2010–2019
Motema na Ngai Emaniolaka Yango Ntango Nionso
sánzá ya zómi 2015


Motema na Ngai Emaniolaka Yango Ntango Nionso

Nasambeli lisusu na motema moko ete okopona komaniola maloba ya Nzambe na mobimba na yango mpe na lolenge ya mozindo.

Na mosala, nazali moto ya nkita. Na boyambi, nazali moyekoli ya Yesu Klisto Mwana ya Nzambe.1 Na misala na ngai ya nkita, nalandaka mibeko ya kokoka ya mombongo. Ntango nasalelaka boyambi na ngai, nabundaka mpo na kolanda mibeko ya molimo oyo ekosunga ngai nakoma mingi lokola Mobikisi.

Mabengisi Ememaka Mapamboli

Ebele ya bambano na ngai moko oyo nazwi na bomoi ekomi lokola mbano ya moto moko oyo azali kobengisa ngai nasala mosala moko ya mpasi. Na molimo wana, nalingi kopesa na mko na moko na bino mabengisi mibale. Ya yambo etali misolo. Libengisi ya mibale, bomipesi ezali ya molimo. Mabengisi nionso mibale, soki endimami, ekosenga bokasi esembolama na eleko ya ntina ya ntango mpo na kozwa mapamboli elongobani.

Libengisi ya Yambo

Libengisi ya yambo ezali pete: nabengisi bino bobomba mosolo mposa nionso. Motango oyo bokobomba ezali mpenza ntina te; etali bobele kaka bino. Ntango bokokolisa ezaleli ya kobomba, bokozwa litomba na bino moko. Mpe bokoki kozwa lisusu mabaku ya kosalisa basusu na oyo etali mosolo lokola mbano ya bokebi. Banzaka ntina malamu ya kobombaka mosolo poso moko na moko mpo na basanza motoba, mobu moko, mibu 10, to koleka. Mwa babokasi ya moke oyo ebombamaki mpo na ntango molai ekoki kobota bambano ya ntina.2

Libengisi ya Mibale

Libengisi na ngai ya mibale ezali mwa kokesena mpe ntina koleka ya yambo. Ezali boye: nabengisi bino “bomaniola na motema”3 molongo moko ya makomi poso nionso. Liloba bomaniola na motema ezali kati ya dictionnaire te, kasi ezwi esika kati ya motema na ngai. Na yango elakisi nini bomaniola na motema? Nalingi naloba ezali bosangisi ya 80 likolo ya mokama ya komaniola mpe 20 likolo ya mokama ya na motema.

Ezali na biteni mibale ya pete:

Ya yambo, bopona molongo ya makomi poso moko na moko mpe botiya esika oyo bokoki komona yango mikolo nionso.

Ya mibale, botangaka to bokanisaka na ntina ya molongo yango mbala mingi mokolo na mokolo mpe bomaniola maloba mpe biteni ya maloba na yango ya ntina poso mobimba.

Bobanzaka mbano ya esengo ya kosalaka yango poso moko na moko mpo na basanza motoba, mobu moko, mibu 10, to koleka.

Ntango bokosala bokasi oyo, bokoyoka bobakisi ya molimo. Bokozala lisusu na makoki ya koteya mpe kosembola baye bolingaka na ndenge moko ya ntina koleka.

Elilingi
Kotanga makomi

Soki boponi komaniola poso na poso, bokoki komiyoka mwa moke lokola moto oyo azalaki kosepelaka kotanga makomi na kala kasi sikawa akomi kosepela na yango makasi mingi koleka. Na mokano wana, bososoli moko ya mozindo koleka ya mabongisi ya nsango malamu ekozala ya bino mpe mamoni ya sika ya molimo ekopambola bomoi na bino.

