2010–2019
Kobanga Te, Ndimela Kaka
sánzá ya zómi 2015


Kobanga Te, Ndimela Kaka

Ntango toponi kondimela, kosalela bondimi oyo ekambaka na boyamboli, mpe kolanda Mobikisi na biso, Yesu Klisto, tokofongola miso na biso ya molimo makasi na lolenge tokoki kokanisa te.

Babele mpe Danyele

Mibu ntuku mibale na motoba ya monkama eleki, Babele ezalaki mokili ya nguya makasi. Moto ya mambi ya kala moko ya kala alimbolakii bifelo ya Babele oyo ezingaki etuka lokola bametele koleka 90 na likolo mpe bametele 25 na monene. “Na ndenge ya malamu,” akomaki, “ezali na etuka moko te ekokani na… yango.”1

Na ntango wana, Babele ezalaki esika ya ntina ya mokili ya boyekoli, mobeko, mpe filozofi. Basoda na yango ya nguya bazalaki ya kokokanisa na misusu te. Balongaki nguya ya Ezipito. Bakotaki na makasi, babebisaki, mpe babotolaki biloko ya mboka mokonzi ya Assiria, Niniva. Balongaki na pete Yelusaleme mpe bazwaki bana ya ntina koleka mpe ya mayele ya Yisalaele mpo bazonga na Babele mpo na kosalela Mokonzi Nebukadananesada.

Moko ya bana oyo bazwaki kuna ezalaki elenge mobali na nkombo ya Danyele. Bayekoli ebele bakaniska Danyele azalaki na mibu katikati ya 12 mpe 17 na ntango wana. Bokanisa bongo, balingami na ngai ya bilenge ya Bonganganzambe ya Alona: Danyele azalaki mpenza na mibu na bino ntango bazwaki ye azala mpembeni ya mokonzi mpo na koyekola lokota, mobeko, eyamba, mpe boyebi ya mokili ya Babele.

Bokoki kokanisa nini esengelamaki koyokisama lokola kotindikama uta na ndako na bino, kotambola bakilometele 800 kino na etuka ya bapaya, mpe komipesa na malongi ya eyamba ya banguna na bino?

Danyele akolisamaki lokola molandi ya Yehova. Andimelaki mpe akumbamelaki Nzambe ya Abalayama, ya Izaka, mpe ya Yakobo. Nayekolaki maloba ya baprofeta, mpe ayebaki bozalani ya Nzambe na moto.

Kasi sikawa, na mobu ya bolenge mpenza, azalaki moto ya boloko-moyekoli na Babele. Nakanisi botindiki na ye esengelaki kozala makasi mpo na kosundola biyamba na ye ya kala mpe kolanda oyo ya Babele. Kasi atikalaki solo na bondimi na ye—na misala mpe na mokano.

Ebele kati na bino bayebi lolenge nini esalaka ya kolobela bosolo oyo eyebani malamu te. Na lokota ya bayanke ya Internet ya lelo, tolobeka kokomaka “kozikisama” na baoyo bazalaka na moko na biso te. Kasi Danyele azalaki kobanga botiolami ya bato te. Na Babele, baoyo batelemelaki bakambi ya lingomba basosolaki nini elimboli—na lolenge ya lisese mpe ya solo—kozala ya “kozikisama.” Tuna bobele baninga ya Danyele Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego.2

Nayebi te soki ezalaki pete mpo na Danyele kozala mondimi na esika ya lolenge wana. Bato mosusu bapamwama na motema ya bondimi—mpo na bango, bondimi elakisamaka koya lokola likabo uta na lola. Kasi nakanisi ete Danyele alekisaki bantango ebele ya kofukama mpo na kobondelaka, kotikaka mituna mpe bobangi na ye ete eyano ekoya kaka, mpe kotalelaka Nkolo mpo na bososoli mpe bwania.

Mpe Nkolo apambolaki Danyele. Atako mimekano na bondimi na ye mpe etiolamaki, atikalaki bobele solo na oyo ayebaki na boyebi na ye moko ezala malamu.

Danyele andimelaki. Danyele atiaki ntembe te.

