2010–2019
Mpo na Likambo ya Kozala ya Solo
sánzá ya mínei 2015


Mpo na Likambo ya Kozala ya Solo

Nasambeli, bandeko, ete tokotelemela lisenginia mpo na kobenda bokebi na bisomei mpe, kutu, kobunda mpo na lokumu eleki mosika monene: kokoma bayekoli ya bosawa, ya solo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Na ekeke ya mbala ya 18, Catherine the Great ya Russie asakolaki akosala mobembo na eteni ya sudi ya ekolo na ye, elongo na bantoma mingi ya bapaya. Mokonzi ya mboka wana, Grigory Potemkin, alingaki na makasi kondimisa batali wana. Mpe boye akendeki ba mosika mpo na kolakisa misala ya mboka.

Mpo na eteni ya mobembo, Catherine ananaki na Dnieper River, na lolendo kolakisaka bantoma bituka ya mosala mingi mpembeni ya libongo, etonda na bato balinga mosala mpe ya esengo. Ezalaki bobele kpokoso moko ezalaki nionso kaka mpo na komilakisa. Balobi ete Potemkin asangisaka bifelo babamba ya baligablo mpe bandako. Atiaka kutu bato ya bilanga lokola bazalaki na misala mingi mpo na kolakisa na miso ya bampaya nkita ya kofuluka. Ntango feti esilaki nzinganzinga na botengami ya ebale, bato ya Potemkin bakangaki mboka wana ya lokuta mpe bakendeki noki kolengela mbala ya nsima Catherine akoleka.

Atako bakomi ya mambi ya lelo batiaki ntembe na bosolo ya lisolo oyo, likambo “mboka ya Potemkin” ekota na bankombo etangama na mokili. Elakisi moko oyo ameki kondimisa basusu ete tozali malamu mingi koleka ndenge tozali mpenza.

Mitema na Biso ezali na Esika Esengeli?

Ezali lolenge ya bato kolinga kotala bolamu na biso. Ezali mpo nini mingi na biso bakosala makasi mpenza na libanda ya bandako mpe mpo na yango bilenge bandeko na biso ya Bonganganzambe ya Alona bakosala nsuki nionso ezala na esika na yango, mpamba te ntango mosusu bakoki kokutana na moto moko ya kafukafu. Ezali na eloko moko te ya mabe na basapato ya konganga, kopakola malasi, to kutu kobomba basani ya salite liboso bateyi na ndako bakoma. Nzokande, ntango ekomi na nsuka, mposa oyo ya komilakisa ekoki kobongwana malamu na mabe.

Baprofeta ya Nkolo batombolaki bokebisi moko na baoyo “bakobelema [na Nkolo] na monoko, mpe na bambebo bakokumisa mpenza [Nkolo], kasi balongoli motema na bango mosika na [Ye].”1

Mobikisi azalaki kososola mpe koyoka mawa ya basumuki oyo bazalaki ya komikitisa mpe ya bosolo. Kasi Ye atelemelaki na nkanda ya bosembo na bakibisi lokola bakomeli, Bafalisai mpe bakosi—baye bamekaki komimonisa basembo mpo na kozwa bosanzoli, nguya, mpe bomengo ya mokili, kaka na ntango bazalaki koniokola bato basengelaki kopambola. Mobikisi amekisi bango na “mayita mapakolami mpembe. Yango emonani kitoko libanda nde katikati etondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge yonso na bosoto.”2

Na mikolo na biso, Nkolo alobi maloba ya makasi ekokani mpo na basimbi bonganganzambe oyo bameki “kozipa masumu [na bango], to kosepelisa lolendo [na bango], [to ya bango] mposa ya mpamba.” Ntango basali yango, Ye alobi, “lola elongwe yangomei; Molimo ya Nkolo ezwi mpasi; mpe ntango elongwe, Amen na bonganganzambe to bokoki ya moto wana.”3

