2010–2019
Kolengelama na Lolenge Oyo Eyebanaki Te
sánzá ya zómi 2014


Kolengelama na Lolenge Oyo Eyebanaki Te

Ekoka biso komilengela na kolongobana mpo na kozwa makuli ya lobiko litanga na litangampe kobatela mayokani na motema mobimba.

Ntango mwana na biso ya mwasi ya nsuka azongaki na ndako nsima ya mokolo na ye ya yambo ya kelasi, natunaki, “ezalaki boni?” Ayanolaki ete, “Ezalaki malamu.”

Ayanolaki, “ezali malamu.”

Ntongo elandi, na ngonga, ntango nalamusaki ye mpo na kelasi, akangaki maboko na ye mpe alobaki solo, “Nasilaki kokende na kelasi!” Emonanaki Nalengelaki ye te to nalimbolela ye ete kokenda na kelasi ezalaki te molulu ya mbala moko kasi azalaki kozela kokende na kelasi mbala mitano na mposo mpo na mbala mingi, mibu mingi.

Lokola totali libongisi ya kozala ya kolengelama, kanisa elongo na ngai likambo ekolanda. Ovandi na kisuku ya selesitiale ya tempelo mpe kotala balongami mpe balongami kolakisama na limemia na kati mpe libanda lokola bazali kozela mpo na kobalana mpo na ntango mpe mpo na libela. Molongani moko akotaki na kisuku ya selesitiale, loboko na loboko elongo na bolingo na ye ya motema. Alataki elamba ya ntalo te kasi monkoto kitoko ya tempelo mpe makelele te, na kimia, komunga ya mua moto na elongi na ye. Akanisaki malamu kasi kotambolisaka mayele te. Avandaki, kotala na ntina, mpe bongo mbala moko akomaki elongo na motema kopasukama. Ezalaki lokola ete mpinzoli na ye eyaki mpo na bobangi mpe limemia azalaki elongo na esika azalaki na kati mpe likuli ya bule ezalaki kozela ye mpe bolingo ya bomoi na ye. Ezaleli na ye ezalaki koloba, “Boniboni Natondi kozala na ndako ya Nkolo lelo, pene na kobanda mobembo ya libela na moninga moko ya libela.” Azalaki lokola ya kolengelama mingi koleka kaka mpo na molulu.

Nkololo na biso ya kitoko kala te atikaki mwa mokanda mpo na ngai na kuse na ngai oyo na eteni elobaki : Eloko moko ebeti ngai ntango nakoti na tempelo ezali molimo ya kimia mpe bolingi oyo evandi kuna. … Bato bakoki kokende na tempelo mpo na kozwa bofuli.” 1 Alobi ya solo. Tokoki kozwa bofuli mpe libimisi na tempelo—mpe lisusu nguya ya kotelemela mikakatano ya bomoi. Nini azali koyekola etali tempelo ntango asali elongo na sikisiki na kokamataka bankombo ya libota na ye mobimba mpo na mabatisi ya tempelo mpe bankotisa ekolengela ye mpo na kozwa makuli ya kobakisa ya tempelo, mpe mapamboli, mpo yemei mpe baye na ngambo mosusu ya elamba.

Mpaka Russell M. Nelson ateyaki, “ Lokola batempelo elengelami mpo na bato, bato basengeli komilengela mpo na tempelo.”2

Lokola Natangi lisusu mpo na Kapiteni Moroni na Boku ya Mormon, Namikundolaki ete moko ya misala minene ya Moroni asalaki ezalaki bokengi na ye na kolengela banefite mpo na kokoka bobangi ya mampinga ya balamanite. Alengelaki bato na ye malamu boye ete totangi: “Tala, na bokamwi bonene ya [Balamani’], [Banefi] balengelamaki mpo na bango, na lolenge oyo eyebanaki mokolo moko te.3

Maloba maye, “balengelamaki… na lolenge oyo eyebanaki mokolo moko te,” solo ekangaki makanisi na ngai.

Boniboni tokoki komilengela malamu na mpo mapamboli ya bule ya tempelo? Nkolo ateyaki, “Mpe lisusu, Napesi bino lolenge mpo na biloko nionso.”4 Tika tomaniola ndakisa moko ya makomi lmpo na kosalisa biso komilengela malamu. Komilengela ya Moroni mpo na banguna ezuaki etingia mpe botongono, mpe ndenge oyo ekoki kosenga yango kaka.

Emonana lokola nalemba naino te lisese ya kitoko Mobikisi alobaki ya baseka mitano ya mayele mpe mitano liboma. Atako lisese oyo etali kolengelama mpo na Boyei ya Mibale ya Mobiksi, tokoki lisusu kokokanisa yango na kolengelama mpo na mapamboli ya tempelo, oyo ekoki kozala lokola feti ya molimo mpo na baye balengelami malamu.

