2010–2019
Ekotikala Koya Noki Te mpe Ntango Ekotikala Koleka Te
sánzá ya zómi 2015


Ekotikala Koya Noki Te mpe Ntango Ekotikala Koleka Te

Ntango ekoya noki mokolo moko te mpe ekoleka moko te—mpo na kokamba, koyangela, mpe kotambola mpembeni ya bana na biso mpamba te mabota ezali mpo na libela.

Bandeko mibali mpe basi, biso tomitiaki na etumba na mokili. Na ntango ya kala, mokili ebundaki mpona na nguya mpe ntango ya bana na biso. Lelo, ezali kobunda mpona bomoto mpe makanisi. Mingongo ebele ya likolo mpe ya motungisi ezali komeka koyebisa bana na biso banana bango bazali mpe nini bango basengeli kondima. Tokoki te kotika bato bapesa libota na biso lolenge ya bilili ya mokili. Tosengeli kolonga etumba oyo. Makambo ebele ezali kotala yango

Bana ya Eklezia bayembaka loyembo moko oyo bateyaki bango na ntina ya bomoto na bango mpenza: “Je suis enfant de Dieu. … Il m’a mis ici, il m’a donné un bon foyer.” Boye, bana bazali kobenga biso : “Kondui moi, et mrche avec moi. … Apprends moi comment agir pour le connaitre enfin.”1

Mokambi Russell M. Nelson eteyaki biso na Likita Linene ya nsuka ete, kobanda lelo mpe lobi ekoya tosengeli komitia na “bokebi ya baboti.”2 Wana ezali ntango ya libebi. Kasi bansango malamu ezali ete Nzambe ayebaki yango ekozala bongo, mpe Abongisaki toil na makomi mpo na biso koyeba lolenge nini kosunga bana na biso mpe bankoko na biso.

Elilingi
Mobikisi na Buku ya Mormon ya bana

Na buku ya mormon, Mobikisi abimelaki ba Nefite. Ye asanganaki na bana na bango ya mike pembeni na ye. Apambolaki bango, abondelaki mpona bango,3 mpe alelaki likolo na bango. Boye alobaki na baboti, “Botala baoyo ya bino ya mike.”4

Liloba kotala elakisi kotala mpe komona. Nini Nkolo alingaki baboti bamona na bana na bango ya mike? Elingaki Ye bang kokanga booni ya lolenga ya bonzambe ya bana na bango?

Soki totali na bana na biso moko mpe bankoko na biso lelo, nini Mobikisi alingi biso tomona na bango? Ezali biso kondima ete bana na biso bazali batali banene ya Eklezia?

Na buku ya Matai, Mobikisi ateyi bison a oyo etali bondimi ya ntango nyonso, lisanga monene ya bato bazalaki kosangana pembeni ya Mbu ya Galileo koyoka Ye koteya.

Na libaku oyo, Yesu abetaki lisapo etali kolonda nkona— lisese ya moloni.5 Na kososolisaka yango na bayekoli na Ye, mpe na nsuka nsuka na biso, Ye alobaki, “Ntango moto nionso ayokaka liloba ya bokoni, mpe asosoli yango te, moto ya nkunda nde ayaka, mpe alongolai oyo elonamaki na motema na ye.”6 Nsango mpo na baboti ezali polele : bokeseni ezali katikati na koyoka mpe kososola. Soki bana na biso bazali koyoka mpamba kasi bazali te kososola nsango malamu, boye batiki ekuke ya kofungwama mpo ete Satana alongola babosolo wana uta na mitema na bango.

Nzokande soki tokoki kosalisa bango kokolisa misisa ya mbonguana kati na mozindo, boye ntango wana na milunge ya mokolo, ntango bomoi ekokoma mpasi, mpe ekozala bongo, nsango malamu ya Yesu Klisto ekoki kopesa bango eloko moko na kati ete ekoka te kobeba uta na bozangi. Lolenge nini tokoki koyeba ete solo wana ya nguya ekokota na litoyi moko mpe kobima na mosusu te? Koyoka maloba yango nde ekoki kaka te.

Toyebi biso banso ete maloba ebongwanaka. Ntango mosusu tobimisaka maloba na biso, kasi bango bazali koyoka maloba na bango. Okoki koloba na bilenge bana na yo, “Bozongelaka kaka Nzembo se moko wana.” Bakokokaki kozongisa, “Papa, nzembo nini?”

