2010–2019
“Soki Bolingi Ngai, Bobatele Mitindo na Ngai”
sánzá ya zómi 2015


“Soki Bolingi Ngai, Bobatele Mitindo na Ngai”

Mibeko ya Nzambe ezali elembo ya bolingo na Ye mpo na biso, mpe botosi ya mibeko na Ye ezali elombo ya bolingo na biso mpo na Ye.

Ntango mwana na biso ya mokolo ya mwasi, Jennifer, amemaki mwana na ye ya misato ya mwasi uta na lopitalo, nakendaki na ndako na ye mpo na kosunga. Nsima ya mwana na ye ya mwasi ya mokolo kokende na eteyelo, tolobaki ete oyo Jennifer azalaki na yango bosenga koleka ezalaki kopema. Boye lisungi ya malamu koleka nakokaki kopesa ezalaki komema mwana na ye ya mwasi Chloe na ndaku elongo na ngai boye mama mpe bebe ya sika bakokaki kozwa mua ngonga ya kimia.

Nakangaki Chloe na kiti na ye na motuka, nabongisaki mokaba ya securité ya ngai moko, mpe nakumbaki na nzela na bango. Wana, yambo tokoma na suka ya nzela, Chloe afongolaki singa ya securité ya kiti na ye mpe atelemaki, kotalaka likolo ya lipeka na ngai, kolobaka na ngai! Natiaki motuka pembeni ya nzela, nabimaki, mpe nakangi ye na kiti na ye.

Tobandelaki lisusu kokende kasi tosalaki kaka nzela mokuse ntango alonguaki na kiti na ye lisusu, nabandelaki etape mokomoko wana lisusu, kasi ntango yango yambo kutu nakota na motuka mpe nakanga mokaba ya bokengi ya ngai moko, Chloé atelemaki!

Navandaki ngai moko na motuka, natelemisaki motuka na ngambo ya Nzela, nabundaki etumba moko ya nguya na mwana ya mibu misatu. Mpe ye azalaki kolonga!

Nasalelaki makanisi ebele kasi nakokaki te kondimisa ye ete kotikalaka ya kokangama na kiti na ye ezalaki likanisi moko ya malamu. Ye andimisamaki te! Na nsuka nazuaki mokano ya komeka soki osali eloko mpona na ngai, ngai mpe nakosala eloko mpona yo.

Nalobaki, “Chloé, soki akotikala ya kokangama na kiti na yo ya motuka, boye ntango kaka tokokoma na ndako ya Mama koko, tokoki kosakana na lisano ya play dough.”

Eyano moko te.

“Chloe, soki okotikala ya kokangama na kiti na yo, boye tokoki kosala mampa wana tokomi na na ndako ya Mama koko .

Eyano moko te.

Namekaki lisusu, “Chloe, soki okotikala ya kokangama na kiti nayo, boye tokoki kotelema na wenze mpona kosomba bilei!”

Sima ya komeka mbala misatu, namonaki ete ezalaki ngalasisi moko ezanga ntina. Ye azuaki mokano, mpe motuya te ya soki osaleli nga eloko moko ngai mpe nakosalela yo ekoki te mpo na kondimisa ye kotikala ya kokangama na kiti na ye.

Tokaki te kolekisa mokolo kovandaka likolo ya gbagba na nzela, kasi nalukaki kotosa mobeko, mpe ezalaki malamu te kokumba motuka na Chloe ya kotelema. Nasambelaki na kimia mpe nayokaki Molimo koloba na mongongo moke, “Teya ye.”

Nabalukaki liboso na ye mpe nalongolaki mokaba na ngai bokengi na nzoto na ngai boye akokaki komona yango. Nalobaki, “Chloe, nazali kolata mokaba ya bokengi mpo ete ekobatela ngai. Kasi yo ozali kolata mokaba nayo ya bokengi te, mpe okobatelama te. Mpe nakoyoka mawa makasi soki ozwi likama.

Ye atalaki ngai; nakokaki mpene nakomona makinisi na ye kobalukaka mpona koluka kososola maloba na ngai lokola nazalaki kozela eyano na ye na bobangi nionso. Na nsuka, afungola miso na ye ya bule lokola asosolaki, mpe alobaki, “Mama koko, olingi ngai nalata mokaba na ngai ya bokengi mpo ete you olingi ngai!”

Molimo etondaki na motuka lokola nazalaki kolakisa bolingo mpo na mwana na ye ya mwasi ya moke ye alingaka. Nalingaki te kozanga liyoki wana, kasi nayebaki ete nazwaki libaku, moko bongo nakotaki na motuka mpe nakangi ye na kiti na ye ya motuka. Nsima natunaki, “Chloe, ekoki yo kotikala na kiti na yo ya motuka?” Mpe asalaki—nionso na nzela ya wenze mpona bilei moko! Mpe atikalaki ya kokangama na nzela mobimba uta na wenze tii na ndako na ngai, kuna tosalaki mapa mpe tosakanaki na play dough mpo ete Chloe abosanaki te!

Ntango nazalaki kokumba na nzela ya bozongi mokolo wana, likomi moko etondaki makanisi na ngai: “Soko bolingi ngai, bokotosa mitindo na ngai.”1 Tozali na malako ya koyekolisa, kotambuisa, mpe kobatela bana. Mpona nini? Mpona bolingo monene tozali na yango mpona bango. Kasi tii Chloe asosolaki ete mposa na ngai mpona ye ya kotika na bobatelami nionso ya kokangama na kiti na ye ya motuka ezalaki mpona bolingo na ngai mpona ye, ayokaki ya kopekisama kosala oyo ye amonaki lokola kopekisama. Ayoki mokaba ya bokengi etiaki ndelo na bonsomi na ye.

Lokola Chloe, tokoki kopona komona mitindo lokola kokata ndelo. Tokoki koyoka bangonga ete mibeko ya Nzambe etiaka ndelo na bonsomi na biso ya moto na moto, kolongola biso nguya na biso ya boponi, mpe kosukisa bokoli na biso. Kasi ntango toluki bososoli, ntango topesi nzela na Tata na biso koteya biso, tokobanda komona ete mibeko na Ye ezali elembo ya bolingo na Ye mpo na biso, mpe botosi ya mibeko na Ye ezali elombo ya bolingo na biso mpo na Ye.

Soki okomi komona yomei kotelemisa motuka na ngambo ya nzela, nakoki kopesa mwa mibeko oyo, soki olandaki yango, ekosunga yo kozonga na nzela ya bondimi mpe botosi na kimia? 2

Yambo, tia elikia na Nzambe. Kolikia na mwango na Ye ya seko mpona yo. Moko moko kati na biso azali molimo ya mwana ya mwasi to ya mobali ya baboti na biso ya lola.” Bolingo na bango mpona biso ezali komonana na mibeko. Mitindo ezali malako ya ntina mpo na koteya, kotambwisa, mpe kobatela biso ntango biso “tozwi mayele.”3

Na bomoi yambo ya kufa“ tosengaki” nguya na biso ya boponi mpona kondima mwango ya Nzambe,4 mpe toyekolaki ete botosi na mibeko ya seko ya Nzambe ezalaki na ntina mpo na elonga na biso na mwango na Ye. Makomi eteyi : “Ezali na mobeko moko, ekateli moko ekobongwana te na lola yambo ya bokeli mokili, likolo na yango mapamboli nyonso eteyami.” 5 Soki totosi mobeko, tozwi mapamboli.

Atako elongo namabunga, botelemeli, mpe boyekoli oyo ezali kotambola na mayele na biso ya bokufi, Nzambe kobosana ata mokolo moko te likoki na biso ya libela, kutu ntango tozali kosala. Tokoki kolikya na Ye “mpo ete Nzambe alingi bana na Ye bazonga epai na Ye”6 Mpe Ye apesaki nzela moko na nzela ya Bomipesi ya mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto. Bipesi, “ezali motema ya mwango ya lobiko.”7

Ya mibale, tia elikia na Yesu. Kolakisa ntina mpenza ya botosi mpe bolingo ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Komikitisa Yemei na bolingi ya Tata, Apesaki bomoi Bomoi na Ye mpo na biso. Alobaki, “Soki bolingi Ngai bobatela mibeko na Ngai, bosengeli kozala kati na bolingo na ngai; atako ntango nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe kozala kati na bolingo na ye.”8.

