2010–2019
Kolendisama na Bomikabi ya Yesu Klisto
sánzá ya zómi 2015


Kolendisama na Bomikabi ya Yesu Klisto

Mpe na ntina ya Bomikabi na Ye, Mobikisi azali na nguya ya kobikisa—ya kosalisa—mpasi mpe mitungisi nionso ya bomoi ya kufa.

Na kufa tozali na ntembe te mpo na liwa mpe lisumu. Bomikabi ya Yesu Klisto efuti niongo ya biloko mibale oyo. Kasi kolongola liwa mpe lisumu, tozali na mimekano misusu mingi ntango tozali kobunda na kati ya kufa. Na ntina ya bomikabi wana kaka, Mobikisi akoki kopesa biso bokasi tosengeli na yango mpo na kolonga mimekano ya kufa. Wana ezali mama ya likambo na ngai lelo.

I.

Mingi ya bansango ya Bomikabi etali Mobikisi kobukaka nkanga ya liwa mpe koyokaka mpasi mpo na masumu na biso. Na esakola ekomami na Buku ya Mormon, Alma ateyaki mabongi wana. Kasi lisusu apesaki elaka ete Mobikisi lisusu ayokaki bampasi mpe bokono mpe mitungisi ya bato na Ye.

Alma alimboli Bomikabi ya Mobikisi: Mpe akokende koyokaka bampasi mpe mitungisi mpe masengenia ya ndenge nionso; mpe yango ete liloba ekokisama oyo elobaki akokamata likolo na ye maladi mpe bokono ya bato na ye” (Alma 7:11; tala lisusu 2 Nephi 9:21).

Kanisa yango! Bomikabi ya Mobikisi, Ye ayokaki “mpasi mpe mitungisi mpe masenginia ya ndenge nionso.” Lokola Mokambi Boyd K. Packer alimbolaki: “Azalaki na niono te ya kofuta. Asalaki mabe te. Nzokande, bosangisi moko ya elindo nionso, mpasi mpe mawa, bolozi mpe litio, minioko nionso ya makanisi, mayoki, mpe nzoto eyebani na moto—Ye ayokaki yango nionso.”1

Ntina nini ayokaki mpasi ya mimekano oyo “ya ndenge nionso”? Alma alimbolaki,: “Mpe akokamata likolo na ye bokono na bango, ete nsopo na ye ekoka kotondisama na mawa, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kobikisa bato na ye engebene na bokono ya bango” (Alma 7:12).

Lokola ndakisa, Apostolo Paulo asakolaki ete mpamba te Mobikisi “ayokaki mpasi, koyokaki masenginia, akoki kobikisa baye bayoki masenginia” (Ebele 2:18). Lolenge moko, Mokambi James E. Faust ateyaki: “lokola Mobikisi ayokaki mpasi nionso mpe ya makambo nionso tokoki mpenza koyoka mpe komona, Ye akoki kosunga motau mpo na kokoma makasi mingi.”2

Mobikisi na biso amonaki mpe ayokaki kotondisama na mimekano nionso ya kufa “engebene na mosuni” boye Ye akoki koyeba “engebene na mosuni”bonibonbi “kobikisa [oyo elingi koloba kopesa libondisi mpe lisalisi na] bato na ye engebene na bokono na bango.” Yango wana Ye ayebi bitumba na biso, bampasi ya motema na biso, masenginia na biso, mpe mpasi na biso, mpo Ye andimaki koyoka yango nionso lokola eteni ya ntina mpenza ya Bomikabi na Ye. Mpe na ntina na oyo, Bomikabi na Ye epesaki Ye nguya ya kobikisa biso—mpo na kopesa biso bokasi ya komema yango nionso.

II.

Atako liteya ya Alma na (mokapo ya nsambo( ezali moko kaka oyo eleki na polele na makomi nionso etali nguya ya ntina mpenza ya Bomikabi, eteyami lisusu na kati ya makomi mobimba.

