2010–2019
Nazali Mpenza na Esengo
sánzá ya zómi 2015


Nazali Mpenza na Esengo

Litatoli na ngai ya Yesu Klisto etongamaka uta na mayebi ya kafukafu na yango nayaki koyeba bolingo na Ye ya monene mpo na moko na moko na biso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi katikati ya mokili mobimba, nazali na esengo na Bokambi ya Yambo mpo na kobengisa ngai kabola litatoli na ngai ya bosembo na mokolo ya Sabba oyo. Maloba ya loyembo moko nalingaka mingi ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka esosolisi mayoki na ngai sikawa:

Nazali mpenza na esengo na bolingo Yesu alakisi ngai,

Nazangi makoki ya kososola ngolu ya bofuluki oyo alakisi ngai. …

Nazali na esengo ete akokaki kokita na ngwende na Ye ya bonzambe

Kobikisa molimo moko ya motomboki mpe ya lolendo lokola ya ngai,

Ete asengelaki kolakisa bolingo na ye monene na moto lokola ngai,

Bolingo nini ezali ya kokoka ya kosala ngai moko ya Ye, kosikola ngai, mpe kolongola botuki epai na ngai. …

O, ezali esengo mingi koleka, esengo mpo na ngai!1

Mwa mikolo eleki nazwaki libaku malamu ya kokutana na Bokambi ya Yambo mpe kozwa libiangi oyo uta na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Thomas S. Monson. Nalingi natatola na bino nyonso na ntina ya bokasi mpe bolingo Mokambi Monson azalaki na yango lokola alobaki epai na ngai, “Libiangi oyo ewuti na Nkolo Yesu Klisto.

Nazindi na mpe nasimbami makasi ntango nakanisi ntina mpe ndimbola ya maloba oyo ya malamu elobamaki na profeta na biso ya bolingo. Mokambi Monson, Moambi Eyring, Mokambi Uchtdorf, nalingaka bino mpe nakosalela Nkolo mpe bino na motema na ngai mobimba, na nguya, na makanisi, mpe na bokasi.

O, boniboni nalingaki Mokambi Boyd K. Packer mpe Bampaka L. Tom Perry mpe Richard G. Scott. Nazangi bango mpenza. Napambolami nakozwa boyebi mpe koteyama na Bandeko mibali malamu oyo. Nazali na makoki ya kozwa esika na bango te, na yango nabengami na lokumu ya kobengama na lisanga likoki ya bapostolo zomi na mibale mpe kosala kati ya mosala ya Nkolo.

Ntango na banzi na ntina ya baoyo basungaki ngai nakoma oyo nazali, nabanzi yambo na molingami ya bolingo mpe moninga ngai ya seko, Melanie. Uta bamibu ebele, asungaki ngai nakoma moyekoli alengelama yaYesu Klisto. Bolingo na ye mpe lisungi, mpe oyo ya bana na biso 5, balongani na bango, mpe bankoko na biso 24, basungi ngai. Na libota na ngai ya bolingo, nalingaka bino.

Lokola profeta Nefi ya kala, nabotamaki na baboti malamu kati ya nsango malamu mpe bankoko na ngai babotamaki na baboti malamu kozonga na bankola motoba. Bankoko na ngai ya kala mingi te baoyo bakotaki na Eklezia bawutaki na mboka Angleterre mpe Danemark. Bapionie oyo ya kala te basalaki na makoki na bango nionso mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe batikaki libula mpo bana na bango kolanda. Nazali mpenza na esengo ya kozala na bankola ebele libota Monsantu ya mokola mua Nsuka mpe nayebi oyo ezali ntina ya mpeto mpo na banso kati na biso tokokisa.

Ebele misusu basalisaki mpo na kolengela bomoi na ngai mpo na libiangi oyo ya sika. Babakisi baninga na ngai ya bomwana mpe libota na ngai, kala mingi te bakambi, bateyi, mpe bayangeli ya ntango molai. Nasengeli kokotisa baoyo uta na misio na ngai ya kala te na bamboka esiti mpe na bamisionele na biso ya bolingo ya New York na Misio ya New York ya Nordi. Mpo na baoyo bebo bazalaki ndakisa malamu mpe babongisaki bomoi na ngai, nazali na esengo mingi koleka.

Nasepelaki kosala elongo na Bandeko na ngai ya mibali ya Bantuku Nsambo. Mpo na mibu 15 oyo nazalaki moko kati ya lisanga likoki monene mpe moko kati ya Bandeko mibali ya bolingo ya Bantuku nsambo ya Eklezia. Botondi, baninga ngai basali ya motuya. Sikawa natali liboso mpo na kozala kati ya lisanga ya sika. Mokambi Russell M. Nelson, bolingo na ngai ezali mozindo mpo na bino mpe basali moko na moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale.

Ndeko mwasi Rasband mpe ngai topambolamaki na kotala bandimi katikati na misala ebele na mangomba mpe bamisio na mokili mobimba. Tolingaka Basantu ya mikolo mya Nsuka ya bisika nionso! Bondimi na bino ematisaki bondimi na biso; matatoli na bino ebakisaki na matatoli na biso.

Sikawa soki nakoki kotikela bino mwa nsango moke lelo, ekozala ete: Nkolo alobaki, “Bolingana bino na bino, lokola nalingaka bino.”2 nazali na elikia ete boponi ezali te, lisumu, to mbeba oyo bino to moto mosusu akoki kosala oyo ekobongola bolingo na Ye mpo na bino to mpo na bango. Yango elakisi te ete Alimbisaka to andimaka etumbu ya bosali yango—Nandimisami Akoki te—kasi yango elakisi tosengeli kotanda maboko na baninga na biso na bolingo mpo na kobengisa, kondimisa, kosalisa, mpe kobikisa. Yesu Klisto aboyaki bikolo ya bato, bomoto ya bato kati ya lingomba ya bato, mpe mabaku na ntina ya koteya bango bosolo ya mozindo oyo.

Natunaki mbala mingi motuna ntango nazwaki litatoli na ngai.

Nakoki te komikundola kondimelaka te Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Nalingaka Bango uta nayekolaki na ntina na Bango ntango nafukamaki pembeni ya mama na ngai, oyo azalaki lokola anzelu, kotangaka makomi mpe masolo ya nsango malamu. Oyo boyambi ekolaki sikawa kati ya boyebi mpe litatoli moko ya Tata ya Lola ya bolingo, oyo ayokaka mpe ayanolaka nsambo na biso. Litatoli na ngai ya Yesu Klisto etongamaka uta na mayebi ya kafukafu na yango nayaki koyeba bolingo na Ye ya monene mpo na moko na moko na biso.

Nazali na esengo mpo na Bomikabi ya Mobikisi na biso mpe oyo lokola ya Alma mpo na konganga yango na mondule ya Nzambe.3 Nayebi ete Joseph Smith azali Profeta ya Nzambe ya Bozongisi mpe ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe. Mpe nayebi ete Mokambi Thomas S. Monson azali mosali ya solo ya Nzambe mpe profeta likolo ya mabele lelo.

Lokola tozali kolanda profeta na biso, nasambeli ete tokoka kozala na bolingani na mitema na biso mpo na basusu mpe tokokoma na matatoli ya bosolo mpe ya ntina koleka “totikala banso na esengo ya bolingo ya Yesu zali kopesa [biso].” O, ekoka kozala “malamu mingi koleka, malamu mpenza na [bino mpe na] ngai.” Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.