2010–2019
Mobeko ya Kokila: Mokumba ya Moto na Moto mpo na Kosalisa Babola mpe Bazangi
sánzá ya zómi 2014


Mobeko ya Kokila: Mokumba ya Moto na Moto mpo na Kosalisa Babola mpe Bazangi

Lokola balandi ya Mobikisi, tozali na mokumba ya moto na moto mpo na kosalisa babola mpe bazangi

Bandeko na ngai Mibali, nalingi bonganganzambe, mpe nalingi kozala elongo na bino. Nazali na botondi ya mozindo mpenza ete tokoki kosala elongo na likambo ya monene oyo.

Tozali na bantango ya kitoko. Bokei liboso ya kokamua na kimonganga, mayele, mpe teknik ebongisi lolenge ya bomoi ya bato mingi. Kasi ezali lisusu na bilembo ya mpasi mpe likama mingi na bato. Likolo ya bitumba mpe nungunungu ya bitumba, bobomibomi ebakisami na mokili—lokola mpela, moto, mpe bokono—ezali kobebisa bomoi ya bamilio na mokili mobimba.

Bayangeli ya Eklezia bazali na boyebi mpe na bokebi etali bolamu ya bana ya Nzambe bipai nionso. Ntango nini mpe wapi ekoki kosalema, makoki mpo na makama ya Eklezia ekopesamaka na lisalisi ya banzela ya kosalisa bato mpo na koyanola baye bazali na bamposa. Na ndakisa, sanza ya zomi na moko eleki, Ekumbaki Haiyan ebetaki ekolo ya esanga ya Philippines.

Ya ndelo 5 na makasi ya Ekumbaki, Haiyan etikaki na nsima na yango bobebi mpe mpasi mingi. Bingumba mibimba ebebisamaki, bomoi mingi ebungaki; bamilio ya bandako ebukanaki mpe ebebisamaki mpenza; misala ya ntina lokola mai, terase, mpe lotiliki etikaki kosala.

Makoki ya Eklezia ezalaki wana na bangonga ya liboso kolanda bobomibomi oyo. Bandimi ya Eklezia oyo bafandaka na Philippine basanganaki mpo na kobikisa bandeko na bango ya mibali mpe ya basi na kopesaka bilei, mai, bilamba, mpe biloko ya bopeto na bandimi mpe na bandimi te lokola.

Bandakonzambe ekomaki bisika ya kobombana ya bankoto ya baye bazangaki ndako. Na nse ya boyangeli ya Mokambi ya Likonzi mpe bayangeli ya bonganganzambe ya esika, mingi na bango babungisaka nionso bazalaka na yango, bososoli esalemaki mpo na koyeba lolenge mpe kimia ya bandimi. Miango ya kofulama ebandaki kosalema mpo na kosalisa kozongisa bandimi na ndenge ya bomoi ya malamu mpe bomikoki.

Mwa makoki epesamaki mpo na kosalisa bandimi ya Eklezia kotonga lisusu bikimeli bisalema na mabaya mpe bandako na bango. Eye ezalaki bobele mokanda ya mpamba te. Bandimi bayekolaki mpe basalaki mosala esengelaki mpo na bangomei mpe nsima mpo na basusu.

Lipamboli moko oyo elandaki ezalaki ete lokola bandimi bakolisaki makoki na bango ya kosala mabaya, nzela ya mai, mpe botongi mosusu, bakokaki kozala na mabaku ya ntina ya kosala ntango bingumba mpe mangomba ya mpembeni ebandaki kotongama lisusu.

Kosungaka babola mpe bazangi ezali lilongi ya yambo ya nsango malamu mpe eloko ya moyuya na muango ya libiki yaseko

Yambo ya mosala na Ye na bokufi, Yewova asakolaki na nzela ya profeta na Ye: “Mpo ete babola bakosila na mokili libela te. Yango wana natindi yo ete, Okofungola loboko na yo monene epai ya ndeko na yo, epai ya babola na yo, mpe na bazangi, na mokili.”1

Na mikolo na biso, kosalisa babola mpe bazangi ezali moko ya mikumba minei mitindama na Nzambe oyo ekosalisa bato mpe mabota komikokisa mpo na bonetoli.2

Kosalisa babola mpe bazangi etali elongo lobiko ya ntango mpe ya molimo. Esangisi mosala ya bandimi moko na moko ya Eklezia ntango basalisi bangomei babola mpe bazangi, lokola mosala ya bolamu yangomei ya Eklezia, oyo ekosalisaka na nzela ya likoki ya bonganganzambe.

