2010–2019
Bobota, Bobakisama, mpe Bokonza Mokili
sánzá ya mínei 2015


Bobota, Bobakisama, mpe Bokonza Mokili

Tata na Lola apesaki biso mokumba mpe apambolaki biso mpo na kozala baboti, mpo na kobakisama, mpe kokonza mabele oyo tokoki kokoma lokola Ye.

Matondi na bayembi ya Tabelenakele mpo na bopesi lokumu kitoko na Mobikisi ya mokili.

Mokolo oyo Nzambe Tata abengaki Mwana Mobali se moko ya Ye akela moto na elilingi Nabango mpe lolenge moko, Apambolaki bana na Ye, kolobaka, “Bobota, mpe bobakisama, mpe botondisa mokili, mpe bokonza yango, mpe bokamba …likolo ya biloko nionso ya bomoi oyo ezali ko ningana likolo ya mabele.” 1 Na yango, mobembo na biso ya nkufa ebandaki mibale elongo na mokumba ya bonzambe mpe lipamboli. Tata moko ya bolingo apesaki biso mokumba mpe lipamboli ya kobota mpe kobakisama mpe nguya ya kokonza bongo oyo tokoki kobakisa mpo na kokoma kutu lolenge Ye azali.

Bandeko mibali mpe basi, na mpokwa ya lelo nasengi bondimi na bino mpe nsambo ntango nazali kokabola mwa makanisi elongo na bino na ntina ya mabongi misato ntina koleka ya lolenge ya bonzambe na biso. Losambo nangai ezali ete tosengeli banso koyeba na mobimba mpe kokokisa mokumba na biso ya bule—mokumba ya Tata na biso—ya kokolisa lolenge na biso ya bonzambe oyo tokoki kotambusa mobembo na malamu mingi koleka mpe kozwa bonzambe na biso ya lobi ekoya.

Yambo, Nzambe Apesi Biso Mokumba ya Kobota

Eteni moko ya ntina ya kozala kobota oyo ezali ntango mosusu na ntina te ezali ete ya komema liboso bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele. Mokonzi ateyaki:

“Nazali nzete ya vino, bozali bitape: Ye oyo akoyika mpiko na ngai, mpe nakozala na ye, lolenge moko akobota bambuma ebele: mpo soki ngai bokoki kosala eloko moko te. …

“Soki bokangameli ngai, mpe maloba na ngai ekozala elongo na bino, bokosenga oyo bokozala nango mposa, mpe ekopesamela bino.

“Oyo ezali Tata nangai ya nkembo, oyo bozali kopesa bambuma ebele; bokozala bayekoli na ngai.”2

Tokomi baboti ntango tokangameli Klisto. Mpe lokola tozwi “likolo [na biso] Nkombo na Ye [mpe] … tosalela ye kino na nsuka”3 na kosungaka basusu baya epai na Ye.

Na mikolo na biso, baprofeta ya bomoi mpe bapostolo bazali kokoba kotombola mingongo na bango mpo na kobenga moko na moko na biso mpo na komipesa mobimba na mosala ya lobiko engebene bokasi na biso mpe mabaku.

Elembo ya ebandeli ya eyano oyo ezali kopesa mbuma ebele ezali ya “kozala sembo mpe kimia kati ya motema.” 4 Tokoki sima koya mobimba epai ya Klisto lokola topesi bomeki ya Molimo Mosantu mpe kobatela mayokani nionso oyo tosala. 5 Tokoki koluka mpe kozwa likabo ya bolingani mpe kozwa nguya ya kobengisa mabota na bisomei, bankoko na biso, mpe ndeko mpe ndeko mozalani na biso mpe baninga mpo na koyoka nsango malamu ya Yesu Klisto.

Kosalaka na molimo ya bolingani ezali mokumba te kasi esengo. Mikakatano ekomaka mabaku ya kotonga bondimi. Tokomaka “banzeneneke ya [bolamu ya] Nzambe na ntango nionso mpe na biloko nionso, mpe na bisika nionso, oyo [to] koki kozala, kutu kino na liwa.”6

Banso kati na biso tokoki mpe kokoma ya komipesa mobimba na mosala ya lobiko. Mobikisi apesaki biso mokumba oyo elandi na elaka: “Naponi bino, mpe nakulisi bino, ete bosengeli kokende mpe komema liboso mbuma, mpe ete mbuma nabino esengeli kotikala: mpo ete nionso bokosenga epai ya Tata na nkombo na ngai, akoka kopesa bino.”7

Ya Mibale, Nzambe Apesi Biso Mokumba ya Kobakisama

Nzoto na biso ya bomoto epambolami uta na Nzambe. Tozwaki yango mpo na bantina ya kokokisa mosala ya Tata na Lola “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.” 8 Nzoto ezali nzela ya oyo tokoki kozwa makoki na biso ya kokoma lokola Nzambe.

Nzoto epesi ndingisa ya botosi na bana ya molimo ya Tata na Lola mpo na kosalela bomoi awa na mabele. 9 Kobota bana epesaka bana mosusu ya molimo ya Nzambe libaku ya kosepela mpe likolo ya mabale. Baoyo nionso babotami na nzoto ya bokufi bazali na libaku ya kokoba mpe konetolama soki bazali kotosa mitindo ya Nzambe.

Libala kati ya mobali mpe mwasi ezali libongisi ete Nzambe atindaki mpo na bokokisi ya mokumba ya kobakisama ya bato. Libala kati ya mibali na mibali to basi na basi ekoki kobakisa bato te.

Libala engebene na mobeto mpe ya leta oyo ekangisami na tempelo mpe oyo ekangisami na mayokani ekumisami mpe epesi baboti mpe bana na bango libaku mpo na boyebi kitoko makasi ya bolingo mpe bomilengeli mpo na bomoi ya kobota. Epesi bango ndingisa ya bisika malamu koleka oyo bakoki kozala na bomoi elongo na mayokani nabango basalaki na Nzambe.

Mpo na ntina ya bolingo na Ye mpo na biso, Tata na Lola alengelaki ete bana na Ye nionso ya bondimi baoyo bazali na makoki te ya kosepela na mapamboli ya liyokani ya libala mpe ya bana to bofuluki ya mapamboli oyo mpo na lolenge bazali, na ntango elengelami ya Nkolo, bakosepela na mapamboli oyo. 10

Baprofeta ya bomoi mpe bapostolo bateyi biso baoyo nionso bazala na libaku ya kokota kati ya liyokani ya libala ya seko mpo na kokoba kati ya bwanya mpe bondimi. Tosengeli te kowumelisa ntango ya mokolo wana ya bule na ntina ya makambo ya mokili to kozelaka molongani malamu nzokande olekisi balongani malamu ebele.

Elaka mpo na baoyo bakangami na libala ya seko ya liyokani mpe baoyo bazali baboti na nzela ya kobatelaka mayokani na bango ezali ete monguna akoki te kozala na nguya ya kobuka moboko ya bozalani na bango ya seko.

Ya Misato, Nzambe Apesaki Biso Mokumba ya Kokonza Mabele

Mpo na kokamba mabele mpe kokonza likolo ya eloko nionso ya bomoi ezali kolandela boko biloko nionso oyo ekokisi bolingi ya Nzambe 11 ntango bakosunga bamposa ya bana na Ye. Kokonzaka ezali mpe lisusu kozwaka bolakisi likolo ya banzoto na bisomei.12 Etangi tekozalaka bato bazali na mpasi kozangaka lisalisi ya biloko oyo to kosalelaka yango na lolenge moko na bolingi ya Nzambe te. 13

Kobakisaka makoki ya kokonza biloko ya mabele ebandaka elongo na bosembo ya kobanzaka botawu ya bomoto na biso mpe nguya malamu mpo na biso na nzela ya Klisto mpe Bomikabi na Ye. Mpo na “Klisto alobaki: Soki bokozala na bondimi epai nangai bokozwa nguya ya kosala makambo oyo ezali ntina epai na ngai.” 14 Nguya oyo ekomi malamu mpo na biso ntango toponi kosala na botosi ya mitindo na Ye. Tokolisi makoki na bison a kolukaka makabo ya molimo mpe ya kokolisa boyebi na biso.

Nabotamaki mpe nakolaki na mabaku ya sembo lolenge moko na mabota ebele na Afrika. Nazwaki makoki ya kotombwama ngaimei na mabaku oyo nakolukaka mpe kozwa, elongo na lisungi ya baboti na ngai, bokolisi malamu. Kokolisa ya limoni nini Nakomaki ezalaki na ntina mpo na bokoli na ngai. Nsuka, lokola bilenge babali, ngai na molongani na ngai, Gladys, mpe Ngai tokutanaki na nsango malamu ezongisama, oyo ezali kokoba kopambola bomoi na biso elongo na botambwisi ya molimo. Lokola libota nionso, tosali na bosambisi na biso mpe mimekano. Kasi ntango toluki lisungi ya Nkolo, tokozwa biyano oyo ekopesa ekopesa kimia mpe libondisi, mpe tokoki te koyoka koniatama na makambo wana.

Mikakatano ezali kotungisa lingomba ya bato lelo, mpe na bonsoni, pornographie ebundisi, bobebi ya mokili, bobebisi ya bikelamu, mpe bobola, nionso wana mpo ete bato ebele kati ya mokili babaluki bangomei na mongongo “ya bolingi ya satana mpe na makambo ya nzoto”15 koleka ete bapesa bolingi na bango epai ya Nzambe. “Bazali koluka Nkolo te mpo na kotia bosembo na ye, kasi moto nionso azali kotambola lolenge alingi, mpe sima ya elili ya nzambe na yemei, elili oyo ezali na bokokani ya mokili.”16

Bongo, Nzambe abengisi bana na Ye banso mpo na kozwa lisungi na Ye mpo ya kolonga mpe koyika mpiko na mikakatano ya mokili oyo elongo na maloba oyo:

“Nazali Nzambe; Nakelaki mokili, mpe bato yambo bazala na mosuni.

“… Soki bolingi koya epai nangai, boyoka mongongo na ngai, mpe bondela, mpo boyambola masumu na bino nionso, mpe bobatisama, na mayi, na nkombo ya Mwana Na ngai ya Bolingo … , bokozwa likabo ya Molimo Mosantu, bosengaka nionso na nkombo na ye, mpe nionso oyo bokosenga, ekopesamela bino.”17

Basantu ya mikolo ya nsuka ya bondimi baoyo basosoli bokasi na bango ya bonzambe mpe koyekama mpenza likolo ya nguya elongobani na nzela Bomikabi ya Yesu Klisto bazali na bompikiliki na lolenge na bango ya botawu mpe “bakoki kosala makambo nionso.”18 bapesami ndingisa ya kolonga mimekano ya mabe oyo ezali kotinda bato ebele kosala bowumbu ya monguna. Polo ateyaki ete:

“Nzambe azali na bondimi, [mpe] akomonisa bino mpasi te ya komekama koleka makoki na bino; kasi na ntango ya komekama, akobongisa mpe nzela kobima na yango, mpo ete bokoka kolonga yango.”19

“Mpamba te Ye moko mpe akutanaki na komekama, azali na makoki ya kosalisa bango baoyo bamekami.”20

Tata na Lola apesaki biso mokumba mpe apambolaki biso mpo na kozala baboti, mpo na kobakisama, mpe kokonza mokili oyo tokoki kokoma lokola Ye. Asalaki lisungi ezala mpo na bolamu na biso nionso, engebene na boponi na bisomei, sikawa kanisa kokoma lokola Ye. Nakolikia ete tokoka biso banso kosala na bomoi na biso lokola oyo tokoki kotambwisama na limoni ye ya bonzambe na biso, senga litomba nionso ya bonzambe, mpe kokisa lobi nabiso ekoya ya bonzambe.

Natatoli bosolo ya bomoi ya Nzambe Tata mpe ya Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Mobikisi na biso Yesu Klisto; ya mwango na Ye ya nguya esengo; mpe ya bafungola Abongisaki mpo ya kopesa profeta ya bomoi likolo ya mabele lelo, oyo ezali Thomas S. Monson, oyo tolingi mpe tosungi. Nasambeli na nkombo ya ete tokoka kozwa makoki ya kosepela bofuluki ya mapamboli na Ye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.