2010–2019
Bokomisa Kosalela Bondimi Likambo na Bino ya Yambo
sánzá ya zómi 2014


Bokomisa Kosalela Bondimi Likambo na Bino ya Yambo

Atako mikakatano nionso ya mabe tozali nango na bomoi, tosengeli kozwa ntango mpo na kosalela bondimi na biso.

Ntango Adama mpe Ewa bazalaki na Elanga ya Edene, nionso bazalaki na yango mposa mpo na makoki na bango ya mokolo na mokolo epesamelaki bango ebele. Bazalaki te na kpokoso, mikakatano, to mpasi Mpamba te bayebaka ata moke te bantango ya mpasi, bayebaki te ete bakokaki te kozala na esengo. Bayokaka makelele mokolo moko te, boye bakokaka te koyoka kimia.

Na nsuka Adama mpe Ewa babukaki motindo ya kolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe. Na kosalaka yango bazalaki lisusu te na ezaleli ya kozanga mabe. Babandaki tokutanaka na bokono oyo elembisaki kolongono na bango. Babandaki koyoka mawa lokola esengo.

Na nzela ya kolia ya Adama mpe Ewa mbuma epekisama, boyebi ya malamu mpe mabe eyingalaki na mokili.1 Boponi esali esalema mpo na moko na moko na biso koya na mabele oyo mpe komekama. Topambolami na nguya ya kopona, oyo ezali bokoki na biso ya kozwa mikano mpe kokoma moyanoli mpo na mikano na biso. Bokwei esali esalema na bomoi na biso mayoki mibale ya esengo mpe mawa. Tokoki kososola kimia mpamba te toyoki makelele.2

Tata na biso na Lola ayebaki ete yango ekokomela biso. Ezali nionso eteni ya mwango ebonga nie ya Ye ya esengo. Alengelaki nzela moko na kati ya bomoi ya Mwana na Ye ya Mobali abonga nie, Yesu Klisto, Mobikisi na biso, mpo na Bomikabi na Ye mpo na kolonga kpokoso nionso oyo tokoki komona na bokufi.

Tozali na bantango ya momekano. Tokoki te kotanga bowuti nionso ya mabe na mokili. Esengeli te kolimbola mikakatano mpe bampasi ya motema nionso ekoki kozala oyo ezali eteni moko ya bokufi. Moko na moko na biso azali mpenza na boyebi ya bitumba na bisomei na lisenginia, mpasi mpe mawa.

Toteyamaki yambo ya mokili oyo ya bokufi ete ntina na biso na koya awa ezali mpo na komekisama, mpe komekama, mpe kotandolama. 3 Toyebaki tolingaka kokutana na mabe ya monguna. Ntango mosusu tokoki koyoka boyebi mingi ya makambo mabe ya bokufi koleka ya malamu. Profeta Lehi ateyaki, “Mpo esengeli mpenza ezala, ete ezala bokeseni na makambo manso.”4 Atako mikakatano nionso ya mabe, tosengeli kozwa ntango mpo na kosalela bondimi na biso. Kosalela yango ekobangisa nguya etonda na bondimi ya malamu ya Bomikabi ya Yesu Klisto na kati ya bomoi na biso.

Tata na biso na Lola apesi biso bisaleli mpo na kosalisa biso koya epai na Klisto mpe kosalela bondimi na Bomikabi na Ye. Ntango bisaleli oyo ekomi momesano ya ntina, ekopesa nzela ya pete mingi koleka mpo na kozwa kimia na mikakatano ya mokufi. Lelo naponi kosolola minei ya bisaleli oyo. Lokola nazali koloba, kanisa komimekaka bosaleli ya yomei ya esaleli moko na moko; nsima luka bokambi ya Nkolo mpo na koyeba boniboni okoki kosalela malamu mingi koleka moko na moko na yango.

Losambo

Esaleli ya yambo ezali losambo. Pona kosolola elongo na Tata na Lola mingimingi. Salela ntango mokolo moko na moko mpo na kokabola makanisi mpe kayoki elongo na Ye. Lobela Ye nionso oyo etali yo. Azali na ntina ya mambi ya motuya mingi koleka lokola ya kimokoli mingi koleka ya yo. Kabola elongo na Ye molongo mobimba ya mayoki mpe makambo na yo.

Mpamba te Ye amemeka nguya na yo ya kopona, Tata na lola akokanga yo na makasi te mpo na kosambela Ye. Kasi ntango osaleli nguya wana ya kopona mpe okotisi Ye na lolenge nionso ya bomoi na yo ya mokolo na mokolo, motema na yo ekobanda kotonda na kimia, kimia wana ekosangisa pole moko ya seko na bitumba na yo. Ekosalisa yo mpo na kolonga mikakatano wana na komona moko ya seko.

Baboti, bosalisa kobatela bana na bino na kolendisaka bango ntongo mpe pokwa na nguya ya losambo ya libota. Bana basopelami mokolo na mokolo na mabe ya bonsoni, mposa ya mabe, mikolo na mikolo, mpe bibeli ya bizaleli misusu ya masumu. Bobatela bana uta na nguya ya mabe ya kimokili na kolendisaka bango na mapamboli ya nguya oyo ewuti na losambo ya libota. Losambo ya libota esengeli kozala likambo ezanga te ya yambo na bomoi ya mokolo na mokolo.

Yekola Makomi

Esaleli ya mibale ezali koyekola liloba ya Nzambe na makomi mpe maloba ya baprofeta ya bomoi. Tokotambola epai ya Nzambe na nzela ya losambo. Mbala mingi mpenza Ye akozongisela biso lisolo na nzela ya liloba na Ye ekomama. Mpo na koyeba lolenge nini mongongo ya Bonzambe eyokani mpe ezali lokola, botanga maloba na Ye, mpe bomaniola yango. 5 Bosala yango eteni moko mpenza ya bomoi ya mokolo na mokolo. Soki bolingi bana na bino bayeba mpenza, bososola, mpe bosala na botindiki ya Molimo, bosengeli koyekola makomi elongo na bango.

Bomitika te na lokuta ya Satana ete bozali na ntango te mpo na koyekola makomi. Bopona kozwa ntango mpo na koyekola yango. Kosalaka feti na liloba ya Nzambe mokolo nionso ezali na motuya mingi koleka kolala, kelasi, mosala, kotala ya televisio, masano ya video, to nsango ya bato na bato na Internet. Bokoki kobongisa lisusu makambo na bino ya yambo mpo na kopesa ntango mpo na koyekola liloba ya Nzambe. Soki ezali bongo, bosala yango!

Ezali na bilaka mingi ya mapamboli ya baprofeta ya koyekola mokolo na mokolo makomi.6

Nabakisi mongongo na ngai na elaka oyo: ntango obonzi ntango mokolo na mokolo, yomei na kati ya libota na yo, mpo na koyekola liloba ya Nzambe, kimia ekokonza na bomoi na yo. Kimia wana ekoya te uta na mokili ya libanda. Ekoya uta na kati ya ndako na yo, uta na kati ya libota na yo, uta na kati ya motema na yo. Ekozala likabo ya Molimo. Ekopanzana na libanda uta na yo mpo na kosala na basusu na mokili nzinganzinga na yo. Okozala kosala likambo moko ya ntina mpenza mpo na kobakisa kimia ya kobakisa na mokili.

Nalobi mpenza te ete bomoi na yo ekotika kozala na mikakatano. Mikundola ntango Adama mpe Ewa bazalaki na elanga, bazangaki mikakatano, kasi bakokaki te koyeba esengo, bosepeli, mpe kimia. 7 Mikakatano ezali eteni moko ya motuya na bokufi. Na nzela ya koyekola ya mokolo na mokolo mpe ya sikisiki, okozwa kimia na makelele nzinganzinga na yo mpe bokasi mpo na kotelemela masenginia. Okokolisa bondimi ya makasi na ngolu ya Nzambe mpe okoyeba ete na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto nionso ekokoma malamu engebene na bangonga ya Nzambe.

Likita ya Mpokwa na Libota

Ntango ozali kosala mpo na kolendisa libota mpe kolona kimia, mikundola esaleli oyo ya misato: likita ya mpokwa na libota ya poso na poso. Keba na kosala te likita ya mpokwa na libota na yo ezala kaka likanisi moko ya nsima ya mokolo moko etonda na mosala. Zwa mokano ete butu ya mokolo ya yambo libota na yo ezala elongo na mpokwa. Kotika te masengisi ya mosala, masano, milulu misusu, lotomo ya kelaki, to eloko mosusu ekoma na motuya koleka ngonga bokolekisa elongo na ndako na libota na bino.

Lolenge ya mpokwa ezali te na motuya mingi lokola ngonga ekosalelama. Nsango malamu esengeli koteyama na lolenge moko mpe na lolenge mosusu. Komisa yango likambo moko ya ntina mpo na moto moko na moko na libota. Likita ya mpokwa na libota ezali ngonga moko ya ntina koleka, mpo na kopesa litatoli na esika moko ya kimia; mpo na koyekola koteya, kosala miango, mpe nakoki mpo na kobongisa makambo ; mpo na kolendisa mikangano ya libota ; mpo na kokolisa mimesano ya libota ; mpo na kolobana, mpe oyo eleki malamu, kozwa ntango kitoko ya kozala elongo!

Na likita ya sanza ya minei eleki, Ndeko mwasi Linda S. Reeves asakolaka na mpiko: “tosengeli kotalela mapamboli ya koyekola makomi mpe kosambela mokolo na mokolo mpe likita ya mpokwa na libota poso na poso. Yango ezali misala mpenza oyo ekosalisa kolongola komitungisa, kopesa bokambemi na bomoi na biso, mpe kobakisa bobateli na ndako na biso.”8 Ndeko Reeves azali mwasi moko ya bwania. Nasengi bino na makasi ete bolonga litatoli na bino ya mimesano oyo misato ya motuya.

Kokende na Tempelo

Esaleli ya minei ezali kokende na tempelo. Biso banso toyebi ezali te na esika ya kimia na mabele oyo koleka na tempelo ya Nzambe. Soki ozali na ndingisa ya tempelo te, mikokisa mpo na kozwa yango, salela yango mbala mingi.9 Bongisa ngonga ya mbala na mbala mpo na kozala na tempelo. Kotika te moto moko to eloko moko epekisa yo kozala kuna.

Ntango ozali na tempelo, yokamela maloba ya makuli, maniola yango, sambela mpo na yango, mpe luka kososola ntina na yango. Tempelo ezali moko ya bisika ya malamu mingi koleka mpo na koya kososola nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Luka Ye kuna. Mikundola ete mapamboli mingi koleka ekowuta na kopesaka bankombo ya libota na yomei na tempelo.

Bisaleli minei oyo ezali mimesano ya ntina koleka mpo na kobatela bomoi na yo na nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Mikundola ete Mobikisi na biso azali Nkumu ya Kimia. Kimia na bomoi ya kufa ekowuta na libonza ya bomikabi na Ye. Ntango tozali kosambela na sikisiki ntongo mpe mpokwa, koyekolaka makomi na biso mokolo na mokolo, kozalaka na likita ya mpokwa na libota, kokendeke na tempelo mbala na mbala, tozala koyanola na mosala na libengisi na Ye mpo na “koya epai na Ye.” Mingi mingi soki tozali kokolisa mimesano oyo, mingi mingi Satana akozala na nsomo ya kosala biso mabe kasi moke mingi akokoka kosala yango. Na nzela ya kosalela bisaleli oyo, tokosalela nguya ya kopona mpo na kondima makabo matonda ya libonza ya bomikabi na Ye.

Nazali kopesa likanisi ete bitumba nionso ya bomoi ekosila ntango ozali kosala makambo oyo. Toyaki na bomoi ya kufa mpenza mpo na kokola uta na mimekano mpe komekisama. Mikakatano ekosalisa biso kokoma mingi lokola Tata na biso na Lola. 10 Natatoli ete ntango toyei na kosalaka epai na Ye, tokoki kotelemela lisenginia nionso, motema mpasi nionso, mokakatano nionso tokokutana nango, na nkombo ya Yesu Klisto amene.

Matangi

  1. TalaMoses 5:11.

  2. Tala Moses 4–5.

  3. Tala Abraham 3:25.

  4. 2 Nefi 2:11.

  5. Tala Doctrine et Alliances 18:36; tala lisusu milongo 34–35.

  6. Boko ndakisa ezali:Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Ntango totangi mpe tomanioli makomi, tokoyoka nungunungu ya kitoko ya Molimo na milimo na biso. Tokoki kokuta biyano na mituna. Toyebi mapamboli oyo eyei na nzela ya mitindo ya Nzambe. Tozwi litatoli ya solo ya Tata na biso na Lola mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe ya bolingo na Bango mpo na biso. Ntango boyekoli ya makomi esangani na nsambo, tokoki koyeba na ntembe te ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezali ya solo. … Ntango tomikundoli losambo mpe tozwi ngonga mpo na kobaluka na makomi, bomoi na biso ekopambolama libela mingi mpe bozito ekokoma petepete mingi” (“We Never Walk Alone,” Ensign toLiahona, sanza ya Zomi na Moko. 2013, 122).Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki: “Na ntembe te nalaki bino ete soki moko na moko na biso ekobatela mwango oyo pete, kotala te boni mbala mingi otanga liboso Buku ya Mormon, ekokota na bomoi na yo mpe na ndako na yo metele ya kobakisa ya Molimo Mosantu ya Nkolo, mokano moko makasi mpenza mpo na kotambola na botosi na mitindo na Ye, mpe litatoli moko ya makasi mingi ya bosolo ya bomoi ya Mwana ya Nzambe” (“A Testimony Vibrant and True,” Ensign toLiahona, sanza ya Muambe. 2005, 6).Mokambi Howard W. Hunter alobaki: “Mabota epambolami mingi ntango batata mpe bamama ya bwania bakomema bana na bango penepene na bango, mpo na kotanga nkasa ya liboke ya makomi elongo, mpe nsima basololi na bonsomi masolo mpe makanisi ya kitoko engebene na bososoli na bango. Mbala mingi bilenge mpe bana mike bazali na mayele ya kokamwa na mpe baluli mpo na bankoma ya ntina ya boyambi” (“Reading the Scriptures,” Ensign, sanza ya Zomi na moko. 1979, 64).Mokambi Ezra Taft Benson alobaki: “Mbala mingi tokobimisa makasi na komekaka kokolisa bandelo ya mosala na makonzi na biso. Tokosala na etingia mpo na komatisa motango ya bato ya mayangani ya elambo. Tokosala mpo na kozwa motango ya likolo mingi koleka ya bilenge mibali na bamisio. Tokobunda mpo na kobongisa mitango ya baye babali na tempelo. Makambo manso oyo ezali makasi ya kokumisa mpe na motuya mpo na bokoki ya bokonzi. Kasi ntango bandimi mpe mabota moko na moko bamikotisi na makomi mbala na mbala mpe na sikisiki, makambo misusu oyo ya mosala ekoya yangomei. Matatoli makokola. Bomipesi ekolendisama. Mabota ekokembisama. Bobimisi ya moto na moto ekotonda” (“The Power of the Word,” Ensign, sanza ya Mitano 1986, 81).Mokambi Spencer W. Kimball alobi: “I get casual in mya relationships with divinity and when it seems that no divine ear is listening and no divine voice is speaking, that I am far, away, far away. If I immerse myself in the scriptures the distance narrows and the spirituality returns. I find loving more intensely those whom Imust love with all my heart and mind and strength, and loving them more. I find it easier to abide their counsel” ( Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball [2006], 67).Mokambi Marion G. Romney alobaki: “Nayoki ya solo ete soki, ma bandako na biso, baboti bakotanga na Buku ya Mormon na losambo mpe mbala na mbala, na bangomei mpe elongo na bana na bango, molimo ya buku wana monene ekokotela bandako na biso mpe baye bazali na kati na yango. Molimo ya limemia ekokola; limemia mpe bondimami ya bango na bango ekokola. Molimo ya koswana ekolongwa. Baboti bakopesa toli na bana na bango na bolingo mpe bwana mingi koleka. Bana bakozala bayanoli mpe botosi na toli ya baboti na bango. Bosembo ekokola. Bondimi, elikia, bolingani—bolingo ya peto ya Klisto—ekotonda na bandako mpe bomoi, komemaka na yango kimia, bosepeli, mpe esengo” (“The Book of Mormon,” Ensign, sanza ya Mitano 1980, 67).Mokambi Boyd K. Packer alobaki: “Malongi ya solo, soki esosolami, ekobongola ndenge mpe ezaleli. Boyekoli ya molongi ya nsango malamu ekobongisa ezaleli nokinoki koleka boyekoli ya ezalela ekobongola ezalela” (“Do Not Fear,”Ensign toLiahona, sanza ya Mitano 2004, 79).Mpaka David A. Bednar alobaki: “Libota nionso, likambo nionso ya boyekoli ya makoni ya libota, mpe likita ya mpokwa na libota nionso ezali koyema lobete ya lingenda ya langi na etando ya milimo na biso. Likambo moko te ekoki komonana ezali kotia elembo to bokundoli mingi. Kasi kaka lokola lobete ya wolo mpe ya moindo ya langi ekobakisana mpe ekosala mosala kitoko ya ntoki, boye sikisiki na biso na kosalaka oyo emonani makambo ya mike ekoki kokamba na mbano ya ntina ya molimo” (“More Diligent and Concerned at Home,”Ensign to Liahona, sanza ya Zomi na moko. 2009, 19–20).