Na katikati ya mwango ya Nkolo mpo na kosalisa babola mpe bazangi ezali mobeko ya kokila. “Nkolo atii mobeko ya kokila mpe makabo ya kokila mpo na kopambola bato na Ye mpe kopesa nzela mpo na bango kosalisa baye bazali na mposa.”3

Lokola balandi ya Mobikisi, tozali na mokumba ya moto na moto mpo na kosalisa babola mpe bazangi. Bandimi ya botongo ya Eklezia bisika nionso bakosungaka na bakosalisaka babola mpe bazangi na kokilaka sanza nionso—kokilaka bilei mpe mai mpo na ngonga 24—mpe nsima kopesaka na Eklezia likabo ya kokila ya mosolo ekokani na ata motuya ya bilei balingaki kolia.

Maloba ya Yisaya esengeli komaniolama na losambo mpe koteyama na ndako nionso:

“Oyo ezali kokila esila ngai kopona te? Kokangola miniololo na masumu, kofungola nkamba na ekangeli ; kotika moniokolami ete alongwa wana esili ye kokangwama?

“Ezali te ete okabola kwanga na yo epai na ye oyo azali na nzala? Mpe ete oyeisa babola babwakami libanda epai na ndako na yo? Ete wana okomona moto na bolumbu, olatisa ye, mpe ete omibomba te liboso na bato na libota na yo mpenza?”4

Yisaya nsima akobaki kopesa molongo ya mapamboli ya kokamwa elakelamaki na Nkolo na baye bakobatela mobeko ya kokila. Ye alobi:

“Bongo, mpole na yo ekobima lokola kobika na moi, mpe kobika na yo ekopumbwa mbango; boyengebene na yo ekotambola liboso na yo, nkembo na Yehova ekobatela yo na nsima.

“Bongo, okobianga mpe Yehova akozongiza liloba; okonganga mpe ye akoloba ete nazali awa. …

“Soko okolongola ekangeli na kati na yo, kotalisa na mosapi mpe maloba mabe; soko okosopa molimo na yo mpe na bato na nzala mpe okotondisa mposa na molimo moniokolami; bongo pole na yo ekobima kati na molili mpe molili na yo ekobongwana lokola ntango na midi:

“Mpe Nkolo akokamba yo ntango yonso, akotondisa mposa na yo bisika bikawuka.”5

Etali makomi, Mokambi Harold  B. Lee alobaka boye: “Mapamboli ya ebakata oyo ekowuta [na kokila] elimbolami na eleko nionso, mpe awa Nkolo azali koloba na biso na nzela ya profeta oyo monene ntina nini ezali na kokila, mpe mapamboli maye mawuti na kokila. Soki bososoli mokapo 58 ya buku ya Yisaya bokokuta ebimisami ntina nini Nkolo alingi biso tofuta makabo ya kokila, ntina nini Ye alingi biso tokila. Ezali mpamba te na komibongisaka boye tokoki kobenga mpe Nkolo akoki koyanola. Tokoki koganga mpe Nkolo akoyanola. ‘Nazali awa.’”

Mokambi Lee abakisaki: “Elingi biso kozala na lolenge oyo tokoki kobenga mpe Ye akoyanola te? Tokonganga na likama mpe Ye akozala elongo na biso te? Nakanisi ngonga ekoki tozali kokanisa makambo ya ntina oyo mpamba te yango ezali mikolo oyo ezali koya, tokozala na mposa mingi lisusu ya mapamboli ya Nkolo, ntango bosambisi ekosopana ya kosangana te likolo ya mabele mobimba.”6

Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Thomas  S. Monson, akabolaki litatoli na ye ya mabongisi oyo—litatoli epesamaki ya makambo na yemei. Alobaki: “Mondimi moko te ya Eklezia oyo asalisi na kokabela baye bazali na mposa akobosana to akoyoka mawa ata moke te ya makambo wana. Kolinga mosala, lokengo, bomikoki, mpe kokabola elongo na basusu ezali ya sika te mpo na biso.”7

Bandeko mibali, bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka bazali basali mayokani, babateli mibeko. Nakoki te kokanisa na mobeko moko te, motindo moko te, oyo, soki ebatelami na botongono, ezali pete mpo na kobatela mpe oyo ekopesa mapamboli manene mingi koleka mobeko ya kokila. Ntango tokili mpe topesi likabo ya bosembo ya kokila, tokopesa elongo na ebombelo ya Nkolo oyo elingaki kobimisama mpo na kosomba bilei. Ekosenga te libonza ya mosolo eleki ya nini elingaki kobikisama ndenge esengeli. Na ntango moko, tolakelami mapamboli maluti lokola elobamaki liboso.

