2010–2019
”Oyo Ezali Kokila Esili Ngai Kopona Te?”
sánzá ya mínei 2015


”Oyo Ezali Kokila Esili Ngai Kopona Te?”

Makabo ya kokila na bino ekosala mingi koleka kosalisa koleisa mpe kolatisa banzoto. Ekobikisa mpe ekobongola mitema.

Bandeko na ngai ya Mibali mpe ya Basi, nazali na esengo mpo na kopesa bino bolingo na ngai na likita linene ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Esengo oyo ewuti na litatoli ya Molimo ete bolingo ya Mobikisi epesameli na moko na moko na bino mpe na bana nionso ya Tata na Lola. Tata na biso na Lola atombeli kopambola bana na Ye na molimbo mpe na nzoto. Ye asosoli moko na moko ya mposa na bango, mpasi na bango, mpe elikia na bango.

Ntango tobikisi moto moko, Mobikisi akoyoka lokola soki totandi loboko mpo na kobikisa Ye.

Ye alobi na biso ete yango ezali ya solo ntango Ye alakisaki ngonga moko ekoya ntango tokomona Ye esilisi biso bomoi na biso na mokili oyo. Elili moko na mayele na ngai ya mokolo wana ekoli makasi na mikolo nasambelaki mpe nakilaki mpo na koyeba nini koloba ntongo ya lelo. Bolakisi ya Nkolo ya bosololi oyo ekoya epesamelaki bayekoli na ye, mpe elakisi nini tolingi na mitema na biso banso ezala ya solo mpo na biso lokola:

“Nde ekoloba Mokonzi na baye na loboko na ye ya mobali, Boya, bino bopambolami na Tata na ngai, bosangola bokonzi elengelamaki mpo na bino uta ebandeli ya mokili:

“Mpo nazalaki na nzala, mpe bopesaki ngai bilei: nazalaki na mposa ya mai, mpe bopesaki ngai mai: nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai:

“Bolumbu, mpe bolatisaki ngai: nazalaki maladi, mpe botalaki ngai: nazalaki na boloko, mpe boyaki epai na ngai.

“Nde bato ya botongono bakoyanola, kolobaka, Nkolo, ntango nini tomonaki yo na nzala, mpe toleisaki yo? to na mposa ya mai, mpe topesaki yo mai?

“Ntango nini tomonaki yo mopaya, mpe toyambaki yo? to bolumbu, mpe tolatisaki yo?

“To ntango nini tomonaki yo maladi, to na boloko, mpe toyaki epai na yo?

“Mpe Mokonzi akoyanola mpe akoloba na bango, ya solo nalobi na biso, mbala nionso bosali yango na oyo aleki moke na kati ya bato oyo, bosali yango na ngai.”1

Bino mpe ngai tolingi boyei bolamu wana ya Mobikisi. Kasi boniboni tokoki kosengela na yango? Ezali na bana ya nzala, bana bazanga ndako, mpe bana etike ya Tata na Lola koleka tokoki na pete koyamba. Mpe motango na bango ezali kokola mpenza koleka oyo tokoki koyamba.

Yango wana Nkolo apesi biso eloko moko oyo moko na moko na biso akoki kosala. Ezali motindo moko ya pete mpenza ete mwana moke akoki kososola yango. Ezali motindo moko elongo na elaka ya kitoko mpo na bato ya mposa mpe mpo na biso.

Ezali mobeko ya kokila. Maloba na buku ya Yisaya ezali bolaki ya Nkolo ya motindo mpe lipamboli wana oyo ezali mpo na biso baye ya Eklezia:

“Oyo ezali kokila esili ngai kopona te? Kokangola minyoko na masumu, kofungola nkamba na ekangeli; kotika monyokolami ete alongwa wana esili ye kokangwama?

