2010–2019
Tosa Mitindo
sánzá ya zómi 2015


Tosa Mitindo

Ye oyo akelaki biso mpe oyo alingaka biso na bobongi nie ayebi lolenge nini tosengeli kozala na bomoi na ntina ete tozwa esengo monene.

Bandeko na ngai ya mibali, ezali malamu mingi kozala na bino lisusu. Tofulamaki na mpokwa ya lelo na maloba oyo toyokaki. Nasambeli ete ngai mpe nakokambama na oyo nazali koloba.

Nsango na ngai epai na bino na mpokwa ya lelo ezali ya motema moko. Ezali ete: tosa mitindo.

Mitindo ya Nzambe etiami mpo na kobangisa biso te to mpo ete ekoma makama mpo na esengo na biso te. Bobele ngambo mosusu ezali bosolo. Ye oyo akelaki biso mpe oyo alingaka biso na bobongi nie ayebi lolenge nini tosengeli kozala na bomoi na ntina ete tozwa esengo monene. Atiaki kati na biso mateya oyo, soki tolandi yango, ekokamba biso na kimia na nzela ya mobembo oyo ezali ntango nionso likama. Tokanisaka maloba ya loyembo ya lolenge moko: “Tosa mitindo! Kati na yango ezali na bobatelami; kati na yango ezali na kimia.”1

Tata na biso ya Lola alingaka biso mingi koleka ete koloba: Okokosa te; okoyiba te; okosala kindumba te; okolinga mozalani na yo lokola yo moko; mpe misusu.2 Toyebi mitindo. Asosolaka ete ntango totosi mitindo, babomoi na biso ekozala na esengo mingi, koleka bokokisi, mpe mikakatano mike. Mimekano mpe makambo na biso pepele mpo na komema, mpe akozwa mapamboli na Ye elakama. Kasi na ntango Apesi biso mibeko mpe mitindo, Apesaka biso lisusu ndingisa ya kopona kutu kondima to kobwakisa ye. Mikano na biso na ntina ya mosala oyo ekolakisa lobi na bino ekoya.

Nazali na elikia ete moko na moko kati na biso azali na ntina ya nsuka ya bomoi ya seko na ye liboso ya Tata na biso ya Lola mpe Mwana mobali na Ye, Yesu Klisto. Ezali ntina koleka, na yango, mpo na biso kosala maponami na nzela ya bomoi na biso oyo ekokamba na ntina. Toyebi, bongo, ete monguna azali kobunda mpo na kokweyisa biso. Ye na mangomba na ye bazali kosala na bokasi na bango mpo na kobebisa bamposa ya malamu na biso. Bazali kolakisa bokaneli makasi mpe ya ndongo na lobiko na biso ya seko nzoka nde biso mpe na ngambo na biso tozali kobunda mpo ete na nsuka mpe na bokasi tosilisa ntina ya mosala na biso. Apostolo Petelo akebisi biso, “Kozala na ekenge; mpo ete monguna na bino diabulu, lokola mongongo ya ntambwe, azali koyengayenga, kolukaka nani akoki koliya.”3

Atako ezali na ntango te na bomoi na biso ntango tolongwe na masenginya, bino bilenge mibali bozali na mibu oyo ezalaka ya bamposa ya moto na moto. Mibu ya bolenge mbala mingi ezalaka mibu ya makama mingi, ya koyoka lokola ozali lolenge moko te na elikia, ya komekaka kaka kozwa esika ya bokokani na yo, mpe komekaka kokokana. Bokoki komekama na kokitisa bandelo na bino mpe kolanda mokili na ntina ete bondimama na baoyo bolingi bazala lokola baninga. Nasengi bozala makasi, mpe bozala kasakasa na eloko oyo ekolongola epai na bino mapamboli ya seko. Maponi bozali kosala awa mpe sikawa ezali ntina ya libela.

