2010–2019
Bondimi Eyaka na Libaku Malamu Te, Kasi na Boponi
sánzá ya zómi 2015


Bondimi Eyaka na Libaku Malamu Te, Kasi na Boponi

Bondimi na Yesu Klistu ezali likabo kowuta na lola oyo eyaka ntango toponi kondima mpe ntango tozali koluka mpe kosimba yango.

Mobikisi ayebaki bokasi to bolembu kati na bondimi ya baoyo bazalaki elongo na Ye. Na moto moko, Ye alobaki na lolenge ya kondima, “Bondimi na yo ezali monene”1 Alobaki na lolenge ya mawa na mosusu, “O yo moto ya bondimi moke.”2 Atunaki basusu, “Bondimi na bino ezali wapi?”3 Mpe Yesu alakisaki botosi na mosusu, “[Kati ya Yisalaele mobimba] nanu namoni bondimi monene boye te.”4

Namituni, “Lolenge nini Mobikisi amonaka bondimi na ngai?” Mpe na mpokwa ya lelo nazali kotuna bino, “Lolenge nini Mobikisi amonaka bondimi na bino?”

Bondimi na Nkolo Yesu Klistu ezali eloko moko ya pete te, kopepaka na mopepe. Bondimi ekweyelaka biso te na lolenge ya libaku malamu, to etikalaka na biso lokola bokonzi ya kibokulutu. Ezali, lokola makomi elobaka, “eloko oyo emonanaka te … bondimami ya biloko oyo emonanaka te.”5 Bondimi ebimisaka pole ya molimo, mpe pole yango emonanaka.6 Bondimi na Yesu Klistu ezali likabo kowuta na lola oyo eyaka ntango toponi kondima7 mpe ntango tozali koluka mpe kosimba yango. Bondimi na bino ekolaka makasi to ekomaka ya kokita. Bondimi ezali mobeko ya nguya, ezali ntina kaka na mokili oyo te kasi lisusu na bokoli na biso koleka sima ya nkufa.8 Na ngolu ya Klisto, tokobikisama mokolo moko na nzela ya bondimi ya nkombo na Ye.9 Lobi ekoya ya bondimi na bino ezali na lolenge ya libaku malamu te, kasi na nzela ya boponi.

Bondimi ya Elenge Mobali moko ya Bresil

Sanza moko eleki na Brezil nakutanaki na Aroldo Cavalcante. Abatisamaki ntango azalaki na mibu 21, mondimi ya yambo ya Eklezia kati ya libota na ye. Bondimi na ye ezalaki makasi koleka, mpe abandaki mbala moko komilengela mpo na kokende na misio. Na mawa, mama ya Aroldo azalaki na maladie ya cancer. Na sima ya basanza misato, bobele mikolo ya yambo akufa ayebisaki Aroldo na ntina ya likambo monene azalaki na yango: Ezalaki na bandeko ya kosunga bango te. Aroldo asengelaki kozwa mokumba mobimba ya baleki na ye ya basi mpe leki na ye ya mobali. Ye apesaki elaka ya solo na mama na ye oyo azalaki kokufa.

Elilingi
Bandeko ya Cavalcante

Na moyi azalaki kosala na banke, mpe na butu azalaki kokende université. Akobaki kobatelaka mayokani na ye ya libatisi, kasi elikia na ye mpo na kozala misionele ya ntango mobimba elongwaki. Misio na ye ezalaki ya kobatela libota na ye.

Sima ya basanza na ntango azalaki kobongisa lisikulu na ye ya likita ya elambo, Aroldo ayekolaki maloba oyo endimami ya Samuel kolobelaka Mokonzi Saule: “Kotosa,” atangaki, “ezali malamu mingi koleka [ko] mikaba.”10 Aroldo azwaki ezaleli ya molimo ya kosala eloko moko, atako ezalaki mpasi mpo na ye asala yango ete asengelaki kotosa libiangi ya profeta ya kokende misio. Amilembisaki te mpasi oyo ezalaki liboso na ye, asalaki oyo eyebaki ezalaki malamu na bondimi monene.

