntango tolei elambo, tokopambolama, kobatelama, mpe tobombami na mibale nzoto mpe na molimo. Ntango tosepeli na maloba na bango, tokoyekola lolenge nini tokoya na Klisto mpe kobika.

Mpaka Bruce R. McConkie akomaki ete na nzela ya ba profeta “Nkolo azali kosakola bosolo ya lobiko, … lobiko oyo ezali na Klisto, mpe abongisi … nzela ekomemanaka na bomoi ya seko.  … Na mibu nyonso Nkolo azali kopesa libota na ye nzela basengeli na yango na ntango na bango ya libungi mpe ya likama. Mpe na bosolo na mikolo ekoya ekozala na ba ngonga ntango eloko mosusu te kasi mayele ya Nzambe, kokitaka wuta lola mpe kosopanaka liboso ya mbebo ya bobimisi, ekozala na bokasi ya kobikisa libota na ye.”17

Mpona na ngai, maloba ya baprofeta eteyamaki na molakisi na ngai ya loriele epesaki ngai emoniseli oyo liyokani ya kozala na libala lolenge nini esengeli kozala. Maloba ya ba profeta epesaki ngai bondimi mpe elikya oyo nakoki kobongisa mpo na mpe kozua esengo na ndako na ngai. Kotangaka ntango nyonso mateya ya baprofeta, nyonso lokola ya kala mpe ya ntango oyo, esungaki ngai na kati ya mibu ya mpasi mpe mingi ya kolembisa nzoto ya kotambolisa, kotangisaka, koleisaka bana nsambo. Maloba ya baprofeta na kati ya makomi mpe mateya kowuta na mesa oyo ezali maloba ya kolendisa, ya bolingo, ya bokasi, mpe lokumu malamu ekoyamba biso nyonso.

Soki toyoki maloba ya baprofeta, tozali kotonga ba ndako na biso mpe babomoi na biso likolo ya moboko ya solo ya libela, “libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Muana mobali ya Nzambe.  … ete ntango satana akotinda liboso mipepe na ye ya nguya, iyo, banzela na ye na ekumbaki, iyo, ntango mvula ya moke mpe mbonge ekobeta likolo na bino, ezali na nguya te likolo na yo mpona kokitisa yo na nse … monyokoli mpe mpasi ezanga suka.” 18

Tozali na liponi. Tosengeli kopona koboya, komona mpamba, konyata na makolo, to kotemela maloba ya Klisto elobami na basali na Ye oyo batindami. Kasi Mobikisi ateyaki ete baoyo bakosala boye akokabola bango na libota na Ye ya liyokani.19

Ntango totangi na libondeli mpe toyekoli liloba ebimisami na bondimi na Klisto, na mposa ya solo, Molimo Mosantu ekolobela bosolo na makanisi mpe mitema na biso. Tika tofongola matoyi na biso mo na koyoka, mitema na biso kososola, mpe makanisi na biso ete bikamuisi ya Nzambe ekoka kotandama na bomoni na biso. 20

Natatoli ete Joseph Smith azalaki mpe azali profeta abiangamaki na Nzambe kozongisa nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bonganganzambe na Ye na mabele. Mpe natatoli ete na Mokambi Monson tozali kotambuisama na profeta ya solo ya Nzambe na mikolo oyo. Tika topona kozala na baprofeta mpe kozala lolenge moko na maloba na bango tii tokosangana na bondimi, topetuami na Klisto, mpe totondisami na boyebi ya Muana mobali ya Nzambe. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene