2010–2019
Baoyo Babateli Mitindo ya Nzambe Bazali ya Kopambolama mpe na Esengo
sánzá ya zómi 2015


Baoyo Babateli Mitindo ya Nzambe Bazali ya Kopambolama mpe na Esengo

Mabaku etiama na Nkolo ekelaka mpo na biso libongo ya kimia mpo na mabe mpe banguya ya koboma.

Ntango moko kala wana ezalaki ngai kotala Australie, nakendeki mobembo na libongo ya horseshoe ya kitoko, eyebana mpo na lisano na yango ya kosielomoka. Wana ezalaki ngai kotambola na libongo, nakamwisamaki na kitoko ya bambonge minene kotutanaka mpe kokitaka kaka libanda ya libongo mpe bambonge ya mike kobalokaka kino pene na libongo.

Wana ekobaki ngai kotambola na gai, nakutanaki na liboke moke ya basielomoki ya Bato ya Amerika. Bazalaki solo ya kosilka na ntina ya likambo moko, kosololaka na mongongo makasi mpe kolakisaka epai ya mbu. Ntango natunaki bango likambo nini, balakisaki epai kaka ya libanda ya libongo esika wapi bambonge ya minene ezalaki kolembela.

“Botala kuna,” moko kati bango alobaki na ngai na kanda. “Ekoki bino komona libaku wana?” Kotalaka mpembeni koleka sikawa, nakokaki solo komona libaku kotelema ngwi na monoko mobimba ya libongo, kaka esika bambonge minene, ya kobenda ezalaki kolembela. Libaku yango ezalaki komonana lokola esalema na basinga moko ya kilo mpe esungamaki na bambonge likolo ya mayi. Engebene na basielomoki likolo ya mayi, ezalaki kokweya kokitaka na mbeto ya mayi ya mungwa.

Basielomoki na mayi ya Amerika bakobaki ete, “Tozali awa na mobembo moko ya mbala moko na bomoi mpo na kosielomuka na bambonge minene oyo. Tokoki kosielomuka na bambonge ya mike koleka kolembaka na libongo yangomei, kasi libaku ezali kosala yango ete tokoka kosielomuka na oyo ya minene. Tozali na likanisi moko te soki libaku ezali kuna. Nionso oyo toyebi ezali ete ebebisaki mobembo na biso mobimba.”

Lokola basielomuki ya Amerika bamitungisaki mingi, bokebi na ngai ebendamaki na mosielomuki mosusu ya nzinganzinga—mobali moko ya mokolo koleka mpe solo ya esika wana—oyo azalaki ya kofukama na zelo, kopakolaka mafuta etando na ye. Amonanaki lokola kokomaka kozanga bompikiliki wana ezalaki ye koyoka kolelalela oyo ezalaki kobuta se kobuta na ntina ya libaku.

Na nsuka atelemaki mpe atambolaki epai ya liboke. Kolobaka eloko moko te. Abendaki bajumelle mibale uta na saki na ye ya mokongo mpe apesaki yango epai ya moko ya basielomuki, kolakisaka epai ya libaku. Moko na moko ya basielomuki batalaki na nzela ya bajumelle. Nsima ekomaki ngala na ngai. Na lisalisi ya bokomisi monene, nakokaki komona eloko moko oyo nazalaki na makoki ya komona liboso te: biteni ya mokongo—requin ya monene oyo eliaka na ngomba ya mayi na ngambo mosusu ya libaku.

Liboke yango nokinoki bakomaki kobanga. Mosielomuki ya mokolo azwaki bajumelle na ye mpe abalukaki mpo na kotambola mosika. Ntango asalaki yango, alobaki maloba nakoki mokolo moko kobosana te: “Botonga libaku mabe te. Ezali bobele eloko oyo ezali kobatela biso na koliama.”