Elilingi
Mpaka Aroldo Cavalcante

Aroldo abombaki mbongo nionso ya Brazilia cruzeiro oyo akokaki kozwa. Ntango akokisaki mibu 23, azwaki libiangi ya misio. Ayebisaki ndeko na ye ya mobali lolenge nini asengelaki kozwaka mbongo na sanza nionso na konte na ye. Kino sikawa naino azwi mbongo ekoka te mpo na kosunga ntango mobimba ya misio na ye te mpe kosalisa ndeko na ye ya mobali mpe baleki na ye ya basi, kasi na bondimi akotaki MTC. Mposo moko sima azwaki yambo kati na mapamboli ebele. Banke oyo epesaki Mpaka Cavalcante mosala na mbala moko ebakisalaki ye lifuti mbala mibale koleka ndenge asengelaki kozwa ntango asilisaki mosala na ye. Bikamwisi oyo, na misusu, esalisaki bamposa mpo na misio mpe libota na ye ntango azalaki te.

Elilingi
Libota ya Cavalcante lelo oyo

Mibu ntuku mibale sima, Ndeko mobali Cavalcante azali sikawa kosalisa lokola mokambi ya Likoki ya Viagem Boa Recife Brezil. Ntango nakanisaki nionso oyo elekaki, alobaki na ntina ya mikolo wana, “Ntango namekaki kozala na bomoi ya kolongobana, nayokaki bolingo ya Mobikisi mpe botambuisi Ye. Yango esungaki kokola ya bondimi na ngai ekolaki, epesaka ngai ndingisa ya kolonga mimekano mingi.”11 bondimi ya Aroldo eyaki na lolenge ya libaku malamu te, kasi na boponi.

Ezali na Baklisto ebele mibali mpe basi bazalaka na boyambi ya mozindo ya Yesu Klisto, mpe tokumisi mpe tomemyi bango.

Mosika te na Mabele ya Moto te

Kasi bandeko, kasi topesamelaki eloko moko koleka: bonganganzambe ya Nzambe, nguya ya Nzambe ezongisama likolo ya mebele na anzelu ya mosanto. Yango nde esalaka bokeseni na bino. Bokotikala bobele lolenge moko te. Bondimi na bino ekokola kaka na libaku malamu te, kasi na boponi.

Lolenge nini tosalelaka bomoi na biso ematisaka to ekitisaka bondimi na biso. Libondeli, botosi, ya solo mpenza, kozalaka na makanisi peto mpe misala malamu, mpe na bokabi yango ekolisaka bondimi. Longola yango bondimi na biso ekokita. Mpona nini Mobikisi alobaki na Petelo, “nasambelaki mpo na bino, na ntina ete bondimi na bino ebunga te ”?12 Mpe ete ezali na monguna oyo azali koluka kobebisa bondimi na biso! Tosala nionso oyo esengeli mpo na kobatelaka yango.

Mituna ya Bosembo

Kosalelaka mituna ya ntina ezali eteni ya ntina ya botongami ya bondimi, mpe tosalelaka yango mibale mayele mpe mayoki na biso. Nkolo alobaki, “Nakoyebisa bino kati ya makanisi mpe mitema na bino.”13 Biyano nionso ekoya mbala moko te, kasi mituna ebele ekoki kozwa biyano na nzela ya botangi na bokebi mpe boluki ya biyano kowuta na Nzambe. Kosalelaka mayele na biso na kozangaka motema na biso ekopesa biyano ya molimo te. “Moto moko te ayebi makanisi ya Nzambe, kasi na [nzela] ya molimo ya Nzambe.”14 Mpe mpona kosunga biso, Yesu alakaki biso “Molendisi mosusu” mpe abengaki Ye “kutu Molimo ya solo.”15

Bondimi esengaka eyano na motuna nionso te. Nzoka nde, bondimi esengaka bondimami mpe bompikili mpo na kokende liboso, atako ntango tokoki koyeba, “nayebi makambo nionso te, kasi nayebi mwa ndambo mpo na kokoba na nzela ya kimoyekoli.”16

Kotikalaka ntango nionso na ntembe, biyano ekowuta na bozangi kondima mpe bobuki elako, ekolembisa bondimi ya moto mpo na Yesu Klistu mpe Bozongisi17 “Moto oyo azangi molimo akoki koyamba te makambo oyo ewutaka na Molimo ya Nzambe: mpamba te yango ezali bozoba epai na ye.”18

Ndakisa, mituna oyo etali Profeta Joseph Smith ezali ya sika te. Yango etunama na ndenge ya mabe na matongi elobama mingi mpo na ye uta ebandeli ya mosala oyo. Na baoyo bazali na makanisi elongobana ya ekeke ya 21, bazali koluka bosolo na misala ya Profeta Joseph uta mibu 200 sima eleki, ekoki ngai nakabola toli moko ya kiboninga: Mpo na sikawa, pemisa Ndeko mobali Joseph! Na mokolo moko ya nsima, bokozala na bansango ya mbala 100 mingi koleka oyo uta boluki nyonso na biloko ezangani ya lelo, mpe ekowuta uta na boyebi nionso ya Tata na biso ya Lola.19 Kanisa na ntina ya bomoi ya Joseph mobimba—abotama na bobola mpe atangaki mingi te, ye abongolaki Buku ya Mormon na mikolo 90.20 Bankama zomi ya mibali mpe basi ya sembo bayambaki ntina ya bozongisi. Na mibu 38 akangaki bonzeneneke na ye na makila na ye. Natatoli ete Joseph Smith azalaki mpe azali profeta ya Nzambe. Ndima yango, mpe kanisa makambo mosusu!

Makabo Oyo Ekolisaka Bondimi na Biso

Tozali na Biblia mpe Buku ya Mormon, oyo epesaka ndimbola ya solo ete Yesu Klistu, azali mwana mobali ya Nzambe. Nasimbi na loboko na ngai mokanda ya bobimisi ya yambo ya Buku ya Mormon na lokota ya falanse, ebimisama na John Taylor ntango abandaki mosala na France na mobu 1852. Mingi ya Babuku ya Mormon ezali sikawa na nkota 110 na mokili mobimba. Epesaka molimo mpe litatoli ya solo ya bosolo ya Bozongisi. Mokolo nini ya nsuka yo otangaki Buku ya Mormon uta ebandeli kino nsuka? Tango yango lisusu. Ekokolisa bondimi na yo.21

Likabo mosusu kowuta na Nzambe oyo ekoyeisa monene bondimi na biso ezali bokambami ya Bokambi bwa Yambo mpe Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, mpe natombeli boyei malamu na Mpaka Rasband, Mpaka Stevenson, mpe Mpaka Renlund na lisanga oyo ya bule ya Lisanga likoki ya Bazomi na mibale. Paul alobaki:

“A[bengaki] bapostolo; mpe … bapofeta; …

“Mpo na bosantisi ya basantu … :

“Kino biso nionso tokoma na… bomoko ya… bondimi, mpe… mayele ya Mwana mobali ya Nzambe …  :

“… Lisusu te bana mike, oyo bazali kotindikama tindikama na bambonge mpe komemama memama na bipai na bipai na mipepe nionso ya mateya… evandi kati na lokuta [ya bato], mpe kati na mayele na bango ya mabe ya kosalela banzela ya mabe mpo na kokosa.”22

Botambuisi ya Bokambi ya Yambo mpe Bazomi na mibale ekosunga kobatela bondimi na bino.

Elilingi
Bamoto ya bondimi

Atako na ebandeli na bino moto ya bondimi ekoki kozala moke, na boponami na bino ya malamu ekomema elikia moneene na Nzambe, mpe bondimi na bino ekomata. Bampasi ya nkufa ezali kotungisa bino mpe mbala na mbala, makasi ya monguna etikalaka na molili, kolikiaka mpo na koboma bondimi na bino. Kasi lokola bozali kokobaka kosala maponi malamu, kondimelaka Nzambe mpe kolandaka Muana na Ye ya Mobali, Nkolo atindi pole ya kobakisama mpe boyebi, mpe bondimi na bino efandisami mpe ekoningana lisusu te. Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Bobanga te. … Lobi ekoya ezali kongenga lokola bondimi na bino.”23

Porter, Zane, mpe Max Openshaw

Bondimi ya bilenge mibali ya Eklezia oyo emonisamaka!

