2010–2019
Bopona Pole
sánzá ya zómi 2015


Bopona Pole

Tosengeli kopona kosala keba na toli ya baprofeta, kondima mpe kosalela bitinda ya molimo, kozala na botosi na mitindo ya Nzambe, mpe koluka bobimisi ya moto mpo na ye moko.

Kala mingi te, mwasi na ngai mpe ngai tokanaki ete tosengelaki koyekola malamu mpenza kitoko ya esika moko penepene ya ndako na biso na Montana ya norweste. Tokanaki kozwa bavelona biso mpo na kokende na Hiawatha Trail, nzela ya kala ya engunduka oyo ekatisi Rocky Mountains ya kitoko katikati ya Montana mpe Idaho. Tokanisaki ekozala mokolo moko ya esengo elongo na baninga malamu, kosepelaka kitoko ya kosalema ya esika wana.

Toyebaki kotambola na biso na velo na nzela ya bakilometele 24 elingaki kobakisa bagbagba ya engunduka ekatisa likolo ya mabulu ya mozindo mpe madusu ekota na bangomba ebukanabukana.Boye tomilengelaki na minda ekangama na nsinga na bikoti na biso mpe bavelo.

Elilingi
Libanda ya Tunell ya Taft

Baoyo bakenda kuna liboso na biso bakebisaki biso ete madusu ezalaki ya molili mpe ete tosengelaki kozala na minda ya solo ya makasi. Ntango tosanganaki liboso ya libanga ya monene oyo efungola Lidusu ya Taft mokengeli moko alimbolaki mwa bisika ya makama ya nzela,lokola mabulu na mipanzi, bifelo ya makwanza, mpe molili ya makasi. Nokinoki, topusanaki liboso na kati ya lidusu. Nsima ya mwa miniti, molili balobelaki biso emelaki biso. Minda namemaki emonanaki ya kokoka te, mpe molili noki edundaki yango. Na mbala moko, nabandaki koyoka kobanga, kobulunga, mpe lokola kobunga nzela.

Elilingi
Bavelo na Kati ya Tunnel
Elilingi
Bavelo na Kati ya Tunnel na Pole ya Bongengi

Nayokaki nsoni kondima nkaka ngai na baninga mpe libota na ngai. Atako nazalaki momemi velo ya kala, nayokaki sikawa lokola nanu namema mokolo moko velo te. Nabundaki mpo na kotikala likolo ya velo lokola mobulungano na ngai ebakisamaki. Na nsuka, nsima ya kolakisa mobulu na ngai na baoyo bazalaki nzinganzinga na ngai, nakokaki kobelema penepene mingi na pole ya makasi ya moninga moko. Ya solo, banso na lingomba babandaki kosala zunguluke moko ya kokangama nzinganzinga na ye. Nakotikalaka penepene na ye mpe koyekamaka mpo na mwa ntango na pole na ye mpe pole ya bato banso na lingomba, topusanaki na mozindo ya molili ya lidusu.

Elilingi
Pole na Nsuka ya Tunnel

Nsima ya oyo emonanaki lokola bangonga, namonaki mwa litono moko ya pole. Bondimi na ngai ezongaki moke moke lokola pole ebakisamaki na bonene mpe makasi. Ntango molai liboso ya kokoma na nsuka ya lidusu, nazalaki lisusu na mposa ya lisungi ya baninga na ngai te. Nkaka nionso elimwaki lokola tozalaki kokende nokinoki epai ya pole Nayokaki kimia mpe bozangi kobanga kutu liboso ya koyingela na ntongo etonda ya molunge mpe kitoko mingi.

Tozali na kati ya mokili moko na yango tokutanaka na mikakatano na bondimi na biso. Tokoki koyoka bondimi ete tokoki kotelemela mikakatano—kaka mpo na komona ete bomilengeli na biso ekokaki te. Mpe kaka lokola moninga na ngai akebisaki ngai mpo na molili, tokebisami lelo. Mingongo ya bapostolo etindi biso tomilengela na pole ya nguya ya bokasi ya molimo.

Na lolenge moko, tokoki koyoka nkaka, mabe, to mobulungano na molimo ntango tokutani na mokakatano na bondimi na biso. Na mobimba, makasi mpe molai ya mayoki wana etali eyano na biso na yango. Soki tosali eloko te, ntembe, lolendo, mpe na nsuka bopengwi ekoki kopengwisa biso na pole.

Nayekolaki mwa mateya ya motuya na likambo na ngai na lidusu. Nakokabola kaka moke na yango.

Ya yambo, ata makasi ya lolenge nini ya molili ya ntembe, toponaka molai kani mpe bonene kani totiki yango esala kati na biso. Tosengeli komikundola mingi kani Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye balingaka biso. Bakosundola biso te, mpe Bango bakotika te yango elonga biso soki toluki lisalisi na bango. Bokanisa likambo ya Petelo na mbonge ya Galili. Ntango Petelo eyokaki molili makasi penepene nzinganzinga na ye, andimaki kebakeba azalaki na yango nokinoki mpe na ngonga wana mpenza aponaki kobelela mpo na lisungi. Atiaki ntembe te na nguya ya Mobikisi mpo na kobikisa ye; bobele ye abelelaki, “Nkolo, bikisa ngai.”1

Na bomoi na biso, loboko etandolama ya Mobikisi ekoki ekozwa lolenge ya lisungi uta na moninga moko andimama, mokambi, to moboti moko ya bolingo. Ntango tozali kobunda na molili, ezali mabe te koyekama na mwa ntango na pole ya baoyo bolingaka biso mpe bazali na litomba na biso na motema.

Ntango totaleli malamu mpenza, ntina nini tosengeli koyokemela mingongo ezanga elongo, ya mabe ya baoyo na ndako monene mpe ya etando ya ntango na biso mpe kobosana bobondeli ya baoyo balingaki biso mpenza? Bato ya ntembe oyo balingi mingi kokitisa esika ya kotombola mpe kotiola esika ya kolendisa. Maloba na bango ya koseka bato ekoki koyingela na kati ya bomoi na biso, mbala mingi makelele ya makasi mpe mwa ntango moke ya esalema na nko mpo na kobebisa bondimi na biso. Ezali mayele kotia bolamu na biso na maboko ya bampaya? Ezali mayele kosenga mpenza mwinda nabaoyo bazali na pole te ya kopesa baoyo bakoki kozala na ntina ya nkuku ebombama na biso? Bato oyo bazanga nkombo, soki balakisami na biso na bosembo, bakoki kopesamela mokolo moko te ntango na biso, kasi mpamba te basaleli malaka ya bato mingi, mabombama nabososoli, bazwi bondimami basengeli te.

Boponi na biso mpo na kopesa bokebi na baoyo bazali koseka biloko ya bule bakobengana biso mosika ya pole ya lobiko mpe ya kopesa bomoi ya Mobikisi.Yoane akomaki: “Nde Yesu alobaki lisusu epai na bango, nazali pole ya mokili: ye oyo alandi ngai akotambola na molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.2 Bokanisa, baoyo balingi bondimi na biso.

Kaka lokola nazalaki na nkaka na lidusu, tokoki lokola koyoka nkaka mpo na kosenga lisalisi ntango totiaka ntembe. Ntango mosusu tozali moko na ye basusu balukelaka bokasi, mpe sikawa tosengeli lisalisi. Ntango tososoli ete pole mpe bolendisi Mobikisi akoki kopesa biso ezali mosika ya motuya mingi mpo na kobungisa na lolendo, nde bakambi ya Eklezia oyo bafulama, baboti, mpe baninga bandimama bakoki kosalisa. Bazali balengelami mpo na kosalisa biso na kozwa kimia ya molimo oyo ekolendisa biso na mikakatano ya bondimi na biso.