  7. TalaNefi 2:13

  8. Linda S. Reeves, “Protection from Pornography—a Christ-Focused Home,” Ensign toLiahona, sanza ya Mitano 2014, 16–17.

  9. Makambi Howard W. Hunter alobaki: “Na molimo nabengisi Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpo na kotala tempelo ya Nkolo lokola elembo monene ya bondimi na biso. Ezali mposa ya mozindo mingi koleka ya motema na ngai kozala na mondimi moko na moko ya Eklezia kolongobana mpo na kokota na tempelo. Ekosepelisa Nkolo soki mondimi ya nkulutu nionso akolongobana na —mpe komema—ndingisa ya sikawa ya tempelo. Makambo oyo tosengeli kosala mpe kosala te mpo na kolongobana na ndingisa ya tempelo ezali makambo mpenza oyo ekosala tozala na esengo lokola moto moko na moko mpe mabota. Tika tozala bato bakokende na tempelo. Bokende na tempelo mbala mingi lokola ezalela ya moto na moto ekotinda. Bobatela foto ya tempelo moko na ndako na bino ete bana na bino bakoka komona yango. Boteya ntina ya ndako ya Nkolo. Bosalisa bango basala mwango uta na mibu na bango ya moke mpo na kokende kuna mpe kotikala balongobani mpo na lipamboli wana” (“Exceeding Great and Precious Promises,” Ensign, sanza ya Zomi na miko. 1994, 8).

  10. Tala 2Nephi 2:2 .