2010–2019
Nkola Eleki Monene ya Bilenge Bakoli
sánzá ya mínei 2015


Nkola Eleki Monene ya Bilenge Bakoli

Oyo tozali na mposa sikawa ezali nkola ya bilenge bakoli na Mambi ya Eklezia. Tozali na mposa ya mitema mpe milimo na bino mobimba.

Moko ya bilengi nasepelaka ntango nakei mobemba na mokili mobimba ezali libaku ya kokutana mpe kopesa mbote na bamisionele. Bampaka mpe bandeko basi oyo minene bazali kongenga na Pole ya Klisto, mpe nafulami ntango nionso na bolingo na bango mpo na Nkolo Yesu Klisto, mpe mosala na bango ya komipesa na Ye. Ntango nionso napesaka bango mbote ya loboko mpe nayokaka molimo mpe bondimi ya kitoko, namilobelaka, “Bana mibali mpe bana basi oyo ya biso bazali mpenza likamwisi!”

Na bosangani bonene ya bonganganzambe sanza ya zomi 2002, natiaki ntembe na baepisikopo, baboti, mpe bamisionele bakoya mpo na “kotombola ndelo” mpo na mosala ya bamisionele ya ntango mobimba.

Nde nalobaki ete “oyo tozali na yango mposa … ezali nkola eleki monene ya bamisionele ba mambi ya Ekleiza. Tozali na mposa ya bamisionele balongobani, bomikokisi, ya bokasi na molimo. …

“… Tozali na mposa ya mitema mpe milimo na bino mobimba. Tozali na mposa ya bamisionele ya mpiko, ya makanisi, mpe ya bolingi oyo bayebi boniboni koyoka mpe koyanola na nungunungu ya Molimo Mosantu.”1

Na ndenge mingi mokili ya lelo ezali na mimekano mingi mpenza koleka mibu 13 mileki. Bilenge mibali mpe bilenge basi bazali na masano mingi ya koboya na bolengeli na bango mpo na misio mpe bomoi na bango ekoya. Teknolozy epanzani, mpe penepene na moto nionso akoki kozwa biloko ya kosimba oyo ekoki kokanga bokebi ya libota ya bato ya Nzambe mpo na bolamu bonene mpe mabe eyebani te.

Lelo nakoloba na bamisionele sikawa na mosala. Bamisionele bakoya mpe bamisionele bazongi, mpe bilenge bakoli na Eklezia. Nabondeli bino bososola mpe bomaniola mpenza oyo nasengeli koloba na biso ntango bozali na mobembo na kati ya mibu ya kitoko mpe ya esengo ya bomoi na bino.

Na mibu ya ebandeli na Eklezia, bamisionele bazalaki kosolola na Mokonzi Monene liboso bakende na ba misio na bango. Mikolo miye bazali kosolisama mpo na kosala misio na bepisikopo mpe mokambi ya likonzi, mpe mingi na bino bokokende bomoi na bino mobimba na kozanga kosolola na Mokonzi Monene moko. Oyo ezali bobele bomanioli moko ya bosolo ya eklezia ya mokili mobimba ya koleka bandimi 15 milio. Nayebi nazali koloba mpo na bandeko na ngai ntango nalobi na bino ete totombeli yango esalema mpo na biso koyeba bino banso moko na moko mpe tokoka koloba na bino ete tolingi bino mpe tozali kosunga bino.

Na esengo Nkolo apesi banzela mpo na biso koyamba bino. Na ndakisa, moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Babale akotinda misionele moko na moko na misio na ye. Atako yango esalemi na kozanga bosololi ya miso na miso eyebana, teknolozi mpe bobimisi esangisi kopesa mayele oyo ezali mpenza ya katikati mpe ya moto na moto. Tika ngai nayebisa boni boni yango ezali kosalema.

Foto na yo ekokoma na etano moke, elongo na makambo ya ntina epesami na episikopo mpe mokambi ya likonzi. Ntango foto ebimi, tokotala na kati ya miso na yo mpe tokotala lisusu biyano na yo na mokanda ya etinda ya misionele. Na mwa ngonga wana, ekomonana lokola soki ozali wana mpe ozali koyanola na biso mbala moko.

Ntango totali foto na yo, tolikii ete okokisi na lolenge nionso ‘ndelo ya kotombwana” oyo esengami lelo mpo na kozala misionele ya botongono mpe elonga. Nde, na nguya ya Molimo ya Nkolo mpe na nse ya bokambi ya Mokambi Thomas S. Monson, totindi yo na moko ya bamisio 406 ya Eklezia.

Te, ezali lolenge moko te na bosololi ya moto na moto. Kasi ezali penepene.

Likita ya Video ezali lolenge mosusu oyo ekosalisa biso toyamba bakambi mpe bandimi ya Eklezia oyo bazali mosika mingi na Ndako bokonzi ya Eklezia.

