2010–2019
Kangama na Nzela na Yo
sánzá ya zómi 2015


Kangama na Nzela na Yo

Tiya Nzambe liboso, kotalaka mimekano ozali na yango te. Linga Nzambe, zala na bondimi na Klisto, mpe tiya elikia na Ye na makambo nionso.

Na mokolo ya 11 ya sanza ya Misato, mobu 2011, natelemaki na platform na esika ya kozela engbunduka na Shinagawa na Tokyo mpo na kotala Misio ya Kobe na mboka Japon. Na penepene ya ngonga 2:46 ya mpokwa. Boningani moko ya makasi ya mabele ya magnitude 9.0- ebetaki. Nakokaki kotelema esika moko te likolo ya koningana makasi wana, mpe nasimbaki makasi libende ya ematelo. Mpe mimda ya plafon ya mpembeni ekomaki kokueya na nse. Mboka ya Tokyo mobimba ezalaki na bobangi.

Na esengo mpenza, nazokaki te, mpe bangonga minei oyo elandaki, nazalaki na esengo ya koyeba ete libota na ngai mobimba ezalaki na kimia.

Television ezalaki kolakisa bilili ebele ya kobangisa, koyokisa motema mpasi. Mbonge makasi na nkombo tsunami ekitaki na esika ya misio ya Sendai—kokombolaka nionso na boleki na yango: mituka, bandako, ba usine, mpe bilanga. Natungisamaki makasi na bilili ya mpasi, mpe nalelaki. Mpe nabondelaki na etingia nyono ete kobatelama mpe lisungi ya Tata na biso ya Lola ekoka kozala likolo ya bato nionso bazali na etuka oyo nalingaka mpenza mingi.

Ntango elandi, elobamaki na bosolo ete bamisionele nionso mpe bandimi ya Eklezia bazali na kimia. Atako, ebele ya bandimi batutamaki na, kobungisaka bandeko ya libota na bango, bandako, bisika ya bofandi na bango moko. Penepene ya 20,000 bato babungaki, mangomba ya bato ebebisamaki, mpe bato ebele batindamaki na makasi kotika bandako na bango lokola mbano ya likama ya central nucléaire.

Makama ya ndenge oyo ezali komema kobeba na bisika ebele na mokili lelo oyo, komemaka bobungi ebele ya bomoi. Biso toyebisamaki ete makama, bitumba, mpe mikakatano ebele ekoya na mokili.

Ntango mimekano ya lolenge oyo eyeli biso na mbalakaka, tokoki komituna, “Mpo na nini biloko ya boye ekomeli ngai?” to “Mpo na nini nasengeli koniokuama?”

Na ntango ebele sima ya kobonguana na ngai na nsango malamu, nazalaka na eyano ya solo te na motuna “Mpo na nini napesamelaki mimekano?” nasosolaki ete eteni ya mwango ya lobiko oyo elobi biso tokomekama. Atako, na bomoto, ntango ya kotala motuna oyo, nazuaki kondimisama moko te oyo ezalaki na nguya ekoki koyanola yango ndenge esengeli. Kasi ekomaki na ngonga moko na bomoi na ngai ntango nazuaki lisusu mayele na momekano moko ya makasi.

Ntango nazalaki na mibu 30, nakendaka kotala misio ya Nagoya lokola eteni ya mosala na ngai. Sima ya liyangani, mokambi ya misio na esengo nionso abongisaki ba mpaka bakumba ngai na plene ya avion mpo nazua mpepo. Boye, ntango tokomaki na bokutani ya banzela na nse ya ngomba mike ebele, motuka moko monene ewutaki na sima na biso elekaki na mbango makasi. Atutaki sima ya motuka na biso mpe atindikaki yango liboso koleka ba metele 20. Ya kobangisa na nionso oyo ezalaki ete mokumbi azalaki kuna te. Nsima ya motuka na biso efinanaki katikati ya lolenge na yango. Na esengo mingi, banso bampaka na ngai tobikaki.

Bongo, na mokolo elandi, nakomaki koyoka mpasi na kingo mpe mapeka na ngai mpe moto ekomaki kobeta makasi. Wuta mokolo wana, nakokaki kolala te mpe natindikamaki na makasi kolongua mokolo yango elongo na mpasi ya nzoto mpe ya makanisi. Nabondelaki Nzambe na mawa abikisa ngai na mpasi, kasi ba mpasi yango ekobaki kino penepene ya mibu 10.

Na ntango yango, mayoki ya ntembe mpe ebandaki kokota malembe malembe na makanisi na ngai, mpe namitungisamaki, “Mpo na nini nakoki konyokuama na mpasi makasi boye?” na bongo, atako lolenge ya libiki nazalaki koluka epesamelaki ngai te, nasalaki makasi ya kozala sembo na kobombaka mitindo ya Nzambe. Nakobaki kobondela ete nakoka kosilisa mituna nazalaki na yango na ntina ya mimekano na ngai.

Ekomaki na ngonga moko ntango namonaki ngai moko kobundaka na likambo ya sika mwa ndambo ebakisami na kati na ngai, mpe naningisamaki mpo ete nayebaki te lolenge kotelema liboso ya momekano oyo ya sika. Nabondelaka mpo na eyano mbala moko te. Boye nakendaki mpe nasololaki na motambuisi ya Eklezia moko ya sembo.