Elilingi
Libota ya Openshaw

Na sanza ya motoba na mokolo ya 12 ya mobu oyo, nazwaki nsango moko na internet oyo elobelaki ngai ete episikopo awuti na palwasi ya Utah, mwasi na ye, mpe bana na bango mibale babomaki na likama ya mpepo. Episikopo Mark Openshaw azalaki kokumba mpepo ntango azalaki kokita mwa moke, ntango ekuaki na mbalakata uta likolo mpe epanzanaki na mabele. Episikopo Openshaw, mwasi na ye, Amy, mpe bana na bango Tanner mpe Ellie bakufaki na likama. Na lolenge ya kokamwa mwana na bango ya mobali ya mibu mitano, Max, abwakamaki libanda ya kiti na ye ya mpepo, abikaki bobele mikuwa ebukanaki.

Nayekolaki ete mwana na bango ya mobali Mpaka Porter Openshaw azalaki kosalisa na Misio ya bisanga ya Marshall Islands Majuro mpe ete mwana na bango ya mobali ya mibu 17, na nkombo ya Zane, azalaki na kelasi ya bopesi bonkoko na Allemagne.

Nabengaki Mpaka Openshaw na Esanga ya Christmas. Atako motema na ye ebukanaki na liwa ya mbalakata ya mama na ye, tata, ndeko na ye ya mobali mpe ndeko na ye ya mwasi, Mpaka Openshaw na mbala moko atiaki makanisi na ye na baleki na ye ya mibali mibale ya bilenge.

Na nsuka Mpaka Openshaw mpe ndeko na ye ya mobali Zane bazwaki mokano ete basusu bakokaki kosunga na libota mpe ete Porter asengelaki kotikala na misio na ye. Bayebaki ezalaki oyo baboti na bango basengelaki kosala.

Elilingi
Mpaka Porter Opnshaw na libatisi moko

Ntango nasololaki na Mpaka Openshaw, nayokaki mawa na ye kasi lisusu bokasi na ye elembisami te ya bondimi. “Nazali na elikia,” ayebisaki ngai, “mpe nayebi na bozangi ya ntembe ete nakomona libota na ngai lisusu. … Bokasi na mikakatano na biso emonisamaka ntango nionso kati ya … Nkolo na biso Yesu Klisto. … Loboko ya bokasi ya Nzambe esungaka [ngai] mpenza mpe bandeko na ngai ya mibali na nzela ya momekano [oyo] ya mpasi.”24

Elilingi
Zane Openshaw kolobaka na matanga

Nakutanaki na Zane na mbala ya yambo na matanga. Ntango natalaki bikoti minei liboso na biso kati ya ndako ya Nzambe, nasepelaki na bondimi ya elenge ya mibu 17 ntango azalaki koloba na lingomba. “Lelo,” alobaki, “tosangani na mitema ya sembo mpe milimo ya botawu, mpo na kokanisa babomoi ya mama na ngai, tata, Tanner, mpe Ellie. … Tosololaki na lisanga, tolelaki na lisanga, kokanisaki na lisanga, mpe toyokaki loboko ya Nzambe na lisanga. …

“Mokolo elandi oyo nayokaki nsango ya likama, namonaki mokanda na kati ya saki na ngai ewutaki epai ya mama. Na kati ya mokanda akomaki: ‘Zane, kanisa nani yo ozali mpe epai wapi yo owuti. Tokosambela ntango nionso mpo na yo mpe tokozanga yo.’ Maloba ya nsuka ya kobakisa elongobana ya mama na ngai. Nayebi ete ntango nionso ye, na Tanner, Ellie, mpe tata na ngai basambelaka … mpo na [bandeko na ngai ya mibali mpe] ngai. Nayebi ete … basambelaka na ntina ete nayeba nani ngai nazali … mpo ete nazali, lokola yo, mwana ya Nzambe, mpe Ye atindaki ngai awa. Natatoli [ete]… bomitungisa te atako tozali komiyoka ya kotikala biso moko, Nzambe akosundola biso te.”25

Baninga na ngai ya motuya, bondimi na bino ebandaki na bobotami te, mpe ekosuka na nkufa te. Bondimi ezali liponi. Kolendisa bondimi na bino, bokozala na bomoi ya kondima maloba ya Klisto: “Bondimi na yo ezali monene.” Ntango okondima, nalaki bino ete bondimi na bino, na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto, ekopesa mokolo moko ndingisa ya kotelema na baoyo bolingaka, bopeto mpe petwa liboso ya Nzambe, na nkombo ya Yesu Klisto, amene

Matangi

  1. Matai 15:28.

  2. Matai 6:30.

  3. Luka 8:25.

  4. Matai 8:10.

  5. Baebele 11:1.

  6. Tala Alma 32:35.

  7. Tala L. Whitney Clayton, “Choose to Believe,” Ensign or Liahona, Sanza ya mitano 2015, 36–39.

  8. Tala Lectures on Faith, (1985), 3.

  9. Tala Efezo 2:8.

  10. 1 Samwele 15:22.