Ntina nini yango ekomi? Ntina nini ntango mosusu tokomeka komonana na mosala, na bomengo, mpe ya komipesa na libanda ntango na kati—lokola Mobimisi alobaki na Baefese—Totika “bolingo[na biso] ya yambo”?4

Na boko makambo, tokoki na pete kozala tobungisi kokangama na biso na ntina mpenza ya nsango malamu, kokosaka “lolenge ya bonzambe” mpo na “nguya na yango.”5 Oyo ezali mingimingi na likama ntango tokambi bolakisi na biso ya libanda ya boyekoli mpo na kolakisa basusu mpo na lifuta to nguya. Ezali ntango wana nde tozali na likama ya kokota na kati ya ekolo ya Bafalisai, mpe ezali ntango malamu mpo na kososola mitema na biso mpo na kosala nokinoki bosemboli ya nzela.

Pologalami ya Potemkin

Lisenginia mpo na komonana malamu koleka oyo tozali ezwami kaka te na bomoi na biso ya moto na moto kasi ekoki kozwama na bitinda na biso na Eklezia lokola.

Ndakisa, nayebi likonzi moko wapi bayangeli babongisi boko lotomo mpo na mobu. Ntango lotomo wana ezali naino lokola na ntina, batii makanisi na kosakolaka na lolendo mpe na kafukafu to na mitango mpe na minkama ya bandimi.

Nsima ya kosolola lotomo wana mpe kondima na yango, likambo moko ebandaki kotungisa mokambi ya likonzi. Akaniselaki bandimi ya likonzi na ye—lokola elenge mama na bana mike oyo kala te akufelaki mobali. Akaniselaki bandimi oyo bazalaki kobunda na ntembe to bomoko to bazalaki na bokono to na bozangi kimia. Akaniselaki bandimi oyo bazalaki na kpokoso ya mabala ya kobeba, bokakemi na molangwa, kozanga mosala, mpe bokono ya bongo. Mpo na kokanisaka mingi na yango, mingi amitunaki motuna moko oyo esalaki amikitisa: lotomo na biso ya sika ekosala bokeseni na bomoi ya bandimi oyo?

Abandaki komituna boniboni lotomo na bango ya likonzi ekokaki kozala mosusu soki bamitunaki yambo, “Nini ezali mosala na biso?”

Boye likonzi oyo ezongaki na masanga na ye, mpe elongo babongolaki lotomo na bango. Basalaki ete bapesa nzela te na “bato ya nzala, … bazanga, …bato ya bolumbu, … bakoni mpe batungisami baleka mpembeni na [bango], mpe komona bango te.”6

Batiaki lotomo ya sika, kondimaka ete elonga nalotomo oyo ya sika ekoka ntango nionso komekisama, ata na moto te—mpo boniboni tokomekisa litatoli ya moto na moto, bolingo ya Nzambe, to mawa mpo na basusu?

Kasi bayebaki lisusu ete “mingi na makambo bokoki kotanga, ezali na ntina te. Mingi na makambo bokoki kotanga te, ezali mpenza ntina.”7

Namituni soki lotomo na biso ya lingomba to ya moto na moto ntango mosusu ekokani na mboka ya Potemkin. Yango ekomonana ya kafukafu na mosika kasi ezangi kokokisa mposa ya solo ya bandeko balingami?

Bandeko balingami na ngai mpe baninga basimbi bonganganzambe, soki Yesu Klisto afandaki elongo na biso mpe atumaki motuya ya mosala na biso. Nandimi te alingaki kokangama mingi na miango mpe mitango. Oyo Mobikisi akokaki kolinga koyeba ezali lolenge ya motema na biso. Alingaki koyeba boniboni bolingi mpe tosalisi baye tozali kobatela, boniboni tolakisi bolingo na bison a basin a biso mpe libota, mpe boniboni tosungi bozito na bango kokoma pepele. Mpe Mobikisi akokaki kolinga koyeba boniboni bino mpe ngai tozali kokola penepene na Ye mpe penepene ya Tata na biso na Lola.

Ntina Nini Tozali Awa?

Ekoki kozala na litomba koluka mitema na bisomei. Na ndakisa, tokoki komituna, ntina nini tozali kosala na Eklezia ya Yesu Klisto?

Tokoki kotuna, ntina nini tozali awa na bosangani oyo lelo?

Nakanisi soki koyanola na motuna wana ezalaki na likolo likolo, nakokaki koloba ete nazali awa mpamba te Mokambi Monson asengaki ngai naloba.

Boye nazalaki mpenza na boponi te.

Likambo mosusu ete, mwasi na ngai, oyo na lingaka mingi, azalaki kozela naya. Mpe boniboni nakoki koloba te na ye?

Kasi biso nionso toyebi ezali na ntina eleki malamu mpo na koya na mayangani na biso mpe kozalaka na bomoi na biso lokola bayekoli bamipesi ya Yesu Klisto.

Nazali awa mpamba te nalingi na motema na ngai mobimba kolanda Molakisi na ngai, Yesu Klisto. Nazali na mposa ya kosala nionso oyo Ye asengi ngai na likambo oyo monene. Nazali na nzala ya kolendisama na Molimo Mosantu mpe koyoka mongonga ya Nzambe ntango Ye akoloba na nzela ya basali na Ye bakulisama. Nazali awa mpo na kokoma moto malamu mingi koleka, mpo na kotombolama na ndakisa efulama ya bandeko mibali mpe basi, mpe koyekola boniboni kosalisa na makasi mingi baye bazali na mposa.

Na bokuse, nazali awa mpamba te nalingi Tata na ngai ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Nazali na ntembe te oyo ezali ntina na biso lokola. Oyo ezali ntina nini tozali kolinga kosala mabonza mpe kaka te kosakola ete ozali kolanda Mobikisi. Oyo ezali ntina nini tozali komema na lokumu bonganganzambe na ye ya bule.

Uta na Mwa Mwinda tii na Moto Monene

Soki litatoli na biso ezali kofuluka mpe kolongono to mosala na biso na Eklezia ezali mingi penepene na kokokana na mboka Potemkin, nsango malamu ezali ete biso bokoki kotonda ezala na makasi nini bozali na yango. Awa na Eklezia ya Yesu Klisto bokoki kokomela na molimo mpe kobelema penepene mingi na Mobikisi na kosalelaka mabongisi ya Nsango malamu mokolo na mokolo.

Na bompikiliki mpe molende, ata mosala moke mingi mpenza ya boyekoli to ata likala ya moto eleki moke ya bondimi ekoki kokoma moto Monene ya kopela makasi na bomoi ya komipesa. Ya solo, yango ezali boniboni moto monene ekobanda—lokola mwa moto ya mpamba.

Boye soki bomiyoki moke mpe batau, nasengi kaka boya na Klisto, oyo akokomisa biloko ya mike makasi.8 Baleki botau na kati na biso, na nzela ya ngolu ya Nzambe, bakoki kokoma makasi na molimo, mpamba te Nzambe “akokabolaka bato te.”9 Ye azali ya biso “Nzambe, oyo akobatela boyokani mpe mawa elongo na bango oyo alingi ye mpe kobatela mibako naye.”10

Ezali bondimi na ngai ete soki Nzambe akoki kosimba mpe kosunga mokimi ya mobola ya Allemagne ya libota moko ya bosawa na mokili moko ya ekolo moko ebebisama na katikati na etumba na bilo monene ya Eklezia, nde Ye akoki kosimba biso.

Bandeko mibali balingami na Klisto, Nkolo ya Bokeli, oyo afulaki bomoi na kati ya mokili, ya solo azali na nguya ya kofula bomoi na kati na biso. Ya solo Ye akoki kokomisa bino bozala na molimo ya pole mpe bosolo ya solo oyo bolingi.

Bilaka ya Nzambe ezali ya solo mpe ya ntembe te. Tokoki kolimbisama na masumu na biso mpe kopetolama na bozangi bosembo bonso.11 Mpe soki tokobi koyamba mpe kosalela mabongisi ya solo na ezaleli na biso ya moto na moto mpe na mabota na biso, tokokoma na nsuka na esika moko wapi “Bakoyoka nzala lisusu te, soki mposa ya mai lisusu te, soki mposa na mai lisusu te. Moi ekobola bango soko moko te, na moto makasi mpe te mpo été Mwa na Mpate oyo na kati na kiti na bokonzi akobatela bango, mpe akokamba bango epai na mito na mai na bomoi. Nzambe mpe akolongola mpinzoli yonso na miso na bango.”12

Eklezia Ezali Esika ya Libiki, Ya Kobombama Te

Kasi oyo ekoki te kosalema soki tobombami nsima ya bifelo ya moto na moto, ya malongi, to ya mangomba. Boyekoli ya likololikolo ya boye kaka te ekopekisa biso komimona bisomei lolenge tozali mpenza, kasi lisusu ekopekisa biso kobongwana ya solo na nzela ya likamwisi ya Bomikabi ya Mobikisi.

Eklezia ezali te esika ya kolakisa mituka ya koteka—esika moko mpo na komimonisa na libanda mpo ete basusu bakoka koluka molimo, bokoki, to bomengo na biso. Ezali mingi lokola esika ya mosala, epai mituka esengeli koya mpo na kobongisa, kolendisa mpe kokomisa yango sika.

Mpe tozali te, biso nionso, na mposa ya kobongisama mpe kolendisama, mpe kokomisama ya sika?

Tokoya na Eklezia mpo na kobomba te kpokoso na biso kasi mpe na kobikisa yango.

Mpe lokola bamemi bonganganzambe, tozali na mokumba moko ya kobakisa— “bobatela etonga ya Nzambe … , na kopusama te, kasi na mitema malamu; na mposa ya kozwa lifuti [ya yo] te, kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mokonzi na ndambo na bino te, kasi kozala na [n]dakisa na etonga.”13

Bomikundola, bandeko, “Nzambe atelemela[ka] bato na lolendo, nde akopesaka basokemi ngolu.”14

Moto aleki monene, aleki bokoki, aleki na misala oyo atambola na mabele oyo azalaki lisusu oyo aleki na bosawa. Ye asalaki mosala eleki kafukafu na bangonga ya nkuku, elongo kaka na mwa bamoni, oyo Ye asengaki “koloba na moto te” oyo Ye asalaka.15 Ntango moto moko abengaki ye “malamu”, Ye nokinoki azongisaki bokumisi, kokangamaka ete bobele Nzambe oyo azali malamu ya solo.16 Na polele bosanzoli ya mokili elakisaki eloko te mpo na Ye; Ntina na ye ezalaki kosalisa Tata na Ye mpe “kosala ntango nionso makambo maye makosepelisa ye.”17 Tokosala malamu na kolandaka ndakisa ya Nkolo na biso.

Ekoka Biso Kolinga Ye lokola Ye Alingaki Biso

Bandeko mibali, oyo ezali libiangi na biso ya monene mpe ya bule—Kozala ntoma ya Yesu Klisto, kolinga Ye lokola Ye alingaki biso, kosalela Ye lokola ye asalisaki biso, “botombola maboko oyo elembi, mpe bolendisa mabolongo ya botau,”18 mpo na “kobatela babola mpe bazanga,”19 mpe kosalisa bakufela balongani mpe bana etika.20

Nasambeli, bandeko, ete ntango tozali kosalisa, mabota, masanga makoki, bapalwasi, mangomba, mpe bikolo na biso tokotelemela lisenginia mpo na kobenda bokebi na bisomei mpe, kutu, kobunda mpo na lokumu eleki mosika monene: kokoma bayekoli ya bosawa, ya solo ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Ntango tosali bongo, tokomimona kotambolaka na nzela oyo ekambi na bolamu na bisomei, eleki solo, mpe eleki lokumu. Ya yango natatoli na nkombo ya Nkolo na biso, Yesu Klisto, amene.