2010–2019
Banzaka Nzela ya Makolo na Yo
sánzá ya zómi 2014


Banzaka Nzela ya Makolo na Yo

Ntango totaleli Yesu lokola Ndakisa na biso mpe ntango tolandi bitambi na Ye, tokoki kozonga na likama te epai ya Tata na biso na Lola.

Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi. Nayoki komikitisa ntango natelemi liboso na bino na ntongo ya lelo. Nasengi bondimi mpe nsambo na bino mpo na ntina na ngai ntango nazali kokabola elongo na bino etinda na ngai.

Biso banso tobandaki mobembo moko ya kitoko mpe ya ntina ntango totikaki mokili ya molimo mpe tokotaki eteni oyo ezali mbala mingi-na mikakatano ebengami bokufi. Bantina ya yambo ya biso kozala likolo ya mabele ezali mpo na kozwa nzoto moko ya mosuni mpe mikuwa, kozwa mayele oyo ekoki koya bobele na nzela ya bokabwani na baboti ba biso ya lola, mpe kotala soki tokobatela mitindo ya Nzambe. Nabuku ya Abalayama, mokapo ya 3 totangi: “Mpe tokomeka bango na yango, mpo na kotala soki bakosala makambo nionso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”1

Ntango toyaki na mabele, tomemaki elongo na biso likabo monene oyo uta na Nzambe—kutu nguya ya kopona. Na bankoto ya banzela tozali na litomba ya kopona mpo na bisomei. Awa tokoyekola uta na moteyi mosala ya makasi mayele na kosalaka. Tokososola katikati na malamu mpe mabe. Tokokesenisa bololo mpe elengi. Tokoyekola ete mikano ekosala maye makoya lobi.

Nayebi na ntembe te ete totikakiTata na biso na mposa eluti ya kozonga epai na Ye, ete tokoka kozwa bonetoli Ye abongisaki mpo na biso mpe oyo, bisomei, tolingaki mingi mpenza. Atako batikaki biso toluka mpe tolanda nzela oyo ekokamba biso tozonga epai ya Tata na biso na Lola, Ye atindaki biso te awa na kozanga bokambami mpe toli. Kutu, Ye apesaki biso bisalele tosengeli, mpe Ye akosalisa biso ntango toluki lisalisi na Ye mpe tobundi mpo na kosala nionso ezali na nguya na biso mpo na kotia molende ti nsuka mpe kolonga bomoi ya seko.

Mpo na kosunga bokambami na biso tozali na maloba ya Nzambe mpe ya Mwana na Ye kati ya makomi masantu. Tozali na toli mpe mateya ya baprofeta ya Nzambe. Ya motuya koleka, topesami ndakisa mpo na kolanda—kutu ndakisa ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto—mpe toteyami mpo na kolanda ndakisa wana. Elobi Mobikisi Yemei: “Yaka, landa ngai.”2 “Lolenge kani ya bato tosengeli kozala” 3 Atunaki motuna, “boniboni batu basengeli bino kosala?” Mpe nde Ye ayanoli, “Ya solo nalobi na bino, kutu lokola nazali.”4 “Ye alakisi nzela mpe afungolaki nzela.”5

Ntango tozali kotala Yesu lokola Ndakisa na biso mpe ntango tolandi bitambi na Ye, tokoki kozonga na likama te epai ya Tata na biso na Lola mpo na kozala elongo na Ye libela. Elobaki profeta Nefi, “Longola se soki moto atii molende kino nsuka, na kolandaka ndakisa ya Mwana Mobali ya Nzambe ya bomoi, akoki te kobikisama.”6

Mwasi moko, mbala nionso asangelaki makambo asalaka ntango akendaka na Mabele Masantu, alingaka koloba, “natambolaki wapi Yesu atambolaki!”

Azalaki na etuka wapi Yesu avandaki mpe ateyaki. Ntango mosusu atelemaki likolo ya libanga moko esika oyo asi Atelama mokolo to atalaki molongo moko ya bangomba oyo asi Atala mokolo moko. Makambo wana, mpe ya yangomei, ezalaki ya kafukafu mpo na ye; kasi kotambola na nzotowapi Yesu atambolaki ezali na motuya moke na kotambolalokola Ye atambolaki. Komekola misala na Ye mpe kolanda ndakisa na Ye ezali na motuya mosika koleka komeka kotambola na bitambi atikaka na nzela Ye alekaki na bokufi.

Ntango Yesu apesaki na moto moko ya bomengo libengisi, “Yaka, mpe landa ngai,”7 Ye alingaki kaka te ete moto wana ya bomengo alanda Ye komata mpe kokita bangomba mpe balubwaku ya mboka.

Tosengeli te kotambola na mabongo ya Ngalilea to o ntei ya bangomba ya Yuda mpo na kotambola wapi Yesu atambolaki. Biso banso tokoki kotambola nzela Ye atambolaki ntango, elongo na liloba na Ye kobetaka ngonga na matoi na biso, Molimo na Ye kotondisaka mitema na biso, mpe mateya na Ye kokambaka bomoi na biso, toponi kolanda Ye ntango tozali kotambola na nzela ya bokufi. Ndakisa na Ye ekopelisa nzela. Elobaki Ye, “Nazali nzela, bosolo, mpe bomoi.”8

Ntango tososoli nzela Yesu atambolaki, tokomona ete ememaki Ye na nzela ya mingi ya mikakatano wana kaka bisomei tokokuta na bomoi.

Na ndakisa, Yesu atambolaki na nzela ya nkele. Atako Ye amonaki nkele mingi, moko eleki mawa elimbolami likolo na Yelusaleme ntango Ye asukisaki mosala na Ye na miso na bato. Bana ya Yisalaele baboyaka kimia ya lipapu ya bobeteli oyo Ye apesaki bango. Ntango atalaki likolo ya engumba oyo mosika te elingaki kosundolama na bobebisami. Mayoki ya mawa ya mozindo elongaki Ye. Na nsomo Ye agangaki, “O Yelusaleme, Yelusaleme, oyo ebomi baprofeta, mpe ebambi mabanga na baye batindami epai na yo; mbala mingi boni nasangisaki bana na yo elongo, lokola mama nsoso akosangisaka libota na ye na nse ya mapapu na ye, mpe olingaki te!”9

Yesu atambolaki na nzela ya lisenginia, Lisifelo, oyo ya mabe, kosangisaka bokasi na ye ya monene koleka, mayele mabe na ya kobengisa, asenginisa Ye oyo akilaka mikolo 40 mpe butu 40. Yesu akweyaki te; kutu, Ye atelemelaki lisenginia nionso. Maloba na Ye ya kokabwana: “Longwa awa Satana.”10

Yesu atambolaki na nzela ya mpasi. Bokanisa Getesemane, wapi Ye azalaki na mpasi ya liwa … mpe motoki na ye ezalaki lokola matanga minene ya makila ekweyaki na mabele.”11 Mpe moko te akoki kobosana mpasi na Ye na ekulusu ya nsomo.

Moko na moko na biso akotambola na nzela ya nkele, ntango mosusu na ntina ya libaku moko ebunga, nguya moko ozangi kosalela, maponi ya moko yo olingaka, to liponi moko bisomei tosali. Nzela ya lisenginia lisusu ekozala na nzela na moko na moko. Totangi na eteni 29 ya Doctrine et Alliances: “Mpe esengeli ezala ete zabolo asenginia bana ya bato, to bakoki te kozala basali mpo na bangomei.”12

Na lolenge moko tosengeli kotambola na nzela ya mpasi. Biso, lokola basali, tokoki kozela te mingi koleka Nkolo, oyo atikaki bokufi kaka nsima ya mpasi makasi mpe bwale.

Ntango tokokuta na nzela na biso na mawa ya bololo, tokoki lisusu kokuta esengo monene.

Biso, elongo na Yesu, tokoki kotambola na nzela ya botosi. Ekozala ntango nionso pete te, kasi tika liloba ya etinda na biso ezala libula etikela biso Samwele: “Tala, kotosa eleki libonza, mpe koyokamela eleki mafuta ya bibwele.”13 Tika tomikundola ete mbano ya nsuka ya bozangi botosi ezali bokangemi mpe liwa, ntango mbano ya botosi ezali bonsomi mpe bomoi ya Seko.

Biso, lokola Yesu, tokoki kotambola na nzela ya lisalisi. Lokola mwinda ya kongenga mpo na kolukela bonzambe ezali bomoi ya Yesu ntango Ye asalaki kati ntei ya bato. Ye amemaki bokasi na binama ya mobukani, mpe bomoni na miso ya mokufi miso, bomoni na matoyi ya mokufi miso.

