2010–2019
Libonza ya Ngolu
sánzá ya mínei 2015


Libonza ya Ngolu

Lelo mpe libela ngolu ya Nzambe ezali mpo na banso oyo mitema na bango mizali ya kobukana mpe milimo na bango mizala ya mawa

Na Eyenga ya Pasika tomikundolaka likambo ya nkembo mingi koleka oyo ezelamaki ntango molai mpo na komona na mambi ma kala ya mokili.

Ezali mokolo oyo ebongolaki makambo nionso.

Na mokolo wana, bomoi na ngai ebongwanaki.

Bomoi na yo ebongwanaki.

Lobi ya bana ya Nzambe banso ebongwanaki.

Na mokolo wana epambolama, Mobikisi ya bato, oyo azwaka likolo na Yemei miniololo ya lisumu mpe ya liwa oyo ezalaki kosimba biso bakangemi, apanzaki miniololo wana mpe akangolaki biso.

Mpo na libonza ya Mosikoli na biso ya bolingo, liwa ezali na etubeli moko te, lilita ezali na elonga moko te,1 Satana azali na nguya ya libela moko te, mpe tozali ya “kobotama … lisusu na elikia ya bomoi na nzela ya e lisekwa Yesu Klisto.”2

Solo, Apostolo Paulo azalaki semba ntango alobaki ete tokoki “kobondisana moko mpe mosusu na maloba wana.”3

Ngolu ya Nzambe

Tolobelaka mbala mingi Bomikabi ya Mobikisi—mpe and rightly so!

Na maloba ya Yakobo, “Mpo ntina nini kolobela te bomikabi ya Klisto, mpe kokoma na boyebi moko malamu mpo na ye?”4 Kasi ntango “tokolobela Klisto, … tokosepela na Klisto, … tokoteya Klisto, [mpe] tokobikola Klisto”5 na mabaku nionso,  tosengeli mokolo moko te kobungisa ezalela na biso ya limemia mpe botondi ya mozindo mpo na libonza ya seko ya Mwana ya Nzambe.

Bomikabi ya Mobikisi ekoki kokoma mpambampamba na mateya na biso, na masolo na biso, to na mitema na biso te. Ezali bule mpe esantu, mpo ezalaki na nzela ya “libonza monene mpe ya nsuka” oyo ete Yesu Klisto amemaki “lobiko na banso baoyo bakodima nkombo na ye.”6

Nazali kokamwa kokanisa ete Mwana ya Nzambe akomikitisa mpo na kobikisa biso, lokola tozali malamu te, mpeto te, pene ya kosala mambungi, mpe ya kozanga matondi lokola tozalaka mbala mingi. Nameki kososola Bomikabi ya Mobikisi na mayele na ngai mokuse, mpe ndimbola se moko nakoki kopesa ezali oyo: Nzambe alingi biso na mozindo, malamu, mpe sekoseko. Nakoki kutu kobanda kososola te “monene, mpe molai mpe mozindo … [ya] bolingo ya Klisto.”7

Ndakisa ya nguya ya bolingo wana ezali oyo makomi mbala mingi ezali kobianga ngolu ya Nzambe—lisungi mpe dotatio ya bonzambe ya makasi na nzela na yango tozali kokola uta na bato mabe mpe basuka oyo tozali sikawa mpo na kokoma bato banetwama ya “bosolo mpe pole, kino [tokomi] ya nkembo kati na bosolo mpe [toyebi] makambo manso.”8

Ngolu ya Nzambe oyo ezali kafukafu mpenza. Atako bongo ezali bala mingi kososolama te.9 Kutu mpenza, tosengeli koyeba oyo etali ngolu ya Nzambe soki tokani kokitola oyo elengelamaki mpo na biso na bokonzi ya seko..

Mpo na ntina wana nakolinga kolobela ngolu. Mingi mingi, yambo, lolenge nini ngolu efungoli bikuke ya lola,  mpe ya mibale, lolenge nini ekofungola maninisa ya lola.

Yambo: Ngolu Efungoli Bikuke ya Lola

Mpo biso banso “tosumukaki mpe tozangi nkembo ya Nzambe,”10 mpe mpo “eloko moko te ya mbindo ekoki kokota na bokonzi ya Nzambe,”11 Moto nioso te kati na biso alongobani mpo na kozonga na miso ya Nzambe.