Totangaka na 1 Bakolinti: “Ezali na … mingongo ya ndenge ebele na mokili.”4 Tozingami na mingongo oyo etindaka biso tondima, mingongo ya bopengwisi, mingongo ya botiolami, mingongo kitoko, mingongo ya kobulungisa. Nasengeli kobakisa oyo ezalaka mingongo makasi. Nasengi bino bokitisa volume na nse mpe bozwa ndakisa mpe bobendamaki na mwa mongongo oyo ekokamba bino ya bozangi likama. Mikundola ete moto ya likoki atiaki maboko na ye likolo ya moto na yo sima ya libatisi na yo, kokotisaka yo lokola mondimi ya Eklezia na kolobaka, “Zwa Molimo Mosanto.”5 Bofongola mitema na bino, atako milimo na bino mpenza, na makelele ya mongongo wana ya kafukafu oyo etatolaka bosolo. Lokola profeta Yisaya alakaki, “Matoyi na bino ekoyoka liloba … , kolobaka, Oyo ezali nzela, kotambola kati na yango.”6 Nalikii ete tokoki ntango nionso kozala kati ya boyokani, oyo tosengeli koyoka lilendisi oyo, mongongo ya bokambami oyo ekobatela biso na likama.

Bozangi botosi ya mitindo efongolaki nzela na oyo nazwaka lokola kozala bampota ya mikolo na biso. Bakotisi mpota ya kotika nzela na nionso, mpota ya bilili ya bosoto, mpota ya drogue ya bonsoni, mpe mpota ya kolongola zemi, kopesa bobele mwa bankombo moke. Makomi eyebisaka biso ete satana “azali [moboko] ya makambo nionso oyo.”7 Toyebi ete azali “tata ya lokuta nionso, mpo na kokweyisa mpe koboma miso ya bato.”8

Nabondeli na bino bokima eleko oyo ekokimisa bino mpo na esengo na bino awa na bomoi ya nkufa mpe bomoi ya seko na mokili oyo ezali koya. Na boyokisami na ye ya motema mpasi mpe lokuta, monguna akokumba bino na nzela oyo ezalaka mpasi mpo na kozonga na nzela malamu soki opesi ye ndingisa akamba yo. Okokoma mowumbu na nzela yango yambo okoka kutu koyeba ete nzela ezali te mpo na kotika. Boyokaki nsango ya monguna. Azali kobenga na elengi nionso: kaka na yango bomitungisa te; moto nionso asalaka yango; bolata nzoto ya kimobange te; bantango ebongwani; ekoki koyokisa moto moko mpasi te; bomoyi na bino ezali ya bino mpo na kozala na yango. Monguna ayebi, mpe mimekano oyo ekozala mpasi mpo na biso kozanga koyeba. Boniboni ezali ntina ete tosala na ekenge na ntina mpo na kokima lokuta ya boye mpe mimekano.

Mpiko monene ekosengama ntango tokotikala sembo mpe na bosolo kati ya makambo nionso oyo ya mabe ezali komata se komata mpe nguya ya mabe na oyo ezingi biso mpe oyo ezali kobebisa bosolo, kobebisa bolamu mpe peto, mpe komeka kokitana bosali filozofi ya bato ya mokili. Soki mitindo ekomamaki na moto, sima kobongola yango mpo na mposa to mpo na ntina mosusu ekokaki kozala libaku malamu ya moto. Mitindo, nzokande, epesamaki na Nzambe. Kosalelaka bonsomi, tokoki kotiya yango mpembeni. Tokoki te, nzokande, kobongola yango, bobele kaka lokola tokoki te kobongola mbeba oyo eyaka na nzela ya bozangi botosi mpe kobuka yango.

Tokoki koyeba ete esengo na biso ya makasi kati na bomoi oyo lokola ntango tozali kotosa mitindo ya Nzambe mpe kotosa mibeko na Ye! Nalingaka maloba oyo ezalaka na Yisaya mokapo 32, nzela ya 17: “Mosala ya bosembo ekozala kimia; mpe eyano ya bosembo mpe kimia nie mpe elikia mpo na libela na libela.” Kimia ya lolenge oyo, elikia ya longe oyo ekoki koya bobele na bosembo.

Tokoki komipesa ndingisa te ya kosangana na lisumu. Tokoki komipesa ndingisa te ya kondima ete tokoki komeka “kaka mwa moke” na bozangi botosi ya mitindo ya Nzambe, mpo lisumu ekoki kokamba biso uta na oyo ezali mpasi mingi koleka mpo na kokoma mowumbu. Bowumbu ya oyo ekoki koya na drogue, masanga, bilili ya bosoto, mpe bonsoni ezali mpasi mpo na kotika na bozangi makasi mpe lisungi makasi.

Soki moko kati na bino apesi ndingisa na masumu ekota na bomoi na ye, nandimisi bino ete makoki ya kozongela ezali. Nzela ebengami boyamboli. Atako nzela ezali mpasi, lobiko na bino ya seko eyekami likolo na yango. Nini ekoki kozala peto mingi koleka mpo na babokasi na bino? Nabondeli na bino kozwa mokano awa mpe sikawa mpo na kozwa mikano ya ntina na boyamboli ya bozindo. Soki bosaleli yango na lombango, na lombango bokozwa makoki ya kozwa kimia mpe kimia nie mpe bozangi likama oyo elobama na Yisaya.

Mwa mikolo eleki nayokaki litatoli ya mwasi moko oyo, na mobali na ye, balongwaki na nzela ya bobatelami, babukaki mitindo mpe, na ntango wana, penepene ya kobebisa kutu libota na bango. Ntango moko na bango akokaki koyokisama motema mpasi mpo na bowumbu mpe koyeba lolenge nini bomoi na bango ekomaki kozangaka esengo, mingi mingi ntango bayokisamaki mpasi na bolingo na bango, babandaki kobongwama. Nzela ya boyamboli ebandaki malembe malembe kosalema na bomoi na bango, mpasi mpenza, kasi na lisungi ya bakambi ya bonganganzambe, mpe lisusu na lisungi ya libota mpe baninga malamu, bazongaki na nzela malamu.

Nakaboli na bino mwa eteni ya litatoli ya ndeko mwasi oyo ya nguya ya lobiko ya boyamboli: “Lolenge nini moto moko kokoma moko ya mpate abunga mpe akangamaki na [masumu], na kimia oyo mpe esengo oyo tozali koyoka sikawa? Lolenge nini yango esalemaki? Eyano … ezali mpo ete nsango malamu ya bobongi nie, Mwana mobali moko mobongi nie mpe bomikabi na Ye mpo na ngai. … Esika oyo ezalaki molili, ekomi sikawa pole. Esika oyo ezalaki bozangi elikia mpe mpasi, ekomi esengo mpe elikia. Topambolama mingi koleka na mbongwana oyo ekoki bobele kaka koya na nzela ya boyamboli oyo epesami ofele na Bomikabi ya Yesu Klisto.”

Mobikisi na biso akufaki mpo na kopesa bino na ngai likabo epambolama wana. Elobaki Nkolo na baoyo bayamboli:

“Atako masumu na bino ekomi motane lokola ngola, ekokoma pembe lokola mbula mpembe.”9

“Mpe nakokanisa [bango] moke te.”10

Na bomoi na biso mobimba tosengeli kolendisa makasi matatoli na biso na kotangaka makomi mpe na kosambelaka mpe kobanzaka babosolo ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango epikami makasi, matatoli na biso ya nsango malamu, ya Mobikisi, mpe ya Tata na biso ya Lola ekopesa nguya na makambo nionso tokosala.

Natatoli ete biso nionso tozali bana mibali ya balingama ya Tata na biso ya Lola, totindami na mabele na mikolo mpe ntango oyo mpo na ntina moko, mpe topesami bonganganzambe ya Nzambe na ntina ete tokoka kosalisa basusu mpe kosala mosala ya Nzambe awa likolo ya mabele. Totindami kozala na bomoi mpo ete totikala peto mpo na kobatela bonganganzambe wana.

Bandeko mibali, tokoka kotosa mitindo! Makambo kitoko mpe ya nkembo ezali kozela biso soki totosi. Tika yango ezala mapamboli na biso, nasambeli na nkombo ya Yesu Klisto, Mobikisi mpe Mosikoli na biso, amene.