2010–2019
Molimo Mosantu lokola Moninga na Yo
sánzá ya zómi 2015


Molimo Mosantu lokola Moninga na Yo

Tokoki, soki tozali na bomoi elongobana mpo na yango, kozwa lipamboli ya Molimo na biso, kaka sikawa mpe nsima te kasi ntango nionso.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, nazali na esengo ya kozala na bino na mokolo ya Saba kati na likita linene ya Eklezia ya Nkolo. Nayoki, lokola boyoki, Molimo, Molimo kotatolaka mpo na solo ya maloba toyoki kolobama mpe koyembama.

Ntina na ngai ezali kobutisa mposa na bino mpe bomipesi na bino mpo na kosenga likabo elakelama epai na moko na moko na biso nsima ya libatisi. Na bokotisi na biso toyokaki maloba: “Yamba Molimo Mosantu.”1 Uta na ngonga wana, bomoi na biso ebongwanaki libela.

Tokoki, soki tozali na bomoi elongobana mpo na yango, kozwa lipamboli ya Molimo na biso, kaka na libaku te kasi ntango nionso. Boyebi uta na maloba ya losambo ya elambo lolenge nini elaka wana ekokisami: “O Nzambe, Tata wa Seko, tozali kosenga yo na nkombo ya Mwana mobali wa yo, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa lipa liye mpo na milimo mya baye banso oyo bakokamata yango; ete bakoka kolia na bokundoli bwa nzoto ya Mwana mobali wa yo, mpe batatola yo, O Nzambe, Tata wa Seko, ete balingi kokamata likolo na bango nkombo ya Mwana mobali wa yo, mpe komikundola ye ntango nionso mpe kobomba mitindo miye apesaki bango.”

Mpe nde eyaka elaka: “Ete bakoka ntango nionso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango” (D&A 20:77; nsete ebakisami).

Kozala ntango nionso na Molimo elongo na bango ezali kozala na bokambami mpe boyangeli ya Molimo Mosantu na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Tokoki, mpo na ndakisa, kokebisama mpo na kotelemela lisenginia ya kosala mabe.

Mpo na ntina wana kaka, ezali pete komona mpo na nini basali ya Nkolo bameki kobutisa mposa na biso ya kokumbamela Nzambe na makita ya elambo. Soki tolie elambo na bondimi, Molimo Mosantu akozala bongo na makoki ya kobatela biso mpe baye tolingaka uta na masenginia oyo eyaka na bokasi mpe mbala na mbala ya kobuta.

Bozalani ya Molimo Mosantu esalaka oyo ezali malamu ya kobenda mingi koleka mpe lisenginia ya kobenda moke. Oyo esengeli kozala ntina ekoka mpo na kosala biso tokana kolongobana mpo ete Molimo azala na biso elongo ntango nionso.

Kaka lokola Molimo elendisaka biso toboya mabe, Apesaka lisusu biso nguya ya kososola kati ya solo mpe lokuta. Bosolo oyo ezali ntina mingi koleka etalisami kaka na nzela ya bobimisi uta na Nzambe. Ntina na biso ya moto mpe bosaleli ya mayoki na biso ya nzoto ekokoka te. Tozali na bomoi na ngonga ntango kutu bato ya bwania bakozala na ntango moko ya mpasi mpo na kokesenisa bosolo na lokuta ya mayele.

Nkolo ateyaki Apostolo na Ye Toma, oyo alingaki bosolo ya komona na miso ya Bosekwi ya Mobikisi na kosimbaka bapota na Ye, bobimisi wana ezali bosolo ya bokengi koleka: “Yesu alobi na ye ete, Toma, ondimi mpo ete osili komona ngai, Esengo na bango bamoni te nde basili kondima” (Yoane 20:29).

Bosolo oyo elakisaka nzela ya ndako epai ya Nzambe etalisami na Molimo Mosantu. Tokoki kokende na zamba ebulisama mpe komona Tata koloba na elenge Joseph Smith te. Bosolo ya komona na miso moko te to maloba ya mayele kani te ekoki kofandisa ete Eliya ayaki lokola elakelama mpo na kopesa bafungola ya bonganganzambe oyo sikawa esimbami mpe esalelami na profeta na bomoi, Thomas S. Monson.

Botalisi mpenza ya bosolo eyelaka mwana mobali to mwana mwasi ya Nzambe oyo asengi likoki ya koyamba Molimo Mosantu. Lokola balokuta bobuki lokuta ekoki kotalisama epai na biso na ngonga nionso kani, tozali na mposa ya nguya ya ntango nionso ya Molimo ya Solo mpo ete tozala na bangonga ya ntembe te.

Ntango moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, George Q. Cannon alobaki ete tosengaka ntango nionso mpo ete Molimo azala na biso. Alakaki mpe nalaki yango mpe, ete soki tolandi nzela wana, biso “tokozanga mokolo moko te boyebi” ya solo, “mokolo moko te tokozala na ntembe to na molili,” mpe ya biso “bondimi ekozala makasi, [ya biso] esengo … mobimba.”2

Tosengeli na lisalisa wana ya ntango nionso ya bozalani ya Molimo Mosantu mpo ntina mosusu mpe. Liwa ya moko ya bolingo ekoki koya na mbalakaka. Ezali litatoli uta na Molimo Mosantu na ntina ya solo ya Tata ya Lola ya bolingo mpe Mobikisi mosekwi nde epesaka elikia mpe libondi ntango moko ya bolingo akufi. Litatoli wana esengeli ezala ya sika ntango liwa eyei.

Yango wana, mpo na bantina mingi, tosengeli na bozalani ya Molimo Mosantu ntango nionso. Tozali na mposa na yango, kasi lisusu toyebi uta na boyebi makambo ete ezali pete ya kokoba te. Tokanisaka, toloba, mpe tosalaka moko na moko makambo na bomoi na biso ya mokolo na mokolo oyo ekoki kotuka Molimo. Nkolo ateyaki biso ete Molimo Mosanto ekozala moninga ya ntango nionso ntango mitema na biso etondaki na bolingani meke mpe ntango bolamu etondisi ya biso makanisi na nsuka te (tala D&A 121:45).

Mpo na baye banso oyo bazali kobunda na ndelo ya likolo oyo esengelami mpo na kolongobana mpo na boninga ya Molimo, napesi bolendesi oyo. Ezali na bangonga ntango boyoki Molimo Mosantu. Ekokaki kosalema lelo.

Bokoki kotala bangonga wana ya bobimisi lokola nkona ya bondimi oyo Alma alimbolaki (tala Alma 32:28). Bolona moko na moko. Bokoki kosala yango na kosalaka na botindiki boyoki. Bofulami ya ntina ekozala ya yo mpo na koyeba oyo Nzambe alingi yo osala. Soki ezali mpo na kofuta moko na zomi, to kotala moninga kati na mpasi, bokosala yango. Atako ezali nini, bosala yango. Ntango bolakisi bolingi na bino na kotosa, Molimo akotindela bino mayoki mingi koleka ya nini Nzambe akolinga bino bosala mpo na Ye.

Wana ezali bino kotosa, mayoki uta na molimo ekoya mbala mingi koleka, penepene mpe penepene kimoninga makasi. Nguya na bino ya kopona malamu ekobuta.

Bokoki koyeba soki mayoki wana ya kosala euti na molimo to euti na bamposa na bino. Soki mayoki yango ebalani na nini Mobikisi mpe baprofeta na Ye ya bomoi mpe balobi, bokoki kopona kotosa na kondima. Nde Nkolo akotinda Molimo na Ye mpo na kozala na bino.

Mpo na ndakisa, soki boyambi liyoki ya molimo mpo na kotosa mokolo ya Saba, mingimingi ntango emonani lokola mpasi, Nzambe akotinda Molimo na Ye mpo na kosalisa.

Lisalisi wana eyelaki tata na ngai mibu mingi kala ntango mosala na ye ememaki ye na Australie. Azalaki ye moko na mokolo moko ya eyenga, mpe alingaki kolia elambo. Akokaki kozwa nsango moko te oyo etali Makita ya Basantu ya Mikolo ya nsuka. Yango wana abandaki kotambola. Azalaki kosambela na bosangani ya banzela moko na moko mpo na koyeba nzela nini akozwa. Nsima ya kotambolaka mpe kobalukaka ntango moko, atelemaki mpo na kosambela lisusu. Ayokaki liyoki moko ya kokita na balabala moko. Nokinoki abandaki koyoka loyembo kowutaka na eteni ya nse ndako moko etage pembeni wana. Atalaki na nzela ya fenetele mpe amonaki mwa bato bafandaki pembeni ya mesa ezipama na elamba ya mpembe mpe basani ya elambo.