Atako soki tozalaki kosalela Nzambe na milimo na biso mobimba, ekoki te mpo na biso tokozala kaka “basali bazangi litomba.”12 Tokoki kozwa nzela na biso ya kokotela na lola te; babosenga ya boyengebene etelemaka lokola ndelo, oyo tozali na nguya te ya kolonga na bisomei.

Kasi nionso ebungi te.

Ngolu ya Nzambe ezali elikia na biso monene mpe ya seko.

Na nzela ya libonza ya Yesu Klisto, mwango ya mawa ebateli babosengi ya boyengebene13 “mpe [ememi] penepene nzela epai ya bato ete bakoka kozala na bondimi mpo na boyamboli.”14

Masumu na biso, atako yango ekoki kozala motane lokola ngola, ekoki kokoma mpembe lokola mvula ya mpembe. 15 Mpo Mobikisi na biso ya bolingo “amipesaki lokola lisiko mpo na nionso,”16 ekoteli na bokonzi ya seko epesameli biso.17

Ekuke efungwami!

Kasi ngolu ya Nzambe ezali kaka kozongisa biso na ezaleli na biso ya kala ya bozangi elindo te. Soki lobiko elingi bobele koloba koboma mabungi mpe masumu na biso, nde lobiko—na kitoko na yango—ekokisi bantina ya minene ya Tata mpo na biso te. Ntina na ye ezali likolo koleka: Alingi bana na Ye ya mibali mpe ya basi bakoma lokola Ye.

Na likabo ya ngolu ya Nzambe, nzela ya boyekoli ezongisaka nsima te, esalisaka biso tokoma malamu.

Ekambaka epai ya milai oyo tokoki mpenza kososola te! Ekambaka na bonetwami na bokonzi ya celesitiale ya Tata na biso na Lola, esika wapi biso, ya kozingama na bamoko na biso ya bolingo, tozwi “litondi na ye, mpe nkembo na ye.”18 biloko nionso ezali ya biso, mpe tozali ya Klisto19 Yango wana, nionso oyo Tata azali na yango ekopesamela biso.20

Mpo na kokitola nkembo oyo, tosengeli na mingi koleka ekuke moko ya kofungwama; tosengeli kokota na nzela ya ekuke oyo na mposa moko ya motema ya kobongwama—mbongwana moko ya kokamwa ete makomi elimboli yango lokola kozakaka “kobotama lisusu; iyo, kobotama na nzambe, kobongola bozali na biso [ya mosuni] mpe ya bokwei, na bozali ya bosembo, esikolami bango na nzambe, kokomaka bana mibali na ye mpe bana basi na ye.”21

Ya mibale: Ngolu Efungoli Maninisa ya Lola

Eloko mosusu ya ngolu ya Nzambe ezali bofungoli ya maninisa ya lola, na nzela na oyo Nzambe asopaka mapamboli ya nguya mpe bokasi, kopesaka biso makoki ya kokokisa makambo oyo na lolenge mosusu ekozala mosika mpenza mpo na kozwa. Ezali na ngolu ya kokamwa ya Nzambe ete bana na Ye bakoki kolonga nguya ya nse ya mai mpe potopoto ya moyini, kotelema likolo ya lisumu, mpe “kozala ya kokoka na Klisto.”22

Atako banso tozali na babotau, tokoki kolonga yango, Yango wana ezali na ngolu ya Nzambe ete, soki tomikitisi mpe tozali na bondimi, biloko ya botau ekokoma makasi.23

Na babomoi na biso mobimba, ngolu ya Nzambe epesaka mapamboli ya ntango mpe makabo ya molimo oyo ekumisaka makoki na biso mpe efulukisaka babomoi na biso. Ngolu na ye ebongisaka biso. Ngolu na ye esalisaka biso tomikomisa malamu koleka nionso.

Nani Akoki Kolonga?

Na Biblia totangi ete Klisto akendeki na ndako ya Simona Mofalisai.

Na kotala na miso, emonanaki lokola ete Simona azalaki moto malamu mpe ya bosembo. Azalaki ntango nionso kotia elembo na molongo ya makambo ya kosala ya mikumba ya eyamba: azalaki kotosa mobeko, kofuta moko na zomi na ye, kotosa Saba, kosambela mokolo na mokolo, mpe azalaki kokende na sinagoge.

