2010–2019
Ezali Kaka Kitoko Epai na Yo?
sánzá ya mínei 2015


Ezali Kaka Kitoko Epai na Yo?

Kosepela na makamwi ya nsango malamu ezali elembo ya bondimi. Ezali koyeba lisusu loboko ya Nkolo na bamoi na biso mpe na bato banso nzinganzinga na biso.

Mwasi na ngai mpe ngai tozalaki na esengo makasi ya kobokola bana mitano pene ya engumba kitoko ya Paris. Na mibu wana tozalaki kolinga kopesa bango mabaku ya bofuluki mpo na komona makambo ya bokamwi ya mokili oyo. Eleko ya moi moko na moko, libota na biso ekendaki mibembo milai mpo na kokende kotala bikeko ya ntina mingi koleka, bisika eyebana, mpe bikamwi esalama na moto te ya Europe. Na nsuka, nsima ya kolekisaka mibu 22 na etuka ya Paris, tobelemaki mpo na kokende. Nazali kaka kokanisa mokolo ntango bana na ngai bayaki epai na ngai mpe balobaki, “Papa, ezali mpenza nsoni! Tofandi awa bomoi na biso nionso, kasi tokei naino na Tour Eiffel te!”

Ezali na makamwi mingi mpenza na mokili oyo. Nzokande, ntango mosusu ntango tozali na yango ntango nionso liboso ya miso na biso, tozwaka yango lokola tomona yango kala. Totalaka, kasi tomonaka mpenza te; toyokaka, kasi tozali mpenza koyoka na bokebi te.

Na ntango ya mosala na Ye na mabele, Yesu alobaki na bayekoli na Ye ete:

“Esengo na miso matali makambo matali bino:

“Mpo ete nalobi na bino ete basakoli mingi mpe mikonzi mingi, bazalaki na mposa ya komona makambo matali bino nde bamonaki yango te; mpe bazalaki na mposa ya koyoka makambo mayoki bino nde bayoki yango te.”1

Nakamwi mbala mingi nini elingaki kozala na bomoi na ntango ya Mobikisi na biso. Ekoki bino kokanisa kofandaka na makolo na Ye? Koyokaka mbote na Ye? Kozalaka nzeneneke ntango azalaki kosalisa basusu? Mpe atako bongo mingi mpenza oyo bakutanaki na Ye bayebaki lisusu—ko “mona”—ete Mwana ya Nzambe mpenza azalaki na bomoi katikati na bango.

Biso mpe topesami litomba ya kozala na bomoi na ntango moko ya kokesana. Baprofeta ya kala bamonaki mosala ya Bozongisi lokola “mosala moko ya bokamwi … , iyo, mosala moko ya bokamwi mpe likamwa moko.”2 Na eleko moko te ya kala bamisionele mingi mpenza basili kobiangema, bikolo mingi esili kofungwama mpo na nsango ya nsango malamu, mpe batempelo mingi esili kotongama na mokili mobimba.

Mpo na biso, lokola Basantu ba Mikolo mya Nsuka, makamwi lisusu esalamaka na babomoi na biso ya moto moko moko. Ezali kosangisa mbongwana ya moto moko na bisomei, biyano tozwaka na nsambo na biso, mpe mapamboli ya bolingo Nzambe asopelaka likolo na biso mokolo na mokolo.

Mpo na kosepela na makamwi ya nsango malamu ezali elembo ya bondimi. Ezali koyeba lisusu loboko ya Nkolo na bamoi na biso mpe na bato banso nzinganzinga na biso. Bokamwi na biso lisusu ebotaka makasi ya molimo. Epesaka biso konzo ya kotikala ya kotelema na libongo kati na bondimi na biso mpe ya komipesa na mosala ya lobiko.

Kasi tokeba. Makoki na biso ya kosepela ezali petepete. Na ntango molai, makambo lokola- kobatela-motindo likolo likolo, botau, to kutu bolembu ekoki kokota mpe kosala biso tozanga liyoki na bilembo mpe makamwisi ya kitoko mingi koleka ya nsango malamu.

