2010–2019
Ndenge ya Masuwa mpe Ndakisa ya Libongo ya Bristol: Zala ya Kolongobana mpo na Tempelo—Na Ntango ya Malamu mpe na Ntango ya Mabe
sánzá ya zómi 2015


Ndenge ya Masuwa mpe Ndakisa ya Libongo ya Bristol: Zala ya Kolongobana mpo na Tempelo—Na Ntango ya Malamu mpe na Ntango ya Mabe

Kokangama na mabongi ya nsango malamu ekopesa biso nzela ya kolongobana mpo na tempelo, kozwa esengo na bomoi, mpe kokamba biso mpo na kozonga na ndako na biso ya lola.

Profeta Lehi asakolaki ete, “Soki bosembo ezali te esengo ezali te.”1

Monguna alongi na kolona lokuta na mayele ya bato mingi. Ye mpe bantoma na ye bazali kosakola ete kopona ya solo tozali na yango ezali katikati ya esengo mpe elengi sikawa na bomoi na biso mpe esengo na bomoi moko ekoya (oyo monguna alobi ekoki kozala te). Lokuta oyo ezali kopona moko ya solo te, kasi ekosenginia mingi.2

Ntina lokumu monene ya mwango ya Nzambe ya esengo ezali mpo bayekoli ya bosembo mpe mabota na liyokani basangana na bolingo, boyokani, mpe kimia na bomoi oyo3 mpe kokoma na nkembo ya selestiale na baboseko elongo na Nzambe Tata, Mokeli na biso; mpe Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto, Mobikisi na biso.4

Ntango nazalaki elenge misionele natindamaki na Misio ya Libongo ya Bristol, esika na ngai ya yambo ya mosala na esika ezalaki ntango wana Disitiliki ya Libongo ya Bristol. Moko ya bayangeli ya Eklezia ya esika wana akangamaki ete bamisionele basala na esika esengelaki kozala “Ndenge ya masuwa mpe ndakisa ya Libongo ya Bristol.”

Elilingi
Bamasuwa na libongo ya Bistrol

Na ebandeli nasosolaki te likambo yango. Nayebaki kala te lisolo mpe ntina ya lisakola wana ya “ndenge ya masuwa mpe lolenge ya Libongo ya Bristol” Na ntango moko Libongo ya Bristol ezalaki libongo ya mibale ya elekaki na nkita ya Angleterre. Ezalaka na molongo moko ya mbongo ya likolo mpenza ya 13 metele, ya mibale na likolo koleka na mokili. Na ntango ya mbonge moke ntango mai ezalaki ya kobendana, bamasuwa ya kala ekokaki kotuta na nse mpe kokweya na mopanzi na yango, mpe soki bamasuwa etongamaki malamu te, ekokaki kobukana. Lisusu, nionso oyo etiamaki malamu te mpe ekangamaki makasi te elingaki kobwakama na ndenge moko ya mobulu mpe kobeba mpe koniefuka.5 Nsima na ngai kososola nini lisakola wana elingaki koloba, ezalaki polele ete moyangeli oyo azalaki kolobela biso ete, lokola bamisionele, tosengeli kozala na bosembo, kolanda mibeko, mpe kolengelama mpo na bantango ya kpokoso.

Momekano oyo ekoki kosalisa moko na moko na biso. Nakolimbola kozala “Ndenge ya masuwa mpe ndakisa ya Libongo ya Bristol” lokola kolongobana mpo na Tempelo—na ntango ya malamu mpe na ntango ya mabe.

Ntango ya mbongwana ya mbonge na Libongo ya Bristol Channel ekoki koyebana mwa moke mpe bakoki kolengelama mpo na yango, nzokande Ntango ya bikumbaki mpe masenginia ya bomoi eyebanaka mbala mingi te. Kasi oyo toyebi: yango ekokoma! Mpo na kolonga mikakatano mpe masengenia oyo moko na moko na biso akutanaka na yango na ntembe, ekosenga komilengela na bosembo mpe kosalela bobateli epesami na Nzambe. Tosengeli kozwa mokano ya kolongobana mpo na tempelo, ata nini ekoyela biso. Soki tolengelami, tokobanga te.6

Esengo na bomoi oyo mpe esengo na bomoi ekoya ekangani na bosembo. Ata na ntango katikati ya liwa mpe bosekwi, “milimo ya baye bazali na bosembo eyambami na esika ya esengo, oyo ebengami paladizo, esika moko ya bopemi, esika moko ya kimia.”7

Na ebandeli ya mosala ya Mobikisi na mabele na Yisalaele mpe nsima o ntei ya Banefi, Mobiki alobelaki likambo ya esengo na bomoi mpe na boseko lokola. Abetaki nsete na makuli, kasi Ye lisusu atiaki makasi na ezaleli ya malamu mpe mabe. Mpe ndakisa, bayekoli bakopambolama soki bakoyoka nzala mpe mposa ya bosembo, kozala na ngolu, kozala peto na motema, kozala mopesi kimia, mpe kolanda mabongi misusu ya ntina ya mabe mpe malamu. Na polele lokola nsango moko ya ntina ya malongi, Nkolo na biso Yesu Klisto akangamaki na kozala mpe kotambola na bosembo na bomoi ya mokolo na mokolo. Mateya na Ye kaka te ekitani mpe eluti biteni ya mobeko ya Mose8 kasi lisusu ezalaki koboya bafilosofi ya solo te ya bato.

Uta bikeke mingi nsango malamu ya Yesu Klisto efulaka bondimi mpe etiaka ndakisa ya kotambola mpo na nini ezali ya bosembo, ya kolingama, mpe ya bolamu mpe mabe mpe epesaka mbano ya esengo, nsai, mpe bosepeli. Nzokande, mabongi mpe bolembu mpe mabe ya ntina Mobikisi ateyaki ezali ebundisami na makasi na mokili ya lelo. Boklisto ebundisami. Mingi bandimi ete nini ezali malamu mpe mabe ebongwani na ntina na yango.9

Tozali na ntango ya mpasi. Momesano ezali kobakisama ya “kobenga mabe malamu, malamu mabe.”10 Mokili oyo ekangami na komikomisa monene mpe kimokili ezali likambo ya motungisi. Mokomi moko ya monene, ya eyamba na biso te, alobalaki yango boye: “Mawa namoni polele moke ete bato bazali ya solo na esengo mingi na eleko ya sikoyo, to ete kokita ya motango ya mabele mpe kokonda ya monene ya libota … elakeli eloko te longola se bato bazali mingi bango moko kaka, mpe bozangi kokola na nionso.”11

Lokola bayekoli ya Mobikisi, bazali kozela biso mpo na kosala miango mpe komilengela. Na mwango ya esengo, nguya ya kopona malamu mpe mabe ezali libongi ya katikati na bobongisi mpe likambo ya boponi na biso.12 Mobikisi akangamaki na yango na mosala na Ye, lokola na lisese ya baseka ya liboma mpe ya batalanta.13 Na moko na moko na oyo, Nkolo akumisi komilengela mpe mosala mpe asambisi kozelisa mpe goigoi.

Nandimi ete, ata esengo eluta ezali na mwango ya bonzambe ya Nzambe, ntango mosusu ekoki komonana mosika mingi mpe ya kokatana na ezaleli na biso ya sikawa. Ekoki komonana mosika na bozwi na biso lokola bayekoli na etumba. Na komona na biso ya mokuse, masengenia mpe masano ya sikawa ekoki kosenginia. Mbano yo kotelemela masenginia wana, ntango mosusu, ekoki komonana mosika mpe ya kozwama te. Kasi bososoli ya solo ya mwango ya Tata elakisi ete mbano ya bosembo ezwami sikasikawa. Mabe, lokola kotambola mabe, ezali ata moke te ndambo ya eyano. Alma alobaki yango polele na muana na ye ya mobali Corianton: “Tala, nalobaki na biso, mabe ezala mokolo moko te esengo.”14

Malongi na biso esakolami polele na Amulek na Alma 34:32 : “Tala, bomoi oyo ezali ntango mpo na bato komilengela mpo na kokutana na Nzambe; iyo, tala mokolo ya bomoi oyo ezali mokolo mpo na bato kosala misala na bango.”

Boniboni, sikawa, tokomilengela na ntango ya mpasi ya boye? Kobakisa na kolongobana na tempelo, ezali na mabongi mingi oyo esalaka bosembo. Nakokanga mibongi misato.

Ya yambo: Komikamba mpe Kotambola na bosembo

Nandimi ete ntango mosusu Tata na biso ya bolingo na Lola asengeli kotala biso na lisano toyokaka ntango totalaka bana biso moko ya mike ntango bazali koyekola mpe kokola. Biso banso tobetaka libaku mpe tokweyaka ntango tozali kozwa mayele.

Elilingi
Mayele na Marshmallow

Naluli lisikulu ya likita Mokambi Dieter F. Uchtdorf apesaki na 201015 etali likambo ya marshmallow eyebana esalemaki na Stanford University na 1960. Bokomikundola ete bana ya mibu minei bapesamaki marshmallow moko. Soko bakokaki kozela miniti 15 to 20 na kolia te, balingaki kozwa marshmallow ya mibale. Video elakisaki kobukabuka nzoto oyo bana mingi basalaki mpo na koboya kolia marshmallow.16 Boko balongaki te.

Mobu moleki moteyi oyo akambaki koyekola wana na ebendeli, Dr. Walter Mischel, akomaki mokanda moko na kati na yango alobaki ete koyekola ekolisaki ndambu uta na komitungisa na ye etali komikamba mpe kokangama na ye na momesano ya komela likaya. Amitungisaki mingimingi mpo na U.S. Surgeon General’s report of 1964 oyo esukisaki na koloba ete likaya epesaka cancer ya pumo.17 Sima ya mibu mingi ya koyekola, moko ya moninga na ye ya mosala alobaki ete “komikamba ezali lokola mosisa moko: soki osaleli yango mingi, ekomi makasi mingi. Koboya eloko ya kosenginia mbala moko ekosunga yo mpo kokolisa bokoki ya kotelemela masenginia mosusu na nsima.”18

Libongi moko ya kokola ya seko ezali kosalela komikamba mpe kozala na bosembo ekokembisa bokoki na biso mpo na kotelemela lisenginia. Yango ezali ya solo na makambo ya molimo mpe na makambo ya ntango.

Bamisionele na biso bazali ndakisa eluti malamu. Bakolisaka kozala lokola Klisto mpe bakangamaka na botosi mpe kimolimo. Basengeli kondima manaka moko ya sikisiki mpe kolekisa mikolo na bango na kosalisa basusu. Bamonanaka na bosawa, na lokengo esika ya kozala na lolenge ya mobulu to ya lokengo te na kolata oyo epanzani lelo. Kotambola na bango mpe ezaleli na bango ekotinda nsango ya malamu mpe lokengo.19

Tozali na penepene na bilenge mibali 230,000 oyo bazali sikawa kosala lokola bamisionele to oyo bazongi uta na mosala ya misio na mibu mitano moleki. Bakolisaka bokasi ya molimo ya kitoko mpe komikamba oyo esengeli kokoba kosalela to ndenge wana ekokonda kaka lokola misisa oyo basaleli te. Biso banso tosengeli kokola mpe kolakisa kotambola mpe ezaleli oyo ekosakola ete tozali balandi ya solo ya Klisto. Baye babwaki kotambola ya bosembo to ya kolongono, mpe ezaleli ya bosawa bamitiki na lolenge ya bomoi oyo ekomema bosepeli to esengo te.

Nsango malamu epesi biso likonzi ya mwango ya esengo mpe botindiki mpo na kososola mpe kosala bomikambi mpe koboya lisenginia. Ezali lisusu koteya biso boniboni koyambola ntango kobuka mobeko ekomi.

Ya mibale: kokumisa Saba Ekokolisa Bosembo mpe Ekobatela Libota

Eklezia ya Klisto ya Kala ebongolaki kobatela Saba uta Mokolo ya Poso tii na mokolo ya Eyenga mpo na kokundola Lisekwa ya Nkolo. Mokolo ya bantina mosusu motuya ya Saba etikali kobongwana te. Mpo na Bayuda mpe Baklisto, Saba ezali elembo ya misala ya nguya ya Nzambe.20

Mwasi na ngai mpe ngai, mpe mibale ya baninga na ngai mpe basi na bango, kala te tozalaki elongo na Saba moko ya Bayuda na libengisi ya moninga moko bolingo, Robert Abrams mpe mwasi na ye, Diane, na ndako na bango ya New York.21 Ebandaki na Saba ya Bayuda mokolo moko ya mitano na mpokwa. Mama na likambo ezalaki kokumisa Nzambe lokola Mokeli. Ebandaki na kopambola libota mpe loyembo ya Saba.22 Tosanganaki na molulu ya kosukola maboko, lipamboli ya lipa, bilei ya kosher, kozongela makomi, mpe koyemba nzembo ya saba na lolenge ya kokumisa. Toyokamelaki maloba na kiebeleo, elendamaki elongo na bobongoli na Anglais. Makomi ya ntina etangamaki na Boyokani ya Kala, oyo biso lisusu tolingaka, ewutaki na Yisaya, kosakolaka ete Saba ezala elengi mpenza,23 mpe na Ezekiel, ete Saba “ekozala elembo katikati ya ngai mpe bino, ete bokoka koyeba ete nazali Nkolo Nzambe na bino.”24

Likanisi ya makasi ewutaki na mpokwa oyo ya kitoko ezalaki ya bolingo ya libota, bomipesi, mpe boyanoli na Nzambe. Ntango nakanisaki na likambo wana, namaniolaki monioko ya nsomo oyo Bayuda bazwaki o ntaka ya bikeke. Na polele, kokumisa Saba ezali “liyokani moko ya seko,” kobatelaka mpe kopambolaka bato ya Yuda na kokokisaka makomi.25 Esalaki lisusu mpo na bomoi ya libota ya kafuka mpe esengo oyo ezali polele na bomoi ya bato mingi ya Yuda.26

Mpo na bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, kokumisa Saba ezali lolenge ya bosembo oyo ekopambola mpe ekolendisa mabota, ekokangisa biso na Mokeli na biso, mpe ekobakisa esengo na biso. Saba ekoki kosunga kokabola biso na oyo ezali mpamba, elongobani te, to ya mabe. Ekopesa biso nzela ya kozala na mokili kasi ya mokili te.

Nsanza motoba eleki, mbongwana moko ya kitoko ekomaki na Eklezia. Yango eyaki na eyano na bandimi mpo na kokangama ya sika na Saba etindami na Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na Mibale mpe na Mokambi Russell M. Nelson mpo na kokomisa Saba ezala elengi mpenza.27 Bandimi mingi basosoli ete kobatela ya solo mokolo ya Saba esantu ezali ebombelo na bikumbaki ya bomoi oyo Ezali lisusu elembo ya komipesa na biso na Tata na biso na Lola mpe kobakisa bososoli ya bule ya liyangani ya elambo. Tozali naino na nzela molai ya kokende, kasi tozali na ebandeli ya kitoko. Nabeti mondenge na biso banso mpo na kokoba koyamba toli oyo mpe kobongisi bokumbami na biso ya Saba.

Ya misato: Kobatela ya Nzambe Epesami Ntango Tozali na Bosembo

Lokola eteni ya mwango ya Nzambe, topambolami na likabo ya Molimo Mosantu. Yango “ezali likoki ya kozala na Molimo Mosantu lokola moninga na biso, ntango nionso tolongobani.”28 Moko oyo na Bonzambe asalisaka lokola mopetoli soki nsango malamu ezali eloko ya yambo omoi na bomoi na biso. Ye lisusu azali mongongo ya kokebisa na mabe mpe mongongo ya kobatela na likama. Ntango tozali na mobembo na mbu ya bomoi, kolanda makanisi ya Molimo Mosantu ezali na ntina mpenza. Molimo akosunga biso koboya masenginia mpe makama, mpe kolendisa mpe kokamba biso na kati ya mimekano. “Mbuma ya Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema molai, boboto, bondimi.”29

Kondima mabongisi ya nsango malamu ekopesa biso nzela ya kolongobana mpo na Tempelo, kozwa esengo na bomoi oyo, mpe kokamba biso mpo na kozonga na ndako na biso ya lola.