Na ntango tozalaki kosolola, na bolingo na mongongo na ye, alobaki, “Ndeko mobali Aoyagi, ezali ntina na yo te ya kozalaka na mabele oyo mpo na kozua mayele na momekano oyo? Ezali yango ya kondima nionso na mimekano ya bomoi oyo mpo na lolenge bazali mpe sima kolongwa kotikala na Nkolo? Bokanisi te ete likambo oyo ekozala malamu ntango tokosekwa?”

Ntango nayokaki maloba wana, nayokaki Molimo ya Nkolo makasi koleka, nayokaka malongi oyo ba mbala ebele, kasi miso na ngai ya bososoli efunguamaka te koleka ngonga oyo. Nasosolaki ete yango ezalaki eyano oyo nazalaki kolukaka kowuta na Nkolo na mabondeli na ngai. Nazalaki na makoki ya komanyola na polele muango ya lobiko ya Tata na biso ya Lola mpe kososola ya sika motuya ya mobeko oyo.

Na Abalayama, Nkolo Nzambe alobaki ete; “Mpe tokotia bango na momekano, mpo na komona soki bakosala nionso oyo Nkolo Nzambe na bango akotinda bango.”1

Libongi ezali ete Nzambe oyo akeli balola mpe na mabele ayebi lolenge nini mabele oyo esalemi, ete Ye azali kokonza likolo ya biloko nionso na lola mpe na mabele, mpe nionso na ntina ya bomemi botondi ya muango ya lobiko, Ye apesi biso elongo na bamayele ekeseni—mpe lisusu mimekano—ntango ezali biso na mabele oyo.

Mpe Nkolo alobaki na Joseph Smith oyo elandi:

“Yeba, muana na ngai, ete makambo nionso oyo ekopesa yo mayele mpe ekozala mpo na bolamu na yo. …

“Boye, kangama na nzela na yo …, mpo ete Nzambe akozala elongo na yo ntango nionso mpe libela na libela.”2

Mimekano ya mabele oyo—sangisaka maladi mpe nkufa—ezali eteni moko ya muango ya lobiko mpe ezali bamayele tokoki kokima te. Ezali na ntina mpo na biso ko “kangama na nzela na [biso]” mpe kondima mimekano na biso na bondimi.

Kasi, ntina ya babomoi na biso ezali kaka te kondima mimekano. Tata ya Lola atindaki muana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto, lokola Mobikisi mpe Mosikoli boye tokoki kolonga mimekano oyo tokutani na yango na mabele oyo, na maloba mosusu, Ye asali ete makambo na biso ya bolembu ekoma makasi,3 Ye amikabi mpo na masumu na biso mpe mabe na biso, mpe Ye asali yango ekoma likoki mpo na biso kozua bozangi nkufa mpe bomoi ya libela.

Mokambi Henry B. Eyring asakolaki: “Momekano oyo Nzambe ya bolingo atie liboso na biso ezali te komona soki tokokoka mikakatano. Ezali komona soki tokokoka yango malamu. Tozali koleka momekano na kolakisaka ete tokundolaki Ye mpe mitindo Ye apesaki biso.”4

“Kangama na nzela na yo” ezali fungola ya kopona na ntango ya momekano. Bobalusa na bino mitema epai ya Nzambe, mingi mpenza ntango bozali liboso ya mimekano. Na komikitisa nionso kotosa mitindo ya Nzambe. Bolakisa bondimi na bino kokokanisa bolingi na bino na mposa ya Nzambe.

Tika sikawa tolobela kotutana ya mituka na Nagoya. Nakokaki kokufa na likama wana. Kasi na nzela ya ngolu ya Nzambe, na kokamua makasi nabikaki. Mpe nayebi ete ba minyoko na ngai ezalaki mpo na koyekola mpe kokola na ngai na molimo.5 Tata ya Lola ateyaki ngai bozangi kokitisa motema, kokolisa koyoka mawa mpo na basusu, mpe kosunga baoyo bazali koniokuama. Ntango nasosolaka yango, motema na ngai etondaki na mayoki ya botondi liboso ya Tata na ngai ya Lola mpo na momekano oyo.

Tia Nzambe liboso, kotalaka te momekano ozali na yango. Linga Nzambe. Zala na bondimi na Klisto, mpe tia elikya pai na Ye na makambo nionso. Moroni apesaki elaka elandi na bato nionso: “Mpe soki boboyi mabe nionso, mpe bolingi Nzambe na nguya na bino nionso, na makanisi na bino nionso mpe na makasi na bino nionso, boye ngolu na ye ekoki mpo na bino, mpo ete na ngolu na ye bosala malamu kati na Klisto.”6

Natatoli na bosolo nionso ete Nzambe Tata mpe Muana na Ye ya mobali ya Bolingo, Yesu Klisto, bazali na bmoi mpe bilaka ya Nzambe na bango baoyo “bakangami na nzela na [bango]” mpe balingi Ye bakotondisama kutu na katikati ya mimekano, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amen.