2010–2019
Soki Okozala Moyanoli
sánzá ya mínei 2015


Soki Okozala Moyanoli

Tika tokende mbangu liboso na koyekolaka mokumba na biso, kozwaka mikano malamu, kosalaka engebene na mikano wana, mpe kondimaka bolingi ya Tata.

Nazalaki bobele na mibu 12 ntango bamisionele bayaki mpo na mbala ya yambo koteya na engumba wapi nabotamaki na nodi ya Chilie. Eyenga moko, ezalaka ngai konkede na etape moko ya moke basanza motoba, misionele moko apesaki ngai lipa ezalaki ye kolekisa elambo. Natalaki ye mpe na mongono moke nalobaki, “Nakoki te.”

“Mpo na nini?” azongisaki.

Nalobaki na ye, “Mpo nazali mondimi ya Eklezia te.”1

Misionele yango akokaki kondima yango te. Miso na ye ezalaki kongenga. Nabanzi akaniski, “Kasi elenge mobali oyo azali kati na mayangani nionso! Boniboni ekoki ye kozala mondimi ya Eklezia te?”

Mokolo elandaki, bamisionele bayaki na ndako na ngai, mpe basalaki makambo nionso ekokaki bango mpo na koteya libota na ngai mobimba. Kasi lokola libota na ngai basepelaki te, ezalaki bobele kokende na ngai na Eklezia poso na poso koleka basanza motoba nde esalaki ete bamisionele bazala na kondima ekoka mpo na kokoba. Na nsuka, ngonga monene nazalaka kozela ekomaki ntango babengisaki ngai mpo na kokoma mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto. Bamisionele balimbolelaki ngai ete lokola nazalaki mwana, nakozala na mposa ya ndingisa ya baboti na ngai. Nakendeki elongo na bamisionele epai ya tata na ngai, kokanisaka ete eyano na ye ya bolingo ekozala “Mwana, ntango okokokisa mobu esengeli, okozala na makoki ya kozwa mikano ya yomei.”

Ntango bamisionele bazalaki koloba na ye, nazalaki kosambela makasi mpo ete motema na ye esimbama mpo ete apesa ngai ndingisa nazalaki kolinga. Eyano na ye epai ya bamisionele ezalaki: “Bampaka, na basanza motoba eleki, namoni mwana na ngai ya mobali Jorge kolamukaka tongotongo eyenga nionso na tongo, kolata bilamba na ye ya kitoko mpenza, mpe kotambola tii na eklezia. Namoni bobele nguya malamu ya Eklezia na bomoi na ye.” Nsima, kolobaka na ngai, akamwisaki ngai na kolobaka, “Mwana, soki okozala moyanoli mpo na mokano oyo, nde ozali na ndingisa ya kobatisama.” Nayambaki tata na ngai, napesaki ye lipwepwe, mpe natondaki ye mpo na maye azalaki kosala. Mokolo oyo elandaki nabatisamaki. Poso eleki ezalaki bokundoli ya mbala 47 ya ngonga monene wana na bomoi na ngai.

Mokumba nini tozali na yango lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto? Mokambi Joseph Fielding Smith alobaki yango boye: “Tozali na mikumba minene mibale oyo. … Yambo, koluka lobiko na bisomei; mpe, ya mibale mokumba na biso na bato mosusu.” 2

Oyo, nde, ezali mikumba minene oyo Tata apesi biso: kolukaka lobiko na bisomei mpe oyo ya basusu, na bososoli ete na esakola oyo, lobiko elingi koloba kokomaka na ndelo ya likolo mpenza ya nkembo oyoTata na biso apesi mpo na bana Ye ya botosi.3 Mikumba miye oyo epesami ma biso—mpe miye tondimi na boNsomi—misengeli kolimbola bapriorite na bIso, bamposa na biso, mikano na biso, mpe etamboli na biso ya mokolo na mokolo.

Mpo na moto moko oyo akomi kososola ete, na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, bonetwami ezali solo pene ya kosalama, kozanga kozwa yango ezali libebi. Yango wana, ngambo mosusu ya bonetwami ezali libebi, kaka lokola ngambo mosusu ya elonga ezali bokweyi. Mokambi Thomas S. Monson ateyi biso ete “bato bakoki mpenza te kosepela ntango molayi kosalaka mabe ntango bamoni ete malamu ekoki kosalama.”4 Boniboni, sikawa, ekokaki biso kosepela na eloko oyo ezangi bonetwami soki toyebi ete bonetwami ekoki kosalama?