“Ezali te ete okabola kwanga na yo epai na ye oyo azali na nzala? Mpe ete oyeisa babola babwakami libanda epai na ndako na yo? Ete wana okomona moto na bolumbu, olatisa ye, mpe ete omibomba te liboso na bato na libota na yo mpenza?

“Bongo, pole na yo ekobima lokola kobima na moi, mpe kobika na yo ekopumbwa mbango; boyengebene na yo ekotambola liboso na yo, nkembo na Yawe ekobatela yo na nsima.

“Bongo, okobenga mpe Yawe akozongisa liloba; okoganga mpe ye akoloba ete nazali awa. Soki okolongola ekangeli na kati na yo, kotalisa na mosapi mpe maloba mabe;

“soki okosopa molimo na yo mpe na bato na nzala mpe okotondisa mposa na molimo monyokolami, bongo pole na yo ekobima kati na molili mpe molili na yo ekobongwana lokola ntango ya midi:

“Mpe Yawe akokamba yo ntango nionso, akotondisa mposa na yo na bisika bikauki, akokembisa mpe mikuwa na yo na mafuta; okozala lokola elanga esopameli mai, mpe lokola liziba na mai oyo mai na yango ekozanga te.”2

Boye Nkolo apesi biso motindo moko ya pete elongo na elaka moko ya kokamwa. Na Eklezia lelo topesameli libaku ya kokila mbala moko na sanza mpe kopesa likabo ya mokabi na nzela ya episikopo to mokambi ya etape na biso mpo na litomba ya babola mpe bazanga. Ndambo ya oyo opesaka ekosalisa baye bazali nzinganzinga na biso, ntango mosusu moto moko na libota na binomei. Basali ya Nkolo bakosambela mpe bakokila mpo na bobimisi mpo na koyeba nani kosalisa mpe lisalisi nini kopesa. Oyo esengelami te mpo na kosalisa bato na Eklezia ya esika na bino ekokoma mpo na kopambola bandimi ya Eklezia, ya mokili mobimba, oyo bazangi.

Motindo ya kokila mpo na babola ezali na mapamboli mingi ekangami na yango. Mokambi Spencer W. Kimball abengaki koboya kolanda mobeko wana lisumu moko ya kozanga kosala na ntalo moko monene ya kofuta. Akomaki: Bilaka bipesami na Nkolo mpo na baye bazali kokila mpe kosunga bazangi. … Bofuli mpe bokambami ya molimo ekoya elongo na botongono mpe kozala penepene na Tata na biso na Lola. Kozanga mosala oyo ya botongono ya kokila ekozangisa biso mapamboli oyo.”3

Nazwaki moko ya mapamboli oyo mwa bamposo eleki. Zambi likita linene ekweyaki na nsuka ya mposo moko oyo elingaki mingimingi kozala bosangani ya kokila, nakilaki mpe nasambelaki mpo na koyeba boniboni nasengelaki kotosa motindo ya kobatela baye bazangi.

Na mokolo ya Poso, ntango nazalaki kokila, nalamukaki na 6:00 mpe nasambelaki lisusu. Nayokaki mposa ya kotala bansango ya mokili. Kuna natangaki nsango oyo:

“Ekumbaki monene na nkombo ya Pam abebisaki bandako mingi ntango ekendeki kotuta na mbalakaka Port Vila, mboka mokonzi ya Vanuatu. Ebomaki ata bato motoba na Vanuatu, ya yambo oyo endimami lokola moko ya bikumbaki eleki na makasi oyo ekweyisa mabele.

“Banzete etelemaka na mpasi ngwi [ntango ekumbaki] elelaki na kolekaka” na kati ya ekolo ya esanga ya Pasific. 4

“Bato ya World Vision mpo na koyeba motuya ya likama bakanisaki kotala bobebi ntango ekumbaki esilaki kolemba. 

Bapesaki bato ya esika toli mpo na koluka bibombelo na bitonga bilenda lokola bainiversite mpe biteyelo.

Mpe sima balobaki: “‛Biloko bileki makasi bazwaki ezalaki bandakonzambe ya sima,’ elobaki Inga Mepham [ya] CARE International. …‛Bato mosusu basalelaka yango te. Ezali mpasi kokuta eloko moko oyo bokoki kokanisa ekoki kotelemela Makasi 5 ya ekumbaki.’”5

Ntango natangaki yango, namikundolaki kokendeke kotala bana na bandako ya Vanuatu. Ekokaki kolakisa na mayele na ngai bato batondi na bandako kozelaka babebisama na mopepe. Mpe nsima namikundolaki boyei bolamu na ngai ya bato ya Vanuatu. Nakanisaki bango mpe bazalani na bango kokimaka likama na bandakonzambe na biso ya sima.

Nsima namonaki bilili ya episikopo mpe mokambi ya lingomba ya bamama basungi kotambolaka kati na bango, kopesa bolendisi, babulangeti, bilei ya kolia, mpe mai ya komela. Nakokaki komona bilili ya bana na kobanga bakangani elongo.

Bazali mosika mpenza uta na libota esika natangaki nsango wana, mpe kasi nayebaki nini Nkolo alingaki kosala na nzela ya basali na ye. Nayebaki ete nini ekokisaki bango mpo na kobikisa bana wana ya Tata na Lola ezalaki makabo ya kokila, oyo epesamaki na bonsomi na balandi ya Nkolo oyo bazalaki mosika mpenza uta na bango nkasi penepene na Nkolo.

Boye nazelaki eyenga te. Namemaki likabo ya kokila na episikopo na ngai na ntango wana. Nayebaki ete likabo na ngai wana ekoki kosalelama na episikopo mpe mokambi ya lingomba ya bamama basungi mpo na kosalisa moto moko na mpembeni na biso. Mwa likabo na ngai ekoki te kosengelama penepene epai libota na ngai mpe ngai nazali, kasi moleki ekoki kokoma kutu mosika na Vanuatu.

Kasi ekumbaki mosusu mpe bomibomi misusu ekoya na mokili mobimba na bato Nkolo alingi mpe oyo ya bango mawa Ye ayoki. Eteni ya likabo ya kokila na bino mpe na ngai sanza oyo ekosalelama mpo na kosunga moto moko, esika moko, oyo ya ye lisungi Nkolo akoyoka lokola soki ezalaki ya Yemei.

Makabo ya kokila na bino ekosala mingi koleka kosalisa koleisa mpe kolatisa banzoto. Ekobikisa mpe ekobongola mitema. Mbuma ya likabo moko ya bonsomi ekoki kozala mposa kati ya motema na ngai ya mozwi mpo na koyamba basusu bazangi. Yango esalemi na mokili mobimba.

Esalemaki na bomoi ya Ndeko mwasi Abie Turay, oyo azali na Sierra Leone. Etumba moko ya batomboki ebandaki na 1991. Ebebisaki ekolo mibu mingi. Sierra Leone ezalaki uta kala moko ya bikolo bileki na bobola na mokili. “Na ntango ya bitumba, ezalaki polele te nani [azalaki kokamba] ekolo babanki … ekangamaki, bayibaki babilo ya leta, mampinga ya bapolisi [bazalaki na makasi te ya kobunda na mapinga ya batomboki], … mpe makasi te, mpe ezalaki mobulu, bobomi, mpe mawa. Bazomi ya bankoto ya bato babungisaki bomoi, na bango, mpe bato mingi koleka bamilio mibale bakimaki na makasi bandako na bango mpo na koboya kobomama.” 6

Nde na ntango ya bongo, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ekolaki.

Moko ya bitape ya yambo ebongisamaki na mboka esika ndeko mwasi Turay azalaki. Mobali na ye azalaki mokambi ya etape ya yambo. Asalaki lokola mokambi ya disitiliki na ntango ya etumba ya batomboki.