Ya mibale, tosengeli kolikia na Nkolo mpo na kokolisa nguya ya molimo kati na biso moko. Tokoki te kotalela pole ya basusu libela. Nayebaki ete molilii na lidusu elingaki kowumela soki nakobaki kopedale nsima ya moninga na ngai mpe na nsima ya kimia ya lingomba. Kasi elikia na ngai ezalaki kokoka kotambola ngai moko ntango nakokaki komona pole. Nkolo ateyi biso, “Bobelema penepene na ngai; boluka ngai na etingia mpe bokozwa; bobeta, mpe ekofungolamela bino.”3 Tosengeli kosala, kolikiaka ete Nkolo akokokisa elaka na Ye mpo na kotombola biso libanda ya molili soki tobelemi penepene na Ye. Monguna, nzokande, akomeka kondimisa biso ete toyoka mokolo moko te nguya ya Molimo mpe ete ekozala pete kaka kotika komeka.

Mokambi Dieter F. Uchtdorf apesi biso toli mpo na “kotia ntembe na ntembe liboso botia ntembe na bondimi.”4 Na palwasi ya ndako na ngai, elenge mobali moko kala te alobaki,, “Ezali na makambo nayokaka oyo ekoki kolimbolama te na nzela mosusu soki ezali ya Nzambe te.” Oyo ezali bosembo ya molimo.

Ntango tozali liboso ya mituna to komeka kotiya ntembe, tosengeli kokanisa mapamboli mpe mayoki ya molimo oyo ekotaki na mitema mpe bomoi na biso na kala mpe totia bondimi na biso na Tata ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Namituni toli epesami na loyembo: “Kotia ntembe te na Nkolo mpe bolamu na ye [mpo] tomekaki ye na mikolo ya kala.”5 Kobosana mpe kokitisa mayele ya kala ya molimo ekobengana biso mosika ya Nzambe.

Boluki na biso ya pole ekobakisama na bolingi ya kondima ntango engengi na bomoi na biso. Makomi ya sika elimboli pole mpe epesi elaka na baye bayambi yango: “Yango oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe pole yango ekokola na bongengi mingi lisusu kino mokolo ebonga nie.”6 Kaka ntango tondimi kopedale epai ya pole, ntango tokobi, ya kongenga mingi ekokoma nguya na Ye na bomoi na biso. Lokola pole na nsuka ya lidusu, nguya na Ye ekomemela biso bondimami, mokano, bokasi, mpe—mingimingi—nguya ya koyeba ete Azali na bomoi.

Ya misato, ezali na molili makasi mingi te, ya likama mingi, to ya kpokoso mingi ete ekoki te kolongama na pole. Mpaka Neil L. Andersen kala te ateyaki: “Ntango mabe ebakisami na mokili, ezali nguya ya molimo ya kokoka mpo na bayengebeni. Lokola mokili ezali kosielumuka mosika na longo ya molimo, Nkolo alengeli nzela mpo na baoyo balukaka Ye, kopesaka bango elikia ya monene mingi, bondimi ya monene mingi, mpe bondimami ya monene mingi na bokambi ya molimo bazali na yango na molimo. Likabo ya Molimo Mosantu ekokoma pole ya bongengi mingi na pole ezali kobima.”7

Bandeko mibali mpe basi, batiki biso moko kaka te mpo na kozala na nse ya nguya ya bipale mpe mbongwana ya lolenge ya mokili, kasi tozali na nguya ya kopona kozala na bondimi koleka netembe. Mpo na kozwa nguya ya eleka kokoka, tosengeli kopona kopesa bokabi na toli ya baprofeta, kondima mpe kosala na kolandaka botindiki ya molimo, kozala na botosi na mitindo ya Nzambe mpe koluka bobimisi ya moto yemei. Tosengeli kopona. Tika topona pole ya Mobikisi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.