2010–2019
Tika Mongongo ya Polele ya Kelelo Ebeta
sánzá ya zómi 2015


Tika Mongongo ya Polele ya Kelelo Ebeta

Mokili ezali na mposa ya bayekoli ya Klisto oyo bakoki kolobela lisolo ya nsango malamu polele polele mpe uta na motema

Na eleko ya moi eleki mwasi na ngai mpe ngai toyambaki bankoko na biso ya bilenge mibale kofanda elongo na biso, wana ezalaki baboti na bango kosala elongo na molulu ya mobembo ya bapionie na likonzi na bango. Mwana na biso ya mwasi alingaki koyeba solo ete bana mibali bazalaki koyekola piano wana ezalaki bango libanda ya ndako. Ayebaki ete mikolo moke elongo na bankoko esalaka yango pete koleka mpo na kobosana oyo etali koyekola. Nsima ya nzanga moko nazwaki mokani ya kofanda elongo na nkoko na ngai ya mibu 13, Andrew, mpe koyoka ye kobeta piano.

Elenge mobali oyo atonda na makasi mpe alinga milulu ya libanda. Akoki na pete kolekisa ngonga na ye nionso na bokila mpe koloba. Ntango azalaki koyekola piano, nakokaki koloba ete na esika na yango alingaki koloba na ebale ya mpembeni. Nazalaki koyoka ntango azalaki kotutula nsinga moko na moko ya nzembo moko ya momesano. Noti nionso abetaki ezalaki na makasi mpe molai se moko, kokomisaka yango mpasi mpo na koyeba na polele loyembo. Nafandaki mpembeni na ye na kiti mpe nalimbolaki ntina ya kofina kaka mwa makasi mingi likolo ya buto ya loyembo mpe mwa moke likolo ya banoti wana etambolaka elongo na loyembo. Tosololaki etali piano oyo ezali koleka likamwisi na masini ya mpamba. Ekoki kosembola mongongo mpe mayoki na yomei mpe kokoma esalelo ya kafukafu mpo na kosolola. Kaka lokola moto alolaka to atambolaka malembemalembe uta liloba moko tii mosusu, boye loyembo esengeli kotiola ntango tozali kotambola uta noti moko tii mosusu.

Tosekaki elongo ntango amekaki lisusu mpe lisusu. Koseka na ye ya matama kokota ebakisamaki ntango loyembo wana ya momesano ebandaki kobima kowutaka na oyo ezalaki liboso liboke moko ya makelele. Nsango ekomaki polele: “Nazali mwana ya Nzambe, mpe atindi ngai awa.”1 Natunaki Andrew soki akokaki koyoka bokaseni kati na nsango yango. Ayanolaki, “Iyo, Papa nkoko, nakoki koyoka yango!”

Apostolo Paulo ateyi biso oyo etali komekola bosololi na bisalelo ya miziki ntango akomaki epai ya Bakolinti:

“Ezali bongo na biloko bizali na mongongo, lokola pololo mpe nzenze. Soki ekokabolaka mingongo te, yango eyulami soki yango ebetami ekosalama boni?

“Soki kelelo ekoloba polele te, nani akolengela mpo na etumba?”2

Soki ezala naino na ngonga moko ntango mokili ezali na mposa ya bayekoli ya Klisto oyo bakoki kolobela lisolo ya nsango malamu polele polele mpe uta na motema, ezali sikawa. Tozali na mposa ya libiangi ya makasi mpe polele ya kelelo.

Klisto azalaki solo ndakisa na biso. Alakisaki ntango nionso mpika ya kobatela oyo ezalaki malamu. Maloba na Ye ezali se moko na bikeke nionso ntango azali kobengisa biso tokanisa kolinga ya Nzambe mpe moninga na biso moto, kobatela mitindo ya Nzambe, mpe mpo na kozala na bomoi lokola bapole ya mokili. Azalaki kobanga te koloba mpo na kotelemela banguya ya mabele to bakonzi ya mikolo na Ye, kutu ntango bakonzi ya boye bazalaki kotelemela etinda na Ye epesamela Ye na Tata na Ye ya Lola. Maloba na Ye ezalaki te mpo na kotia mobulu kasi mpo na koningisa mitema ya bato. Atosaki na polele bolingi ya Tata na Ye na manso Ye alobaki mpe asalaki.

Nalingaka lisusu ndakisa ya Petelo, oyo abundisaki bato ya mokili na mpiko mpe polele na mokolo ya Pentekoti. Na mokolo wana bato basanganaki uta bikolo mingi oyo ezalaki kotonga Basantu ya mikolo ya liboso mpo bayokaki bango koloba minoko mpe bakanisaki ete balangwaki. Petelo, kozwaka Molimo atelemaki na molimo na ye, atelemaki mpo na kobatela Eklezia mpe bandimi. Atatolaki na maloba oyo: “Mibali ya Bayuda, na bino nionso bofandi na Yelusaleme, tika ete likambo oyo eyebana na bino mpe boyoka maloba ngai.”3

Nsima atangaki makomi oyo ezalaki na masakoli ya Klisto mpe apesaki litatoli monene oyo: “Na bongo tika ete libota mobimba ya Yisalaele bayeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisi ye na ekulusu.”4

Mingi bayokaki maloba na ye, mpe bayokaki Molimo, mpe milimo 3,000 bakomaki bandimi ya Eklezia ya ebandeli. Oyo ezali bosolo ya nguya oyo mobali to mwasi moko oyo alingi kotatola ntango mikili emonani lokola kokendaka na nzela mosusu mpenza akoki kosala bokeseni.