“Ntango bapaya batali ndako ya ndeko mwasi Turay [sikawa], alingaka kolakisa bango [bomengo] mibale ya etumba: robe ya nzelanzela ya bule mpe mpembe [azwaki] na saki ya bilamba ya tombola [epesamaki na bandimi ya Eklezia] mpe bulanketi moko, sikawa enzuluki mpe etondi na madusu.” 7

Ye alobi, “Simisi oyo ezali eloko ya yambo...  lokola elamba [nazwaki]. … Nazalaki kolata yango mpo na kokende na mosala ezalaki malamu mingi. [esalaki ngai nayoka kitoko makasi.] nazalaki na bilamba mosusu te.

“Na ntango ya etumba, bulanketi oyo epesaki biso moto, ngai mpe bana na ngai. Ntango batomboki [balingaka] koya kobundisa biso, oyo ezali eloko moko kaka [nakokaki] kotia [na] loboko [ntango tokimaki na zamba mpo na kobatama]. Boye [tokokaki] kozwa bulanketi elongo na biso. Ekokaka kopesa biso moto mpe kobatela biso na bangungi.”8

“Ndeko mwasi Turay abimisaki maloba ya botondi na ye mpo na mokambi ya misio oyo alingaki koya na ekolo ebebisamaki na etumba elongo na [mosolo] na libenga na ye.” Mbongo wana, uta na makabo ya kokila ya moto lokola yo, epesaki ndingisa na Basantu mpo na kosomba bilei oyo ya bato mingi koleka ya Sierra Leone bakokaki te kopesa.9

Ndeko mwasi Turay kolobaka mpo na baye bazalaki na bokabi ekoki mpo na kopesa mpo bango batikala na bomoi alobaki, “ntango nakanisi [na ntina ya] bato oyo basalaki makambo oyo… nazali koyoka ete [batindamaki] na Nzambe, mpamba te bato ya mpamba nde basalaki likambo ya lolenge boye mpo na [biso].” 10

Mopaya moko uta na Etazini afandaki elongo na Abie kala mingi te. Na ntango azalaki na ye, amonaki miso na ye “kotalaka liboke ya makomi oyo ezalaki likolo ya mesa.” Akokaki koloba ete ezalaki bomengo, “oyo etiamaki bikoma na milongo. Nkasa ezalaki [ya konzuluka]; ndambo epasuka. Ezipeli ezalaki elongwa na ekangeli.”

Asimbaki makomi na “loboko na ye mpe na malembe abalolaki nkasa. Ntango [asalaki yango, amonaki] lokasa moko ya motane ya eteni ya lokasa ya moko ya zomi. [Ye] akokaki komona ete, na ekolo moko epai [dollar ezalaki] na motuya mpenza, Abie Turay afutaka dollar moko lokola moko na nzomi ya ye, dollar moko mpo na mbongo ya misio, npe dollar moko lokola likabo ya kokila mpo na oyo, na maloba na ye, azalaki ‘“mpenza mobola.”’

Mopaya akangaki makoki ya ndeko mwasi Turay mpe akanisaki, ntango atelemaki na mama ya afrika oyo ya bondimi, ete azalaki na esika ya bule.11

Kaka lokola lokasa ya kozwa lipamboli ya likabo ya kokila na yo mpe na ngai ekoki kobongola mitema, bongo kokila ekosala mpo na bolamu ya mosusu. Ata mwana moko akoki koyoka yango.

