2010–2019
“Baponami mpo na Kotatola Nkombo na Ngai”
sánzá ya zómi 2015


“Baponami mpo na Kotatola Nkombo na Ngai”

Likanisi na ngai ezali kolimbola ntina nini ezali mpenza malamu kozala na bato ya kokomela mingi mpe ya bososoli na molimo basala na bisika ya bokambi ya Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto

Na 1996 Mokambi Gordon  B. Hinckley amonanaki baminiti 60 na pologalami ya televisio ya Etazini. Mike Wallace, mopanzi nsango ya kala mpe ya èatata, atunaki Mokambi Hinckley mituna etali makambo mingi ya ntina.

Penepene ya nsuka ya lisolo na bango, Papa Wallace alobaki, “Bato mosusu balobaka, ‘Oyo ezali bokonzi ya mibange. Oyo ezali Eklezia moko etambolisami na mibange.’”

Mokambi Hinckley ayanolaki na esengo mpe na kotatabana te, “Ezali kitoko te kozala na moto moto moko akomela akamba, moto moko ya bososoli oyo akomemama te epai na epai na mipepe nionso ya malongi?” (broadcast on Apr. 7, 1996).

Likanisi na ngai ezali kolimbola ntina nini ezali mpenza malamu kozala na bato ya kokomela mingi mpe ya bososoli na molimo basala na bisika ya bokambi ya Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto—mpe ntina nini tosengeli koyoka mpe koyokemela (Moziya 2:9) mateya ya bato oyo Nkolo “aponi mpo na kotatola nkombo na [Ye] … kati na bikolo, mabota, minoko, mpe bato banso” (D&C 112:1).

Nasambeli ete tokoka banso koteyama na Molimo Mosantu wana ezali biso kotala likambo oyo ya ntina.

L iteya Moko ya Bomoi Mobimba

Nazali kolobela mama ya likambo oyo uta na emoneli ya bokeseni ya solo. Na mibu 11 oyo eleki nazali moko ya Bazomi na Mibale ya elenge mingi koleka na mobu ya kobotama. Na mibu na ngai ya mosala, mobu ya katikati ya bato kosalaka na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ezali mibu77—mobu ya katikati ya mokolo mingi koleka ya Bapostolo likolo ya ntaka moko ya mobu -11 na eleko oyo.

Napambolami na mayele mpe bwana ya bapostolo elongo, moko na moko, mpe na mosala ya Bazomi na Mibale oyo nazali kosala na bango elongo. Ndakisa uta na lisanga na ngai na Mpaka Robert D. Hales elakisi mabaku kitoko nazali na yango ya koyekola uta mpe ya kosala elongo na bakambi oyo.

Mibu mingi eleki nalekisaki nsima ya nzanga moko ya Eyenga elongo na Mpaka Hales na ndako na ye wana ezalaki ye kobika uta na maladi moko ya makasi. Tosololaki oyo etali mabota na biso, mikumba na biso ya lisanga likoki, mpe boyebi makambo ya ntinda.

Na esika moko natunaki Mpaka Hales, “Ozali molongani, tata, mosani, mokumbi mpepo, mokonzi ya mombongo, mpe mokambi ya Eklezia ya elonga. Mateya nini oyekoli wana ekoli yo koleka mpe opekisami na likoki ya nzoto ya kokita?”

Mpaka akanisaki ngonga moko mpe ayanolaki, “Ntango okoki kosala te oyo osalaka ntango nionso, nde osali bobele oyo ezali ntina mingi koleka.”

Nakamwaki bopete mpe bososoli ya eyano na ye. Moninga na ngai apostolo ya bolingo akabolaki na ngai liteya moko ya bomoi mobimba—liteya nayekoli na nzela ya mimekano makasiya mpasi ya nzoto mpe boluki makambo ya molimo.

Bandelo mpe Babotau ya Bato

Bandelo oyo ezali mbano eyebani ya kokola ekoki solo kokoma maziba kitoko ya boyekoli mpe bwania ya molimo. Makambo moko bato mingi bakoki kokanisa kotia ndelo bokasi ya basali oyo ekoki kokoma babokasi monene na bango mosusu. Babopekisi ya nzoto ekoki kokolisa bososoli. Konzo moke ekoki kongengisa bapriorite. Kozanga likoki ya kosala makambo mingi ekoki kotinda otala mwa malamu makambo ya ntina monene mingi koleka.

Bato mosusu balobi bilenge, bakambi ya konzo mingi bazali ntina na Eklezia mpo na koluka biyano na makasi na mikakatano ya mpasi ya mokili na biso ya sika. Kasi Nkolo asalelaka bafilozofi mpe mimesano ya bokambi ya sika te mpo na kokokisa bantina na Ye (tala Yisaya 55:8–9). Tokoki kolikia ete Mokambi mpe bayangeli ya nkulutu misusu ya Eklezia bakozala bato bakola koleka mpe ya mayele na mosala na molimo.

Ndakisa ebimisami na Nkolo nzela ya masanga na Eklezia na Ye epesaka mpe ekitisaka mbano ya babotau ya bato. Na esengo, Bokati ndelo ya kufa ya bato endimi solo liziba ya bonzambe ya babobimisi oyo eyeli epayi mpe na nzela na bango. Solo, bato oyo babiangami na Nzambe na nzela ya lisakola (tala Biteni ya Bondimi 1:5).

Ndakisa ya Bolengelami

Namoni kati na Bandeko na ngai ata moke eteni moko ya ntina ya Nkolo mpo na kozala na bato ya mikolo koleka bakola mpe ya bwania kosala na bisika ya bokambi ya likolo ya Eklezia. Bato oyo bazalaki na eleko ewumeli ya koteyama na Nkolo, oyo bazali kotalisa, kosalela, mpe kolinga. Bayekoli kososola mlokola ya bonzambe ya Molimo Mosantu mpe bandakisa ya Nkolo mpo na kozwa bobimisi. Bato ya momesano oyo bakutani na nzela moko ya kokolela ya momesano te oyo ekolisi bososoli na bango, ngo, eboti bolingo mpo na bato ya bikolo epesi nguya na bwania na bato ya bikolo mpe ya bizalela binso, mpe bandimi bosolo ya Bonzongisi.

Namoni mbala na mbala Bandeko na ngai kosalaka makasi na etingia mpo na kokokisa mpe kokumisa mikumba na bango wana ezali bango kobunda na makambo ya nzoto ya mpasi. Bato oyo bazangi mpasi te. Kasi, bapambolami mpe balendisami mpo na kokende liboso na bokasi wana ezali bango koniokwama kati mpe na mpasi

Kosalaka na bantoma ya Nkolo, nayei koyeba mposa na bango monene mingi koleka ezali kososola mpe kosala bolingi ya Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye ya Bolingo. Ntango tosambi elongo, bofulami ezwamaki mpe mikano ekanamaki oyo ezali komonisa ndelo ya pole mpe bosolo koleka mosika mayele, bososoli, mpe boyebi ya bato. Ntango tosali elongo na bomoko na ntina ya makambo ya mindondo, bososoli na biso banso ya makambo ekomisami monene na ndenge moko ya kokamwa na nguya ya Molimo Mosantu.

Napambolami komona mokolo na mokolo babomoto, makoki mpe bizalela ya lokumu ya moto na moto ya bakambi oyo. Bato mosusu bamonaka ete bambeba ya Bandeko ebulingisaka mpe ekitisaka bondimi. Mpo na ngai mabe wana ezali mpo na kolendisa mpe kotombola bondimi.

Liteya Mosusu

Sikawa namoni Bandeko na ngai mitano kozwa mbongwana na nzela ya liwa ya nzoto mpo na mikumba ya sika na mokili ya molimo: Mokambi James E. Faust, Mokambi Gordon B. Hinckley, Mpaka Joseph B. Wirthlin, Mpaka L. Tom Perry, mpe Mokambi Boyd K. Packer, mpe Mpaka Richard G. Scott .

Bilombe Bandeko oyo bapesaki “milimo na bango” na bango (Omni 1:26) mpo na kotatola nkombo ya Yesu Klisto na mokili mobimba. Mobimba ya malongi na bango ezali motuya mpenza.

Basali oyo bakabolaki na biso na mibu ya nsuka ya misala na bango ya kufa mateya na mokuse ya molimo ya nguya na mibu zomi ya mosala ebulisama. Bakambi oyo bateyi babosolo ya motuya monene na ngonga moko ntango basusu bakoki koThese dima ete bazali na mingi te ya kopesa.

Botala mateya ya nsuka ya baprofeta minene na makomi. Mpo na ndakisa, Nefi asukisaki nkoma na ye na maloba oyo: “Mpo boye Nkolo atindi ngai, mpe nasengeli kotosa” (2 Nefi 33:15).

Penepene ya nsuka ya bomoi na ye, Jacob apamelaki:

“Boyambola, mpe bokota na ekuke moke, mpe bokoba na nzela ya nkaka, kino bokozwa bomoi ya seko.

“O bozala na bwania; nini nakki koloba lisusu?” (Yakobo 6:11–12).

Moroni asukisaki mosala ya kolengela bapalaki na bomoni liboso ya elikia ya Bosekwi: “Nakei mosika te kopema na paradizu ya Nzambe, kino molimo mpe nzoto na ngai ekosala lisusu bomoko, mpe namememi na nzela ya mopepe, mpo na kokutana na bino liboso ya esika ya elengi ya Yova monene, Mosambisi ya Seko y aba bomoi mpe bakufi elongo” (Moroni 10:34).

Bino mpe ngai topambolami na koyekola uta na mateya mpe matatoli ya nsuka baprofeta mpe bapostolo ya mikolo ya nsuka. Nkombo lelo ezali Nefi, Yakobo, mpe Moroni te—kasi Mokambi Faust, Mokambi Hinckley, Mpaka Wirthlin, Mpaka Perry, Mokambi Packer, mpe Mpaka Scott.

Nazali koloba te ete nsango ya nsuka ya bato oyo ya bolingo mpenza ezalaki na bilembo elongobana mpe ya motuya mingi koleka ya misala na bango. Nzokande, lisanga ya boyekoli mpe makambo ya bomoi na bango ya molimo, epesaki bakambi oyo makoki ya kobeta nsete na babosolo ya seko na bompenza eluti mpe nguya monene ya kokotisa.

Elilingi
Mokambi James E. Faust

Na lisikulu ya likita linene na ye ya nsuka na sanza ya minei ya 2007, Mokambi Faust asakolaki:

“Mobikisi apesi na biso banso kimia moko ya motuya na nzela ya Bomikabi na Ye, kasi oyo ekoki kokoma bobele lokola tozali na bolingi ya kobwaka mayoki ya mabe ya nkanda, boyini, to kozongisa mabe na mabe.

“Tika biso tokanisa ete tosengeli kolimbisa mpo na kolimbisama ...Na motema mpe molimo nionso, nandimeli nguya ya lobiko oyo ekoki koyela biso ntango tolandi toli ya Mobikisi ‘kolimbisa bato banso’ [ D&A 64:10 ]” (“The Healing Power of Forgiveness,” Ensign or Liahona, sanza ya mitano 2007, 69).

Etinda ya Mokambi Faust ezali liteya moko ya nguya ya bomoi mobimba uta na moto moko nalingaka mpe moko na bato ya kolimbisa koleka namona naino te.

Elilingi
Mokambi Gordon B. Hinckley

Mokambi Hinckley tatolaki na likita linene ya sanza ya zomi ya 2007 “Nazongeli litatoli na ngai ya libiangi ya Profeta Joseph, ya mosala na ye, ya kokangisaka litatoli na ye na makila lokola martiro na bosolo ya seko ... Bino mpe ngai tosengeli koyanola motuna ya pete mpe sembo ya kondimaka bosolo ya Limoni ya Yambo mpe oyo wana elandaki yango. Makasi ya Eklezia oyo eyekami likolo ya bozali solo ya Limoni ya Yambo. Soki ezali bosolo, mpe natatoli ete ezali, nde mosala kati na yango tomipesi ezali mosala ya motuya mingi koleka na mabele” (“The Stone Cut Out of the Mountain,” Ensign or Liahona, sanza ya zomi na moko 2007, 86).

Litatoli ya Mokambi Hinckley elobi liteya moko ya nguya ya bomoi mobimba uta na moto moko nalingaka mpe nayebi ete azalaki profeta ya Nzambe.

Elilingi
Mpaka Joseph B. Wirthlin

Mpaka Wirthlin alobaki lisikulu ya likita linene na ye ya nsuka na sanza ya zomi na 2008.

“Nazali kokoba kokanisa toli [ya mama na ngai] epai na ngai oyo epesama na mokolo wana kala mpenza ntango ekipi ya lisano ya ndembo ya bato ya Amerika bakweyaki: ‘Oyo ekoya eya, mpe linga yango.’

… Motungisi, soki eyangelami malamu, ekoki kozala lipamboli na bomoi na biso …

“Ntango toluki boseki, toluki emoneli ya seko, tososoli libongisi ya lifuta, mpe tobelemi mpembeni ya Tata na biso ya Lola, tokoki kolendima na mpasi mpe mpasi mpe mimekano. Tokoki koloba, lokola elobaki mama na ngai, ‘Oyo ekoya eya, mpe linga yango’” (“Come What May, and Love It,” Ensign or Liahona, sanza ya zomi na moko 2008, 28).

Lisikulu ya Mpaka Wirthlin ezali liteya moko ya bomoi mobimba uta na moto oyo azalaki esakola ya bomoi ya kolongaka bampasi na nzela ya bondimi kati na Mobikisi.