Na Matai 25 totangi :

“Nde bokonzi ya lola ekokokisama na baseka zomi, oyo bakamataki minda na bango, mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.

“Mpe mitano na bango bazalaki mayele, mpe mitano mosusu bazalaki ya liboma. …

[“Baye Bazalaki] mayele bakamataki mafuta na basani na bango na minda.

“Ntango mobali awumelaki, bango banso balalaki mpongi.

“Mpe kati ya butu bogangi eyokanaki, Tala, mobali ayei; bokende kokutana na ye.

“Nde baseka wana batelemaki, mpe babongisaki minda na bango.

“Mpe ya liboma balobaki epai ya baye ya mayele, Pesa biso mafuta na bino; mpo minda na biso ekufi.

“Kasi ya mayele bayanolaki, kolobaka, boye te; noki te ekokota mpo na biso mpe bino; kasi bokende kutu na bateki, mpe bosomba mpo na binom moko.

“Mpe tango bakendeki kosomba, mwasi ya libala ayaki; mpe baye bakokaki bakendeki elongo na ye na libala: mpe ekuke ekangamaki.

“Nsima eyaki lisusu baseka mosusu, kolobaka, Nkolo, Nkolo, fungola biso.

“Kasi ayanolaki mpe alobaki, Ya solo nalobi na biso, boyebi ngai te. 5

Nakanisi te ezali na moko, mingimingi o ntei ya baye na mitema ya bosoto, oyo bayoki te mawa mpo na basi wana ya liboma ya bilenge. Mpe boko na biso balobi na basi mosusu ya bilenge, “Ekoki bino kaka kokabola ete moto nionso akoka kozala na esengo? ” Kasi kanisa yango. Oyo ezali lisolo ya Mobikisi alobaki, mpe Ye azali oyo abengaki mitano na bango “mayele” mpe mitano na bango “liboma.”

Ntango tokanisi lisese oyo lokola ndakisa mpo na bolengeli ya tempelo, tokanisa maloba ya profeta ya mikolo mya nsuka oyo ateyaki ete “mafuta ya bolengeli ya molimo ekoki kokabolama te.” 6 Mokambi Spencer W Kimball asalisi kolakisa na polele ntina nini bilenge basi ya “mayele” bakokaki te kokabola mafuta na minda na bango na baye bazalaki ya “liboma” ntango alobaki; “Kokende na mayangani ya elambo ekobakisa mafuta na minda na biso, litanga na litanga nsima ya mibu. Kokila bilei, losambo ya libota, liteya na ndako, kokonza bamposa ya nzoto, koteya nsango malamu, koyekola makomi—mosala ya litanga na litanga ya komipesa mpe botosi ekozala litanga moko ebakisami na ebombeli na biso. Misala ya bosembo, kofuta makabo mpe moko na zomi, makanisi mpe misala ya peto … —Yango, lisusu, ekosalisa mingi mpo na mafuta na yango tokoki kobakisa mafuta na kati ya botu na minda na biso.” 7

Okoki komona ndakisa ya bolengeli—litanga na litanga—oyo ekoki kosalisa biso ntango tokanisa boniboni tokoki kozala na etingia mingi na bolengeli na biso mpo na kozwa makuli ya bule mpo na bisomei mpe basusu? Likambo nini mosusu ya moke mpe pete ekoki biso kozala mpo na kobakisa matanga ya molimo ya ntango mingi ya mafuta na minda na biso ya bolengeli ?

Toyekoli na Mpaka Richard G. Scott ete “bolongobani ezali lisengi ya motuya mpo na kosepela mapamboli ya tempelo. … Moto alongobani amibongisi malamu mingi uta na bomoi na ye ya maponi ya sikisiki mpe bosembo etii na kati mateya ya Nkolo.” 8 Nalingi koloba sikisiki. Mpo na kozala sikisiki ezali kozala ya kobonga, molende, mpe bosembo. Ndimbola nini ya malamu ya libongisi ya kolongobana!

Tomikundoli na Dictionnaire ya Biblia, “Bobele libota ekoki kokokana na tempelo elongo na bosantu.”9 Ezali bisika tovandi to bandako na yango kopesa ezaleli wana? Elenge mwasi moko ya bolingo na paloasi na biso ayaki na ndako na biso kala mingi te. Lokola toyebaki ndeko na ye ya mobali uta na misio na ye, natunaki ye nini azalaki komona lokola azongi ndako. Alobaki ezalaki malamu, kasi alingi na libaku kotuna soki miziki ekokita na nse. Alobaki, “Mpe ezalaki te mizikimabe!” Ekoki kozala ya kolongobana mpo na komisosola sikawa mpe nsima kosala keba bandako mpe bisika na biso tomilengeli mpo na koyoka Molimo Ntango tomilengeli mpo na komiyoka mingi “na ndako”ntango tokoti na ndako ya Nkolo.