Botika nakabola na bino mabongisi minei ya ntina oyo ekosalisa biso tokokisa bamposa na biso ya kozala moyanoli epai ya Tata na biso ya Lola, lokola mpe kopesa eyano na bamposa na Ye ete tokokoma lolenge Ye azali.

1. Koyekola Mokumba na Biso

Soki tosengeli kosala bilingi ya Nzambe, soki tosengeli kozala moyanoli epai na Ye, tosengeli kobanda na koyekolaka, kososolaka, kondima, mpe kozala na bomoi engebene na bolingi na Ye mpo na biso. Nkolo alobaki, “Yango wana, sikawa tika moto nionso ayekola mokumba na ye, mpe asala mosala na ye oyo apesami, na etingia nionso.”5 Kozala na mposa ya kosala maye mazali sembo ekoki te soki toluki koyeba kososola te maye Tata azelaka na biso mpe alingaka biso tosala.

Na lisolo ya Alice au pays des merveilles, Alice ayebi te nzela nini kokende, yango wana atuni niau Cheshire, “Okoki koyebisa ngai, soki olingi, nzela nini nasengeli kokende uta awa?”

Niau ayanolaki ete, “Wana etali mpenza esika yo olingi kokende.”

Alice alobi, “Ezali na ntina mingi te wapi nakokende.”

“Boye ekosala eloko te nzela nini kokende,” elobi niau.6

Nzokande, toyebi ete nzela oyo ekambaka na “nzete, ya yango mbuma [ezali] ya kosengelema mpo na kopesa moto esengo”7—“nzela, oyo ememi na bomoi”—ezali nkaka. Ekosenga makasi mpo na kotambola na nzela yango, mpe “baoyo bakomona yango bazali mingi te.”8

Nefi ateyi biso ete “maloba ya Klisto makolobela bino makambo manso kani bokosala.”9 Nsima abakisi ete “Molimo Mosantu … akolakisa epai na bino makambo manso bokosala.”10 Boye, maziba oyo epesi biso nzela ya koyekola mikumba na biso ezali maloba ya Klisto oyo tozwaka na nzela ya baprofeta ya kala mpe ya sika mpe bobimiai oyo tozwaka na nzela ya Molimo Mosantu.

2. Kozwa Mokano

Ata soki toyekolaki oyo etali Bozongisi ya nsango malamu, motindo moko songolo, mikumba misangani na kosala na libiangi moko, to mayokani tosalaka na tempelo, boponi etali ya biso soki to te tokosala engebene na boyebi wana ya sika. Moto na moto aponaka na bonsomi mpo na yemei mpo na kokota na mayokani ya bule lokola libatisi to makuli ya tempelo. Mpo kolapa bandai ezalaki eteni moko ya momesano ya bomoi ya boyambi ya bato na ntango ya kala, mobeko ya kala elobaki ete “bosimba ndai na lokuta nkombo na ngai te.”11 Nzokande, na midi ya ntango, Mobikisi ateyaki nzela moko ya likolo koleka mpo na kobatela mikano na biso ntango Alobaki ete iyo ezala iyo mpe te ezala te.12 Liloba ya moto esengeli kozala ya kokoka mpo na kofandisa bosolo mpe mokano na ye epai ya moto mosusu— mpe kutu mingi koleka oyo ntango moto mosusu yango azali Tata na biso ya Lola. Kopesa lokumu na mokano ekomaka botalisi ya ya botongoni mpe bosembo ya liloba na biso.

3. Kosala Engebene na Yango

Nsima ya koyela mokumba na biso mpe kozwa mikano miye misangisami na boyekoli mpe bososoli wana, tosengeli kosala engebene na yango.

Ndakisa ya nguya ya mokano ya sikisiki mpo na kokokana na bomipesi na Ye na Tata na Ye ewuti na likambo ya Mobikisi ntango bamemaki epai na Ye moto akufa makolo mpo abikisa ye. “Emoni Yesu kondima na bango, alobi na mokatatali ete, Mwana, masumu na yo esili.”13 Toyebi ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezali ntina mpo na kokoka kozwa bolimbisi ya masumu na biso, kasi na ntango ya kobikisa moto ya kokufa makolo, likambo monene wana esalamaka naino te; mpasi ya Mobikisi na Getesemane mpe na ekulusu esalemaka naino te. Nzokande, Yesu apambolaki bobele moto ya kokufa makolo te kopesaka ye makoki ya kotelema mpe kotambola, kasi Ye lisusu apesaki ye bolimbisi ya masumu na ye, na yango kopesaka elembo ya ntembe te ete Akolemba te, ete Akokokisa mokano Asalaka elongo na Tata na Ye, mpe ete na Getesemane mpe likolo na ekulusu Akosala maye Alakaka kosala.

Nzela oyo toponi kotambola ezali nkaka. Kati na nzela ezali na mikakatano oyo esengaka bondimi na biso na Yesu Klisto mpe makasi na biso ya malamu mpo na kotikala na nzela mpe kokende liboso. Tosengeli koyambola mpe kozala botosi mpe bompikiliki, ata kutu soki tozali kososola te makambo manso oyo ezingi biso. Tosengeli kolimbisa basusu mpe kozala na bomoi engebene na maye toyekoli mpe na maponi tosali.

4. Koyamba na na Motema Moko Bolingi ya Tata

Boyekoli esengaka biso kaka te koyekola mokumba na biso, kozwa mikano malamu, mpe kosala engebene na yango, kasi lisusu oyo ezali ntina mingi ezali bokolisi ya bolingi mpe likoki ya koyamba bolingi ya Nzambe, ata kutu soki ekokani te na bamposa ya bosembo to makambo na biso tolingaka.

Nasepelaka na mpe nalulaka ezalela ya moto ya mbala oyo ayaki epai Nkolo, “kobondelaka ye, mpe akumbami liboso na ye, alobi na ye ete, Soki olingi, okoki kopetola ngai.”14 moto ya mbala asengaki eloko moko te, ata kutu mposa na ye ekokaki kozala ya bosembo; azalaki kaka na bolingi ya kondima bolingi ya Nzambe.

Mwa mibu mileki, balongani moko ya botongono ya bolingo oyo bazali baninga na ngai bapambolamaki na boyei ya mwana mobali oyo bawumelaki kolukama, oyo mpo na ye basambelaka ntango molayi. Ndako wana etondisamaki na esengo ntango baninga na biso mpe mwana na bango ya mwasi, oyo azalaki mwana na bango mosusu se moko tii ntango wana, asepelaki kozala elongo na mobali moke oyo ayaki sika. Nzokande, mokolo moko, likambo moko ya mbalakaka esalamaki: mwana mobali moke, oyo azalaki pene na mibu misato, na mbalakaka akotoki na koma. Ntango kaka nayoki likambo yango, nabengaki moninga na ngai mpo nayebisa ya lisungi na biso na ntango wana ya mpasi. Kasi eyano na ye ezalaki liteya epai na ngai. Alobaki ete, “Soki ezali bolingi ya Nzambe ya kokamata ye epai na Ye, boye ezali malamu mpo na biso.” Maloba ya moninga na ngai ezalaki na ndelo ata moke ya komilelalela, kotomboka, to kotomboka te. Kasi kutu, nionso oyo nakokaki koyoka na maloba na ye ezalaki matondi epai ya Nzambe mpo na kopesaka bango nzela ya kosepela na mwana mobali moke na bango na ngonga wana ya mokuse, lokola mpe bolingi na ye mobimba ya kondima bolingi ya Tata mpo na bango. Mwa mikolo moke nsima, elenge moke moko wana akamatamaki na ndako na ye ya selesitiale.

Tika tokende mbangu liboso na koyekolaka mokumba na biso, kozwaka mikano malamu, kosalaka engebene na mikano wana, mpe kondimaka bolingi ya Tata.

Natondi mpe nasepeli mpenza mpo na mokano oyo tata na ngai atikaki ngai nazwa mibu 47 eleki. Lokola ntango eleki, nasosoli ete lisengeli oyo apesaki ngai—mpo na kozala moyanoli mpo na mokano wana—elingaki koloba kozalaka moyanoli epai ya Tata na ngai ya Lola mpe koluka lobiko na ngai moko mpe ya baninga na ngai bato, na yango kokomaka mingi bo ezeli mpe elingi Tata na ngai nakoma. Na mokolo oyo ya kafukafu, natatoli ete Nzambe Tata na biso mpe Mwana Molingami na Ye bazali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.