Mpe nsima butu moko, Mokonzi Nebukadananesada azwaki ndoto oyo etungisaki makanisi na ye. Asangisaki lisanga na ye ya bayekoli mpe bapesi toli mpe atunaki ete balimbola ndoto mpo na ye mpe lisusu basakola elakisi nini.

Ya solo, bakokaki te. “Moto moko te akoki kosala oyo osengi,” babondelaki. Kasi oyo epesaki bobele nkanda mingi koleka na Nebukadananesada, mpe atindaki ete bato nionso ya bwanya, banganga, batalisi, mpe bapesi toli bakatama ndambu ndambu— mpe lisusu Danyele mpe bilenge mosusu ya bayekoli oyo bawutaki Yisalaele.

Bino baoyo botangaka buku ya Danyele boyebi oyo akomaki nsima. Danyele atunaki Nebukadananesada mpo na mwa ntango moke, mpe ye mpe baninga na ye ya bondimi bakendaki na liziba ya bondimi na bango ya bokasi ya bomoto. Basambelaki epai ya Nzambe mpe basengaki lisungi ya bonzambe na ntango ya mpasi oyo na bomoi na bango. Mpe “nsima ezalaki sekele moko esakolamaki na Danyele na … limoni.”3

Danyele, elenge mobali awutaki na mboka moko ya ngambo mosusu—oyo akosamaki mpe konyokwamaki mpo na kondimelaka na eyamba ya bampaya—akendaki liboso ya mokonzi mpe asakolaki epai na ye ndoto mpe ndimbola na yango.

Uta mokolo wana, lokola eyano ya mbala moko ya bondimi na ye na Nzambe, Danyele akomaki mopesi toli andimama ya mokonzi, ayebana na Babele mobimba mpo na bwanya na ye.

Mwana mobali oyo andimelaki mpe azalaki na bondimi na ye akomaki moto ya Nzambe. Profeta. Nkumu ya boyengebene.4

Tozali Lokola Danyele?

Na biso nionso oyo tokulisami na bonganganzame esantu ya Nzambe natuni, tozali lokola Danyele?

Lolenge nini totelemaka na bosembo liboso ya Nzambe?

Totiaka na misala makambo toteyaka, to tozali bobele Baklisto ya Eyenga kaka?

Misala na biso ya mikolo nionso elakisamaka mpenza oyo tosengaka mpo na kondimela?

Tosalisaka “babola mpe bakeleli, bato bokono mpe bato batungisama”?5

Tolobaka bobele makambo ya solo, to tosalaka makambo elongobana?

Bandeko mibali, topesameli ebele. Bosolo ya bonzambe eteyameli biso mpe nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto. Topesamaki etinda elongo na bokonzi ya bonganganzambe mpo na kosunga baninga na biso mpe kotonga bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele. Tozali na eleko ya bopesami nguya monene ya molimo. Tozali na bofuluki ya bosolo. Tozali na bafungola ya bonganganzambe mpo na kokanga na mabele mpe na lola. Makomi ya bule mpe mateya ya baprofeta ya bomoi epesameli biso koleka liboso.

Baninga na ngai ya bolingo, botika ete tozwa makambo oyo na pete te. Na mapamboli oyo mpe mabaku ekomaka mikumba monene mpe maye masengeli. Botika ete tondima mpe tokokisa mikumba oyo mpe maye masengeli.

Etuka ya Babele ezalaka lisusu te. Nguya na yango esila kala. Kasi kimokili ya Babele mpe botawu na yango ezali kaka. Ezali mokumba na biso sikawa kozala lokola bandimi na mokili etonda na bato oyo bandimaka te. Momekano ezali ya biso ya kosalela mabongisi ya nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto mpe kozala na bosolo ya mitindo ya Nazambe. Tokosengela kotikala kimia na nse ya botindiki ya lolenge moko, kokamwisama te na mipepe endimama na bato mingi to baprofeta ya lokuta, kotia mpembeni botiolami ya mabe, mpe kotelemela mimekano ya mabe, mpe kolonga bolembzu na biso moko.

Kanisa bobele mpo na yango. Motuya kani ya pete ekokaki kozala mpo na Danyele mpo na kokende na pete kolanda Babele? Akoki kotiya na pembeni ndingisa ya kotambola oyo epesamelaki ye na Nzambe mpo na bana ya Isalaele. Akokaki kosepela na bilei ya moto na nkita epesamelaki na mokonzi mpe kozala elongo na kondimaka makambo ya bato ya mokili. Akokaki koboya botiolami. Andimamaki na bato ya nguya ya Babele mpe azwaki lokumu mpe litomba ya baninga ya Babele, mpe lingomba ya bato.

Ayebanaki.

Akomaki malamu.

Nzela na ye ekomaki mwa mpasi pete mingi.

Ezali, ya solo, kino na mokolo ntango mokonzi asengaki alimbola ndoto na ye. Nsima Danyele amonaki ete ye, lokola bato mosusu ya Babele “bato ya bwanya,” babungisaki mokangano na ye na liziba ya pole mpe bwanya.

Danyele asalaki momekano na ye. Ya biso ezali kokoba kino sikawa.

Mpiko mpo na Kondimela

Satana, monguna na biso, alingi biso tokweyisama. Akotisi lokuta lokola eteni ya likoki na ye mpo na kobebisa eyamba na biso. Akanisi na nkuku ete moto na ntembe, bonzangi kondima, ntembe ezalaka elengi mpe mayele, ntango baoyo bazali na bondimi na Nzambe mpe bikamwa na Ye eyebani te, ezangi bososoli, to esukwami na makanisi. Satana akolobela ete ezali malamu kotiya ntembe na makabo ya molimo mpe mateya ya baprofeta.

Natombeli Nakoki kosunga bato nionso asosola likambo moko ya moke oyo: tondimaka Nzambe mpo na makambo oyo biso toyebi na motema na biso mobimba mpe na mayele na biso, kaka bobele na makambo oyo toyebi te.  Misala na biso ya molimo ezalaka ntango mosusu ya bule koleka mpo na kolimbola na lolenge ya mokili, kasi yango elakisi te ete ezali solo te.

Tata ya Lola alengelaki mpo na bana na Ye feti ya molimo, kokabolaka bileyi nionso ya elengi—mpe bongo, na ntina ya kosepela na makabo ya molimo oyo, bato na ntembe basepelaka bangomei na botali ya mosika, kokobaka kosepela na ezalela ya koboya kondima, ntembe, mpe bozangi botosi.

Mpo na nini moto asengeli kotambola na nzela ya bosepesi bomoi na bososoli ndambo azali na yango ntango, nzoka nde soki bataleli Tata ya Lola, bakoki komona bongengi ya moyi ya mayele ya molimo oyo ekokota na mayele na bango na bwanya mpe kotondisa milimo na bango na esengo?

Ntango bino na ngai tolobaka na baton a ntina ya bondimi mpe boyambin, toyokaka mbala mingi te, “Nalingi Nakokaki kondimela lolenge bondimelaka”?

Elakisaki na lisolo oyo ezali boyokisami motema mpasi mosusu ya Satana: boyambi ezalaka pete mpo na bato mosusu kasi mpasi mpo na batu mosusu. Ezali na bonganga moko te mpo na boyambi. Kasi kozelaka mpo na kondimela ezali eteni ya yambo oyo esengeli! Nzambe azalaka motosi ya bato te.6 Azali Tata na bino. Alingi koloba na bino. Na yango, esengaka mwa boyebi ya makambo—esengaka boyebi na liloba ya Nzambe—mpe kosalela “mwa eteni moke ya bondimi.”7 Ezwaka mpe mwa bomikitisi moke. Mpe esengaka motema mofungwama mpe mpe mayele mafungwama. Esengaka koluka, na bososoli mobimba ya liloba. Mpe, ntango mosusu bompikiliki ya nionso, esengaka kozala na motema kokita mpe kozelaka Nkolo.

Soki tosali makasi te ya kondimela, tozali lokola moto oyo apelisi mwinda mpe nsima alobeli mwinda mpo na bopesi pole te.