Ntango tomilengeli mpo na kokota na tempelo na bolongobani mpe tozali botongono mpo na mayokani ya tempelo, Nkolo akosopa “ebele ya mapamboli”10 likolo na biso. Moninga na ngai malamu kala mingi te abongolaki makomi mpe alobaki, “Esika mingi esengami, mingi ekopesama.”11 Nakoki te kondima mingi koleka! Mpamba te koyei na tempelo mpo na kozwa mapamboli ya seko, esengeli te ekamwisa biso ete mibeko ya likolo esengami mpo na komibongisa mpo na mapamboli. Lisusu Mpaka Nelson ateyaki: “Mpamba te tempelo ezali ndako ya Nkolo, mibeko mpo na kondimama etiami na Ye. Moto akokota kuna lokola mobengami na Ye. Kozala na ndingisa ya tempelo ezali litomba ya ntalo mingi mpe elembo mpenza ya botosi na Nzambe mpe profeta na Ye.”12

Basani bakenda sango mpe bayekoli ya doctorat na universite balekisi bangonga mpe mikolo mpe basanza mpe mibu ya bolengeli. Matanga ya Mokolo na mokolo ya bolengeli esengeli na bango mpo na kobima likolo. Na lolenge moko, baye bakolikia kondimama mpo na konetolama na bokonzi ya selesitiale bazali kozela kovanda na masengami ya likolo ya botosi oyo eyei na kosalaka bolamu ya botosi mokolo na mokolo mpe litanga na litanga.

Ntango tobakisi na sikisiki mpe etingia mafuta, litanga na litanga, na minda na biso ya molimo, makambo oyo ya mike mpe pete, tokoki kozwa minda na biso “ etondi mpe epeli” 13 na bolengeli ya bokamwisi. Mobali na ngai, oyo azali mokambi ya likonzi, kala te alobaki ete akoki penepene na ntango nionso koloba ntango moto moko alengelami mpe alongobani mpo na kokota na tempele, mpamba te “bakopelisa lisuku” ntango bazali koluka ndingisa ya tempelo.

Na libondeli ya kobenisa tempelo ya Kirtland, Profeta Joseph Smith asengaki Nkolo “ete bato banso oyo bakoyingela na ekuke ya ndako ya Nkolo bakoka koyoka nguya, … ete bakoka kokola na yo, mpe bakoka kozua litondi ya molimo mosantu, … mpe bamilengela mpo na kozua eloko nionso ya ntina.”14

Ezali libondeli na ngai ete mpo na biso, kokende na tempelo ekozala mingi koleka molulu ya mbala moko. Ekoki biso kolongobana kozua makuli ya lobiko litanga na litanga mpe kobatela mayokami na motema mobimba. Lokola tosali bongo, Nayebi ete tokolongobana mpo na kozua elaka ya litondi ya mapamboli ya Molimo Mosantu mpe nguya ya Nkolo na mabota mpe bomoi na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto amene.

Matangi

  1. Makomi ya mokomi yemei uta na Aydia Kaylie Melo epai ya Linda K. Burton, Sanza ya muambe 31, 2014

  2. Russell M. Nelson, “Prepare for the Blessings of the Temple,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi 2010, 41.

  3. Alma 49:8; biso nde tobeti set; tala lisusu molongo 6–7.

  4. Doctrine et Alliances 52:14.

  5. Matai 25:1–2, 4–11; Joseph Smith Translation, Matai 25:12 (in Matthew 25:12, footnote a).

  6. Marvin J. Ashton, “A Time of Urgency,” Ensign, Sanza ya mitano 1974, 36

  7. Spencer W. Kimball, Faith Precedes the Miracle (1972), 256.

  8. Richard G. Scott, “Receive the Temple Blessings,” Ensign, Sanza ya mitano 1999, 25; Liahona, Sanza ya sambo 1999, 29.

  9. Bible Dictionary, “Temple.”

  10. Doctrine and Covenants 104:2.

  11. Bonnie L. Oscarson, “Greater Expectations,” (seminele mpe kelaki ya bilenge ya boyambi na bopanzi sango na satelite, Sanza ya Muambe 5, 2014); lds.org/bapanzi sango; tala lisusu Luka 12:48; Doctrine et Alliances 82:3.

  12. Russell M. Nelson, “Personal Preparation for Temple Blessings,” Ensign, Sanza ya Mitano 2001, 33; Liahona, Sanza ya sambo 2001, 38.

  13. Doctrine et Alliances 33:17.

  14. Doctrine et Alliances 109:13, 15.