Bana mingi, mpe boko bankulutu, bakoki mpo ntina na bangomei komona mpasi kokila ya ngonga 24. Ekoki kozala, na maloba ya Yisaya, koyoka ete kokila “etungisi molimo [na bango].” Baboti ya mayele bakoyeba likambo wana mpe yango wana bazali na bokebi mpo na kolanda toli ya Joseph F. Smith: “Eleki malamu koteya bango libongisi, mpe kotika bango kotosa yango ntango bakomi na mibu ya kokoka mpo na kopona na mayele.”12

Namonaki lipamboli na toli wana kala te. Moko na bankoko na ngai amonaki kokili ya ngonga 24 koleka nguya na ye ya kokoka. Kasi baboti na ye ya mayele kaka batiaki libongisi wana na motema na ye. Moko ya baninga na ye na eteyelo kala te abungisaki ndeko na ye na liwa ya likama. Nkoko na ngai atunaki mama na ye mokolo ya kokila, penepene na ntango wana ayokaka kokila mpasi mingi mpo na kokoba, soki ekokaki koyokisa moninga na ye na mpasi malamu mingi koleka soki akobaki na kokila.

Motuna na ye endimisaki toli ya Mokambi Joseph F. Smith. Nkoko nangai ayaki kaka te kososola libongisi ya kokila, kasi elonamaki na motema na ye. Ayaka koyoka ete kokila mpe nsambo na ye ekokaki kokamba ba lipamboli moko uta na Nzambe mpo na moto moko na mposa. Soki asaleli libongisi wana mbala mingi ekoki, ekomema bambano ya kitoko na bomoi na yemei, lokola Nkolo alakaki. Akozala na lipamboli ya molimo ya nguya mpo na kozwa bofuli mpe bokoki monene mpo na kotelemela lisenginia.

Toyebi te bantina nionso mpo na nini Yesu Klisto akendeki na kati ya esobe mpo na kokili mpe kosambela. Kasi toyebi kaka moko ya bambano na yango: Mobikisi etelemelaki mpenza masenginia ya Satana mpo na kobebisa nguya na Ye ya bonzambe.

Mwa ntango ya tokili sanza nionso mpe motango moko topesi mpo na bobola ekoki kopesa biso kaka eteni moko ya mbongwana na bizaleli na biso mpo na kozala lisusu te na mposa ya kosala mabe. Kasi ezali na elaka moko monene, kutu ntango tosali nionso tokoki na mayele na biso kosala mpo na kosambela, kokili, mpe kopesa mpo na baye bazangi:

“Bongo, pole na yo ekobima lokola kobima na moi, mpe kobika na yo ekopumbwa mbango; boyengebene na yo ekotambola liboso na yo, nkembo na Yawe ekobatela yo na nsima.

“Bongo, okobenga mpe Yawe akozongisa liloba; okoganga mpe ye akoloba ete nazali awa.”13

Nasambeli ete tokosenga na makasi mapamboli wana ya minene mpo na bisomei mpe mpo na mabota na biso.

Napesi litatoli ete Yesu azali Klisto, ete na Eklezia na Ye tobengisami mpo na kosalisa Ye ntango azali kobatela babola na lolenge na Ye, mpe ete Ye alaki mapamboli na Ye ya libela ekowuta na kosalisaka Ye. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 25:34–40.

  2. Yisaya 58:6–11.

  3. Spencer W. Kimball, The Miracle of Forgiveness (1969), 98.

  4. Tala Steve Almasy, Ben Brumfield, and Laura Smith-Spark, “Cleanup Begins in Vanuatu after Cyclone Batters Islands,” sanza ya Misato. 14, 2015, edition.cnn.com.

  5. Tala Sean Morris, Steve Almasy, and Laura Smith-Spark, “‘Unbelievable Destruction’ Reported in Tropical Cyclone Pam’s Wake,” sanza ya Misato. 14, 2015, edition.cnn.com.

  6. Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story,” unpublished manuscript.

  7. Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story.”

  8. Abie Turay, elobami na Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story.”

  9. Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story.”

  10. Abie Turay, elobami na Peter Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story.”

  11. Peter F. Evans, “Sister Abie Turay’s Story.”; a video about Sister Turay, “We Did Not Stand Alone,” ezali na komonana nalds.org/media-library.

  12. Joseph F. Smith, “Editor’s Table,” Improvement Era, Dec. 1903, 149.

  13. Isaiah 58:8–9.