  11. Lisolo ya ngai moko na Aroldo Cavalcante, Sanza ya mwambe 29, 2015, Salvador, Brazil, na kobakisa email uta Sanza ya mwambe 31, 2015. Ezali na masolo ebele koleka ya elaka Aroldo Cavalcante na mama na ye ya kosunga bandeko na ye ya basi mpe ya mobali. Katikati na mibu elandaki liwa ya mama na ye, akokaki na polele nionso kolakisa ndeko na ye ya mobali mpe ya basi lokola ‘‘bana’’ na ye. Na kati ya mosala na ye ya misionele, mikanda na ye mpe kobianga na Noele to na Feti ya Bamama ezalaki mingmingi bitumba ya moto se yemoko ya moko na moko ya bayi libota. Na nzela ya libonza monene sima ya etinda na ye, Aroldo azuaki mokumba oyo etali mosolo mpona kelasi na bango mpe etinda ya ndeko na ye ya mobali, Aroldo azelaka tii bandeko na ye ya basi mpe ndeko na ye ya mobali babalaki yambo ye kobalaka na mibu 32. Bango batikala libota moko ekangana makasi.

  12. Luka 22:32.

  13. Doctrine & Alliances 8:2.

  14. 1 Bakolinto 2:11.

  15. Yoane 14:16–17.

  16. Tala Adam Kotter, “When Doubts and Questions Arise,” Enseign, Nsanza ya mis. 2015, 37–38; Liahona Nsanza ya mis. 2015, 39–41

  17. Mpaka Neal A. Maxwell mbala moko alobaka, ‘‘Mingi bakotingama na koyekolaka Eklezia kaka na nzela ya koluka bamabe na yango—lokolo kotunaka Yuda mituna mpona koyeba Yesu. Babebisi balobaka ntango nyonso mingi etali bango moko na esika ya oyo etali lolenge nini bango balongwaki’’ (“All Hell Is Moved” [Brigham Young University devotional, Sanza ya zomi na moko 8, 1977], 3, speeches.byu.edu).

  18. 1 Bakolinto 2:14.

  19. “Natikala te koyebisa yo ete nakoka; kasi libunga moko te ezali kati na mabimisi oyo nateyaki” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 522).

  20. Tala John W. Welch and Tim Rathbone, “The Translation of the Book of Mormon: Basic Historical Information, (Foundatuin for Ancient Research and Mormon Studies, 1986).

  21. Litatoli ya molimo ya Buku ya Mormon ezali eteni ya katikati ya mbonguana ya Bansantu ba Mikolo Mya Nsuka. Ezali litatoli moko oyo esengeli kozongisa sika lisusu mpe lisusu. Soki te, mayoki ya molimo ekolemba mpe moko mosika akomikundola nguya oyo mobali to muasi ayokaki. ‘‘Mpe bato bakobanda kobosana bilembo mpe komitungisa na oyo bango bayokaki, mpe bakobanda kozala moko mpe moke kokamua na moko … komitungisa mpona lola, na mingi koleka oyo ekobanda kozala mpasi na mitema na bango, mpe ekokanga makanisi na bango, mpe bakobanda kondima lisusu te nyonso oyo bamonaka mpe bayokaka … mpe ekomema bango mosika kondima ete lilongi ya Klisto ezalaki liboma mpe eloko ezanga ntina” (3 Nefi 2:1–2).

  22. Efezo 4:11–14.

  23. Thomas S. Monson, “Be of Good Cheer,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2009, 92.

  24. Email ya Ngai moko ewutaki na Mpaka Porter Openshaw, Sanza ya mwambe 23, 2015.

  25. Ndimbola na Zane Openshaw na matanga ya ndeko ya libota ya bandeko na ye, Sanza ya motoba 22, 2015.