2010–2019
Buku
sánzá ya zómi 2014


Buku

Mambi ya libota mpe mosala ya tempelo ekoki kozala eteni ya mokolo na mokolo na kokumisa na biso.

Lokola Scout ya elenge ya mibu 12, Nazwaki likabo ya biloko ya bascout oyo nazalaki na bonsenga na yango mingi. Ezalaki epasola balatisa poso ya cuir ya kilo! Na botamboli ya butu elandi, tokomaki na kaa nsima ya molili, ya kopola mpe na malili uta na mvula ya mpembe makasi na nzela. Na nionso nakokaki kokanisa ezalaki kopelisa moto ya monene. Nokinoki nakendaki kokata nzete ekweya na epasola na ngai ya sika. Ntango nazalaki kokata, nasilikaki mpo ete ezalaki komonana te lokola kokataka malamu mpenza. Nakosilika na ngai, nasalaki makasi koleka. Kozanga elonga, nazongaki na kaa elongo kaka na mua biteni ya nkoni. Na pole ya moto ya moto mosusu, nayaki komona likambo yango. Nalongolaka poso ya cuir ya epasola te. Nakoki koloba, nzokande, poso yango ekatanaki biteni biteni. Liteya: makanisi na ngai ebimaki libanda mpo na biloko mosusu.

Lokola tozali kosala mpo na konetolama, tosengeli kosala na ntina ya masengeli nionso mpe kobimisa makanisi libanda te na kofandisaka makanisi na moko to mibale ya masengami to biloko mosusu ezangi ntina. Koluka bokonzi ya Nzambe ememaka na bosepeli mpe esengo.1 Soki mposa ezali, tosengeli kolinga kobongwana . Mwa mapaleli ya mbala na mbala ezali mpasi mpe ebebisaka moke koleka mapaleli minene ya.

Kala te, Ndeko mwasi Packer mpe ngai tokendaki na mobembo na bamboka ya bapaya mingi. Tolengelaki bapasseport na biso mpe mikanda mosusu. Tozwaki mangwele, botali ya bokolongono ya nzoto, visas, mpe batembele. Ntango tokomaki, mikanda na biso etalamaki, mpe ntango masengami manso ekokisamaki, tozwaki ndingisa ya kokota.

Kondimama mpo na konetolama ezali lokola kokota na mboka mosusu. Tosengeli moko na moko kozwa passeport na biso ya molimo. Tosengeli te kotiamasengami, kasi, moto na moto, tosengeli kokokisa manso na yango. Mwango ya lobiko ezali na manso ya malongi, mibeko, mitindo, mpe makuli esengelami mpo na banso mpo na kondimama na konetolama.2 Nde, “na nzela ya bomikabi ya [yesu] klisto, bato banso bakoki kobikisama.”3 Eklezia esalisaka kasi ekoki kosala yango te mpo na biso. Kondimama mpo na konetolama ekomi bosenga ya bomoi mobimba.

Klisto abongisaki Eklezia na Ye mpo na kosalisa biso. Abiangi mibali 15 oyo tosungaka lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi mpo na kokamba Eklezia mpe koteya bato. Bakambi ya Yambo 4 mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale 5 bazali na nguya mpe likoki moko, 6 elongo na Apostolo ya nkuluntu aponamaki lokola Mokambi ya Eklezia. Bantuku Nsambo babiangami mpo na kosunga. 7 Bakambi batiaki masengami te mpo na konetolama. Nzambe atiaki! Bakambi oyo babiangami mpo na koteya, kolimbola, kolendisa, mpe kopesa toli mpe kutu kokebisa mpo ete totikala na nzela.8

Lokola elimbolami na buku ya boyangeli: “Na kokokisaka ntina na yango ezali mpo na kosalisa bato mpe mabota kondimama mpo na konetolama, Eklezia ebetaka nsete na mikumba ya epesama na Nzambe. Wana esangisi kosalisaka bandimi kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto, kosangisaka Isalaele na nzela ya mosala ya bomisionele, kolengelaka babola mpe bazangi, mpe kopesaka lobiko na bakufi na kotongaka batempelo mpe kosalaka makuli nabozwili.”9 Bantina minei oyo mpe mibeko, mitindo, mpe makuli nionso mosusu esengami mpe ezali ya kopona te. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe na kosalaka moko na moko ya oyo, tozali kobakosa tembele esengami na passeport na biso ya molimo.

Na likita oyo tozali kaka koteya na ntina ya bambongwana oyo ekoka kosalisa biso banso tolengelama malamu.

Libota ezali na katikati ya mwango ya lobiko mpe ntango mosusu mpo na nini ebengami lisusu “mwango monene ya esengo.”10 Mokambi Boyd K. Packer alobaki, “ Nsuka solo ya misala nionso na Eklezia ezali ete mobali mpe mwasi na ye mpe bana na bango bazala na esengo na ndako.”11

Mokambi Spencer W. Kimball alobaki, “ Elonga na biso, moto na moto mpe lokola Eklezia, tokosalama mingi na boniboni ya botongono tozali kobeta nsete na kosalelaka nsango malamu na ndako.”12 Tempelo mpe mosala ya mambi ya kala ya libota ezali eteni ya kosalela nsango malamu na ndako. Ekoki kozala mosala ya libota mosika mingi koleka mosala moko ya Eklezia.

Ezali na bobeti nsete ezongisami sika na mambi ya kala ya libota mpe mosala ya tempelo uta na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zoni Mibale.13 Eyano na yo mpo na bobeti nsete oyo ekobakisa bosepeli mpe esengo na yo mpe ya libota.

Uta na Doctrine et Alliances totangi: “Mokolo monene ya Nkolo ezali na maboko. … Tika biso, lokola Eklezia mpe, lokola bato mpe, lokola Bansatu ba Mikolo mya Nsuka tobonzela Nkolo libonza ya bosembo mpe tika ete tolakisa na tempelo na Ye esantu, ntango ekosila… buku oyo ezali na makundoli ya bakufi na biso, oyo ezali mpe elongobani na bondimi ya banso. ”14

“Buku” oyo ekolengelama kosaleka makundoli ya bonkombo mpe makuli kati na database Nzete ya Libota ya Eklezia.

Nazali kotala mpe kobakosa makundoli na database mpo ete nalingi kotia nkombo ya banso baye nalingi bazala na buku. Boye te?

Doctrine et Alliances 128 elobi, “Mpamba te kozanga [bankoko na biso] tokoki te kobonga nie; bango mpe bakoki kobonga nie te kozanga biso.”15

Mambi yakala ya libota ezali mingi koleka bonkoko, mibeko, bankombo, mikolo, mpe bisika. Ezali mingi koleka kotala bobele maye maleka. Mambi ya kala ya libota esangisi lisusu ya lelo ntango tozali kosala mambi ya bisomei. Esangisi maye ekoya lokola tokotonga mambi ekoya na nzela ya bana na biso. Mama elenge moko, mpo na ndakisa, kokabolaka mambi ya libota na ye mpe bafoto elongo na bana na ye azali kosala mosala ya mambi ya libota.

Lokola kokabola elambo, kozala na mayangani, kotanga makomi mpe kolobaka nsambo ya moto ye moko, kosalaka mambi ya kala ya libota mpe mosala ya tempelo esengeli kozala eteni ya bokumisi na biso ya moto se moko. Eyano ya bilenge na biso mpe ya basusu na bobengisi ya masakoli ezali kofula mpe elakisaka ete mosala oyo ekoki mpe esengeli kosalema na bandimi banso ya mibunionso.

Lokola Mpaka Quentin L. Cook alimbolaki, “Sikoyo [tozali] na malongi, batempelo, mpe tekinolozi.”16 Kosala mosala sikoyo ezali pete koleka mpe esukisami kaka na motango ya bandimi oyo batiaka yango na esika ya liboso. Mosala ekokoba kozua ntango na mpe libonza, kasi, banso bakoki kosala yango, mpe elongo na bopete na yango kokokisana na kaka mwa mibu mileki.

Mpo na kosunga bandimi, Eklezia ezali kasangisa makundoli mpe kopesa bisalelo mpo ete mosala mingi ekoka kosalema na bandako na bisomei to na baetonga ya bapaloasi mpe tempelo. Mabaku mingi elongolami. Atako etaleli na yo ya kalaezali nini, ekeseni sikoyo!

Nzokande, ezali na libaku moko oyo Eklezia ekoki kolongola te. Ezali botatabeni ya moto se moko mpo na kosala mosala. Nionso yango esengi ezali mokano mpe mwa bokasi. Esengi ntango molai ya kokangama te. Kaka mwa ntango na ntina ya sikisiki nde ekobenga esengo ya mosala. Zwa mokano ya kobanda, ya koyekola, mpe ya kotuna basusu mpo na kosalisa yo. Bakoki! Bankombo omoni mpe omemi na tempelo ekokoma makundoli mpo na “buku.”17

Atako kobakisama ya kokamua na kosala ya mondimi, tokuti ete na yango mua bandimi ya Eklezia bazali mingi bamipesi na kozuaka mpe kosalaka makuli ya tempelo na mabota na bango.18Mabiangi oyo mpo na mbongwana na bapriorite na biso. Kobundisa mbongzwana ’te, yamba yango! Mbongwana ezali eteni mwango monene ya esengo.

Mosala oyo esengeli kosalema, mpo na litomba ya Eklezia te kasi mpo na bakufi na biso mpe mpo na bisomei. Biso mpe bankoko na biso bakufa tosengeli na tembele na bapasseport na biso ya molimo.

“Bokangisi elongo”19 ya mabota na biso na bankola ekoki kosalema bobele na tempelo na makuli ya kokangisa. Kobanda ezali pete: kaka mona kombo mpe mema yango na tempelo.Nsima ya ntango okozala na makoki ya kosunga basusu basala yango lisusu.

Longola se mwa babokeseni, —moto nionso —akoki kosala oyo!

Ezali na mapamboli ya solo oyo ezali na mosala oyo. Baboti mpe bakambi mingi bazali kotala oyo etali bizalela ya mokili ya sikoyo mpe nsuka na yango na mabota mpe bilenge.

Mpaka David  A. Bednar alaki: “Nabengi bilenge ya Eklezia bayekola na ntina mpe bazwa Molimo ya Eliya . … Nalaki [ete] bokobatelama uta na bobendami makasi ya monguna. Lokola bozali kosala na kati mpe kolinga mosala mosantu oyo, bokobatelema na bolenge na bino mpe bisika binso bokozala.”20

Bandeko mibali mpe basi, ezali ntango ya kolongola poso ya baepasola na biso mpe kokende kosala. Tosengeli kobonzela te bonetolami na biso to oyo ya mabota na biso mpo na matomba ya ntina moke.

Oyo ezali mosala ya Nzambe, esengeli kosalama na bandimi mpe bandimi te lokola, bilenge mpe bakuluntu, mibali mpe basi.

Nasukisi kotangaka molongo ya Nzembo 324, kobongolaka liloba moko:

“Botelema, O [Basantu] ya Nzambe.

Bosili kosala makambo ya mike koleka.

Bopesa motema mpe molimo mpe mayele mpe makasi

Mpo na kosalela Mokonzi ya Bakonzi”. 21

Yesu Klisto azali Mokonzi! Natatoli na ntina na Ye na kombo yaYesu Klisto, amene.