Kala mingi te nakwamaki mpe nazalaki na mawa ya koyoka momemi Bonganganzambe ya Alona oyo amonanaki kozwa lolendo na ntina oyo azalaki na bozalani ya mosika na Nzamba. Alobaki, “Soki Nzambe amisakoli Yemei epai na ngai, nsima nde na kondimela. Kino nsima, nakomona bosolo na bososoli na ngaimei mpe mayele ya kosunga ngai na oyo nasengeli kosala.”

Nayebi motema ya elenge mobali oyo te, kasi nakoki kosalisa te kasi koyoka mpasi mingi na motema mpo na ye. Lolenge nini abwakisaki na pete nionso makabo ya Nkolo apesaki ye. Elenge mobali oyo azalaki kosala te nionso esengelaki mpo na kozwa bobimisi mpe nsima amonanaki kozala kosepela na mayele na ye ete azawaki bobimisi moko te.

Na libaku mabe, yango elakisi kozala mpenza na momesano na mikolo ya lelo. Soki tokoki kotiya mokumba ya ntembe na Nzambe, tokanisi tokoki komisenga bolimbisi mpenza uta na mitindo ya Nzambe mpe uta na kozwaka mokumba mpo na bozalani na Tata na biso ya Lola.

Bandeko mibali, botika ngai natalisa malamu: ezali na likambo ya motuya to etutisamaka te na ntina ya kozala kozanga botosi. Ntembe ezali pete—moto nionso akoki kosala yango. Ezali bomoi ya bondimi oyo nde esengaka bokasi ya bomoto, bomipesi mpe mpiko. Baoyo bakosimba na lombango bondimi bazali lokola mosika na lolenge ya kokamwa koleka baoyo bazali na litomba ya momekano na ntembe ntango mituna ya bozangi bososoli to bozangi ntina etunami.

Kasi esengeli kokamwisa biso te ete bondimi etiami motuya te na bato ya mokili. Mokili ezali na lisolo molai ya kobwakisaka oyo ezali kososola te. Mpe ezalaka na mobulu ya yanomei kososolaka makambo oto ezali komona te. Kasi kaka mpo ete tokoki komona eloko moko te oyo miso na biso ya bomoto elobi ezalaka te. Ya solo, “ezali na biloko ebele na lola mpe na mabele … koleka ekoki kososolama mpe kondimbolama” kati ya babuku na biso ya makomi, zulunale ya makambo ya boyebi, mpe ya bafolozofi ya makambo ya mokili.8 Mokili etondisami na makambo ya makamwisi mpe ya kokamwisa—makambo oyo oyo ekoki kososolama bobele na miso ya molimo.

Elaka ya Boyambi

Ntango toponi kondimela, kosalela bondimi oyo ekambaka na boyamboli, mpe kolanda Mobikisi na biso, Yesu Klisto, tokofongola miso ya molimo makasi na lolenge tokoki koyeba te. Bongo boyambi na biso ekokola makasi mpe tokomona makasi koleka.9

Bandeko mibali, natatoli ete atako na bantango ya mpasi makasi, Mobikisi akolobela bino lokola Alobelaki tata moko ya mawa na nzela ya bato meke ya Galilea, “Kobanga te, ndimela kaka.”10

Tokoki kopona kondimela.

Mpo ete na bondimi, tokomona ebandeli ya pole.

Tokomona bosolo.11

Tokozwa kimia.12

Na ntina ya boyambi na biso, tokozala na nzala makasi te, mposa ya mai te.13 likabo ya ngolu ya Nzambe epesi biso ndingisa ya kotikala ngwi na bondimi na biso mpe ekotondisa milimo na biso lokola “mayi moko malamu kosopanaka na bomoi ya seko.”14 Tokoyoka esengo ya solo mpe ya libela.15

Na yango, baninga na ngai balingami, bandeko na ngai ya bolingo kati ya bonganganzambe ya Nzambe:

Zala na mpiko mpo na kondima.

Kobanga te, ndima kaka.

Telema elongo na Danyele.

Nasambeli ete moko na moko na biso—elenge mpe mokolo—akozwa bokasi ya sika, mpiko mpe mposa ya kondimela. Na nkombo ya Nkolo na biso, Yesu Klisto, amene.