2010–2019
Tomikundola Nani Totieli Elikia
sánzá ya zómi 2015


Tomikundola Nani Totieli Elikia

Elikia na biso ya kovanda lisusu elongo na Tata etali Bomikabi ya Yesu Klisto

Ntango nazalaki na mibu libwa, mama ya mama na ngai ya nsuki mpembe ya metele moko na ndambu ayaki kovanda mua baposo elongo na biso. Mpokwa moko ntango azalaki kuna, bakulutu na ngai mibale ya mibali mpe ngai tozwaki mokano ya kotimola libulu na ngambo ya balabala liboso ya ndako na biso. Nayebi te mpo na nani tosalaki yango. Bana mibali balingaka kaka kotimola mabulu. Tokomaki mua salite, kasi eloko te oyo ekokaki kopesa bino motungisi. Bana mibali mosusu ya nzinganzinga bamonaki boniboni yango ezalaki elengi kotimola libulu mpe babandaki kosunga biso. Bongo tokomaki banso salite elongo. Mabele ezalaki makasi, tobendaki tiyo ya bilanga mpe tosopaki mua mayi na nse ya libulu mpo na kolembisa mabele. Tozwaki mwa potopoto ntango totimolaki, kasi libulu ekomaki mozindo koleka.

Moko na lisanga na biso azwaki mokano ya kokomisa libulu na biso piscine, boye totondisaki yango na mayi. Nazalaki leki na bango mpe nalingaki kokota na kati, yango wana nandimaki kopumbwa na kati mpe komeka yango. Sikawa nakomalaki salite mpenza. Na ebandeli nakanaki te komipakola potopoto, kasi wana ezali esika nasukaki.

Ntango nabandaki koyoka malili, nakatisaki balabala, na likanisi ya kokota na ndako na biso. Nkoko na ngai ya mwasi akutanaki na ngai na liboso ya ekuke mpe aboyaki kokotisa ngai. Alobaki na ngai soki atikaki ngai nakota, nalingaki kotika elembo ya potopoto na ndako oyo asilaki kopangusa. Bongo nasalaki oyo mwana ya mibu libwa alingaki kosala na kokimaka na nsima ya ekuke, kasi azalaki mbangu koleka nakanisaki. Nasilikaki, natutaki makolo na ngai, mpe nasengaki nakota na ndako, kasi ekuke ezalaki kaka ya kokanga.

Napolaki, nakomaki potopoto, nayokaki malili, mpe na makanisi na ngai ya bomwana nakanisaki nakokaki kokufa na nsima ya ndako na biso moko. Na nsuka, natunaki ye nini nasengeli kosala mpo nakota na ndako. Yambo nayeba yango, namimonaki ya kotelema na nsima ya ndako ntango nkoko na ngai ya mwasi azalaki kosopela ngai mayi na tiyo. Nsima na oyo emonanaki lokola seko, nkoko na ngai ya mwasi andimaki bopeto na ngai mpe atikaki ngai nakota na ndako. Ezalaki molunge mpe na ndako, mpe nakokaki kolata bilamba ya kokwuka mpe ya peto.

Na lisese oyo ya bomoi ya solo ya lolenge oyo na makanisi, nasengi bomaniola maloba elandi ya Yesu Klisto: “Mpe eloko te ya mbindo ekoki kokota na bokonzi; yango wana eloko te ekoki kozala pembeni na ye longola soki baye baye basukoli bilamba na bango na makila na ngai, mpo na bondimi na bango, mpe boyamboli ya masumu na bango nionso, mpe botongono na bango kino na nsuka.”1

Kotelama libanda ya ndako na biso kosopelamaka na mayi na nkoko na ngai ya mwasi ezaki elengi te mpe ya kosepelisa te. Kozanga libaku ya kozonga mpe kozala elongo na Tata na biso ya Lola mpamba te toponaki kotikala to kozwa salite na libulu moko na potopoto ya lisumu ekoki kozala likama ya seko. Tokoki komikosa te na ntina ya nini ekosenga mpo na kozonga mpe kotikala mpembeni ya Tata na biso ya Lola. Tosengeli kozala peto.

Yambo toya na mokili, tozalaki lokola bana mibali mpe bana basi ya milimo na lisanga moko monene.2 Moko na moko na biso azalaki na ekenge, mpe moko na moko na biso te alalaki. Na lisanga wana, Tata na biso ya Lola alakisaki mwango moko. Mpamba te mwango ebatelaki nguya na biso ya boponi mpe esengelaki ete toyekola na mayele na bisomei mpe kaka te uta na ya Ye, Ayebaki tokosala lisumu. Ayebaki lisusu ete lisumu ekosala biso tozanga peto mpe tokoka te kozonga na miso na Ye mpamba te esika azali ezali kutu peto koleka ndako epangwisamaki na nkoko ngai ya mwasi.

Mpamba te Tata na biso ya Lola alingi biso mpe ntina na Ye ezali “kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ye seko na [biso], ”3 Mwango na Ye ezali mosala ya Mobikisi moko, moto moko oyo akoki kosunga biso tokoma peto ata salite kani tokomaki. Ntango Tata na biso na Lola asakolaki mposa mpo na Mobikisi, nandimi banso kati na biso tobalukaki mpe totalaki Yesu Klisto, Mobotami ya Yambo na Molimo, moko oyo akolaki kino na ndelo ya kokoma lokola Tata.4 Nandimi biso banso toyebaki esengelaki bobele Ye, ete moko te na biso totikalaki akokaki kosala yango, kasi ete Ye akokaki mpe ete Ye alingaki.

Na Elanga ya Gethsemane mpe na ekulusu na Golgotha, Yesu Klisto ayokaki mpasi nzoto mpe molimo elongo, alengaki mpo na mpasi, makila etangaki na madusu nionso ya nzoto, abondelaki Tata na Ye mpo na kolongola nkeni ya bololo mosika na Ye,5 mpe kasi Amelaki yango.6 Mpo na nini Asalaki yango? Na maloba na Ye, Alingaki kokembela Tata na Ye mpe kosilisa “bolengelami na Ye mpo na bana ya bato.”7 Alingaki kobatela liyokani na Ye mpe kokokisa biso kozonga epai ya Tata. Nini asengi na biso kosala mpo na kozongisela Ye? Abondeli biso bobele totubela masumu na biso mpe toyambola mpo ete tokoka te koyoka mpasi lokola Ye.8 Abengisi biso tokoma peto mpo ete tobwakama libanda te na ndako ya Tata na biso ya Lola.

Bandeko mibali mpe basi, atako koboya lisumu ezali lolenge eleki malamu na bomoi, lokola mpenza nguya ya Bomikabi ya Yesu Klisto ezali, ezali na ntina te masumu kani biso tosalaki to na mozindo kani biso ozindaki na kati ya lobwaku. Ezali na ntina te soki oyoki nsoni to omitungisa mpo na masumu na yango, lokola profeta Nephi alobaki, “ozingami bipai na bipai”.9 Ezali na ntina te soki mbala moko biso totekaki likoki ya bokulutu na yo mpo na bileyi.10

Oyo ezali na ntina ezali ete Yesu Klisto, Mwana Mobali ya Nzambe, ayokaki “bampasi mpe minioko mpe mimekano ya lolenge nionso” solo oyo “akokaki koyeba engebene na nzoto mpo ya kokangola bato na ye.”11 Oyo ezali na ntina ezali ete Andimaki komikitisa,12 mpo na koya na mokili mpe kokita “na nse ya makambo nionso”13 mpe koyoka mpasi ya “bitumba ya nguya koleka oyo moto” akoka ata te.14 Oyo ezali na ntina ezali ete Yesu Klisto azali kosamba likambo na biso liboso ya Tata, kolobaka: “Tata, tala, bolozi mpe liwa na ye oyo asalaki lisumu te, oyo nani osepelaki malamu; … Yango wana, Tata, limbisa bandeko na ngai, oyo bandimi na nkombo na ngai ete bakoka koya epai na ngai mpe kozwa bomoi ya libela.”15 Wana ezali oyo solo ezali na ntina mpe oyo ekoki kopesa biso banso bozongisi ya elikia mpe etingia mpo na komeka mbala moko lisusu, mpamba te Abosani biso te.16

Natatoli ete Mosikoli akoki mokolo moko te kopesa biso mokongo ntango na komikitisa toluki Ye mpo na koyambola; akotala mokolo moko te likambo na biso lokola epola; akoloba mokolo moko te , “O te, yo te lisusu”; akobwaka biso mokolo moko te mpo na bozangi ya kososola boniboni ezali mpasi koboya masumu. Asosoli yango nionso mpenza, lokola na ntina ya bolozi, nsoni, mpe nkele oyo ezali mbano ekozanga te ya lisumu.

