2010–2019
Botikala na Nse ya Nzete
sánzá ya mínei 2015


Botikala na Nse ya Nzete

Limoni ya Lehi ya nzete ya bomoi ezali lisese moko ya nguya na kotiaka molende tii na nsuka.

Mua ntango moke yambo Mokambi Heber J. Grant akufa, moko ya bandeko mibali ayaki kotala ye. Yambo akende, Mokambi Grant asambelaki, “O Nzambe, pambola ngai ete natikala te kobungisa litatoli na ngai mpe nabatela bondimi tii na nnsuka!”1 Nsima pembeni ya mibu 27 lokola Mokambi ya Eklezia, oyo esalaki losambo na ye ya motema. Ndakisa na ye ezali komikundola ya makasi oyo moto moko te, na eloko moko te, azui manguele kowuta na bobendi ya satana. Mibale ya bisaleli ya nguya ya Satana ezali kobulunganisa makanisi mpe kolemba nzoto.

Kotiaka molende tii na nnsuka ezali ezalela ekoki ya kiboyekoli ya solo mpe ezali na motuya mpo na bomoi ya seko. Kasi ntango mitungisi mpe mikakatano eyaka na bomoi na biso, toyebisami mingi mingi na pete “kosimba makasi.” Tika nazala polele: “kosimba makasi” ezali mobeko ya nsango malamu te. Kotiaka molende tii na nsuka elakisi koyaka mobimba kati na Klisto mpe kokoma moto oyo akoki mingi na kati na Ye.

Soki kotiaka molende tii na nsuka ezali ntina ya bomoi ya seko, mpo na nini tozali kobunda mpo na kozala na bondimi mingi? Tozali kobunda ntango tozali ya kokangama katikati ya bitumba ya bantina koleka. Botosi ya mbalakata mpe komikotisa ya molunge moke ezali botau ya bondimi. Kotiaka molende tii na nsuka esengi komikotisa mobimba na Mobikisi mpe na mayokani na biso.

Limoni ya Lehi ya nzete ya bomoi ezali lisese moko ya nguya na kotiaka molende tii na nnsuka. Nasengi kotanga mpe kososola na libondeli makasi ndoto ya Lehi; mpe tokokanisa yango na ya bisomoko. Ntango bosali, bomanyoli na bokebi mibeko motoba ya motuya koleka yango ekosunga biso kolenda tii na nnsuka.

1. Kobosana Kosambela Te

Tobandi na Lehi yemoko “esika moko ya molili mpe ya mawa.”2 Moko na moko kati na biso toleki bileko ya molili mpe kotikala yomoko. “Ntango bomoi ekomi molili mpe mawa, kobosana kosambela te.” 3 Bolanda ndakisa ya Mokambi Heber J. Grant. Bobondela mpo na makasi ya kolenda tii na nnsuka. Botuna Tata na Lola, “Ebele nini koleka Yo olingi ngai nasala?”

2. Boya epai ya Klisto mpe Bozala Bato Bakoki Malamu Kati na Ye

Nzete ya bomoi ezali oyo elobelami mingi na ndoto ya Lehi. Makambo nyonso etali kaka nete ya bomoi. Nzete ezali kolakisa Klisto, oyo azali bobimisi ya polele ya bolingo ya nzambe. Mbuma ezali bomipesi na ye ya nnsuka te mpe ezali bolingo monene ya Nzambe. Bomoi ya seko elongo na baoyo tolingaka ezali kitoko mpe elingami koleka na eloko mosusu. kososola likabo oyo, tosengeli “koya na Klisto, mpe bozala bato bakoki malamu kati na ye.”4 Ye azali “nzela, solo, mpe bomoi.”5 Tokoki kotondisa bomoi na biso na makokisi mpe kosala malamu, kasi na nsuka soki tokoti nanu te na mayokani ya bule ya kolanda Klisto mpe kobomba yango, tokobungisa elembo libela mpe mobimba.

3.Tokende Liboso na Bondimi

Ezali nzela moko oyo ekomema na nzete ya bomoi, ya Klisto. Ezali moke mpe kaka, semba mpe sembo. Mitindo ya Nzambe ezali semba kasi kosukisaka te. Yango ezali kobatela biso na likama ya molimo mpe ya mosuni mpe ezali kopekisa biso kokueyaka na libunga.

Botosi ezali kotonga bondimi na Klisto. Bondimi ezali moboko ya kosala mpe ya nguya. Kolandaka ndakisa ya mobikisi na bokebi ekobota nguya mpe makoki ya molimo. Kozangaka kolendisama mpe makoki ya Bimipesi, ezali na makoki te ya kotikala na nzela mpe kotungama.

“Bokende liboso elongo na bosolo moko na Klisto. ”6

4. Buku ya Mormon Ezali Fongola ya Lobiko ya Molimo

Mobembo ya bomoi ezali mimekano. Ezali pete kobungisa makanisi, kawaka libanda ya nzela, mpe kobunga. Mikakatano ekoki koleka biso te mpe ezali na ntina na kati ya bokobi na biso ya libela. Ntango kibonguna ekomi, totika te eloko oyo toyebi na mobimba te ebebisa makambo nyonso bino boyebi. Zala motema mpio, kangama na bosolo, bososoli ekoya. Mikakatano ezali lokola londende ya molili oyo ekoki kozipa miso na biso mpe kokomisa motema na biso makasi. Loba kaka soki biso “tokobi kosimbaka makasi” 7na liloba ya Nzambe mpe tosali yango, tokokoma bakufi miso ya molimo na esika ya kobakisama ya makanisi ya molimo. Boluka Buku ya Mormon mpe maloba ya baprofeta ya bomoi mikolo nyonso, ezali fungola ya lobiko ya molimo mpe koboyaka koyokisama mawa. kozangaka yango, tozali babungi ya molimo

5. Bobungisa Makanisi te mpe Bokosama te

Kotala ezali kotala na bokebi nyonso. Kotalaka baoyo nyonso bandimeli Klisto te ekosunga bino te komona Ye. Kolukaka #spaciousbuilding mpo na boyebi ekomema bino na bosolo te. Etiami kuna te. Kaka Mobokisi azali na “maloba ya bomoi ya seko.” 8Eloko mosusu ezali kaka maloba. Ndako molayi mpe monene elakisi ba “makanisi ezanga ntina mpe lofundu” 9 ya mokili—na maloba mosusu, kobulunganisa makanisi mpe kolemba nzoto. Etondisami na bato balati malamu oyo bamonani lokola kozala na nyonso. Kasi batshiolaki Mobikisi mpe baoyo nyoso balandi Ye. Bazali ntango nyonso koyekolaka, kasi bakoki ata mokolo moko te kokoma ba boyebi ya bosolo.”10 Bakoki ntango mosusu kozala sembo na politiki, kasi bazali babungi na molimo.

6. Botikala na se ya Nzete

Nsango ya Lehi ezali kotikala na se ya nzete. Totikali na nse ya nzete mpo ete tobonguani kati na Klisto. Alma ateyaki, “Tala, abongolaki mitema na bango; iyo alamusaki bango libanda na bozindo ya mpongi, mpe bango balamukaki na kati ya Nzambe.”11Soki topesi mitema na bison a Nzambe, Molimo Mosantu ekobongola lolenge na biso mpenza, tokomi babonguani ya bozindo kati na Nkolo, mpe koluka lisusu te ndango ya monene. Soki totiki kosala biloko oyo ekomema bonguana ya mozindo, tokokita na molimo. Libungi ezali ngambo mosusu ya bonguana.

Na ba misionele nionso baleka mpe bazali, Bampaka mpe bandeko basi, bino bokoki na mpete te kozonga na etinda na bino, kosala bozongi ya anzelu moko na Babylone, mpe kolikasaka ba ngonga ebele ya kotiaka mingete ezanga tika na masano ya viedeo kozangaka kokueya na mpongi ya bonzindo ya molimo. Te bokoki te komikotisa na pornongaphie na nzela ya internet mpe kobosana bolamu na bompeto kozangaka bambano ya mabe ya molimo. Soki bobungisi Molimo, bozali ya kobunga. Bobulunganisa makanisi te mpe bolemba nzoto te.

Bayekoli ya solo bazali kokoba ya kolamuka kati na Nzambe na losambo ya moto na moto ya bososoli ya mikolo nyonso, na makasi kotangaka makomi, botosi ya moto se ye moko, bomipesi na mosala. Botikala na nse ya nzete mpe botikala ya kolamuka.

Mibu ebele eleki, ndeko muasi Pearson mpe ngai tobengamaki kokamba Misio ya Washington Tacoma. Libiangi ezalaki likamuisi moko monene. Na mwa komutingisa nakutanaki na mokambi mpe CEO ya company epai nazalaki kosala mpe nayebisaki bango mpo na libiangi na ngai na etinda. Bamonani mpeza ya kosepela te na ntina ya mokano na ngai ya kotika company. “Ntango nini ozuaki mokano oyo, mpe mpo na nini osololaki na biso yambo te mpo na yango?” Bango batunaki.

Na ngonga moko ya mpole, eyano moko ya mozindo eyaki na makanisi na ngai. Nalobaki “Nazuaka mokano oyo ntango nazalaki muana mobali-akoli ya mibu-19, ntango nasalaki mayokani ya bule na Nzambe na tempelo ya kolanda Mobikisi. Natongaki bomoi na ngai mobimba na mayokani wana, mpe nazali na monsa etondi ya kosala yango sikawa:”

Ntango tokoti na mayokani na Nzambe, ezali na bozongi sima te. Kotika, komitika, mpe komilela ezali ba nzela te. Na bokonzi ya Nzambe, ezali na mobeko ya malamu koleka mpo na bobulisami. Ezali kosenga kiboyekoli ya makasi! Ezali na esika te mpo na bayekoli ya kati kati to ya kolela lela. Ya kati kati ezali monguna ya bolamu. Mpe bomipesi na ndaku ekopekisa bino kotingamaka tii na nsuka.

Soki bozali kobundaka, kobulungana, to kobunga na molimo, nasengi bino nalombango kosala eloko moko nayebi oyo ekozongisa bino na nzela. Bobanda lisusu litangi ya molimo ya Buku ya Mormon mpe bosala matangi yango, mokolo nyonso! Natatoli na bonzito ya Buku ya Mormon oyo ekobongola bomoi na bino mpe ekolendisa bino kososola kolanda Klisto. Molimo Mosantu ekobongola mitema na bino mpe ekosunga bino komona “biloko lokola yango ezali mpenza”12 Yakolakisa bino nini bosengeli kosala na sima. Oyo ezali elaka na Nefi mpo na biso:

“Mpe nalobaki epai na bango… oyo nyonso akoyekemela liloba ya Nzambe, mpe akosimba yango ngui, bango bakokufa ata mokolo moko te, mpe masenginya mpe mbanzi ya kanda ya monguna ekolonga bango te na bolanda, mpo na kokamba bango na libebi.

“Yango wana, ngai… nalendisaki bango … ete basala keba na liloba ya Nzambe mpe bamikundola kobatela mitindo na ye ntango nyonso mpe na makambo nyonso.”13

Bandeko mibali mpe basi, kotingamaka tii na nsuka ezali momekano monene ya kiboyekoli. Kiboyekoli na biso ya mokolo na mokolo ekotalisa lobi na biso ya libela. Bolamuka kati na Nzambe, bokangama na bosolo, bobatela mayokani na bino ya bule ya tempelo, mpe botikala na nse ya nzete!

Napesi bino litatoli ya mosekwi, aza na bomoi Klisto. Nayebi ete Ye azali na bomoi. Mposa na ngai oyo eleki monene été nakozala na bosolo mpe bondimi ya solo na nsuka nyoso na kolandaka ndakisa na Ye ebulisami. Na nkombo ya bule ya Nkolo Yesu Klisto, amen.