2010–2019
Bomoni ya Libela ya Nsango Malamu
sánzá ya mínei 2015


Bomoni ya Libela ya Nsango Malamu

Mpo ete mikano oyo esimbi boseko, kozalaka na bomoni ya nsango malamu ezali na ntina.

Na emoniseli moko epesamaka na Mose, tolobelaka makanisi oyo Tata na biso ya Lola alobaki: “talani mosala mpe nkembo na ngai: kokokisa bozangi nkufa mpe bomoi ya libela ya moto.”1 Engbene na liloba wana, mposa ya Tata ezali kopesa moto nyonso libaku ya kozwa litondi ya esengo. Mabimisi ya mikolo ya nsuka elakisi ete Tata na biso ya Lola asalaki mwango moko monene ya esengo mpo na bana na Ye nionso, mwango moko ya kitoko koleka naboye tokoki kozonga kozala elongo na Ye.

Kososolaka mwango yango ya esengo ezali kopesa biso bomoni moko ya libela mpe ezali kosunga biso kopesa motuya mpenza na mitindo, makuli, mayokani, mpe bitumba na mikakatano.

Fongola moko ya yambo ewuti na Alma: “Yango wana Nzambe apesaki bango mitindo, nsima ye kosala ayebisaki bango mwango ya bosikolami.”2

Ezali na motuya kososola bitape na bokobi ya koteyaka. Tata na Biso ya Lola yambo ateyaki Adama na Ewa mwango ya bosikolami, mpe nsima Ye apesaki bango mitindo.

Yango ezali solo monene. Komanyolaka mwango ekosunga bato kobomba mitindo, kozua mikano malamu, mpe kozua bopusi ya sembo.

Na ntango nyonso oyo nasalaka na Eklezia, namonaka bomipesi mpe bondimi etondi ya bandimi ya Eklezia ya bikolo ndenge na ndenge, mingi kati na bango bazali na etumba ya politiki, mambi matali bato mpe mabota to kobomba mbongo. Likambo ya ndenge moko oyo namonaka mbala na mbala na bandimi wana ya bondimi koleka ezali bomoni oyo bazali na yango mpo na boseko. Bomoni ya libela ya nsango malamu ezali kotambuisa biso na kososola esika biso tozui na mwango ya Nzambe, kondima mpasi mpe kokoba elongo na yango, kozua mikano, mpe kokotisa babomoi na biso na likoki na biso ya bonzambe.

Bomoni ezali motindo oyo tozali komona biloko ntango totali yango na mwa mosika, mpe ezali kopesa biso nzela ya kosepela na motuya na yango ya solo.

Ezali lokola kozalaka na kati ya zamba moko mpe kozalaka na nzete moko liboso na biso. Atako tozongi sima moke, tokozala na likoki te ya kosepela nini oyo zamba ezali mpenza. Mbala moko nakendaki kotala zamba ya Amazon na Leticia, mboka Colombie, pembeni ya nsuka ya mabele ya mboka Bresil mpe Perou. Nakokaki te kosepela na monene na yango tii nakueyaki kati na yango mpe nalongaki bomoni.

Ntango bana na biso bazalaki mike, bazalaki na momesano ya kotala etando ya television moko ya bana oyo ezali kolakisa pologalame ebengamakiOzali Komona Nini? Bilingi na etando ezalaki kolakisama minene mpe bana basengelaki koyeba nini yango ezalaki lokola elili malembe malembe ekomaki kokoma muke. Mbala moko soki eloko yango mobimba ekomaki komonana, bokokaki koloba na mpete ete ezalaki nyau, nkona, eteni ya mbuma, mpe bongo na bongo.

Nakundoli ete na libaku moko bazalaki kotalaka pologalame wana mpe yango elakisaki eloko moko pembeni emonanaki mabe koleka mpo na bango, kutu ya kopusa mosika; kasi lokola elili yango ezalaki koya muke, bango bayaki komona ete ezalaki pizza moko ya elengi. Bongo balobaki na ngai, “Tata, sombela biso moko lokola kaka oyo!” Sima ya bango koyebaka nini yango ezalaki, eloko oyo na yambo emonanaki mabe mpo na bango na suka ekomaka eloko ya mposa makasi.

Tika nakabola mayele mosusu. Na ndako na biso bana na biso balingaki mingi kosala lisano ya jigsaw puzzles. Biso banso tozuaka ntango mosusu libaku ya kosala puzzle. Mingi esalami na biteni ya mike mike. Nakundoli ete moko ya bana na biso (nakoloba nkombo na ye te na ntina ya kobatela bomoto na ye) azalaki na ezalela ya kotia makanisi na biteni na yemoko, mpe ntango moto moko atie te na esika ye akanisaki esengeli kozala, ye akosilika mpe akoloba ete yango ezalaki mabe mpe akolinga kobuaka yango. Ye ayekolaki na nsuka kosala puzzle ntango asosolaki ete biteni na yango ya mike ezuaka esika na nsuka ya elilingi, kutu ntango ayebaki te wapi kotia yango na ntango moko epesami.

Oyo ezali lolenge moko ya kosepelaka na mwango ya Nzambe. Tosengeli te komitia biso moko elongo na biteni wana ekabuani kasi na esika ya komeka komema elilingi mobimba na makanisi, kobombaka na makanisi nini mbano ya suka ekozala. Nkolo ayebi esika biteni wana esengeli nde yango etiami na kati ya mwango. Mitindo nyonso ezali na motuya ya libela na kati ya mwango monene ya esengo.