Sikawa, wana ekoki komonana lokola mingi te epai na bino, kasi ezalaki likambo kitoko mpenza mpo na ye. Ayebaki elaka ya losambo ya elambo ekokisamaka: “Komikundola ye ntango nionso mpe kobomba mitindo miye apesaki bango; Ete bakoka ntango nionso kozala na Molimo mwa ye elongo na bango” (D&A 20:77).

Wana ezalaki bobele ndakisa moko ya ntango asambelaki mpe asalaki maye Molimo elobelaki ye Nzambe alingaki ye asala. Akobaki kosala yango mibu na mibu, lokola bino na ngai tokoba. Azalaki kolobela oyo etali makambo na ye ya molimo. Akobaki kaka kosala mwa makambo mpo na Nkolo.

Ntango nionso mwa maboke ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka basengaki ye kolobela bango, asalaki yango. Likambo te soki ezalaki bato 10 to 50 to boniboni alembaki. Apesaki litatoli na ye ya Tata, mwana, Molimo Mosantu, mpe ya profeta ntango nionso Molimo atindaki ye asala yango.

Mabiangi na ye ya likolo mingi koleka na Eklezia ezalaki na lisanga linene ya Bonneville Stake, wapi alongolaki matiti na ferme ya likonzi, mpe ateyaki kelasi moko ya Eteyelo ya Eyenga. Na mibu mingi, ntango azalaki na mposa na yango, Molimo Mosantu azalaki wana lokola moninga.

Natelemaki pembeni ya tata na ngai na lisuku ya lopitalo. Mama na ngai, mwasi na ye ya mibu 41, alalaki na mbeto. Azalaka kotala ye ngonga molai. Tobandaki komona mayoki ya mpasi kolimwa na elongi na ye. Misapi ya maboko na ye, oyo ya kokangama na makofi, esembolamaki. Maboko na ye eyaki kopema na mipanzi na ye.

Bampasi ya cancer ya bamibu ebele ezalaki kosuka. Namonaki na elongi na ye etaleli ya kimia. Apemaki mwa moke, nsima hoquet moko, mpe nsima aninganaki lisusu te. Totelamaki wana kozelaka soki pema mosusu ekoya.

Na nsuka, Papa alobaki na malembe, “Mwa mwana mwasi akei ndako.”

Atangisaki pinzoli moko te. Wana ezalaki mpo ete Molimo Mosantu apesaki liboso kala bososoli ya nani azalaki, wapi autaki, mpe oyo akomaki, mpe wapi azalaki kokende. Molimo atatolaka epai na ye bangonga mingi bolingo ya Tata ya Lola, Mobikisi oyo abukaki nguya ya liwa, mpe bozali solo ya bokangisi ya tempelo oyo akabolaki elongo na mwasi mpe libota na ye.

Molimo andimisaki ye liboso kala ete bolamu mpe bondimi na ye elongobanisaki ye mpo na bozongi epai ya ndako ya lola wapi akokanisama lokola mwana malamu ya elaka mpe akoyambama na lokumu.

Mingi koleka elikia. Molimo Mosantu esalaka yango ezala solo mpo na ye.

Sikawa, basusu bakoki koloba ete maloba na ye mpe basosoli na moto ye oyo etali ndako ya lola ezalaki kaka likanisi moko ya elikia, bososoli ya londende ya mobali moko na ngonga ya liwa na ye. Kasi ayebaki bosolo ya seko lolenge bobele bokoki koyeba yango.

Azalaki moto ayekola oyo alukaki bosolo etali mokili oyo na bomoi na ye ya nkulutu mobimba. Asalelaki bisalelo ya boyebi malamu mpenza mpo na kopesama lokumu na baninga na ye na mokili mobimba. Mingi ya oyo asalaki na chimie eutaki na komonaka na miso na yemei ya molimo babiteni kotambolaka mpe nsima kofandisaka oyo azali komona na ye na nzela ya babomeki na labo.

Kasi alandaki mateya mosusu mpe amonaki babosolo oyo ya ntina mingi koleka mpo na ye mpe mpo na moko na moko na biso. Bobele na nzela ya Molimo Mosantu ekoki biso komona bato mpe makambo lokola Nzambe azali komona yango.

Likabo wana ekobaki na lopitalo ntango mwasi na ye akufaki. Tosangisaki biloko ya mama na ngai mpo na komema na ndako. Papa azalaki kotelema mpo na kotonda minganga mpe badokotolo nionso oyo tozalaki kokutana na bango na nzela ya kobimela tii na motuka. Nakanisi ete namiyokaki ete tosengelaki kobima mpo na kozala biso moko na mpasi na biso.

Sikawa nasosolaki ete amonaki makambo oyo bobele Molimo Mosantu akokaki kolakisa ye. Amonaki bato wana lokola banzelu batindamaki na Nzambe mpo na kokengela motema na ye. Bakokaki komimona lokola basali ya bokolongono ya nzoto, kasi papa azalaki kotonda bango na nkombo ya Mobikisi.

Nguya ya Molimo Mosantu ekobaki na ye ntango tokomaki na ndako ya baboti na ngai. Tosololaki mwa miniti na lisuku ya masolo. Papa asengaki bolimbisi mpo na kokende na lisuku na ye ya pembeni.

Nsima ya miniti moke, azongaki na lisuku ya masolo, Azalaki na mwa koseka ya esengo. Atambolaki tii epai na biso mpe alobaki na malembe, “Nabangakaki ete Mildred akoya na molimo ya mokili ye moko. Nakanisaki akoyoka liwa na etuluku.”

Nsima alobaki na esengo, “Nasambelaki kaka sikawa. Nayebi Mildred azali malamu. Mama na ngai azalaki kuna mpo na kokutana na ye.”

Namikundoli kosekaka moke lokola alobaki ete, kobanzaka nkoko na ngai ya mwasi, makolo na ye kokimaka, kodusoloka etuluku mpo na kondima ete azalaki kuna mpo na kokuta mpe koyamba bokilo na ye ya mwasi wana ezalaki kokoma.

Sikawa, moko ya bantina tata na ngai asengelaki mpe ayambelaki libondi ezalaki mpo ete azalaka ntango nionso kosambela na bondimi uta bomwana na ye. Amesanaki kozwa biyano oyo ezalaki koya na motema na ye mpo na kopesa libondi mpe kolakisa nzela. Na kobakisa na kozalaka na momesano ya kosambela, ayebaki makomi mpe mikili ya baprofeta ya bomoi. Yango wana ayebaki mingongo ya nse ya momesano ya Molimo.

Bozalani ya Molimo ezalaki na mingi koleka kobondisa mpe kokamba ye. Ebongolaki na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Ntango tondimi ete elaka ya kozalaka na Molimo elongo na biso ntango nionso, Mobikisi akoki kopesa biso bopetoli esengelami mpo na bomoi ya seko, likabo ya monene na makabo nionso (tala D&A 14:7).

Bokanisa maloba ya Mobikisi: “Sikawa oyo ezali motindo: Boyambola, bino banso nsuka ya mabele, mpe boya epai na ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi ya Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso na ngai na mokolo ya nsuka” (3 Nefi 27:20).

Mitindo wana eyaka na elaka oyo uta na Nkolo:

“Mpe sikawa, solo, solo, nalobi na bino, botia elikia na bino na Molimo wana oyo akambaka mpo na kosala malamu—iyo, mpo na kosala na boyengebene, mpo na kotambola na bomikitisi, mpo na kosambisa na bosembo; mpe oyo azali Molimo na ngai.

“Solo, solo, nalobi na bino, nakopesa bino Molimo na ngai, oyo akongengisa mayele na bino, oyo akotondisa molimo na bino na esengo” (D&A 11:12–13).

Natatoli epai na bino ete nzambe Tata azali na bomoi, ete Yesu Klisto Mosekwi akambaka Eklezia na Ye, ete Thomas S. Monson asimbi bafungola ya bonganzambe, mpe ete bobimisi na nzela ya Molimo Mosantu ekambaka mpe esungaka Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe bandimi na yango ya komikitisa.

Natatoli lisusu epai na bino ete mibali malamu oyo balobeli biso lelo lokola batatoli ya Yesu Klisto, lokola bato ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, babengami na Nzambe. Nayebi ete Molimo esimbaki Mokambi Monson mpo na kobenga bango. Mpe ntango boyokaki bango mpe matatoli na bango, Molimo Mosanto endimisi bino oyo nazali kolobela bino sikawa. Babengami na Nzambe. Nasungi bango mpe nalingaka bango mpe nayebi ete Nkolo alingaka bango mpe asungaka bango na mosala na bango. Mpe nalobi yango na nkombo ya Nkolo Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Manuel 2: Administreation de l’Église (2010), 20.3.10.

  2. Tala George Q. Cannon, na “Minutes of a Conference,” Millennial Star, sanza ya mitano 2, 1863, 275–76.