Buku ya Mormon elimboli eleko moko, ekokani mpenza na oyo ya bisomei, oyo eyaki liboso ya boyei ya Mesiya na mokili ya Amelika. Na mbalakata bilembo ya mbotama na Ye amonisamaki na likolo. Bato babetamaki mpenza na bokamwi ete bamikitisaki, mpe penepene banso babongwanaki. Nzokande, bobele mibu minei moko ya mokuse nsima, “bato babandaki kobosana bilembo wana mpe makamwa oyo bayokaka, mpe babandaki kokamwa moke moke na elembo moko to likamwa moko uta na lola, … mpe babandaki kondima te na oyo nionso boyokaka mpe bomonaka.”3

Bandeko mibali mpe basi, nsango malamu ezali kaka bokamwi mpo na yo? Okoki kaka komona, koyoka, komiyoka, mpe kosepela? To biyokeli na yo ya molimo elembi? Atako ezalela na bino ya moto moko ezali kani, nabengisi bino kosala makambo misato.

Yambo, mokolo moko te olemba komonaka to komonaka lisusu babosolo ya nsango malamu. Mokomi Marcel Proust alobaki ete, “Mobembo ya solo ya komona ezali te na kolukaka bapaysage ya sika, kasi na kozalaka na miso ya sika.”4 Okanisi mbala ya yambo otangaki molongo moko ya makomi mpe oyokaki lokola soki Nkolo azalaki koloba epai na yo moko? Ekoki yo komikundola mbala ya yambo oyokaki nguya kitoko ya Molimo Mosantu koya likolo na yo, ntango mosusu yambo kutu ososolaki ete ezalaki Molimo Mosantu? Oyo ezalaki bangonga ya bule, ya kafukafu?

Tosengeli kozala na mposa ya kolia mpe ya komela mikolo nionso mpo na kozwa boyebi ya molimo. Likambo ya moto moko oyo ezwami na boyekoli, bomanioli, mpe losambo. Ntango mosusu tokokaki komekama mpo na kokanisa ete, “Nazali na mposa ya koyekola makomi lelo te; natangaki yango nionso liboso” to “Nazali na mposa ya kokende na eklezia lelo te; ezali na likambo moko ya sika te.”

Kasi nsango malamu ezali mosolo ya boyebi oyo ekokauka mokolo moko te. Ezali ntango nionso na likambo moko ya sika ya koyekola mpe komiyoka lomingo moko na moko, na mayangani mpe na milongo nionso ya makomi. Na bondimi tokani kolaka ete soki to “koluka, … [to] kozwa.”5

Ya mibale, bwaka longo ya bondimi na yo kati na babosolo ya ntina mpe ya pete ya nsango malamu. Bokamwi na biso esengeli kofandisama na mibeko ya pete ya bondimi na biso, na bopeto ya mayokani mpe makuli na biso, mpe na pete mingi misala na biso ya kokumisa.

Misionele moko ya mwasi abetelaki ngai lisolo ya mibali misato akutanaki na bango na likita ya disitiliki na Afrika. Bautaki na mboka ezali yango moko mosika mpenza na kati ya esobe esika wapi Eklezia ebongisamaka naino te kasi esika wapi ezalaki na bandimi ya botongono mpe pene baluki 20. Na baposo mibale mibali oyo batambolaki na makolo, kokendaka mobembo koleka 480 km na banzela mike ya potopoto ya eleko ya mvula, mpo bakoka kozala na likita mpe komema bamoko na zomi ya bandimi ya liboke na bango. Basalaki mwango ya kofanda poso mobimba mpo bakoka kosepela na litomba ya kokabolaka elambo na lomingo elandaki mpe balikiaki kokende na nzela ya mobembo ya kozonga komemaka baengongolo etonda na Buku ya Mormon likolo na mito na bango mpo na kopesa bato ya mboka na bango.