Mobeko ya kokila etali bandimi banso ya Eklezia. Kutu bana ya bilenge bakoki koteyama kokila, kobandaka na bilei moko mpe nsima mibale, ntango bakoki kososola mpe kobatela na nzoto mobeko ya kokila. Mibali mpe basi, bandimi banzemba, bilenge, mpe bana basengeli kobanda kokila elongo na losambo, kopesaka botondi mpo na mapamboli na bomoi na bango ntango bazali koluka mapamboli mpe bokasi ya Nkolo na nzela ya eleko ya kokila. Bokokisi mobimba ya mobeko ya kokila ekoya ntango likabo ya kokila esalema na ntoma ya Nkolo, episikopo.

Baepisikopo, bokokambaka bolamu ya palwasi. Bozali na etinda ya koluka mpe kosalisa babola. Na lisalisi ya mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe bakambi ya lisanga likoki ya Bonganganzammbe ya Melekisedeki, lotomo na bino ezali kosalisa bandimi mpo na komisalisa mpe kokoma bamikoki. Bokosalisa bamposa ya ntango mpe ya molimo ya bandimi na kosalelaka na lokengo makabo ya kokila lokola lisungi ya mwa ntango mpe mpo na kobakisa na makoki ya libota mpe lingomba ya monene. Ntango na lokengo bosaleli bafungola ya bonganganzambe mpe bososoli na kosalisaka babola mpe bazangi, bokoya koyeba ete kosalela malamu makabo ya kokila ezali lisungi ya bomoi, lolenge ya bomoi te.

Bakambi ya lisanga likoki Bonganganzambe ya Alona, bosimbi bafungola mpe bozali na nguya mpo na kotambolisa makuli ya libanda. Bokosala elongo na episikopo mpe koteya bayi lisanga likoki lotomo na bango na bonganganzambe mpe na kolukaka libanda bandimi ya Eklezia mpo ma kopesa bango libaku oyo ya kosala elongo na bokili. Ntango bino bamemi bonganganzambe ya Alona bokumisi mikumba bonganganzambe na bino mpe bapesi libaku oyo na bandimi nionso ya Eklezia, mbala mingi bokosalisa mapamboli malakelami ya kokila na baye bakoki kozala na mposa na yango mingi koleka. Bokotatola ete molimo ya kosalisa babola mpe bazangi ezali na nguya ya kolembisa mitema soki bongo te ya makasi mpe kopambola bomoi ya baye bakoki mbala mingi te kokende na Eklezia.

Mokambi Monson alobaki, “Baepisikopo oyo babongisi masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona mpo na kosala elongo na kokongolaka makabo ya kokila bakozwa elonga ya kobakisa na mokumba oyo.”8

Baepisikopo, bomikundola ete makambo ekeseni mingi etuka na etuka mpe ekolo na ekolo. Na kokendaka ekuke na ekuke, bayi lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona bakoki komesana mosala na esika bozali. Nzokande, tobengi bino bomaniola na losambo toli ya profeta mpe boluka na bofuli na ndenge elongobani na yango basimbi bonganganzambe ya Alona bakoki kokumisa banganganzambe na bango na kosalaka elongo na kokongala makabo ya kokila.

NaMokapo 27 ya 3  Nefi, Nkolo mosekwi atunaki, “Na lolenge kani ya bato bosengeli kozala?” Ye ayanoli, “kutu lokola ngai nazali.”9 Ntango tozwi likolo na bisomei nkombo ya Klisto mpe tobundi na kolanda Ye, tokozwa elili na Ye na elongi na biso mpe tokokoma mingi lokola Ye. Kosalisa babola mpe bazangi ezali na kati ya mosala ya Mobikisi. Ezali na likambo nionso Ye asalaki. Ye ayambaki banso mpe atombolaki banso. Ekangele na Ye ezali pete, mpe mokumba na Ye ezangi kilo. Nabengisi moko na moko na biso akoma mingi lokola Mobikisi na kosalisaka babola mpe bazangi, na kobatelaka na botongono mobeko ya kokila, mpe na kopesaka elongo likabo ya kokila ya loboko pete. Na bosawa natatoli ete kosalisa na botongono babola mpe bazangi ezali kolakisa bokoli ya molimo mpe ekopambola elongo mopesi mpe mozwi. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Dutelonome 15:11.

  2. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 2.2.

  3. Handbook 2, 6.1.2.

  4. Yisaya 58:6–7.

  5. Yisaya 58:8–11.

  6. Harold B. Lee, “Listen and Obey” (Welfare Agricultural Meeting, Apr. 3, 1971, copy of typescript, 14); Church History Library.

  7. Thomas S. Monson, “Are We Prepared?” Ensign toLiahona, Sept. 2014, 4.

  8. Thomas S. Monson, meeting with the Presiding Bishopric, Feb. 28, 2014.

  9. 3 Nefi 27:27.