2010–2019
Miso mpo na Komona mpe Matoyi mpo na Koyoka
sánzá ya zómi 2015


Miso mpo na Komona mpe Matoyi mpo na Koyoka

Soki tokoluka Klisto mpe tofungoli miso na biso mpe matoyi na biso, Molimo Mosantu akosunga biso komona Nkolo Yesu Klisto kosalaka na babomoi na biso

Na mosala na Ye na bokufi, Yesu asalaki bikamwisi moko ya nguya ya kobikisaka mpe koteyaka mpe nguya oyo makomi elobi, “lokumu na Ye epalanganaki na Sulia mobimba … mpe ebele ya motuluku ya bato balandaki ye.”1

Ebele oyo bamonaki Ye kobikisa mpe bayokaki Ye koteya babuakaki Ye. Basusu balandaki ye mpo na eleko moko kasi sima batambolaki elongo na Ye lisusu te.2

“Nayaki epai ya baoyo ya ngai moko, mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ye te.”3

“Bayoki na matoyi na bojito, mpe miso na bango ezipami.”4

Atako, bazalaki basi mpe mibali ebele, bakisaka na Bapostolo na Ye ya bosembo, oyo batiaki babomoi na bango likolo Ye. Atako babundaki na bobungisi makanisi ya mokoli, elongo mbaimbai na oyo Ye ateyaki, mpe kutu na kobanga, bango bandimaki Ye, balingaki Ye, mpe balandaki Ye.

Ba bango, Yesu alobaki, “Miso na bino epambwami, mpo ete ezali komona, mpe matoi na bino, mpo ete ezali koyoka.”5

Moke yambo ya monioko na Ye na Getesemane mpe Mpasi, Yesu apesaki bayekoli Ye elaka oyo ya kokamua: “Ye oyo akondimaka ngai, misala ezali ngai kosala akosala yango mpe lokola; mpe akosala yango ekoleka oyo; mpo ete Ngai nakokenda epai na Tata. ”6

Ye atondisaki elaka wana: kobandaka na mokolo ya Pentecote, bayekoli bapambolamaki na libatisi ya moto mpe ya Molimo Mosantu.7 Na nzela ya bondimi na bango na Klisto, boyamboli, mpe botosi, Molimo Mosantu ekomaki moninga na bango, ebongolaki mitema na bango, mpe epambolaki bango na litatoli ya libela na bosolo.

Makabo mpe mapamboli wana elendisaki bayekoli na Nkolo. Atako eleko bazalaki ezalaki ya likama mpe mbaimbai, bango bayambaki likabo ya molimo ya miso komona mpe matoyi koyoka. Na nguya ya Molimo Mosantu, bakomaki komona bosolo ya makambo lokola yango ezali mpenza, ya kafukafu oyo ya Nkolo Yesu Klisto mpe mosala na Ye katikati na bango.8 Molimo Mosantu angengisaki bososoli na bango, mpe bayokaki mongongo ya Nkolo polele koleka. Nsango malamu ya Yesu Klisto akotaki na bonzindo na kati ya mitema na bango.9 Bango bazali nsembo mpe batosaki.10 Bango bateyaki nsango malamu na lofundu mpe nguya mpe batongaki bokonzi ya Nzambe.11 Bango basepelaki kati na Nkolo Yesu Klisto.

Tozali na ebele ekokani na mibali mpe basi wana ya bosembo na katikati ya ntango. Biso mpe tozali na ntango oyo Nkolo Yesu Klisto azali kosala bikamua na kati na biso—kosangisaka kobikisa babeli, kopetolaka biso na masumu, kobongolaka mitema na biso, kopesaka libiki na bana ya Nzambe na bangambo nyonso mibale ya bato na bomoi mpe bakufi. Na ntango biso tozali mpe na Bapostolo ya bomoi, nguya ya bonganganzambe, makabo ya molimo, mpe mapamboli ya likolo ya makuli ya libiki.

Ntango nabiso ezali ntango moko ya likama koleka—ntango moko ya mabe koleka mpe ya komekama, ntango moko ya kobulunguna mpe ya koningana. Na ban tango oyo ya libungi makasi, profeta ya Nkolo na mabele, Mokambi Thomas S. Monson, abengaki biso kosunga baye balembi na molimo,12 kotelema na ngambo ya oyo ezali sembo,13 mpe kotonga bokonzi na Nzambe.14 Atako monene ya bondimi na molimo to botosi tozali sikoyo na yango sikawa, yango ekokoka te mpo na mosala oyo ezali liboso. Tozali na bosenga yam pole monene ya molimo mpe nguya. Tosengeli na miso mpo na komona mpolele koleka mosala ya Mobikisi na babomoi na biso mpe matoyi mpo na koyoka mongongo na Ye na bozindo na kati ya mitema na biso.

Lipamboli oyo ya kitoko koleka eyei ntango tofongoli mitema na biso mpe toyambi,15 na bosolo toyambi, Nkolo Yesu Klisto, lilongi na Ye, mpe Eklezia na Ye na babomoi na biso. Tosengeli te kozala malamu koleka, kasi kozala malamu mpe koluka ya malamu mingi. Tosengeli kosala makasi kozala nsango malamu ya pete mpe ya malembe. Soki totie nkombo ya Klisto likolo na biso, kosala na bondimi na Ye mpo na koyambola masumu na biso, kobomba mitindo na Ye, mpe ntango nyonso kokundola Ye, tokozwa bozalisani ya Molimo Monsantu na nzela ya ngolu mpe mawa ya Yesu Klisto.

Botosi ya moke ememaka Molimo kati ya mitema na biso. Na bandako na biso, tobondeli na bondimi, toluki makomi, tobulisi mokolo ya Saba. Na bandakonzambe, na biso tokaboli elambo mpe tosali bilaka ya bule na Tata na biso ya Likolo na nkombo ya Klisto. Na batempelo esantu, tosangani na malongi ebulisami na ntina ya bandeko na biso mibali mpe basi oyo bakufa. Na kati ya mabota na biso mpe kati ya misala na biso mpo na Nkolo, tozali kotanda loboko mpo na basusu, kotombola mikumba na bango mpe kobengaka bango koya epai na Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, nayebi ete soki tokosala makambo oyo, Molimo Mosantu akoya! Tokokola na molimo mpe tokozua mayele elongo na Molimo Mosantu, mpe Ye akozala moninga na biso. Soki tokoluka Klisto mpe tofungoli miso na biso mpe matoyi na biso, Molimo Mosantu akosunga biso komona Nkolo Yesu Klisto kosalaka na babomoi na biso, kolendisaka bondimi na biso epai na Ye na bosolo mpe elembo. Biso tokomona bandeko na biso ya mibali mpe ya basi koleka lolenge Nzambe azali komona bango, na bolingo mpe mawa. Tokoyoka mongo ya Mobikisi na makomi, na mongongo moke ya Molimo, mpe n maloba ya baprofeta ya bomoi.16 Tokomona nguya ya Nzambe kopemaka likolo ya profeta na Ye mpe batambuisi nyonso ya Eklezia na Ye ya solo mpe ya bomoi, mpe tokoyeba na bosolo nyonso ete oyo ezali mosala esantu ya Nzambe.17 Tokomona mpe tokososola bisomoko mpe mokili nzinga nzinga na biso lolenge Mobikisi asali. Mpe tokozua oyo Apostolo Paulo abengaki “makanisi na Klisto.”18 Tokozala na miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka, mpe tokongoka bokonzi na Nzambe.

Bomoi ekoki kokoma mpasi, kobulungana, miniko, mpe kolembisaka nzoto. Napesi bino litatoli na ngai ete na nzela ya boninga ya Molimo Mosantu, mpole ya nsango malamu ya Yesu Klisto ekokata kobulungana, monioko, mpe molili. Soki yango eye na mbalakaka to na malembe malembe, nguya oyo ya nkembo ya molimo ekopesa bolingo ya lobiko mpe kobatelama na molimo ezoki ya moyamboli; ekolongola molili na nzela yam pole ya solo, mpe akobongola kolemba nzoto na elikya na Klisto. Tokomona mapamboli yango kokoma, mpe tokoyeba na nzela ya litatoli ya Molimo ete ezali Nkolo Yesu Klisto kosalaka na babomoi na biso. Mikumba na biso ekozala ya solo “komelama na esengo ya [Mosikoli na biso].”19

Mayele moko mama mpe tata na ngai bazuaka mibu ebele eleki elakisaki ntina mpe nguya ya miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka. Na 1982 baboti na ngai babengamaki kosala na Misio ya Davao na na engumba Philippines. Ntango mama na ngai afungolaki mokanda mpe amonaki esika bango babiangemaki, akamuaki epai ya tata na ngai, “Te! Yo osengeli kobenga bango mpe koyebisa bango biso tokoki kokende na Philippines te. Bayebi ete you ozali na kosukosu ya mpema.” Tata na ngai abelaki kosukosu ya mpema mibu ebele, mpe mama na ngai amitungisaki mingi mpo na ye.

Butu mike sima mama na ngai alamusaki tata na ngai na bangonga 2:30 ya ntongo. Ye alobaki, “Merlin, oyokaki mongongo wana?”

“Te, nayokaki mongongo moko te.”

“Solo, ngai nayokaki mongongo moko wana mbala misato na butu, kolobaka,‘Mpo na nini ozali komitungisa? Oyebi te ete ngai nayebi ete azali na kosukosu ya mpema? Nakobatela ye, mpe nakobatela yo. Bomibongisa mpo na kosala na Philippines.’”

Elilingi
Merlin mpe Helen Clark

Mama mpe tata na ngai basalaki na Philippines mpe bazuaki mayelo moko ya kitoko. Molimo Mosantu azalaki moninga na bango, mpe bapambolamaki mpe babatelamaki. Tata na ngai azuaka likambo ata moko te na kosukosu ya mpema. Asalaka lokola mopesi toli ya yambo na bokambi ya misio, mpe ye mpe mama na ngai basalisaki bamisionele ebele mpe ebele koleka ya Bansantu ya bosembo na bobongisi ya boyei ya bapaluase mpe makonzi na mabele ya Mindanao. Bango bapambolamaka na miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka.

Bandeko mibali mpe basi, napesi litatoli ya Yesu Klisto. Nayebi ete Ye azali na bomoi. Ye azali Mobikisi na biso mpe Mosikoli na biso. Nayebi ete soki toyambi Ye na babomoi na biso mpe tozali na pete mpe malembe ya nsango malamu na Ye, tokosepela na kiboninga ya Molimo Mosantu. Tokozua likabo ya motuya ya miso mpo na komona mpe matoyi mpo na koyoka. Boye natatoli na nkombo y able ye Yesu Klisto, amen.