Na yango na makanisi, nalingi baye na bino oyo bazali komilengala na kosala misio, baye bazongi, mpe banso na bino bilenge bokoli bolekisa mwa miniti elongo na ngai lokola soki tozalaki kosolola na video miso na miso sikawa. Nasengi bino botala ngai mpo na mwa miniti lokola soki yo mpe ngai tozalaki biso moko kaka na kati ya ndako epai nyonso bozali na butu ya lelo.

Mpo na ngai, nakobanza ete nazali kotala na kati ya miso na bino mpe koyoka mpeza biyano na bino na mwa mituna oyo nandimi ekolobela ngai mingi etali bozindo ya litatoli mpe bomipesi na bino na Nzambe. Soki nakoki komekola oyo nalobaki na bamisionele mibu 13 mileki, Oyo tozali na mposa sikawa ezali nkola ya bilenge bakoli na Mambi ya Eklezia. Tozali na mposa ya mitema mpe milimo na bino mobimba. Tozali na mposa ya bamisionele ya mpiko, ya makanisi, mpe ya bolingi oyo bayebi boniboni koyoka mpe koyanola na nungunungu ya Molimo Mosantu ntango bozali na nzela na kati ya mikakatano mpe masenginia ya mokolo na mokolo ya kozala elenge moko ya ntango ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka ya lelo.

Na maloba mosusu, ezali ntango ya kotombola ndelo kaka te mpo na bamisionele kasi lisusu mpo na bamisionele bazongi mpe mpo na nkola na bino mobimba. Mpo na yango, nasengi bino bomaniola na mitema na bino biyano ya mituna oyo:

  1. Ezali bino koluka makomi mbala na mbala?

  2. Ezali bino kofukama na losambo mpo na koloba na Tata na yo na Lola ntongo mpe butu nionso?

  3. Ezali bino kokila mpe kopesa likabo ya kokila sanza nionso—ata soki ozali mobola, moyekol oyo akoki te kopesa mingi?

  4. Ezali bino kokanisa na mozindo oyo etali Mobikisi mpe libonza ya bomikabi na Ye mpo na bino ntango bozali kolengela, kopambola, kolekisa, to kolia elambo?

  5. Ezali bino kokende na mayangani mpe kobanda kobatela mokolo ya Saba esantu?

  6. Ezali bino sembo na ndako, eteyelo, eklezia, mpe mosala?

  7. Ezali bino peto na makanisi mpe na molimo? Ezali bino koboya pornografi to kotala na internet, mikanda, filme, to batelefone, na bafoto ya mabe, oyo ekoki kotungisa bino soki baboti, bakambi, ye Ekleizia to Mobikisi Yemei amonaki yo?

  8. Ezali bino na bokebi na ngonga—koboyaka teknolozi mpe media ya bato, na masano ya video, oyo ekoki kobebisa boyoki na bino ya molimo?

  9. Ezali kuna eloko moko na bomoi na bino bosengeli kobongola mpe kobongisa, kobandaka lelo?

Botondi na bino mpo na mwa botali oyo ya miso na miso. Nalikii boyanoli moko na moko ya mituna na bosembo mpe na makanisi mobimba. Soki bomoni mbeba na moko ya mabongisi oyo, nde misenga na mpiko koyambola mpe komema bomoi na bino nsima na nzela ya mibeko ya nsango malamu ya boyekoli ya bosembo.

Sikawa bandeko, ekoki ngai kopesa toli ya kobakisa oyo ekosunga biso kozwa litatoli ya bozindo ya nsango malamu na mitema mpe milimo na bino?

Nakundolisi bino bamisionele bazongi ete bolengeli mpo na bomoi na bino mpe mpo na libota esengeli kozala ya kokoba. “BM” elingi koloba te “Bopemi ya Mormon!” Lokola bamisioneole bazongi, “bosengeli komipesa na makasi na likambo ya malamu, mpe kosala makambo ya mingi malamu na bolingi na [binomei], mpe kosala bosembo mingi.”2

Nasengi bosalela makoki bayekolaki na misio na bino mpo na kopambola bomoi ya bato nzinganzinga na biso mokolo na mokolo. Bobongola te lolenge bokangamaki na kosalisa basusu mpo na kokangama kaka na kelasi, mosala, to milulu ya mokili. Esika na yango, bokokisa bomoi na bino na mayele ya molimo oyo ekokundolisa bino mpe ekolengela bino mpo na kokoba kosalisa basusu mokolo na mokolo.

Na misio na bino boyekolaki motuya ya kotala bato na bandako na bango. Nakolikia ete ebele na bino bilenga bokoli, soki to te bosalaki misio ya ntango mobimba, bososola motuya ya kotala bato bazali bango moko kaka, na bokono, to balembi—kaka te lokola etinda kasi lisusu na ntina ya bolingo ya solo bozali na yango mpo na Tata ya Lola mpe bana na Ye.

Baye na bino na kelasi ya secondaire oyo bazali komilengela mpo na misio, nalendisi bino bosala elongo na kati mpe bosilisa seminele. Bino bilenge bokoli bosengeli komikomisa na institut ya bonzambe.3 Soki bozali kokende na kelasi ya Eklezia, na sikisiki bakisa kelasi moko semestele nionso na boyekoli ya bonzambe. Na eleko ya motuya oyo ya bolengeli mpo na etinda, libala ya seko mpe bomoi lokola mokolo, bosengeli kokoba kozala na nzela ya koyekola mpe kozwa bofuli mpe bokambi na nzela ya Molimo Mosantu. Boyekoli ya lokengo mpe na losambo ya nsango malamu na nzela ya seminele, institut, to bakelasi ya koyekola bonzambe ekoki kosalisa bino na lotomo wana.

Soki bokendaka na kelasi ya Eklezia to te, soki bokendaka na universite to te, bokanisa mpenza te ete bozali na misala mileki mpo na koyekola nsango malamu. Seminele, institute, to bakelasi ya bonzambe ekopesa bokokisi na bomoi na bino mpe ekobakisa na boyekoli na bino ya mokili na kopesaka bino libaku mosusu mpo na kolekisa ntango na koyekolaka makomi mpe mateya ya baprofeta mpe bapostolo. Ezali na malakisi minei ya sika oyo nalingi kotinda elenge akoli moko na moko mpo nakotalela mpe kokende.4

Mpe bobosana te ete bakelasi mpe milulu mipesami na institut ya esika na bino to na nzela ya bilenge bakoli banzemba ya palwasi to likonzi ekozala lisusu esika wapi bokoki kozala elongo na bilenge mibali mpe bilnge basi mpe kotombolana mpe kofulana ntango bozali koyekola mpe kokola na molimo mpe kozalana elongo. Bandeko, soki botii mpembeni batelefone na bino mpe kotala mpenza nzinganzinga mwa moke, bokoki kutu komona moninga na bino na institut.

Oyo etindi ngai na mwa toli mosusu oyo nasosoli boyebi ezali koya. Bino bilenge bakoli banzemba bozali na mposa ya kolinga mpe kobala. Nasengi botika kozelisa! Nayebi boko na bino bazali kobanga kosala libota. Nzokande, soki bobali moto asengeli na ngonga esengeli mpe na esika esengeli, bosengeli te kobanga. Ya solo, bakpokoso mingi bokokutana na yango ekolongwa soki “bomipesi ya solo” na kokutana ya sembo, kolinganaka mpe libala. Kokomela ye te! Bosalelala mongongo na binomei mpo na komiyebisa na bana basi ya bosembo ya Nzambe oyo bazali nzinganzinga na bino. Koyoka ya solo mongongo ya moto ekotuta ye mpo na koloba iyo.

Sikawa bandeko mibali natatoli na bino ete Nkolo Yesu Klisto akoki kosalisa bino kobongisa likambo nionso oyo esengeli kobongisama na bomoi na biso na nzela ya libonza ya bomikani na Ye.

Mpokwa oyo, ntango tozali kolengela kokumisa Eyenga ya Pasika lobi, nasengi bino bozala kimia elongo na ngai mpo na komikundola likabo ya Bomikabi ya Klisto. Bomikundola ete Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi Yesu Klisto, bayebi bino malamu koleka mpe balingi bino mingi koleka.

Na nzela ya Bomikabi, Mosikoli akamataki likolo na Yemei mobulu, mpasi, mpe masumu na biso. Mobikisi ya Mokili ayaki mpo na kososola moko na moko na biso moto na moto na koyebaka elikia ebukana, mikakatno, mpe bobomiboni na nzela ya mpasi na Ye na Getesamene mpe na ekulusu.5 Ye akufaki lokola mosala ya nsuka ya bolingo mpo na biso mpe akundamaki na lilita ya sika na butu wana ya nsomo.

Na Eyenga na ntongo, Yesu asekwaki uta na bawa—kolakaka bomoi ya sika mpo na moko na moko na biso. Nkolo mosekwi nde atindaki bayekoli na Ye koteya moto nionso kozala na bondimi na Klisto, koyambola masumu, kobatisama, kozwa likabo ya Molimo Mosantu, mpe koyika mpiko tii na nsuka. Bandeko, toyebi ete Nzambe mpe Mwana na Ye wa bolingo babimelaki Profeta Joseph Smith mpe bazongisaki na nzela na ye litondi ya nsango malamu ya libela ya Yesu Klisto.

Bozala makasi, bandeko. Bobatela mibeko ya Nzambe. Nkolo Yesu Klisto alakaki ete makambo manso tozali na yango mpo na kosala na bosembo ekozala ya biso. Bakambi ya Eklesia batieli bino motema. Tozali na mposa ya moko na bino bilenge bakoli mpo na komilengela mpo na kobala, kosalisa, mpe kokamba na mikolo mikoya, mpo na yango nasambeli na komikitisa nyonso na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.