Tata na biso na Lola alingi tolonga, ya solo mpamba te, nsima ya manso, bazalaki liboso bana na Ye yambo bakoma ya biso. Lokola baboti na Siona, bozwaki likabo ya Molimo Mosantu. Soki bokosambela mpo na kozwa bokambi, “ekolakisa na bino makambo nionso bosengeli kosala”7 mpo na koteya bana na bino. Ekokolisa bino banzela ya koyekola, “nguya ya Molimo Mosantu ekomema yango kati na mitema ya bana.”8

Nakoki kokanisa na ndakisa moko ya kosalisa moto moko kozwa bososoli koleka lisolo ya Helen Keller. Azalaki mokufi miso mpe matoi mpe azalaki kofanda na mokili moko ya molili mpe kimia. Molakisi moko na nkombo ya Anne Sullivan ayaki kosalisa ye. Lolenge nini okoki koteya mwana oyo akoki komona te to koyoka yo?

Elilingi
Helen Keller mpe Anne Sullivan

Mpo na ntango molai, Anne abundaki mpo na koyokana na Helen. Mokolo moko pene na midi, amemaki ye na pompi ya mai. Atiaki moko ya maboko ya Helen na se ya robinet mpe abandaki kobimisa mayi. Ntango wana, Anne atangoli liloba W-A-T-E-R na loboko mosusu ya Helen. Eloko esalemaki te. Kasi amekaki lisusu. M-A-Y-I. Helen akangaki loboko ya Anne makasi mpo abandaki kososola. Na ntango ya butu ekweyaki, ayekolaki maloba 30. Pene na sanza moko, ayekolaki maloba 600 mpe akokaki kotanga nkoma ya bakufi miso. Helen Keller akobaki kino na kozwa diploma ya kelasi ya likolo mpe asungaki na kobogolaka mokili mpo na bato bakufa miso mpe matoyi.9 Ezalaki likambo ya kokamwa, mpe molakisi na ye mosali ya bikamwa, bobele lokola bokokoma, baboti.

Namonaki molakisi monene mosusu ntango nazalaki kosalela lokola mokambi ya Likonzi moko ya banzemba na BYU–Idaho. Likambo wana ebongolaki bomoi na ngai. Na mpokwa moko ya ya mibale, nazwanaki na lisolo ya mozindo na elenge mobali na nkombo ya Pablo, uta na Mexico City, oyo alingaki kosela misio. Natunaki ye na ntina ya litatoli naye mpe mposa na ye ya kosalela. Biyano na ye na mituna na ngai ezalaki ya kokoka mpenza. Nsima natunaki soki alongobani. Eyano na ye ezalaki semba. Ezalaki nionso malamu mpenza, ete namilobelaki, “Ekoki kozala ete azali kososola te nini nazali kotuna ye.” Boye nazongelaki mituna na maloba mosusu mpe namonaki ete asosolaki nini nalingaki koloba mpe azalaki sembo namanso.

Nakamwaki mpenza na ntina ya elenge mobali oyo ete natunaki ye, “Pablo, nani asungaki yango ete okomaki na esika na bomoi na yo kozala alima mpenza liboso na Nkolo ?”

Alobaki, “Tata na ngai.”

Nalobaki, “Pablo, lobela ngai lisolo na yo.”

Pablo akobaki: “Ntango nazalaki na mibu libwa, tata na ngai azwaki ngai mpembeni mpe alobaki, ‘Pablo, nazalaki mbala moko na mibu libwa lokola. Ezali na makambo mingi osengeli kokutana na yango. Okomona bato koyiba na kelasi. Okoki kozala pembeni na oyo bazali kolapa. Okoki mpe kozala na mikolo ntango okolinga te kokende na eklezia. Sikawa, makambo wana eyaka— to likambo mosusu oyo ekotungisa yo—nakolinga yo oya mpe oyebisa ngai, mpe nakosunga yo okima yango. Mpe bongo nakoyebisa yo nini ekoya sima.’”

“Solo, Pablo, nini ayebisaki yo ntango okokisaki mibu 10?”

“Malamu, akebisaki ngai na ntina ya pornographie mpe maseki elongobani te.”

“Nini na ntango okokisaki mibu 11?” Natunaki.

“Akebisaki ngai na oyo etali biloko oyo ekokaki kokanga ngai mpe akundolisaki ngai na oyo etali kosalelaka bosomi ya kopona.”

Tala tata moko, mobu na mobu, “molongo likolo na molongo; moke awa, moke kuna,”10 oyo asalisaki mwana na ye ya mobali bobele ayoka te kasi mpe lisusu asosola. Tata ya Pablo ayebaki ete bana na biso bayekolaka ntango babelemi mpo na koyekola, kaka ntango tobelemi mpo na koteya bango te. Nazalaki na lolendo mpo na Pablo ntango akotisaki mokanda na ye ya kosenga asala etida butu wana, Kasi nazalaki kutu na lolendo koleka mpo na papa ya Pablo..

Ntango nazongaki ndako na motuka nab utu wana, namitunaki, “Tat ya lolenge nini Pablo akozala?” Mpe eyano ezalaki polele gaa: akozala lokola papa na ye. Yesu alobaki, “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala,.”11 Oyo ezali ndakisa ya lolenge nini Tata ya Lola apambolaka bana na Ye uta nkolo na nkola.

Lokola nakobi kokanisa oyo etali likambo na ngai na Paablo, namiyoki mawa mpo ete bana nagai ya basi minei bazalaki ya kokola mpe bankoko na ngai libwa nazalaki na bango nan tango yango bafandaki pembeni te. Nsima nakanisaki, “Boniboni ekokaki ngai kisalisa bango lolenge tata ya Pablo asalisaki ye? Ntango mingi eleka?” Ntango nasambelaki na motema na ngai, Molimo elobaki nan se bosolo ya mozindo oyo: “Ntango eleka mingi mokolo moko te mpo na kobanda likambo ya ntina.” Nayebaki nokinoki nini yango elingi koloba. Nakokaki kozela te kozonga ndako. Nasangaki mwasi na ngai, Sharol, abanga bana na biso nionso mpe ayebisa bango ete tosengeli kokende kotala elongo na bango; nazalaki na likambo moko ya motuya mpenza ya koyebisa bango. Motema nangai ezalaki mbangumbangu nayebisa bango.

Tobandaki na mwana na biso ya mwasi ya nkulutu mpe mobali na ye mpe nalobaki: “Mama na biso mpe ngai tolingi boyeba ete tozalaka na mibu na bino. Tozalaki na mibu 31, na libota moko ya moke. Ntango Tozali na likanisi ya oyo bozali kokutana na yango. Ekoki kozala mokakatano na bondimi. Bomoi ekoki kolekelama bino. Ntango makambo wana ekomaka, tolingi bino boya mpe bosolola na biso. Tokosunga bino mpo boleka yango. Sikawa, tolingi te kozala na makambo na bino ntango nionso. Mpe tozali elongo, nalingi kolobala bino etali bosololi nasololaka na elenge mobali moko na nkombo ya Pablo.”

Nsima na lisolo, nalobaki, “Tolingi te bozanga kosunga bana na bino mpe bankoko na biso kososola bosolo oyo ya motuya.”

Ndeko mibali mpe basi, nayebi sikawa na lolenge moko eleki na ntina nini Nkolo azali kozala na biso lokola tata mpe lokoila nkoko na kotiaka nzela moko mpo na libota na ngai kaka te mpo na koyoka kasi kososola.

Ntango nakomi mokolo mingi, namimoni komaniolaka maloba oyo:

O ntango, O ntango, zongela nzela na yo,

Mpe tika bango bazala bana na ngai ya mike mpo na kaka butu moko lisusu!12

Nayebi nakoki kozongisa ngonga te, kasi oyo nayebi—ete ntango ekoya noki mokolo moko te mpe ekoleka moko te—mpo na kokamba, koyangela, mpe kotambola mpembeni ya bana na biso mpamba te mabota ezali mpo na libela.

Ezali litatoli na ngai ete Tata na biso ya Lola alingaka biso mingi boye ete Ye atindaki Mwana na Ye Se Moko ya Mobali mpo na kowumela bomoi na biso ya kufa mpo ete Yesu akoki koloba na biso, “Nazalaki wapi bozali, nayebi nini ekoya nsima, mpe nakosunga bino na kati na yango.” Nayebi Ye akosala yango. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “I Am a Child of God,” Hymns, no. 301.

  2. Tala Russell M. Nelson, “The Sabbath Is a Delight,” Ensign to Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 131.

  3. Tala 3 Nefi 17:21.

  4. 3 Nefi 17:23.

  5. Tala Matai13:1–13.

  6. Matai 13:19; sete ebetami.

  7. 2 Nefi 32:5.

  8. 2 Nefi 33:1.

  9. Tala “Anne Sullivan,” biography.com/people/anne-sullivan-9498826; “Helen Keller,” biography.com/people/helen-keller-9361967.

  10. Yisaya 28:10.

  11. Yoane 5:19.

  12. Emekolami na maloba ya loyembo ya Elizabeth Akers Allen “Rock Me to Sleep,” na William Cullen Bryant, ed., The Family Library of Poetry andSong. (1870), 222–23.