Elilingi
Kotanga makomi makasi mingi koleka

Na ntango bomanioli molongo na bino poso moko na moko, maloba mpe biteni ya maloba ekokomama na motema na bino.4 Maloba mpe biteni ya maloba ekokomama lisusu na moto na bino. Na lolenge mosusu, bokangi na moto ekosalema na pete nionso mpe na lolenge ya pete. Kasi ntina ya yambo ya komaniola ezali kopesa esika ya esengo mpo na bosaleli ya makanisi na bino—esika oyo ebatelaka bino kozala pene ya Molimo ya Nkolo.

Mobikisi alobaki, “Bobakisa kati ya makanisi na bino ntango nionso maloba ya bomoi.”5 Komaniola na motema ezali pete mpe lolenge etongaka mpo na kosala kaka yango.

Nandimi ete Nefi azalaki momanioli na motema. Alobaki, “Molimo na ngai ezali na esengo ya makomi, mpe motema na emaniolaka yango [ntango nionso], mpe nakomi yango mpo na boyekoli mpe mpo na litomba ya bana ngai.”6 Azalaki ntango nionso kobanza na ntina ya bana na ye ntango amaniolaki mpe akomaki makomi. Lolenge nini libota na yo esengeli kozwa litomba lokola yo ntango nionso obundaka mpo na kotondisa makanisi na yo na maloba ya Nzambe?

Molongo na Ngai

Kala mingi te namaniolaki Alma 5:16. Elobi, “Nazali koloba na bino ete, bokoki kokanisa ete bozali koyoka mongongo ya Nkolo, kolobaka na bino, na mikolo oyo ete: Bino bato bopambwama, boya epai na ngai, mpamba te, misala na bino ezali misala ya bosembo na etando ya mabele?”

Na nsuka ya poso, oyo ezali oyo esalemaki na nsuka mpe ekomamaki na makanisi na ngai: Banza koyokaka mongongo ya Nkolo kolobaka, “Boya epai na ngai mpamba te, tala, misala na bino ezali misala ya bosembo.” (Alma 5:16).

Lokola bokoki komona, nakangaki na moto te liloba moko moko ya molongo mobimba. Nzokande, namaniolaki mbala mingi makambo ya ntina ya molongo yango mpe esika ya kozwa yango. Kasi eteni ya malamu mingi koleka ya mosala ezalaki ete nazwaki esika ya likolo mpo na makanisi na ngai. Na poso mobimba nazalaki kobanza Mobikisi kolobaka maloba ya kolendisa epai na ngai. Likanisi wana esimbaki motema na ngai mpe esalisaki mpo na kofula ngai kolinga kosala yango “misala ya bosembo.” Yango ezali oyo ekoki kosalema ntango totaleli Klisto na makanisi.”7

Tosengeli Kotelemela

Bosengeli kosenga, “Mpo na nini nasengeli kosala boye?” Nakoyanola boye ete tozali na ntango oyo mabe epanzani bisika nionso. Tokoki kaka kondima te lolenge makambo ezali kosalema lelo mpe koyoka maloba elongobani te mpe kotala bilili ya bosoto bisika nionso tozali mpe kozanga kosala eloko moko na nsuka. Tosengeli kobunda. Ntango makanisi na biso etondisami na maloba mpe bilili ya esengo, ntango tozali ntango nionso kokanisa ye,”8 esika etikali te mpo ete makanisi ya mabe ekofanda kati na biso.

Kati ya Buku ya Mormon, Yesu Klisto abengisi biso nionso “tomaniola makambo oyo [Ye] alobaki.”9 Tala komanila na motema lokola litabisi moko likolo ya boyekoli ya makomi ya libota mpe ya yo moko, kasi kotika yango elongolama te. Komaniola na motema ezali lokola kobakisaka ngonga ya kobimisa vitamine ya sika na bilei ya molimo na yo ya mikolo oyo.

Ezali Mpasi Mabe

Bokokaki koloba, “Bomanioli na motema ezali koyokama mpasi mabe mpo na ngai.” Bosala boye te. Eloko ya mpasi ekoki kozala malamu. Klisto azali kobengisa biso tosala makambo ya makasi mpo ete Ayebi tokopambolama lokola mbano ya bokasi na biso.10

Elilingi
Likomi kati na telefone

Elenge moko ya pembeni na biso azwaki mwa lolenge moko ya pete mpo na komaniola na motema. Atiaka makomi na ye ya poso na poso likolo ya etando ya telefone. Likanisi mosusu bokoki komeka ezali ya kokabolaka molongo na bino na basusu, mwana mobali, to moninga. Mwasi na ngai, Julie, mpe ngai tosalisanaka. Toponaka mikapo na biso na Mokolo ya eyenga nionso. Atiaka ya ye likolo ya frigo. Natiaka ya ngai na moktuka na ngai. Sima tokabolaka makanisi na ntina ya mikapo na biso na poso mobimba. Tolingaka mpe lisusu kosolola nantina ya mikapo na biso elongo na bana na biso. Ntango tosala yango, esalaka bango bazala malamu mingi koleka kokabola makanisi na bango na ya biso na ntina ya maloba ya Nzambe.

Elilingi
Ndeko Mwasi Durrant kotiaka likomi na frigo
Elilingi
Ndeko Mobali Durrant kotiaka likomi kati na mutuka monene

Julie mpe ngai tozali lisusu eteni ya lingomba ya Iterneti kati na yango baye libota, baninga, mpe bamisionele, bakoki kokabola likomi na bango poso moko na moko mpe ntango mosusu kokotisa likanisi to litatoli oyo ezwami na kati. Kozalaka eteni ya lingomba ezali pete koleka mpo na kozala sikisiki. Mwana na ngai ya mwasi ya kelasi ya humatité mpe na lingomba ya baninga na ye basalelaka media social (facebook) mpe kokomana basango mpo na kokabola makomi bango na bango.

Elilingi
Elenge mwasi kokabolaka likomi namedia social

Nasengi boboya te kokotisa bato ya boyambi mosusu na mangomba bino. Bazali mpe koluka lolenge ya kokolisa makanisi na bango mpe koyoka kozala pembeni ya Nzambe.

Litomba Ezali Nini?

Elilingi
Ndeko Mwasi Durrant koyekolaka makomi

Na yango, litomba ezali nini? Julie mpe ngai tomaniolaki molongo moko na poso mibu misatu ekoki sikawa. Na ebandeli, tosalaki ntina ya 20. Ayebisaki ngai kala te: “Ntango obengisaki ngai na ebandeli mpo na komaniola na ntina ya makomi poso moko na moko mpo na mibu 20, namitunaki soki nakokoka kosala yango mpo na sanza moko. Nazali na ntembe wana lisusu ata moke te. Nakoki kondima te ndenge nini esali ete nabanda kokitisa makomi likolo ya frigo poso moko na moko mpe bobele kaka na komaniolaka yango na motema ntango moko na moko namonaka yango, efulaka ngai.”

Nsima ya komaniolaka na motema mpo na baposo motoba, ndeko mwasi moko ya mboka Texas, USA, alobaki: “Litatoli na ngai ezali makasi, … mpe namiyokaki kozala pembeni ya Tata na ngai ya Lola. … Nalingaka lolenge maloba ya Nzambe ezali kobongola ngai malamu mingi koleka.”

Moninga moko ya elenge akomaki: “nasepeli mpenza mpo na kozala na makoki ya [komaniola na motema] mpo ete esalisi ngai natiya makanisi na makambo oyo ezali sikawa ntina.”

Moko ya bamisionele na biso akabolaki oyo: “nazali komaniola na motema molongo moko poso moko na moko uta sanza ya motoba ya mobu 2014, mpe nalingaka yango. … Makomi oyo ekomi mpo na ngai lokola baninga oyo nakoki koyekama na ntango ya mposa.”

Mpo na ngai, nayokaka Molimo koleka makasi ntango namaniolaka na motema poso na poso. Bolingo na ngai ya makomi ebakisami lisusu lokola mbano ya kobundaka mpo na “kotika mayele etondisama kati ya makanisi [na ngai] ntango nionso.11

Tala libengisi oyo mpe lipamboli eluti oyo ekabolami na Nefi: “Soki bozwi mokano ya kokende liboso, kosalaka lipati na liloba ya Klisto, kino na nsuka, tala, Tata alobaki ete: Bokozwa bomoi ya seko.”12 Na molimo ya “kosalaka lipati na liloba ya Klisto,” komaniolaka na motema ezali lokola kozwaka litoma monene mpe esengo mpenza uta na eteni moko ya makomi.

Elilingi
Mwasi koliaka na esengo ndunda ya mobesu

Molongo na Yo Ezali Nini?

Ekomaniola bino na motema molongo moko ya makomi poso moko na moko mpo na eteni sanza oyo etikali? Mpo na eteni ya mobu oyo etikali? Ntango molai mbala mosusu? Julie mpe ngai tobengisaki bamisionele na biso ya mpiko ya mboka Texas Dallas bamaniola na motema elongo na biso na mibu 20. Tokosukisa na ntina oyo elongo na mibu 17 ya mokuse. Nsima tokosala ntina ya sika mpo na kotombola makanisi na biso mpe emema biso pembeni oleka ya Klisto.

Bokoki koluka koyeba bokobi na biso na kotunaka, “Molongo na yo ezali nini?” Kasi soki osali yango, milengela mpo na kokabola makomi na ngambo na yo. Moko na moko kati na biso akosepela lokola mbano ya bokaboli na biso.

Okoki kokanisa lolenge nini bomoi na yo mpe bomoi ya libota na yo ekobongwama soki okomi molongo ya sika ya makomi na motema na yo mpe na makanisi na poso nionso mpo na mwa basanza ekoya to mpo na mwa bamibu ekoya to mpo na libela?

Yesu Klisto Azali Ndakisa na Biso

Yesu Klisto akolisaki bolingo ya makomi na mibu ya bomwana. Atangaki mpe amaniolaki makomi ntango azalaki elenge na ntina ete masolo na Ye ezala ntina mingi liboso ya badokotolo ya bwanya kati ya tempelo ntango azalaki na mibu 12.13 Abandaki mosala na Ye na mibu 30,14 mpe ayebaki makomi na mibu ya bomwana mpe mbala mingi na mosala na Ye mobimba.15 Tokoki koloba te na bokebi nionso ete Yesu alekisaki mibu 20 na kotangaka mpe komanioniolaka makomi lokola eteni ya bolengeli etinda na Ye? Ezali na eloko moko osengeli kosala lelo mpo na komilengela yo moko na molimo mpo na mabaku oyo ekoya lobi mpo na koteya mpe kopambola libota na yo basusu?

Salela Bondimi na Yo mpe Sala Yango

Na botali lisusu, nalikii okozwa mokano ya kobomba mosolo poso moko na moko. Salela bondimi na yo, misembola, mpe salela yango. Nasambeli lisusu na motema moko ete okopona komaniola maloba ya Nzambe na mobimba na yango mpe na lolenge ya mozindo poso na poso. Salela bondimi na yo, misembola, mpe salela yango.

Kokesana na libengisi na ngai ya yambo ya bobombi mosolo, matomba nionso oyo ya libengisi na ngai ya mibale ya kobikisa milimo ekozala ya bino mpo na kobomba libela—ya mpamba uta na mabe nionso ya mokili oyo.16

Mpaka D. Todd Christofferson apesaki liteya mpe elaka ya polele oyo: “Boyekola makomi na bokebi, na motema pio. Bomaniola mpe bosambela mpo na yango. Makomi ezali bobimisi, mpe ekomema bobimisi mosusu.”17

Nsuka

Nalaki bokoyokisama motema mpasi te na kokomaka molongo ya makomi na makanisi na bino mpe na mitema na bino poso moko na moko. Bokoyoka liyoki ya ntina ya molimo ya libela, bobatelami, mpe nguya.

Bokanisa maloba ya Yesu Klisto ntango alobaki, “Bosala makambo oyo bomoni ngai nazali kosala.”18 Tokoki kosalela na mobimba maloba na Ye na bomoi na biso, nasambeli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene