2010–2019
Mpo nini Libala mpe Libota ezali na Ntina—Bisika binso na Mokili
sánzá ya mínei 2015


Mpo nini Libala mpe Libota ezali na Ntina—Bisika binso na Mokili

Libota ezali katikati ya bomoi mpe ezali fungola ya esengo ya seko.

Sanza ya zomi na moko eleki, nazwaki litomba ya kobengisama—elongo na Mokambi Henry B. Eyring mpe Bishop Gérald  Caussé—mpo na kozala na likita na ntina ya libala mpe libota na Vatican na Rome na Italie. Kuna ezalaki bantoma ya biyamba kilikili 14 mpe uta na motoba na mikili nsambo baye banso babengisamaka mpo na kolobela bondimi na bango na maye mazali kokomela libota na mokili ya lelo.

Elilingi
President Henry B. Eyring, Bishop Gerald Causse and Elder Perry in Rome

Papa Francis afungolaki liyangani ya bosangani wana na kosakolaka ete: “Tozali sikawa na momesano ya makambo ya ntango mokuse, na yango bato mingi mingi bazali bobele koboya libala lokola mokumba ya bato. Mbongwana oyo na bizalela mpe bomoto esalemi na nkombo ya bonsomi, kasi na solo ememi bobomi ya molimo mpe ya nzoto na bato mingi mpenza, mingimingi na baye baleki babola mpe baleki na bolembu. … Ezalaka ntango nionso bango baye bazwaka mpasi ntango ya matata.”1

Mpo na oyo etali bato ya nkola ya sika, alobaki ezali na motuya ete “bamipesa te na ngenge [na makanisi] ya makambo ya ntango mokuse, kasi mpenza bazala bato ya mbongwana ya mpiko mpo na koluka bolingo ya solo mpe ya kowumela, kotelemelaka ndakisa ya momesano”; yango esengeli kosalema. 2

Elilingi
Synod hall with the faith leaders on the marriage summit

Oyo elandamaki na mikolo misato ya bolakisi mpe masolo elongo na bakambi ya biyamba etali likambo ya libala katikati ya mobali moko mpe mwasi moko. Koyokamelaka bakambi ya biyamba ya kilikili mingi koleka ya mokili mobimba, nayokaki bango koyokanaka mpenza mpe kolakisaka kosungana mpo na bondimi na moko na moko etali bosantu ya libongisi ya libala mpe ya motuya ya mabota lokola eteni ya yambo na mangomba ya bato. Nayokaki lisanga mpe bomoko ya makasi elongo na bango.

Bazalaki mingi oyo bamonaki mpe balakisaki bomoko wana, mpe basalaki yango na ndenge mingi. Moko na baye basepelisaki ngai ezalaki moto ya mayele ya Mizilima moko uta na Iran oyo atangaki biteni mibale mobimba ya esakola na biso mpenza ya libota.

Na bosangani wana, namonaki ete ntango bondimi mpe mangoma mpe biyamba mingi esangani mpo na libala mpe libota, basangani lisusu mpo na mituya mpe limemia mpe mokumba oyo ekangani mpenza na mabota moko na moko. Ezalaki kokamwa mpo na ngai komona boniboni makambo ya yambo ya katikati ya libala mpe libota ekoteli mpe eleki bokesani ya bikolo, ya mosolo, to biyamba. Ntango ekomi likambo ya kolinga molongani mpe elikia, motungisi, mpe bandoto mpo na bana, tozali banso lolenge moko.

Elilingi
President Henry B. Eyring speaking in a news room.

Ezalaki kitoko kozala na bosangani elongo na balakisi ya mokili mobimba ntango balobi na mokili mobimba mayoki na bango ya motuya ya libota katikati ya mobali moko mpe mwasi moko. Lisikulu moko na moko elandamaki na matatoli uta na bakambi ya biyamba. Mokambi Henry B. Eyring apesaki litatoli ya nsuka ya likita yango. Apesaki litatoli ya nguya mpo na kitoko ya komipesa na libala mpe mpo na bondimi na biso na lipamboli ya mabota ya seko.

Litatoli ya Mokambi Eyring ezalaki libamboli moko ekokaki mpo na mikolo misato wana ya kafukafu.

Sikawa, bokoki kotuna, “Soki bato baleki oyo bazali koyoka bokokani wana ya makambo ya kotia na esika ya liboso mpe bondimi wana ya libota, soki bondimi mpe biyamba wana nionso eyokani mingimingi na nini libala esengeli kozala, mpe soki banso bayokani na motuya oyo esengeli kotia na bokangani ya bandako mpe libota, nde boniboni tozali na bokeseni? Boniboni Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka ekabwani mpe ekeseni na basusu na mokili?”