Ezali na motuya koleka ete tosengeli te kozua mikano ya mbano ya libela kowuta na bomoni ya bokufi. Mpo ete mikano oyo esimbi boseko, kozalaka na bomoni ya nsango malamu ezali na ntina.

Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki : “mingi ya ba elikya na biso ezali likambo mosusu. Tokoki kolikya mpo na komata na lifuti, mokolo moko ya kafukafu, elonga moko ya maponi, to mpo na ndako ya monene koleka—biloko oyo ekoki to ekoki kokisama te. Bondimi na mwango ya Tata ezali kopesa biso makasi atako ntango baboliki yango ya ntango mokuse etondisami te. Elikya ezali kobomba biso ‘komikotisa makasi’ na ntina malamu ata na ntango yango emonani ekokokisama te (tala D&A 58:27).”3

Kozangaka bomoni moko ya libela, to kobungisaka yango, ekoki komema biso kozua bomoni ya mokili lokola ndelo na biso ya moto yemei mpe kozua mikano oyo ekokani te na bolingi ya Nzambe.

Buku ya Mormon azolobela ezaleli oyo Nefi azuaki mpe ezaleli ya Laman mpe Lemuel. Banso banyokuamaki mingi na bampasi mpe mikakatano ya kotanga te, ata bongo bizaleli na bango liboso na yango ezalaki ya kokesana makasi. Nefi alobaki, “Mpe monene boye ezalaki mapamboli ya Nkolo likolo na biso, ete tozalaki kolia niama mobesu na esobe, basi na biso bapesaki miliki mitonda meke mpo na bana na bango, mpe bazalaki makasi, iyo lokola mibali; mpe babandaki komema mobembo na bango na koyimayima te.”4

Laman na Lemuel, na bongo, bamilelaki na mawa nyonso. “Mpe boye Laman mpe Lemuel, bazalaki bakulutu, bazalaki koyimayima kotelemela tata na bango. Mpe bazalaki koyimayima mpo bayebaki te bozalani ya Nzambe oyo akelaki bango.”5 kozanga Boyebi to koyina “bozalisi ya … Nzambe” ezali nzela moko ya kobungisa bomoni ya libela, mpe koyimayimaka ezali moko ya elembo. Atako Laman mpe Lemuel bamonaki bikamua ebele elongo na Nefi, bakamuaki, kolobaka: “Mpe toyengaki yengaki na esobe mpo na mibu miye mingi; mpe basi na biso bayokaki buale, kokumbaka bazemi, mpe babotaki bana na esobe mpe bayokaki mpasi ya ndenge nyonso; longola se liwa; mpe elingaki kozala malamu mingi koleka ete bakufa yambo babima libanda ya Yelusalemi na esika bayoka mpasi ya mitungisi wana.”6

Wana ezalaki na bizaleli mibale ekesena, atako mikakatano mpe mitungisi bakutanaki na yango ezalaki ndenge moko. Ya solo, bomoni na bango ekesenaki.

Mokambi Spencer W. Kimball akomaki oyo elandi: “Soki totali bokufi lokola mobimba ya bozalisi, sima mpasi, mawa, kokueya, mpe bomoi mokuse ekozala mitungisi. Kasi soki totali likolo ya bomoi lokola eloko moko ya libela kobendaka mosika na lobi eleki ya yambo ya mbotama mpe na lobi ya libela ya sima na kufa ekoya, nde bongo nyoso ekoyaka ekotiama na bomoni ya moto yemei.”7

Mpaka David B. Haight alobaki lisolo moko etali mosali bikeko Michelangelo mpo na kolakisa ntina ya kotalaka eloko nyonso na bomoni ya moto ye moko: “Lokola mosali bikeko azalaki kokata liboke moko ya marbre, muana moko ya mobali azalaki koya mikolo nyonso mpe azalaki kotala na nsoni mingi. Ntango elongi ya David ekomaki yakomonana mpe ebimaki kowuta na libanga wana, mobimba ete mokili mobimba ekokaki kosepela na yango, muana mobali atunaki Michelangelo, ‘Ndenge nini yo oyebaki ete ye azalaki na kati wana?’” 8

Bomoni oyo mosali bikeko amonaki na libanga wana ya marbre ezalaki ya kokesana na oyo muana mobali oyo azalaki kotalaka ye kosala. Makanisi ya mosali bikeko mpo na makoki oyo ekundamaki na libanga epesaki ye nzela ya kosala mosala moko ya maboko.

Nkolo ayebi nini Ye alingi kokokisa na moko na moko na biso. Ye ayebi motindo nini ya kobonga Ye alingi kokokisa na babomoi na biso, mpe biso tozali na ndingisa te ya kopesa Ye toli. Makanisi na Ye ezali likolo koleka makanisi na biso.9

Natatoli ete, tozali na Tata ya Lola moko ya bolingo, sembo, mpe atonda na ngolu oyo abongisa mwango moko mpo na esengo na biso ya libela. Natatoli ete Yesu klisto azali Muana na Ye ya Mobali mpe Mobikisi ya mokili. Nayebi ete Mokambi Thomas S. Monson azali profeta ya Nzambe. Nalobi makambo oyo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.