Kasi ntango Yesu azalaki elongo na Simona, mwana mwasi moko apusanaki penepene, asokolaki makolo ya Mobikisi na mpisoli na ye, mpe apakolaki mafuta kitoko na makolo na Ye.

Simona asepelaki te na etalisi oyo ya kokumbamela, mpo ayebaki ete mwasi wana azalaki mosumuki. Simona akanisaki ete soki Yesu ayebaki yango te, Asengelaki kozala profeta te to alingaki kotika mwasi yango kosimba ye te.

Kososolaka makanisi oyo, Yesu abalukaki epai ya Simona mpe atunaki motuna moko. “Ezalaki na modefisi moko oyo azalaki na bato na niongo mibale, moko asengelaki kofuta makuta nkama mitano, mosusu ntuku mitano.

“Mpe bazalaki [bango nionso] na eloko te mpo na kofuta, boye alimbisaki bango nionso mibale. Bongo na kati na bango moto nani akolinga ye mingi koleka?”

Simona ayanolaki ete ye oyo alimbisami niongo eleki monene.

Yesu ateyaki liteya moko ya mozindo: “Omoni mwasi oyo? …  Masumu na Ye, oyo ezali ebele, elimbisami; mpo alingaki mingi: kasi ye oyo alimbisami moke azali na bolingo moke.”24

Nani kati na bato mibale oyo tokokani mingi mpenza?

Ezali biso lokola Simona? Ezali biso na kondima mpe molende na makambo na biso ya malamu, kolikiaka na bosembo na biso? Ezali biso ntango mususu mwa motema likolo na baoyo bazali kotosa mibeko? Ezali biso bakumbi pepo ya automatiki, kolandaka mopepe, kokendaka na mayangani na biso, kobayaka na kelasi ya Malongi ya Nsango malamu, mpe ntango mosusu kotalaka batelefoni ya maboko na biso na liyangani ya elambo?

To ezali biso lokolo mwasi oyo, oyo akanisaki ete abungaki mobimba mpe na kozanga elikia mpo na masumu?

Ezali Biso na bolingo mingi?

Ezali biso kososolaka niongo na biso epai ya Tata ya lola mpe kobondela na milimo na biso mobimba mpo na ngolu ya nzambe?

Ntango tofukamaka mpo na kosambela, ezali mpo na kotala lisusu makambo minene koleka nionso ya bosembo na bisomei, to ezali mpo na kotubela mbeba na biso kobondela mawa ya Nzambe, mpe kosopa mpisoli ya matondi mpo na mwango ya kokamwa ya bosikoli?25

Lobiko ekoki kosombama na mosolo ya botosi te te; esombami na makila ya Mwana ya Nzambe.26 Kokanisaka ete tokoki koteka misala na biso ya malamu mpo na lobiko ezali lokola kosombaka tike ya pepo mpe kokanisaka ete tozali na pepo. To kokanisaka ete nsima ya kofutaka mosolo ya kofutela mpo na ndako ndako na biso, tozali sikawa na mabele mobimba.

Kasi Mpo na Nini Kotosa?

Soki ngolu ezali likabo ya Nzambe, mpo na nini nde botosi mitindo ya Nzambe ezali ntina mpenza? Mpo na nini komiyoka mabe na mibeko ya Nzambe—to boyamboli, mpo na makambo wana? Mpo na nini kaka kondima te ete tozali basumuki mpe kotika Nzambe abikisa biso?

To, kotia motuna kolandisa maloba ya Paulo, “Esengeli na biso kowumela na masumu ete ngolu ekoki kofuluka?” Eyano ya Paulo ezalaki ezali pete mpe pole “Nzambe apekisi.”27

Bandeko mibali mpe basi, tozali kotosa mitindo ya nzambe—mpo na bolingo mpo Ye!

Komekaka kososola likabo ya ngolu ya Nzambe na motema mpe molimo na biso epesi biso bantina mingi koleka mpo na kolinga mpe kotosa Tata na biso ya Lola na bosokemi mpe matondi. Ntango tozali kotambola na nzela ya boyekoli, ezali kobongisa biso, ezali kobutisa biso, esalisaka biso kokoma mingi lokola Ye, mpe ekambaka biso kozonga na miso na Ye. “Molimo ya Nkolo [Nzambe na biso]” ezali komema “mbongwana makasi na biso, … ete tozali lisusu na meko mpo na kosala mabe te, kasi mpo na kosala bolamu ntango nionso.”28

Yango wana, botosi na biso ya mitindo ya Nzambe eyaka lokola mbano ya momesano ya bolingo mpe matondi ezanga nsuka mpo na bolamu ya Nzambe. Lolenge ya bolingo mpe matondi ya solosolo ekotondisa na kokamwa misala na biso na ngolu ya Nzambe. Bolamu ekokoba ekotondisa makanisi na biso, mpe bondimi na biso ekokola makasi na miso ya Nzambe.29

Bandeko mibali mpe basi, kosalela nsango malamu na botongono ezali mokumba te. Ezali mosala moko ya esengo—bolengeli mpo na kokitola nkembo monene ya baboseko. Toluki kotosa Tata na biso ya Lola mpo milimo na biso ekokoma mingi kokokana makambo ya molimo. Tokoyeba makambo oyo toyebaki te ete ezalaki. Bongengi mpe bososoli eyei na biso ntango tozali kosala mosala ya Tata. 30

Ngolu ezali likabo ya nzambe, mpe mposa na biso ya kozala botosi epai ya mitindo ya Nzambe ezali bosembolami ya loboko na biso ya bokufi mpo na kozwa likabo ya bule uta Tata na Lola.

Banso Tokoki Kosala

Profeta Nefi abakisaki eloko moko ya ntina na bososoli na biso ya nguya ya Nzambe ntango asakolaki, “Tosali na etingia … mpo na kondimisa bana na biso, mpe lisusu bandeko na biso, kondima Klisto, mpe kozongisa boyokani na Nzambe; mpo toyebi ete ezali na ngolu ete tobikisami.31

Nzokande, nakamwi soki ntango mosusu tobongolaka mabe liloba “nsima ya manso oyo tokoki kosala.” Tosengeli kososola ete “nsima” ekokani te na “mpo.”

Tobikisami te “mpo” na manso tokoki kosala. Ezali na moko kati na biso oyo asali manso oyo tokoki kosala? Nzambe azelaka tii tosali makasi nionso liboso Ye akokota na babomoi na biso na ngolu na Ye ya kobikisa?

Bato mingi bayokaka balembi mpo ntango nionso bakweyaka mpo na kosala maye masengami. Bayebi bangomei yambo ete “molimo ezali na mposa nde nzoto kasi nzoto ezali na bolembu.”32 Batombolaki mingongo na bango elongo na Nefi na kosakolaka ete, “Molimo na ngai eyoki mawa mpenza na ntina ya mabe na ngai.”33

Nandimisami ete Nefi ayebaki ngolu ya Mobikisi epesaka mpe epesaka biso makoki mpo na kolonga lisumu.34 Yango wana Nefi asalaki na etingia mpenza mpo na kondimisa bana mpe bandeko mibali “bandima Klisto, mpe bazongisa boyokani na nzambe.”35

Nsima na nionso, wanaezali maye tosalaka! Mpe wanaezali mosala na biso kati na bokufi!

Ngolu Ezali mpo na Banso

Ntango nakanisaka maye Mobikisi asalaki mpo na biso mwa liboso ya Eyenga ya Pasika ya yambo, Nalingi kotombola mongongo na ngai mpe koganga masanzoli epai ya Nzambe Oyo-Aleki-Likolo mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto!

Bikuke ya lola efungwami!

Maninisa ya lola efungwami!

Lelo mpe libela ngolu ya Nzambe ezali mpo na banso oyo mitema na bango mizali ya kobukana mpe milimo na bango mizali ya mawa.36 yesu Klisto apetolaki nzela mpo na biso totambola na na milai mizangi bososoli mpo na milimo ya bokufi.37

Nasambeli ete tokomona na miso ya sika mpe motema ya sika ndimbola ya seko ya ntina ya libonza ya komikaba ya Mobikisi. Nasambeli ete tokolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe matondi na biso mpo na likabo ya ngolu ezanga nsuka na kobatelaka mitindo na Ye mpe na esengo “kotambola[ka] na bomoi [moko] ya sika.”38 Na nkombo ya bule ya Nkolo mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, amene.