Yesu mpe ateyaki:

“Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe molimo na yo nionso, mpe na mayele na yo nionso.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mpe ya mibale ekokani na yango, Osengeli kolinga moninga lokola omilingaka.”9

Na mposo oyo tozui libaku ya kokanisa mpe kokundola bolingo ya solo ya Mobikisi na bison tango tozali kosangana na bilembo ya Bomikbi na Ye ezanga nsuka. Na ntango ya elambo, natalaka maboko etandami kopesa limpa mpe mayi. Ntango natandi maboko na ngai mpe kokabola, nayokani ete nazali na mposa ya kokamata nkombo na Ye likolo na ngai komikundola Ye, ntango nionso mpe kobomba mitindo na Ye. Mpe Ye alakaki ete tokoka ntango nionso kozala na Molimo na Ye elongo na biso.10

Ya misato tia elikia na mongongo moke ya Molimo. Mikundola ntango ya mayele na ngai na Chloe ete Molimo elobaki na mongongo ekomi moko mpona ngai? Ezali Yoane 14: 15 : “Soki bino bolingi ngai, bobatela mitindo na ngai.” Mpe mikapo ya mituya oyo elandi:

“Nakoki kobondela na Tata, mpe ye akotindela bino mosungi mosusu, oyo akotikala na bino libela na libela;

“Atako Molimo ya solo; oyo mokili eyamba nanu te, mpo ete bamoni ye te, mpe bayebi ye te : kasi bino boyebi ye; mpo ete avandi kati na bino, mpe akozala na bino. ”11

Mondimi nionso oyo alongobani ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka oyo azwi bokuli ya bondimami azali na ndingisa ya kozwa Molimo Mosantu lokola mominga na ye. Kokilaka, kosambelaka, koyekolaka makomi mpe kozala na botosi ekokolisa mpenza makoki mpe boyoki na biso ya Molimo na lombango.

Ntango makanisi na yo etondi na ntembe mpe kobulungana, Tata mpe Mwana na Ye batindaka Molimo Mosantu kotambwisaka yo na bokebi na makama ya mobembo ya kufa. Akosunga yo omikundola ete akobondisa, mpe akotondisa yo “na elikia mpe bolingo elongobana.”12

Ya minei, tia elikia na toli ya baprofeta ya bomoi. Tata na biso apesaki biso nzela moko ya koyoka liloba na Ye mpe koyeba mobeko na Ye na nzela ya ba profeta na Ye. Nkol alobaki, “Liloba na ngai ekozala … mobimba etondisami, ata na mongongo na ngai moko to na mongongo ya basali na ngai, ezali ndenge moko.”13

Kala te, baprofeta ya bomoi bapesaki biso toli ya “kokundola mokolo na saba, kobomba yango esantu,”14mpe kosalela mobeko ya kokila. Botosi ya toli ya lisakoli oyo epesi nzela mpo na biso totosa motindo ya Nzambe ya kolinga Ye mpe moninga na biso ntango tokolisi bondimi na biso na Yesu Klisto mpe totandi maboko mpo na bolingo mpe kosunga basusu.15

Bokengi ezali wana na bolandi maloba ya Nkolo na nzela ya baprofeta na Ye. Nzambe abiangaki Mokambi Thomas  S. Monson mpe bapesi toli na ye na Mokambi ya Yambo mpe baye ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi.Na mokili oyo ekolisi bobangi mobulungano, mitungisi mpe nkanda, tokoki kotala epai na bango mpo na kotala lolenge nini moyekoli ya Yesu Klisto, — atondisama na bolingani, — kotala, koyoka, mpe kosala kobota mbuma oyo ekoki kozala kokabola. Bango batatoli Yesu Klisto mpe bayanoli na bolingi, bolingo ya solo ya Yesu Klisto, baye bazali banzeneneke.

Sima ya boyebi na ngai na Chloe, nalukaki biteni ya makomi oyo elobeli mibeko mpe bolingo. Nazwaki ebele. Milongo nionso wana ekundolisaki biso ete mitindo na Ye ezali elembo ya bolingo na Ye mpo na biso, mpe botosi ya mibeko na Ye ezali elombo ya bolingo na biso mpo na Ye.

Natatoli ete soki totie elikia na Nzambe, Tata na biso ya Libela; totie elikia na Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto mpe ngalasisi ya bondimi na Bomikabi na Ye; totie elikia mongongo moke ya Molimo; mpe totie elikia na toli ya baprofeta ya bomoi, tokomona nzela na mpembeni ya nzela mpe tokobi na bokengi—kaka nakomonaka mpasi te kasi na komonaka esengo na mobembo na biso ya bozongi ndako. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.