Eyano ezali oyo: ntango ezali kitoko komona mpe koyoka ete tozali na mingi mpenza na bomoko na basusu na mokili etali mabota na biso, bobele tozali komona libota na lolenge ya seko na kotalaka nsango malamu oyo ezongisami.

Nini nsango malamu ezongisami ememi na lisolo ya libala mpe libota ezali monene mpenza mpe sikisiki mpenza ete ekoki te koleka kolobama: tokomisi likambo yango ya seko! Tomemi mokumba mpe bosantu ya libala na ndelo moko monene mingi koleka na ntina ya bondimi mpe bososoli na biso ete mabala mazongi nsima wapi ezalaki liboso ete mabele oyo mazala mpe ete makoki kokende liboso na kati ya boseko.

Malongi oyo eteyami na pete, nguya, mpe kitoko na nkoma ya Ruth Gardner mpo na nzembo ya Eteyelo ya Bana “Mabota Ekoki Kozala Elongo Libela.” Telema mpo na mwa ngonga mpe kanisa na oyo etali bana ya Eteyelo ya Bana na mokili mobimba koyembaka maloba oyo na lokota na bango ya kobotama, na nsonge ya balolemo na bango, na esengo oyo bobele bolingo ya libota ekoki kolobela.

Mabota ekoki kozala elongo libela

Kati na mwango ya Tata ya Lola.

Nalingaka ntango nionso kozala na libota na ngaimei,

Mpe Nkolo alakisi ngai lolenge nini nakoki kosala.3

Mateya ya bozambe na biso mobimba ya nsango malamu etii na katikati mabota mpe boyokani ya sika mpe ya libela ya libala. Na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tondimeli bomoi moko ya yambo wapi tozalaki lokola bana ya molimo ya Nzambe Tata na biso ya Lola. Tondimi ete tozalaki, mpe tozali naino, baye libota na Ye.

Tondimi ete bokangani ya libala mpe libota ekoki kokoba koleka lilita—ete mabala masalemi na baye bazali na bokoki elongobani na batempelo na Ye makokoba kolongobana na mokili ekoya. Milulu ya libala na biso elongoli maloba “kino liwa ekokabola biso” mpe esika na yango elobi, “mpo na ntango mpe mpo na boseko.”

Tondimi lisusu ete mabota ya makasi endimama ezali kaka te eteni ya yambo ya mangomba ya sikisiki ya bato, mombongo ya sikisiki, mpe mimesano ya sikisiki ya mituya—ete ezali lisusu eteni ya yambo ya boseko mpe ya bokonzi mpe boyangeli ya Nzambe.

Tondimi ete libongisi mpe boyangeli ya lola ekotongama nzinganzinga na mabota mpe mabota ya minene.

Ezali na ntina ya bondimi na biso ete mabala mpe mabota mazali seko ete biso, lokola eklezia, tolingi kozala liboso mpe kozala elongo na mabongisi ya mokili mobimba mpo na kolendisa yango. Toyebi ete ezali kaka te baye bazali makasi na boyambi nde bakoki kokabola mituya mpe makambo ya yambo ya mabala makowumela mpe bokangani ya makasi ya libota. Motuya ya monene ya bati ta mokili basukisi ete mokumba ya libala mpe lolenge ya bomoi ya libala ezali lolenge ya bomoi eleki na bwania, mpe eleki na bomengo, mpe eleki na esengo.

Moko te akoka mpenza na lolenge ya makasi mingi kokolisa nkolo ekolanda koleka “ndako” ya baboti babalana elongo na bana.

Mpo nini Libala mpe Libota ezali na Ntina—Bisika binso na Mokili? Botunituni bato elakisi ete libala ezali naino lotomo mpe elikia o ntei ya bato baleki mingi ya liboke ya mibu minso—atako o ntei ya nkola ya bikeke oyo, epai toyoki mpenza etali kopona bonzemba, bonsomi ya moto, mpe yaka-tovanda esika ya libala. Likambo ezali ete bato mingi koleka mpenza na mokili mobimba balingi naino kozala na bana mpe kosala mabota ya makasi.

Esili biso kobalana mpe esili biso kozala na bana, lisanga ya solo o ntei ya bato ekomi polele mpenza. Lokola “ bato ya libota”—kotala te wapi tozali to nini bondimi ya boyambi na biso ekoki kozala—tozali kokabola mingi bitumba bikokani, bokokisi mibeko mikokani, mpe bilikia bikokani, mpe mitungisi mikukani, mpe bandoto ekani mpo na bana na biso.