Elilingi
Mpaka L. Tom Perry

Mpaka Perry atelemaki na elobelo oyo kaka mibu motoba eleki. Na ntango wana, tokokaki te kokanisa ete litatoli na ye ekozala ya nsuka mpo na ye na likita linene.

“Tika nasilisa na kotatolaka (mpe mibu zomi mbala libwa na mabele oyo epesi ngai likoki mobimba ya koloba yango) ete mingi koleka nazali kokola, mingi koleka nazali kososola ete libota ezali na katikati ya bomoi mpe ezali fungola ya esengo ya seko.

“Napesi matondi mpo na bomoi na ngai, mpo na bana na ngai, mpo na bankoko na ngai mpe bankokololo, mpe banso … baye libota ya monene oyo basalaka ete bomoi na ngaimei ezala ya kofuluka mpe, iyo, kutu ya seko. Na tina yay a bosolo ya seko oyo napesi litatoli na ngai ya makasi mpe ya bule mingi koleka” (“Why Marriage and Family Matter—Everywhere in the World,” Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2015, 42).

Lisikulu ya Mpaka Perry ezali liteya moko ya nguya ya bomoi mobimba uta na moto nalingaka oyo asosolaki na nzela ya boyebi mosala monene bozalani ya ntina kati na libata mpe esengo ya seko.

Elilingi
Mokambi Boyd K. Packer

Mokambi Packer abetaki nsete na likita linene sanza motoba eleki ete mwango ya esengo, Bomikabi ya Mobikisi, mpe mabota ya seko:

“Natatoli ete Yesu Klisto azali Klisto mpe Mwana ya Nzambe na bomoi. Ye atelemi na moto ya Eklezia. Na nzela ya Bomikabi mpe nguya ya bonganganzambe, mabota oyo ezali ya kobanda kati na bokufi ekoki kozala elongo na baboseko. …

“Napesi matondi mpenza mpo na mapamboli ya Nkolo Yesu Klisto, mpo na nguya ya kobota, mpo na nguya ya bosikoli, mpo na Bomikabi … oyo ekoki kosokola mbindo nionso likambo te boniboni mpasi to boniboni molai to mbala boni ezongelami. Bomikabi ekoki kozongisa bosomi lisusu mpo na kokende liboso, na peto mpe bolongobani” (“The Plan of Happiness,” Ensign or Liahona, May 2015, 28).

Lisolo ya nsuka ya Mokambi Packer ezali liteya moko ya bomoi mobimba uta na moto moko oyo na makasi mpe mbala na mbala asakolaki ete ntina ya “mosala nionso na Eklezia ezali komona mobali moko mpe mwasi moko elongo na bana na bango bazali na esengo na ndako, bakangisami lisanga mpo na ntango mpe boseko” ( Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2015, 26).

Elilingi
Mpaka Richard G. Scott

Mpaka Scott asakolaki na lisikulu na ye ya likita linene, na sanza ya zomi 2014: “Toyaki na bomoi ya kufa mpenza mpo na kokola na komekama mpe bomeki. Mimekano ekosunga biso kokoma mingi lokola Tata na biso ya Lola, mpe Bomikabi ya Yesu Klisto ekokokisa komema mimekano wana.Natatoli ete ntango toyei mpenza epai na Ye, tokoki kolonga masenginia nionso, mpasi na motema nionso tokokutana na yango” (“Make the Exercise of Faith Your First Priority,” Ensign or Liahona, Nov. 2014, 94).

Lisikulu ya Mpaka Scott ezali liteya moko ya nguyaa ya bomoi mobimba uta na moto moko nalingaka mpe nzeneneke moko ya kafukafu ya nkombo ya Klisto na mokili mobimba(tala D&C 107:23).

Elaka mpe Litatoli

Mobikisi asakolaki, “Ata na mongongo na ngaimei to na mongongo ya basali na ngai, ezali eloko moko” (D&A 1:38). Tika toyoka mpe tosala keba na babosolo ya seko oyo eteyami na nzela ya bantoma bapesama ndingisa ya Nkolo. Soki tosali bongo, nalaki ete bondimi na bison a Tata ya Lola mpe Yesu Klisto ekolendisama, mpe ekozwa bokambami mpe bobateli ya molimo.

Na bokasi nionso ya molimo na ngai, natatoli ete Klisto ya lisekwa mpe ya bomoi azali koyangela makambo ya Eklezia na Ye ezongisama mpe ya bomoi na nzela ya basali na Ye oyo baponami mpo na kotatola Nkombo na Ye. Natatli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.