Na ebandeli ya mosala na Ye, Yesu ateyaki ete Ye atindamaki “mpo na kobikisa baye na mitema babukana” (Luka 4:18). Biblia mbala mingi elobeli biso etali Ye kobikisaka bato “na bokono na bango” (Luka 5:15; 7:21). Buku ya Mormon elobeli etali Ye kobikisaka baye “bazali na bokono ya ndenge nionso” (3 Nefi 17:9). Nsango malamu ya Matai elimboli ete Yesu Klisto abikisaki bato “ete ekokisama oyo elobamaki na Yisaya profeta, ete, Yemei akamataki bokono na biso, mpe amemaki maladi na biso” (Matai 8:17).

Yisaya ateyaki ete Masiya akomama “bolozi” na biso mpe “mawa” na biso (Yisaya 53:4). Yisaya ateyaki etali Ye kolendisaka biso:: “Kobanga te; mpo nazali elongo na yo: kolemba te; mpe nazali Nzambe na yo: Nakolendisayo; nakosunga yo” (Yisaya 41:10).

Yango wana, toyembaka:

Kobanga te, nazali elongo na yo; oh, kolemba te,

Mpo nazali Nzambe na Yo mpe nakopesa yo lisusu lisalisi.

Nakolendisa yo, kosalisa yo, mpe kosala yo otelemba, …

Otelemisami na loboko na ngai ya bosembo, ya bokasi bonso.3

Na kolobelaki boko mimekanno ya bomoi na ye moko, Apostolo Paulo akomaki, “Nakoki kosala makambo manso na lisalisi ya Klisto oyo alendisaka ngai” (Bafilipi 4:13).

Mpe boye tomoni ete na ntina ya Bomikabi na Ye, Mobikisi azali na nguya ya kobikisa—to kosunga—mpasi mpe bokono nionso. Ntango mosusu nguya na Ye ebikisaka bokono, kasi makomi mpe mayele eteyi ete Ye abikisaka to asungaka na kopesaka bokasi to bompikilisi mpo na komema bokono na biso.4

III.

Bampasi mpe bokono kani na bomoi oyo ya kufa Mobikisi na biso amonaki mpe ayokaki?

Elilingi
Mwasi koyokaka mpasi ya mitungisi

Tozali banso na bampasi mpe bokono mpe mapipi ntango moko mpe ntango mosusu. Kolongola oyo toyokaka na ntina ya masumu na biso, kufa etondi na bitumba, mpasi ya motema, mpe mpasi ya nzoto.

Elilingi
Kokende kotala bato na lopitalo

Biso mpe baye tolingaka bayokaka mpasi ya maladi. Ntango mosusu moko na moko na biso lisusu ayokaka mpasi ya bapota ya kati to kpokoso mosusu na nzolo to na makanisi. Biso banso tozwaka mpasi mpe mawa na liwa ya molingani moko. Biso banso tokweyaka na mikumba na biso ya moto na moto, na mikangano na biso ya libota, to misala na biso.

Elilingi
Baboti babangisami

Ntango molongani to mwana aboyi oyo toyebi ezali ya solo mpe abungi nzela ya bosembo, tokoyoka mingimingi mpasi na motema, kaka lokola tata ya mwana abunga na lisese ya kobosana te ya Yesu (tala Luka 15:11–32).

Moyembi asakolaki: “Bato ya bosembo mingi bazwaka bokono: kasi Nkolo abikisaka bango na nionso (Psalm 34:19).

Yango wana, nzembo na biso ezali na elaka oyo ya solo: “Mabele ezali na mawa moko te oyo lola ekoki kobikisa te.”5 Oyo ekobikisa biso ezali Mobikisi na biso mpe Bomikabi na Ye.

Elilingi
Bilenge kozangaka boboto

Mingimingi ezali mpasi mpenza mpo na bilenge komiyoka babwakisami, ntango baninga bamonani basangani na mokangano mpe milulu ya esengo mpe na nko batiki bango libanda. Bokabwani mpo na mposo mpe bikolo ebotaka kobwakisama mosusu, mpo bilenge mpe bakolo. Bomoi ezali na mimekano misusu, lokola kozanga mosala to botutu mosusu na miango na biso.

Elilingi
Mwana mobali ya ebosono elongo na tata

Nazali naino kolobala etali bokono oyo ewuti te na masumu na biso. Boko babotami na bozangi na nzoto to na makanisi oyo esalaka mpasi na moto oyo azali na yango mpe bitumba mpo na baye balingaka mpe bakengelaka bango. Mpo na mingi, bokono ya makanisi ezali mpasi to ezali bozangi moko ya kowumela.Motungisi mosusu ezali kozala yo moko kaka. Baye bazali na mpasi ya kozala boye basengeli komikundola ete Mobikisi na biso amonaki lolenge oyo ya mpasi lisusu mpe ete, na ntina ya Bomikabi na Ye, Ye apesi bokasi mpo na komema yango.

Mwa bozangi ebukaka bomoi na biso ya ntango to ya molimo koleka bokangemi na momesano ya mabe. Boko na yango, lokola bokangemi na momesano ya pornografi to lopipi, ekoki kowuta na ezaleli ya masumu. Ata ntango ezaleli wana eyambolami, bokangemi ekoki kotikala. Nkanga oyo ezangisaka makoki ekoki lisusu kosungama na bokasi ya mokano oyo ewutaka na Mobikisi. Boye ekoki kozala mpo na momekano ya makasi oyo ezwi baye babawakami na boloko mpo na mabe basalaki. Kala te mokanda moko etatolaki bokasi oyo ekoya ata na ezaleli wana: “Nayebi ete Mobikisi na biso azali kotambola na bisika oyo, mpe nayokaka mbala mingi bolingo ya Klisto na kati bifelo ya boloko oyo.”6

Elilingi
Moto kati na boloko

Nalingaka litatoli mokomi ya ntoki mpe moninga na biso Emma Lou Thayne. Toyembaka sikawa lokola loyembo, akomaki:

Nakoki kobaluka mpo na kimia wapi?

Libondisi na ngai ezali wapi

Ntango nini maziba mosusu eboyi kopesa ngai likoki?

Ntango nini na motema ezoka, nkanda, to bobe,

Namibendi mpembeni,

Kolukaka molimo na ngai?

Wapi nakenda, ntango mpasi na ngai eluti,

Wapi, ntango nazalaka na bolozi,

Wapi nakenda na mposa na ngai ya koyeba, wapi nakoki kokimela?

Loboko ya kimia ezali wapi mpo na kolembisa mpasi na ngai?

Nani oyo akoki kososola?

Bobele Ye moko. 7

Elilingi
Ekeko ya Klisto

IV.

Nani akoki kobikisama mpe kolendisama na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto? Alma ateyaki ete Mobikisi “akokamata likolo na Ye mpasi mpe bokono ya bato na ye ” mpe “kobikisa bato na ye ” (Alma 7:11–12; botii nsete ebakisami). Banani bazali “bato na ye” na elaka oyo? Ezali bakufi nionso—banso oyo basepeli bosolo ya lisekwa na ntina ya Bomikabi? To ezali bobele basali baye baponami baoyo bakokisami na ntina ya makuli mpe mayokani?

Liloba bato ezali na ntina mingi na makomi. Ntina elongobani mingi koleka mpo na liteya oyo Mobikisi akobikisa “bato na ye” ezali ntina Alma asalelaki ntango ateyaki ete “Nzambe azali na likanisi ya bato banso, ezala wapi bakoki ozala” (Alma 26:37). Yango ezali lisusu nini banzelu balingaki koloba ntango basakolaki mbotama ya Klisto mwana: “nsango malamu ya esengo monene, oyo ekozala mpo na bato banso” (Luka 2:10).

Na ntina ya koyekola na Ye na kufa, Mobikisi na biso akoki kolendisa, kobikisa, mpe kokembisa mibali mpe basi nionso bisika nionso, kasi nandimi ete Ye asalaka yango kaka mpo na baye balukaka Ye mpe basengaka lisungi na Ye. Apostolo Yakobo ateyaki: “Mikitisa na miso ya Nkolo, mpe akotombola yo” (Yakobo 4:10). Tomikokisaka mpo na lipamboli wana ntango tokondimela Ye mpe tokosambela mpo na lisungi na Ye.

Ezali na bamilio ya bato babangaka Nzambe oyo basambelaka Nzambe mpo na kotombolama libanda ya mitungisi na bango. Mobikisi abimisaki ete Ye “akitaki na nse ya biloko nionso” (D&C 88:6). Lokola Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki, “‘ekitaki ye na nse ya biloko nionso,’ Ye akososola, na kobonga mpenza mpe moto na moto, molongo nionso ya mpasi ya bato.”8 Tokoki kutu koloba ete ekitaki ye na nse ya nionso, Ye azali na bobongo mpenza na esika esengeli mpo na kotombola biso mpe kopesa biso bokasi tosengeli na yango mpo na komema mitungisi na biso. Tosengeli bobelele kotuna.

Elilingi
Libota na mesa

Mbala mingi na bobimisi ya sika, Nkolo asakoli, “Yango wana, soki bokosenga ngai bokozwa; soki bokobeta ekofungwamela bino” (for example, D&C 6:5; 11:5; tala lisusu Matai 7:7). Ya solo, na ntina ya bolingo na ye ya koyamba banso, Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye Molingami, Yesu Klisto, bayokaka mpe bapesaka eyano elongobani ya nsambo na biso. Lokola Apostolo Paulo akomaki, “Tokolikiaka Nzambe ya bomoi, oyo azali Mobikisi ya bato bango, mingimingi bandimi” (1 Timote 4:10).

Nayebi makambo nionso oyo ezali ya solo. Bomikabi ya Mobikisi na biso esalaka koleka kopesa biso bozangi kuga na lisekwa moko ya bato banso mpe epesaka biso libaku topetolama na lisumu na boyamboli mpe libatisi. Bomikabi na Ye lisusu epesaka libaku ya kobenga Ye oyo ayekolaki nionso ya bokono ya kufa mpo na kopesa biso bokasi ya komema mikumba na biso ya kufa. Ya ayebi mpasi na biso, mpe Ye azali wana mpo na biso. Lokola Mosamalia malamu, ntango Ye akuti biso ya kozoka na nzela, Ye akokanga bampota na biso mpe akolengela biso (tala Luka 10:34). Nguya ya kobikisa mpe ya kolendisa ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye ezai mpo na biso banso oyo tozali kosenga. Natatoli yango lokola natatoli Mobikisi na biso, oyo asalaka nionso ekokisama.

Mokolo moko mikumba nionso oyo ya kufa ekosila mpe mpasi ekozala lisusu te (tala Emoniseli 21:4). Nasambeli ete tokososola elikia mpe bokasi ya Bomikabi ya Mobikisi na biso: elaka ya bozangi kufa, libakku ya bomoi ya seko, mpe bokasi ya kosunga tokoki kozwa kaka soki tokosenga, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Boyd K. Packer, “The Savior’s Selfless and Sacred Sacrifice,” Liahona, Sanza ya minei 2015, 38.

  2. James E. Faust, “The Atonement: Our Greatest Hope,” Liahona, Sanza ya yambo 2002, 22.

  3. “How Firm a Foundation,” Hymns, no. 85.

  4. Tala mingimingi, Jeffrey R. Holland, Christ and the New Covenant: The Messianic Message of the Book of Mormon (1997), 223–34; David A. Bednar, “The Atonement and the Journey of Mortality,” Liahona, Apr. 2012; Bruce C. Hafen and Marie K. Hafen, “‘Fear Not, I Am with Thee’: The Redeeming, Strengthening, and Perfecting Blessings of Christ’s Atonement,” Religious Educator, vol. 16, no. 1, 2015, 11, mingimingi 18–25; Tad R. Callister, The Infinite Atonement (2000), 206- 10

  5. “Come, Ye Disconsolate,” Hymns, no. 115.

  6. Uta na mokanda ezwamaki na Episikopo Bobby O. Hales, oyo azali koyangela Henry Branch ya Central Utah Correctional Facility.

  7. “Where Can I Turn for Peace?” Hymns, no. 129.

  8. Neal A. Maxwell, “Applying the Atoning Blood of Christ,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1997, 23.