Boyamboli ezali solo mpe esalaka. Ezali boyebi ya lisapo te to ekelamo “ya maladi ya moto.”17 Ezali na nguya ya kolongola bozito mpe kotia elikia. Ekoki kokamba na mbongwana ya nguya na motema oyo mbano na yango ezali “ kozala lisusu te na mposa ya kosala mabe, kasi kokoba kosala malamu.”18 Boyamboli ezali na ntembe te pete te. Makambo ya ntina ya seko ezalaka mbala mingi te bongo. Kasi mbano esengeli na yango ezali. Lokola Mokambi Boyd K. Packer atatolaki na nsango ya ye ya nsuka epai ya Bantuku Nsambo ya Eklezia: “Likanisi ezali oyo: Bomikabi etikaka elembo te, nzela te. Oyo yango ebongisi ebongisami. … Bomikabi etikaka nzela te, elembo te. Yango ebikisaka kaka, mpe oyo yango ebikisi ekotikala ya kobika.”19

Mpe boye ezali ete elikia na biso ya kovanda lisusu elongo na Tata etali Bomikabi ya Yesu Klisto, likolo ya bolingi ya moko oyo azali na lisumu te mpo na kozwa likolo na Yemei, na bokabwani na masengi ya boyengebene, kilo ya masumu nionso ya bana ya bato, lokola masumu wana boko mibali mpe basi ya Nzambe baponaka na ntina te mpo na koyoka mpasi na bangomei.

Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, topesaka nguya monene na Bomikabi ya Mobikisi koleka bato mosusu mpamba te toyebi ete soki tosali mayokani, tokobi koyambola, mpe koyika kino nsuka, Akosala biso basangoli elongo na Ye20 mpe lokola Ye tokozwa nionso oyo Tata azali na yango.21 Wana ezali malongi ya kafukafu, mpe yango ezali ya solo. Bomikabi ya Yesu Klisto esali libengisi ya Mosikoli “yango wana bozala bato ya kobonga mpenza, kutu lokola Tata na bino oyo azali na Lola azali ya kobonga mpenza”22 ekoka kosalema esika ya kozanga mpenza elikia.

Makomi eteyi ete moto nionso asengeli “kosambisama engebene na bosambisi bosantu ya Nzambe .”23 Na mokolo wana ekozala te na libaku ya kobombana kati lisanga monene to kolakisa mosapi na basusu lokola bolimbisi mpo na bozangi bopeto na biso. Na botondi, makomi eteyi lisusu ete Yesu Klisto, Ye oyo ayokaki mpasi mpo ya masumu na biso, oyo azali molobeli na biso epai ya Tata, oyo abiangi biso baninga na Ye, oyo alingi biso kino na nsuka, Ye akozala mosambisi na biso monene. Moko ya mapamboli ya Bomikabi ya Yesu Klisto oyo mbala mingi tobosanaka ezali ete “ Tata … apesi bosambisi nionso epai ya Mwana Mobali.”24

Bandeko basi mpe mibali, soki boyoki bozangi elikia to soki bozali komituna soki bokoki atat kobima na libulu ya masumu bomitimoleli, nasengi bomikundola ye oyo atelemi “kati na [biso] na boyengebene,” ye oyo “atonda na ngolu epai ya bana ya boto,” mpe ye oyo azwaki likolo na Yemei masumu mpe bobuki mobeko na biso mpe “akokisaki masengi ya boyengebene.”25 Na maloba mosusu, lokola Nephi asalaki na ngonga na ye ya bozangi na elikia na ye moko, bobele komikundola “ na nani [yo] otiaki elikia,”26 kutu Yesu Klisto, mpe nde koyambola mpe lisusu kosalela “elikia mpenza ya pole.”27 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.