Ntango biso lokola bandimi tozwi mokano ya kobatela mpe kotatola na bokasi malongi ya Nzambe mpe Eklezia na Ye, likambo moko ebongwanaka kati na biso. Tozwaka elilingi na Ye likolo na biso. Tokomaka mpembeni ya Molimo na Ye koleka. Ye nsima akoleka liboso na biso mpe akozala na “loboko [ya biso] ya mobali mpe na loboko [ya biso]ya mwasi, mpe Molimo [ya Ye] akozala na [ya biso] mitema, mpe banzelu [ya Ye]nzinganzinga [na biso], mpo na kotombola [biso].”5

Bayekoli ya solo ya Klisto bazali koluka kosenga bolimbisi te mpo na malongi, ntango yango ezali kokokana te na makanisi ya sikoyo ya mokili. Paulo azalaki moyekoli mosusu ya elombe kosakolaka na mpiko ete “nayoki nsango malamu ya Klisto nsoni te: yango ezali nguya ya Nzambe mpo kobikisa bandimi nionso.”6 Bayekoli ya solo batalisi Nkolo ntango ekoki kozala esengeli te kosala yango. Bandimi ya solo bazali na mposa ya kofula mitema ya bato, kasi kaka ya kosepelisa bango te.

Mbala mingi ezali esengeli to elengi te ya kotelema mpo na Klisto. Nandimi ete wana ezalaki likambo ya Paulo ntango babengaki ye liboso ya Mokonzi Agilipa mpe batunaki ye amilongisa mpe aloba lisolo na ye. Paulo, na kotatabana te, asakolaki eyamba na ye na nguya ya boye ete mokonzi oyo azalaki kobangisa andimaki azalaki “pene” ya kondima kozala Moklisto.

Eyano ya Paulo etatoli mposa na ye mpo bato basosola mpenza oyo asengelaki koloba. Ayebisaki Mokonzi Agilipa ete ezalaki mposa na ye ete banso oyo bayokaki ye bakoma “pene” ya kozala Baklisto te kasi akingaki “elongo” bakoma bayekoli ya Klisto.7 Baoyo balobi polele bakoki kosala yango.

Na mibu mingi oyo nayekoli lisolo ya ndoto ya Lehi na Buku ya Mormon,8 nakanisi ntango nionso etali ndako monene mpe ya etando kozala lokola esika wapi batomboki mingi koleka bafandaka. Ndako yango etondaki na bato, kosekaka mpe kolakisaka misapi na bato ya botongono oyo basimbaka lingenda ya ebende, kolakisaka liloba ya Nzambe, mpe bazwaki nzela na bango mpo na kokende na nzete ya bomoi, oyo balakisi bolingo ya Nzambe. Basusu bakokaki kokoka te bofini ya bato oyo bazalaki koseka bango mpe bayengakiyengaki. Basusu bakanaki kosangana na batioli kati na ndako. Ezalaki bango na bokasi ya koloba makasi kotelemelaka matongi to bansango ya mokili?

Ntango natalaka mokili ya lelo kopengwaka mosika na Nzambe, nakanisi ndako oyo ezali kokola na monene. Mingi bamimoni lelo kowayawayaka kati na masuku ya ndako monene mpe ya etando, kososolaka te ete bazali mpenza kokoma eteni ya bonkoko na yango. Bazali mbala mingi kokweya na masenginia mpe bansango na yango. Na nsuka tomoni bango kosekaka to kosanganaka na baoyo bazali kotonga to koseka.

Na mibu nakanisaki ete etuluku oyo ezalaki koseka ezalaki kosepela na lolenge bato ya botongono bazalaki na bomoi na bango, kasi mingongo uta na ndako lelo ebongwani lokito mpe esaleli. Baoyo basekaka mbala mingi bamekaka kozipa nsango ya pete ya nsango malamu na kobundisaka makambo mosusu lisolo ya Eklezia mpe kotongaka makasi profeta moko to mokambi mosusu. Baszali lisusu kobundisa motema mpenza ya malongi mpe mibeko ya nzambe, epesama uta Bokeli ya mabele. Biso, lokola bayekoli ya yesu Klisto mpe bandimi ya Eklezia na Ye, tosengeli mokolo moko te kotika lingenda ya ebende. Tosengeli kotika mongongo ya kelelo ebeta uta na milimo na biso moko.

Nsango ya pete ezali ete Nzambe azali Tata na biso ya Lola ya bolingo mpe Yesu Klisto azali Mwana na Ye. Nsango malamu ezongisami na mikolo ya nsuka oyo na nzela ya baprofeta ya bomoi mpe solo ya Buku ya Mormon. Nzela ya esengo eleki na bomoko ya libota ya ebandeli lokola ebongisamaki na ebandeli mpe ebimisami na Tata na biso ya Lola. Oyo ezali maloba ya momesano ya nsango oyo mingi bakoki koyeba lisusu, mpo bayoki yango na bomoi na bango yambo ya mbotama.

Ezali ngonga mpo na biso, lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, totelema mpe totatola. Ngonga ekoki mpo ete banoti ya maloba ya nsango malamu etombwama likolo ya makelele ya mokili. Nabakisi litatoli na ngai na nsango ya Mobikisi mpe Mosikoli ya mokili oyo. Azali na bomoi! Nsango malamu na Ye ezongisami mpe mapamboli ya esengo mpe kimia ekoki kobatelama na bomoi oyo na kosalelaka mitindo na Ye mpe kotambolakana nzela na Ye. Oyo ezali litatoli na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.