Bandeko ya mibali mpe ya basi, bomoi ezali pete te, to esengelaki kozala bongo te. Ezali ntango ya bomeki mpe komekama. Lokola bamasuwa ya kala na Libongo ya Bristol, ekozala na bantango oyo bambonge ekobima mpe ekozala lokola soki biloko nionso na mokili oyo ekobatela biso na libanda ya mai ekolimwa Tokoki kotuta na nse tokokweya na mopanzi na biso. Na kati ya mimekano ya boye, nalaki bino ete kozala mpe kotikala ya kolongobana mpo na tempelo ekosimba elongo nionso oyo ezali na ntina mpenza. Mapamboli ya elengi ya kimia, esengo, mpe bosepeli, elongo na mapamboli ya bomoi ya seko mpe nkembo ya selesitiale elongo na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye ya Mobali Yesu Klisto, ekosalema. Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. 2 Nefi 2:13. Makomi oyo ezali eteni ya bokokisi moko na Buku ya Mormon. Ezali na litomba ete baprofeta mingi oyo ya bango makomi mpe masakola ezali na kati ya Buku ya Mormon esaleli boyekoli oyo mpo na kokangama na makanisi ya motuya ya malongi. Tala, mpo na ndakisa, 2 Nefi 9:25 (Yakobo) mpe 2 Nefi 11:7 (Nefi).

  2. Tala 2 Nefi 28.

  3. Tala 4 Nefi 1:15–17.

  4. Tala Doctrine et Alliances 59:23.

  5. Tala Wiktionary, “shipshape and Libongo ya Bristol fashion,” wiktionary.org.

  6. Tala Doctrine et Alliances 38:30.

  7. Alma 40:12; biso nde tobeti nsete.

  8. Tala Matai 5, bokuse ya mokapo.

  9. Tala Carl Cederstrom, “The Dangers of Happiness,” New York Times, July 19, 2015, Sunday Review section, 8.

  10. 2 Nefi 15:20.

  11. Ross Douthat, “Gay Conservatism and Straight Liberation,” New York Times, June 28, 2015, Sunday Review section, 11.

  12. Tala 2 Nefi 2.

  13. Tala Matai 25:2–3, 14–30.

  14. Alma 41:10.

  15. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Continue in Patience,” Liahona, sanza ya mitano 2010, 56.

  16. Tala Walter Mischel, The Marshmallow Test: Mastering Self-Control (2014), 136–38; tala lisusu Jacoba Urist, “What the Marshmallow Test Really Teaches about Self-Control,” Atlantic, Sept. 24, 2014, theatlantic.com.

  17. Tala Mischel, The Marshmallow Test, 136–38.

  18. Tala Maria Konnikova, “The Struggles of a Psychologist Studying Self-Control,” New Yorker, Oct. 9, 2014, newyorker.com, citing Roy Baumeister, moteyi moko na Florida State University oyo ayekolaki nguya ya bolingi mpe komikamba.

  19. Tala Malia Wollan, “How to Proselytize,” New York Times Magazine, July 19, 2015, 21. Atangi Mario Dias ya Brazil Missionary Training Center.

  20. Tala Bible Dictionary, “Sabbath.”

  21. Mpaka Von G. Keetch mpe mwasi na ye, Bernice, mpe John Taylor mpe mwasi na ye, Jan, asanganaki na mwasi na ye ngai mpe ngai mpo na Saba moko ya elengi elongo na Robert Abrams mpe mwasi na ye, Diane, na sanza ya mitano 8, 2015. Tata Abrams asalaki mbala minei lokola zuzi monene na mboka New York mpe azalaka moningi ya Eklezia uta mibu mingi. Tata Abrams abengisaki lisusu mibale ya baninga na ye ya mosala mpe basi na bango.

  22. The Sabbath table hymn Shalom Aleichem (“Kimia likolo na bino”) eyembamaki.

  23. Tala Yisaya 58:13–14.

  24. Ejekiele 20:20.

  25. Tala Esode 31:16–17.

  26. Tala Joe Lieberman, The Gift of Rest: Rediscovering the Beauty of the Sabbath (2011). Buku ya elengi mingi ya Senator Lieberman elimboli Saba ya Bayuda mpe epesi mayele efulama.

  27. Tala Yisaya 58:13–14. Tala lisusu Russell M. Nelson, “The Sabbath Is a Delight,” Liahona, May 2015, 129–32.

  28. Bible Dictionary, “Holy Ghost.”

  29. Bagalatia 5:22.