Misionele atatolaki lolenge ayokaki na ezalela ya kokamwa oyo bandeko mibali oyo balakisaki mpe libonza na bango ya motema mobimba mpo na kozwa biloko oyo mpo na ye ezwamaka ntango nionso na mpasi te.

Amitunaki: “Soki nalamukaki na ntongo moko ya lomingo na Arizona mpe namonaka ete motuka na ngai ezalaki kosala te, ekotambola ngai tii na ndakonzambe na ngai bobele mwa babalabala uta na ndako? To ekotikala ngai kaka na ndako mpo ezalaki mosika mabe to mpo mvula ezalaki kobeta?” 6 Oyo ezali mituna kitoko mpo ete biso banso tokanisa.

Na nsuka nabengisi bino boluka mpe bolinga kimoninga ya Molimo Mosantu. Bokamwi mpe mingi koleka ya nsango malamu ekoki komonisama na boyokeli na biso ya mosuni. Ezali biloko oyo “liso moko emoni te, mpe litoi moko eyoki te, … Nzambe abongisi makambo yango nionso mpo na bango bakolingaka ye.”7

Ntango tozali na Molimo elongo na biso, biyokeli na biso ya molimo epelisami mpe mayele na biso elamusami mpo tokoka kobosana makamwisi mpe bilembo oyo tomoni te. Yango wana koyebaka ete Yesu azalaki pene ya kotika bango, bayekoli na Ye ya Banefi basambelaki na konzo “mpo na wana oyo bazalaki na mposa mingi koleka; mpe bazalaki na mposa ete Molimo Mosantu apesama epai na bango.”8

Atako bamonaka Mobikisi na miso na bangomei mpe basimbaki bapota na Ye na maboko na bangomei, bayebaki ete matatoli na bango ekokaki kokita kozangaka kozala ntango nionso kobeba kozongisama sika na nguya ya Molimo ya Nzambe. Bandeko mibali mpe basi, bosala eloko moko te noki te bozwa likama ya kobungisa likabo ya motuya mpe ya kokonza—kimoninga ya Molimo Mosantu. Boluka na nzela ya losambo ya konzo mpe ya kozala na bomoi ya bosembo.

Natatoli ete mosala kati na yango tomipesi ezali “mosala ya bokamwi mpe likamwisi.” Lokola tozali kolanda Yesu Klisto, Nzambe atatoli epai na biso, “na bilembo mpe bikamwiseli, mpe misala ya nguya ya motindo na motindo, mpe mpo na makabo ya Molimo Mosantu makabolami mpela moko ekanaki ye.”9 Na mokolo ya kafukafu oyo, natatoli ete makamwisi mpe babokamwi ya nsango malamu efandisami kati na makabo ya Nzambe oyo eleki monene mingi kati na manso—Bomikabi ya Mobikisi. Oyo ezali likabo malamu ya bolingo oyo Tata mpe Mwana, ya kosangana na ntina, bapesi na moko na moko na biso. Elongo na bino, “Natelemi na kokamwa nionso bolingo Yesu apesi ngai. … O, ezali bokamwi, bokamwi epai na ngai!”10

Ete tokoki ntango nionso kozala na miso oyo emonaka, oyo eyokaka, mpe mitema oyo emonaka makamwisi ya nsango malamu oyo ya bokamwi na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Luka 10:23–24.

  2. 2 Nefi 27:26.

  3. 3 Nefi 2:1.

  4. “Marcel Proust,” Guardian, Sanza ya Sambo 22, 2008, theguardian.com/books/2008/jun/11/marcelproust.

  5. Matai7:7.

  6. Adapted from Lorraine Bird Jameson, “The Giants of Kinkondja” (article on Africa Southeast Area website, 2009); web.archive.org/web/20101210013757/http:/www.lds.co.za/index.php/news-a-events/news/aseanews/91-the-giants-of-kinkondja.

  7. 1 Bakolinti 2:9.

  8. 3 Nefi 19:9.

  9. Baebele 2:4.

  10. “I Stand All Amazed,” Hymns, no. 193.