Yesu atambolaki na nzela ya losambo. Ye ateyaki biso boniboni kosambela na kopesaka biso Losambo ya kitoko toyebi lokola losambo ya Nkolo. Mpe nani akoki kobosana losambo na ye na Getesemane, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalema”?14

Malakisi misusu epesamelaki biso na Mobikisi ezali na nsuka ya misapi na biso, ezwami na makomi masantu. Na Lisakola na Ngomba, Ye alobaki na biso tozali na boboto, tozali na bomikitisi, tozala na bosembo, tozala peto na motema, tozala basali ya kimia. Ye alakisaki kotelema ngwi na mpiko mpo na bondimi na biso, ata ntango totiolami mpe toniokwami. Ye asengi biso totika minda na biso epela mpo ete basusu bakoka komona yango mpe bakoka kozala na mposa ya kokembisa Tata na biso na Lola. Ye ateyaki biso tozala peto na makanisi mpe na mosala lokola. Ye alobelaki biso ezali na motuya mosika mingi kotia bomengo na biso na lola koleka na mabele.15

Masese na Ye eteyi na nguya mpe likoki. Na nsango ya Mosamalia, Ye ateyi biso kolinga mpe kosalisa bazalani na biso.16 Na masese ya batalanta, Ye ateyi biso komibongisa mpe kobunda mpo na kobonga nie.17 Na lisese ya mpate ebunga, Ye alakisi biso kokende kobikisa baye batiki nzela mpe babungisi nzela.18

Ntango tobundi mpo na kotia Klisto na katikati ya bomoi na biso na koyekolaka maloba na Ye, na kolandaka mateya na Ye, mpe na kotambolaka na nzela na Ye, Ye alaki kokabola elongo na biso bomoi ya seko oyo Ye akufaki mpo na kozwa. Ezali te na nsuka ya likolo mingi koleka oyo, ete tosengeli kopona kondima bosemboli na Ye mpe kokoma bayekoli na Ye mpe kozala mosala na Ye na bomoi na biso mobimba. Likambo mosusu te, liponi mosusu te tokosala, ekoki kokomisa biso nini Ye akoki.

Ntango nakanisi baye bameki ya solo kolanda ndakisa ya Mobikisi mpe baye batambolaki na nzela na Ye, eyei noki na mayele na ngai bankombo ya Gustav mpe Margarete Wacker—mibale ya bato ya lolenge ya Klisto baye nayeba naino te. Bazalaki babotama ya Allemagne oyo bakendeki na Canada ya esiti, mpe nakutanaki na bango ntango nazalaki mokambi ya misio kuna. Ndeko Wacker azalaki kosala mosola na kokataka suki. Bozwi na ye ezalaki moke, bakabolaki nionso bazalaki na yango. Bazwaki te lipamboli ya bana, kasi baleisaka bato banso bakotaki na ndako na bango. Mibali mpe basi ya koyekola mpe ya bipale balukaki basali oyo ya komikitisa, batanga te mpe basepelaki soki bakokaki kolekisa ngonga moko liboso na bango.

Lolenge na bango emonanaki ya momesano, Anglais na bango ya kokatakata mpe mwa mpasi na kososola, ndako na bango ezangaki lofundo. Bazalaki na motuka te to televizio ya bangomei, mpe basalaki te bokebi na makambo oyo mokili emesani kosala bokebi. Kasi bato ya botongono balukaki nzela ti na ekuke na bango mpo na kokabola molimo ezalaki kuna. Ndako na bango ezalaki lola na mabele, mpe molimo na bango oyo ezalaki kongenga ezalaki ya kimia mpe ya bonzambe mpenza.

Biso lisusu tokoki kozala na molimo wana mpe tokoki kokabola yango elongo na mokili ntango totamboli na nzela ya Mobikisi na biso mpe tolandi ndakisa na ye ebonga nie.

Totangi na Masese likebisi, “Keba mpo na Nzela ya Makolo na Yo.”19 Ntango tosali yango, tokozala na bondimi, kutu mposa, mpo na kotambola na nzela oyo Yesu atambolaki. Tokozala na ntembe te ete tozali na nzela moko oyo Tata alingi biso kolanda. Ndakisa ya Mobikisi ekopesa nzoto na nionso oyo tokosala, mpe maloba na Ye ekopesa toli ezanga mbeba. Nzela na Ye ekomema biso na kimia na ndako. Oyo ekoka kozala lipamboli na biso, nasambeli, na nkombo ya Yesu Klisto, oyo alingi biso, oyo asaleli biso, mpe oyo natatoli, amene.