Lokola totelemaki na libongo kitoko wana, totalanaki moko na mosusu. Emoneli na biso ebongwamaki na mbalakaka. Libaku oyo ezalaka komonana lokola ya makasi mpe ya kopekisa—oyo ezalaki komonana lokola kokata ndelo ya bafana mpe esengo ya komataka bambonge minene mpenza—ekomaka elokomoko ya bokeseni mpenza. Na bososoli na biso ya sika ya likama oyo etingamaki kaka na nse ya etando, libaku sikawa ezalaki kopesa bobateli,bozangi likama, mpe kimia.

Wana ezali bino mpe ngai kotambola na banzela ya bomoi mpe kolanda bandoto na biso, mitindo mpe bandelo ya Nzambe—lokola libaku—ekoki ntango mosusu kozala mpasi na kososola. Ekoki komonana mindodo mpe kozanga kobota mbuma, kokangaka nzela oyo ezali komonana ya esengo mpe ya kosepelisa mpe oyo ezali kolandama na basusu mingi mpenza. Lokola Apostolo polo alimbolaki, “Tozali naino kotala lokola kati na talatala mpe tokokakatanaka,”1  na emoneli moko ya ndelo ya boye, oyo mbala mingi tokoki kososola te makama minene ebombani kaka na nse ya etando.

Kasi Ye oyo “asosolaka []makambo nionso”2 ayebi mpenza wapi makami ezali. Apesaka biso bokambi ya bonzambe, na nzela ya mitindo mpe toli ya boli na Ye, mpo ete kokoka koboya makama wana—mpo ete tokoka kosala nzela na bomoi na biso oyo ebatelami uta na bilima ya molimo mpe bambanga efungwama ya lisumu oyo ekomela biso mobimba.3

Tolakisi bolingo na biso mpo na Nzambe—mpe bondimi na biso na Ye—na kosalaka nionso mpenza tokokoka mikolo nionso mpo na kolanda nzela oyo Ye atie mpo na biso mpe na kobatelaka mitindo oyoYe apesi biso. Tomonisi mingimingi bondimi mpe bolingo wana na makambo wapi tozali kososola na mobimba te ntina ya motindo ya Nzambe to nzela songolo oyo Ye azali koyebisa biso tozwa. Ezali komonana lokola mokano ya pete mpo na kolanda nzela kati na libaku ntango toyebi ezali na bilima ya requin-ya mino kosokolaka kaka libanda na yango. Ezali mpasi mingi kobatela nzela na biso na ntaka ya libaku ntango nionso oyo tokoki komona ezali bambonge ya somo mpe ya kobendaka na ngambo mosusu. Mpe atako bongo ezali na bangonga wana—bangonga ntango toponi kosalela bondimi na biso, kotia elikia na biso na Nzambe, mpe tolakisi bolingo na biso mpo na Ye—ete tokoli mpe tolongi mingi.

Na Boyokani ya Sika, Ananiasi akokaki te kososola motindo ya Nkolo mpo na koluka mpe kopambola Saulo—moto moko oyo azalaki mpenza na likoki ya kokanga bandimi ya Klisto. Nzokande, lokola atosaki motindo ya Nzambe, Ananiasi asalisaki na mbotama ya molimo ya Apostolo Paulo.4

Ntango toliki na Nkolo, tosaleli bondimi, totosi mitindo na Ye, mpe tolandi nzela Ye atiaki mpo na biso—ntango tomitiki na bolingi na Ye—tokomi mingi moto oyo Nkolo alingi biso tokoma. Ezali “bokomi” oyo—mbongwana oyo ya motema—nde ezali ntina-nionso. Lokola Mpaka Dallin H. Oaks ateyi biso ete: “Bosambisi ya nsuka ezali kaka momekano ya motango mobimba ya misala malamu mpe mabe te—oyo tosili kosala. Ezali kondima ya mbano ya nsuka ya misala mpe makanisi na biso—oyo tosili kokoma. Ekoki te mpo na moto kani na pete kosala oyo ezali sembo. Mitindo, makuli, mpe mayokani ya nsango malamu ezali te molongo moko ya biloko esengeli kotiama na ebombelo moko ya lola. Nsango ya Yesu Klisto ezali mwango oyo elakisaka biso lolenge ya kokoma oyo Tata na biso ya Lola azali na yango mposa biso tokoma.”5

Nzokande botosi ya solo, ezali komipesa mobimba epai na Ye mpe kopesa ye nzela ya kotia nzela na biso kati na bamayi ya kimia mpe ya koningana lokola, kososolaka ete Ye akoki kosala mingi na ntina na biso koleka oyo tokokaki kosala naino na ntina na bisomei.

Ntango tomitiki na bolingi na Ye, Tobutisi kimia mpe esengo. Mokonzi Benjamina ateyaki ete baoyo babatelaka mitindo ya nzambe—oyo balandaka bisika wapi Akambi—bazali “ya kopambolama mpe na esengo” na “makambo nionso, ya ntango mpe ya molimo .”6 Nzambe alingi biso tozala na esengo. Alingi biso tozala na kimia. Alingi biso tolonga. Alingi biso tozala na likama te mpe tobatelama na banguya ya mokili oyo ezali nzinganzinga na biso mobimba.

Koloba na lolenge mosusu, Mitindo ya Nkolo ezali kosala ndako monene ya mayi ya nse ya somo ya mabaku te oyo tosengeli koyekola mpo na kolenda na motema moko te na bomoi oyo mpo ete tokoka konetolama na oyo ekoya. Kasi, mabaku oyo etiama na Nkolo ekelaka mpo na biso libongo ya kobatela na banguya ya mabe mpe ya koboma oyo soki te ekozindisa biso na bozangi elikia. Mitindo ya Nzambe epesami mpo na bolingo mpe bobateli; ezali mpo na bosepeli na bomoi oyo7 kaka lokola mpe epesami mpo na bosepeli mpe bonetolami na oyo ekoya. Elakisaka lolenge oyo tosengeli kosalela—mpe ya ntina mingi koleka, esalisaka tososola nani tosengeli kokoma.

Lokola na makambo nionso ya malamu mpe ya solo, Yesu Klisto atelemi lokola ndakisa malamu. Mosala monene mingi koleka ya botosi na boseko nionso esalemaki ntango Mwana Amitikaki na bolingi ya Tata. Kotunaka na bomikitisi ya mozindo ete nkeni ekoka kolongolama—ete Akokaki kotambola na banzela mosusu koleka moko oyo elakisamaka mpo na Ye—Klisto amitikaki na nzela oyo Tata na Ye alingaki Ye alanda. Ezalaki nzela oyo ekambaki kati na Getsemane mpe Golgota, wapi aniokwamaki mpasi makasi mpe monioko oyo okoki kokanisa te mpe wapi alengaki mobimba ntango Molimo ya Tata na Ye abimaki. Kasi nzela wana kaka esukaki na lilita ya polele na mokolo ya misato, na babongangi ya “Asekwi!”8 koyokanaka na matoyi mpe mitema ya baoyo balingaki Ye. Ezalaki na bosepeli mpe libondi okoki kokanisa te oyo etie na katikati ya Bomikabi na Ye mpo na bana banso ya Nzambe na boseko mobimba. Na kopesaka nzela na bolingi na Ye emelama na oyo ya Tata—Na kolandaka mitindo ya Tata—Klisto apesaki biso litomba ya kozwa kimia ya seko, bosepeli ya seko, mpe bomoi ya seko.

Natatoli ete tozali bana ya bolingo ya Nzambe. Natatoli ete Alingi biso tozala na esengo mpe na likama te mpe topambolama . Mpo na ntina na yango, asali mwango ya nzela mpo biso tozonga epai na Ye, mpe Atie mabaku oyo ekobatela biso na nzela. Natatoli ete ntango tosali makasi na biso mpo na kolanda nzela wana, tomoni bozangi likama, esengo, mpe kimia ya solo. Mpe tomitiki na bolingi na Ye, tokomi oyo Ye alingi biso tokoma. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene..