2010–2019
Bozala Ndakisa mpe Pole
sánzá ya zómi 2015


Bozala Ndakisa mpe Pole

Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi, ndakisa na biso ekozala libaku malamu ya kozala pole kati ya babomoi ya basusu.

Bandeko mibali mpe basi, bolamu kani ezali ya kozala na bino lisusu. Lokola boyebi, uta tozalaki elongo na Sanza ya minei eleki, tozalaki na mawa ya kobungisa Bapostolo na biso misato ya bolingo—Mokambi Boyd K. Packer, Mpaka L. Tom Perry, mpe Mpaka Richard G. Scott. Bazongaki na ndako na bango ya lola. Tozangi bango. Tozali na esengo mpo na ndakisa na bango ya Kimoklisto mpe mpo na mateya efulama batikeli biso nionso.

Totombeli na motema moko boyeyi malamu na Bapostolo na biso ya sika, Mpaka Ronald A. Rasband, Mpaka Gary E. Stevenson, mpe Mpaka Dale G. Renlund. Baoyo bazali bato babengamaki mpo na mosala ya Nkolo. Bazali na boyebi malamu ya kokisa misala ya ntina oyo bango babengami.

Kala te, ntango nazalaki kotangaka mpe komanyola makomi, matangi mibale etikalaki na makanisi na ngai. Nionso mibale ezali lolenge moko penepene na biso. Ya yambo ezali uta na Esakola likolo ya Ngomba: “Tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bakoka komona misala na bino ya malamu, mpe ekumisa Tata na bino oyo azali na lola.”1 Mkomi ya mibale ezali oyo eyaki na makanisi na ngai ntango namanyolaki bososoli ya yambo. Ezali uta na Mokanda ya Apostolo Polo na Timote: “Bozala ndakisa ya bandimi, na maloba, na lisolo, na bolingani, na molimo, na bondimi, na bopeto.”2

Nakanisi makomi ya mibale elimboli, na eteni ya monene, lolenge nini tokoki kokokisa ya yambo. Tokomaka bandakisa ya bandimi na kosalelaka nsango malamu ya Yesu Klisto na liloba, na lisolo, na bolingani, na molimo, na bondimi, mpe na bopeto. Ntango tosali bongo, bapole na biso ekongenga mpo na basusu bamona.

Moko na moko kati na biso ayaki na mabele na Pole ya Klisto epesama. Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi mpe tosaleli bomoi lokola oyo Azalaki nango mpe lokola Ateyaki, pole wana ekopela kati na biso mpe ekongengisa nzela mpo na basusu.

Apostolo Paul akomi bizalela motoba ya mondimi, bizalela oyo ekopesa ndingisa na bapole na biso mpo engenga. Tika ete tosolola na moko na moko.

Nazwi bizalela mibale ya yambo elongo—kozalaka ndakisa na liloba mpe na lisolo. Maloba tosalelaka ekoki kosembola mpe kofula, to ekoki kosala mpasi mpe kokita. Na mokili ya lelo ezali na bosantoli monene na oyo tomonaka lokola kozala nzinganzinga na biso esika tokendaka. Ezali mpasi ya koboya koyoka bankombo ya Bonzambe kozalaka ya kosalela na lolenge ya mbalakaka mpe na lolenge ya pete. Maloba ya bato emonisami kozalaka lokola maloba ya mpamba mpamba na television, na bafilm, mikanda, mpe na miziki. Bobebisi ezali makebisi ya botongi mpe nkanda ya maloba. Tika toloba na basusu na bolingo mpe botosi, kutu kobatela maloba na biso peto mpe koboya maloba to masolo oyo ekoki to kotuka. Tokoki kolanda ndakisa ya Mobikisi, oyo alobaki na botosi mpe bosembo na mobsala na Ye mobimba.

Ezalela elandi elobamaki na na Paul ezali bolingani, oyo elimbolamaki lokola “bolingo ya peto ya Klisto.”3 Nazali na elikia na baoyo tozali na makoki ya kolanda ndakisa na biso baoyo bazali bango moko, baoyo bazali malady, mpe baoyo bazali na bolembu. Tozali na libaku malamu ya kosunga bango mpe kosembola molimo na bango. Mobikisi amemaki elikia na bazangi elikia mpe bokasi na bato babotawu. Abikisaki bato ya bokono; Atambolisaki bakoka; bakufi miso banonaki, bakufi matoyi bayokaki. Kutu asekwisaki bakufi. Na mosala na Ye mobimba Asalisaki na bolingani na moto oyo azalaki na mposa ya lisungi. Ntango toalandi ndakisa na Ye, tokopambola babomoi ya basusu, mpe lisusu ya biso moko.

Elandi, tosengeli mpe kozala ndakisa na ezaleli na biso moko. Mpo na ngai elakisi tobundaka na bomoi na biso mpo na kozala na bosembo, botondi, bolimbisi, mpe bolingi malamu. Makambo malamu oyo epesaka biso molimo oyo ekosimba babomoi ya baoyo bazali nzinga nzinga na biso. Ezalaki libaku na ngai ya malamu na mibu nionso ya kosangana na bato ebele oyo bazali na molimo ya lolenge wana. Toyokaka liyoki ya kafukafu natngo tozalaka elongo na bango, liyoki moko oyo esalaka biso kolinga kozala elongo na bango mpe kolanda ndakisa na bango. Bapesaka Pole ya Klisto mpe kosunga biso toyoka bolingo na Ye mpo na biso.

Mpo na kolakisa pole wana eyaka uta na molimo ya peto mpe ya bolingo eyebani na basusu, nakabola na bino boyebi moko ya mibu ebele eleki.

Na ntango wana, bakambi ya Eklezia bakutanaki na basali na Jerusalem mpo na boyokani ya lopango ya mabele na Eklezia ya Jerusalem Center esengeli kotongama. Na ntina ya kozwa ndingisa esengelami, Eklezia esengelaki kondima ete botayami esengeli kosalema na bandimi na biso basengeli kotikala na lisalisi wana . Sima ya kosala boyokani wana, moko ya basali ya Israel, oyo azalaki elongo na Eklezia mpe bandimi na yango, komona ete ayebaki Eklezia esengelaki kotosa boyokani ya boboyi boteyi. “Kasi,” alobaki, kolandisama na bayekoli oyo basengelaki kozala kuna, “tokosala nini na ntina ya pole wana na miso na bango?”4 Tika ete pole ya kafukafu wana ekoka kongenga kati na biso, ete esengeli koyeabana mpe koselisama epai ya basusu.

Kozala ndakisa ya molimo elakisi ete tondimelaka Nkolo mpe liloba na Ye. Elakisi ete tozali mpe ete tolengelaka boyambi oyo ekokamba makanisi na biso mpe misala na biso. Bondimi na biso na Nkolo Yesu Klisto mpe Tata na biso ya Lola ekopesa nguya na oyo nionso tosalaka. Kati ya bobulungano ya eleko na biso, mitungisi ya makanisi, mpe mobulu ya mikolo na mikolo, bondimi ekomi bokangami na bomoi na biso. bomikundola ete bondimi mpe ntembe ekoki kofanda te kati na mayele moko na mbala moko, mpo moko ekobengana mosusu. Nabandeli ete bayebisaki biso mbala na mbala—ete na ntina tolonga mpe tobatela bondimi tosengeli, ezali ntina ete totanga mpe toyekola mpe tomanyola makomi. Kosolola na Tata na Biso ya Lola na nzela ya losambo ezali ntina. Tokoki te kozala na makoki ya komona mpamba makambo oyo, mpo na monguna mpe lingomba na ye bazali koluka mpenza mpo na bolembu na biso, bokweyi na bondimi na biso. Elobaki Nkolo, “Boluka na etingya, bosambela ntango nionso, mpe bozalaka na bondimi, mpe makambo nionso ekotambola elongo mpo na bolamu.”5

Na nsuka, tosengeli kozala peto, oyo elakisi ete tozali ya kosokwama na nzoto, na makanisi, mpe na molimo. Toyebi ete nzoto na biso ezali tempelo, mpe esengeli kozala ya bokebi mpe botosi. Makanisi na biso esengeli kozala etondisama na makanisi ya esengo mpe ya lokumu mpe komibatela na makambo oyo ekobebisa. Na ntina ete tozwa Molimo Mosanto lokola moninga ya ntango nionso, tosengeli kozala peto. Bandeko mibali mpe basi, bopeto ekomemela biso kimia na makanisi mpe ekosalisa biso tozwa bilaka ya Mobikisi. Lokola Alobaki, “Bapambolama bazali baoyo bazali na motema peto: mpo bakomona Nzambe.”6

Ntango tolakisi ndakisa ya liloba, na lisolo, na bolingani, na molimo, mpe na peto, tokolongobana mpo na kozala pole na mokili.

Nakoki koloba na bino nionso, mpe mingi mingi bilenge bato, ete lokola mokili ezali kotambola mbango mbango uta na mikano mpe bokambami epesamelaki na Tata ya Lola ya bolingo, tokotebima libanda uta liboke ya bato mpo ete tozali lolenge moko te. Tokobima mpo ete tolati bomikitisi. Tokozala ya kokesena mpo ete tozwaka mpate makambo ya Nzambe mpe mpo ete toliaka bilei ya mabe te mpo na nzoto na biso. tokozala ya kokesena mpo ete toboyaka makambo ezanga ntina mpe makebisi ya mpamba. Tokozala ya kokesena ntango tozwi mokano ya kozala na liyoki lolenge moko te na maponi ya bopanzi nsango oyo ezali bozoba mpe kokitisaka mpe ekolongola Molimo uta na bandako na biso mpe na babomoi na biso. Tokobima solo ntango tosali maponami etali bomoto—maponami oyo ekotisaka mikano na nsango malamu mpe mibeko. Makambo oyo esalaka bokeseni na biso na oyo ebele mokili epesaka biso lisusu na pole wana mpe molimo wana oyo ekongenga na mokili ya molili makasi.

Ezalaka mbala mingi mpasi mpo na kozala ya kokesana mpe kotikala yo moko kati ya lisanga. Ebangisa mpo na oyo basusu bakoki kokanisa to koloba. Maloba ya kolendisa ezali ya Nzembo: “Nkolo azali pole na ngai mpe lobiko na ngai; ngai nakobanga nani? Nkolo azali makasi ya bomoi na ngai; ngai nakoyoka nani bobangi?”7 Ntango totie Klisto na katikati ya babomoi na biso, babobangi na biso ekozwa esika ya mpiko ya kondima mpenza na biso.

Bomoi ezali bobongi nie te mpo na moko na moko na biso, mpe na ntango moko mimekano na nkopkoso tokutanaka nango ekoki kokoma makasi, kosala ete pole na biso ekufa. Na yango, na lisungi kowuta na Tata na biso ya Lola, elongo na lisungi kowuta na basusu, tokoki kozwa lisusu pole wana oyo ekongesisa lisusu nzela na biso mpe kopesa biso pole oyo basusu bakoki kozala na mposa.

Mpo na kotalisa, nakokabola na bino likambo moko ya kokamwa maloba ya poeme moko elengi natangaki mokolo moko mibu ebele eleki:

Nakutanaki na mopaya moko na butu

Oyo kani mwinda ezimaki.

Natelemaki mpe natikaki ye apelisa

Ya mwinda na Ye uta na oyo ya ngai.

Mopepe makasi ebimaki sima

Mpe eningisaki mokili nzinganzinga.

Mpe ntango mopepe esilaki, mwinda na ngai ezalaki na bopeli lisusu te.

Mwinda na ngai ekufaki!

Kasi mopaya yango azongelaki ngai

Mwinda na ye kopelaka malamu!

Asimbaki mot5o wana ya motuya

Mpe apelisaki ya ngai!8

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, mabaku na biso ya malamu mpo na kongengisa nzinga nzinga na biso mikolo nionso, atako na lolenge nini tozali. Ntango tolandi ndakisa ya Mobikisi, ndakisa na biso ekozala libaku malamu ya kozala pole kati ya babomoi ya basusu, ekoki kozala ya bandeko ya libota na biso moko mpe baninga, baninga na biso ya mosala, bato oyo toyebi, to bato oyo toyebi te.

Na moko na moko kati na bino, nazali koloba bozali bana mibali to bana basi ya Tata ya Lola. Boutaki epai na Ye mpo na kozala awa na mabele oyo mpo na mwa ntango, mpo na kolanda bolingo mpe mateya ya Mobikisi mpe mpo na kotika pole na bino engenga na miso ya bato nionso. Natngo eleko wana awa nse esili, soki osalaki mosala na yo, ya yo ekozala lipamboli ya nkembo mpo na kozonga epai na Ye mpo na libela.

Boniboni maloba ya Mobikisi ezali na elikia: “Nazali pole ya mokili: oyo akolanda ngai akotambola kati ya molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.”9 Na ntina na Ye natatoli. Azali Mobikisi Mosikoli na biso, Molobeli na biso epai ya Tata. Azali Ndakisa mpe makasi na biso. Azali “pole oyo engengaka kati ya molili.”10 Nalikii ete moto nionso oyo azali koyoka ngai koloba akomipesa mpo na kolanda Ye, mpo ete akoma pole na mokili, ezali losambo na ngai na nkombo na Ye ya bule, ya Yesu Klisto Nkolo, amene.