Lokola mokomi ya New York Times David Brooks alobaki: “Bato bakozala malamu mingi koleka ntango bapesami bonsomi eleki mpo na kosala nini balingi. Bakozala malamu mingi koleka ntango bazingami na mikumba oyo eleki boponi ya moto na moto—mikumba mpo na libota, Nzambe, mosala mpe ekolo.”4

Kokposo ezali ete mingi na bopanzi nsango mpe masano oyo mokili akaboli elakisi te makambo ya yambo mpe mituya ya bato oyo baleki mingi. Mpo ntina moko to mosusu, mingi koleka na televisio, filme, miziki, mpe Interneti elakisi likambo moko endimami na bato moke lokola kutu ya bato mingi koleka. Bonsoni mpe bozangi nsoni, uta na bolakisi ya loma tin a lisano na bonsoni, elakisami lokola ndakisa mpe ekoki kosala baye bazali na nzela ya bato mingi bayoka lokola baleki ngala to bato ya binzambinzambi. Na mokili moko ekonzami na bopanzi nsango mpe Interneti ya bongo, ezala naino te mpasi mingi kobokola bana ya boyanoli mpe mpo na kobatela mabala mpe mabota na lisanga.

Atako nini bopanza nsango mpe bisika ya masano ekoki kolakisa, nzokande, mpe atako bokiti ya solo na mposa ya libala mpe libota ya boko, bato baleki mingi mpenza bazali naino kondima ete libala esengeli kozala katikati ya mobali moko mpe mwasi moko.”

Tosengeli komikundola ntango na ntango, lokola ntango nazalaki na Rome, likambo ya bondimisi mpe bolendisi ete libala mpe libota ezali naino mpe mposa mpe lotomo ya bato mingi koleka mpe ete tozali biso moko te na bondimi wana. Ezala naino te na momekano mingi mpo na kozwa katikati ya mosala, mabota, mpe mposa ya moto koleka lokola ezali na mikolo na biso. Lokola eklezia, tolingi kosalisa na nionso oyo tokoki kokela mpe kosunga mabala mpe mabota ya makasi.

Yango ezali ntina nini Eklezia ezali kosala na makasi mpe kopesa bokambi mpo na bosangani mpe bokasi ya lisanga ya biyamba mpo na kolendisa libota. Ezala ntina nini tokaboli mituya na biso ekangami na bopanzi nsango mpe masolo na Interneti. Ezali ntina nini tokaboli makundoli ya bonkoko mpe ya mabota ya monene elongo na bikolo.

Tolingi mingongo na biso eyokana mpo na kotelemela ndakisa ya mabe mpe ndenge ya bomoi oyo emeki kokitana libongisi ya libota oyo Nzambe Yemei atiaki. Tolingi lisusu ete mongongo na biso eyokana na kosungaka esengo mpe bokokisi oyo mabota endimama ememaka. Tosengeli kokoba mwango oyo eyokami na mokili mobimba na kosakolaka ntina nini libala mpe libota ezali na motuya, mpo nini libala mpe libota ezali na ntina mpenza, mpe mpo na nini ekozala ntango bongo ntango nionso.

Bandeko basi mpe bandeko mibali, nsango malamu ezongisami etii na katikati na yango libota mpe libala. Ezali lisusu na libala mpe libota nde tokoki kozala bomoko koleka elongo na bondimi ya basusu. Ezali nzinganzinga ya libala mpe libota nde tokuti lisanga na basusu na mokili. Ezali nzinganzinga ya libala mpe libota oyo Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya nsuka bazwi libako monene koleka nionso ya kozala pole likolo ya ngomba.

Tika nasukisa na kopesaka litatoli (mpe bazomi mbala libwa na ngai na mabele ekokisi ngai mpenza mpo na koloba yango) ete na mingi nazali kokola, mingi nazali kososola ete libota ezali na katikati ya bomoi mpe ezali fungola ya esengo ya seko.

Napesi matondi mpo na mwasi na ngai, mpo na bana na ngai, mpo na bankoko na ngai mpe bankokololo na ngai, mpe mpo na bandako na ngai bango mpe basemeki mpe babokili na ngai mpe libota na ngai ya monene oyo bakomisi bomoi na ngai ya bomengo mingi mpe, iyo, kutu ya seko. Ya bosolo oyo ya seko napesi litatoli na ngai ya makasi mpe eluti koleka nionso ya bule na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Pope Francis, address at Humanum: An International Interreligious Colloquium on the Complementarity of Man and Woman, Nov. 17, 2014, humanum.it/en/videos; see also zenit.org/en/articles/pope-francis-address-at-opening-of-colloquium-on-complementarity-of-man-and-woman.

  2. Pope Francis, Colloquium on the Complementarity of Man and Woman.

  3. “Families Can Be Together Forever,” Hymns, no. 300.

  4. David Brooks, “The Age of Possibility,” New York Times, Nov. 16, 2012, A35; nytimes.com/2012/11/16/opinion/brooks-the-age-of-possibility.html.