2010–2019
Esengo ya Kozala na Bomoi Etongami Kati na Klisto
sánzá ya zómi 2015


Esengo ya Kozala na Bomoi Etongami Kati na Klisto

Bomoi na biso esengeli kozala mpenza kati na Klisto soki tolingi kozwa esengo ya solo mpe kimia na bomoi oyo.

Mokili oyo tovandi ezali koniata bato ya malamu bipai binso mpo na kokitisa to kotika mibeko na bango ya kozala na boyengebene. Atako, mabe mpe mimekano oyo ezingi moko kati na biso tokoki mpe tokzwa esengo ya bosolo lelo na kozalaka na bomoi etongami kati na Klisto.

Kotonga bomoi nabiso kati na Yesu Klisto mpe na nsango malamu na Ye ekoki kopesa biso kimia mpe esengo na bomoi na biso, ntango tolandi ndakisa alakisamaki.

Mpaka Taiichi Aoba ya Bantuku Sambo, oyo avandi na mwa mboka ya ngomba na Shikoku, Japon, abiengemaki koteya na kelasi na likita ya bilenge. “Botelema na Bisika Bisantu” ezalaki lokola mama ya likambo ya likita. Sima ya kozwa mama ya likambo mpe nini ya koteya, Mpaka Aoba ozwaki mokano ya kosalela libiangi na ye lokola elembo ya mateya. Mosala na Ye ezali kosala mbeki.

Elilingi
Mpaka Aoba asali mbeki elongo na bilenge

Mpaka Aoba alobi ete kelasi na ye ya bilenge bakomaki na esengo ntango bamonaki boniboni azalaki na makoki ya kobongola lokola na magie mabele na maboko na ye na kosalaka basani, bakopo, mpe nkeni. Sima ya bolakisi na ye, atunaki bango soki moko kati na bango akokaki komekola yango. Bango nionso batombolaki maboko na bango.

Mpaka Aoba amonaki bilenge mingi koya liboso mpo na komeka bosepeli ya sika. Bakanisaki, na sima ya botali ye, ete oyo ekozala pete. Na yango, moko te kati na bango alongaki na komeka na bango mpo na kosala ata kopo ya pamba. Balobaki: “Nakoki kosala oyo te!” “Mpo na nini ezali pasi?” “Oyo ezali pasi mingi.” Maloba oyo elobamaki na kisuku ntango mabele ezalaki kopumbwa pumbwa.

Atunaki bilenge mpo na nini bazalaki kobundana mpenza mpo na kosala mbeki. Bayanolaki na biyano ekeseni: “ nazali ata naboyebi moko te,” “natikala koyekola te,” to “nazali na talanta te.” Kotala mbano, oyo balobaki ezalaki ya solo; na yango, ntina mpenza ya bozangi elonga na bango etiamaki na esalelo te. Bilenge batiaki ntembe balobi batiaki mabele na katikati, kasi uta na botali ya mosali, yango ezalaki mpenza na katikati te. Bongo alobaki na bango, “Tomeka oyo mbala moko.”

Elilingi
Mpaka Aoba asali mbeki

Mbala oyo, Mpaka Aoba atiaki mabele katikati mpenza ya esalelo mpe abandaki bongo kobalola esalelo, kosalaka libulu na kati ya mabele. Bilenge mingi bamekolaki lisusu. Ntango oyo moko na moko abandaki kobeta maboko ntango balobaki : “Waaooww, ezali koningana te,” “nakoki kosala oyo,” to “nasali yango!” Ya solo, elilingi ezalaki malamu mpenza te, kasi na suka ezalaki mpenza ya kokesena na bomeki ya liboso. Ntina ya elonga na bango ezalaki mpo mabele mpenza na katikati ya esalelo.

Na mokili oyo tozali ekokana na esalelo ya mosali mbeki, mpe mbangu ya nini esalelo ezali kokolisa. Lokola mabele na esalelo ya mbeki, tosengeli kozala na katikati ya esalelo. Ndika na biso, katikati ya bomoi na biso, esengeli kozala Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Kozala na bomoi etongangami kati na Klisto elingi koloba toyekoli na ntina ya Klisto mpe nsango malamu na Ye mpe bongo tolandi ndakisa na Ye mpe tobateli mitindo na Ye nionso.

Profeta ya kala Yisaya atatolaki, “Kasi sikawa, O Nkolo, ozali nde tata na biso; biso tozali mabele, mpe yo ozali moyemi na biso; mpe biso banso tozali bisalelo ya loboko na yo.”1

Soki bomoi na biso etongami kati na Yesu Klisto, Akoki na elonga kobongola biso na oyo tosengeli kozala na molongo ya kozonga epai na Ye mpe Tata ya Lola na bokonzi ya celesitiale. Esengo ozali na yango na bomoi oyo ekozala engebene na lolenge bomoi na biso etongamaki na na mateya, ndakisa, mpe libonza ya bomikabi ya Yesu Klisto.

Bandeko mibali mpe basi, nabotamaki na libota moko ezali na bandimi ya Eklezia uta na bankola ebele, mapamboli mpe esengo ya kozala na nsango malamu ya Yesu Klisto lokola moboko ya mimesano ya libota na biso etongamaki kati na biso mokolo na mokolo. Ezalaki kino na misio na ngai ya ntango mobimba lokola elenge mobali oyo namonaki bokoli malamu ya nguya ya kokamwa ya litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto likolo ya baoyo bayebaki liboso mapamboli na yango na bomoi na bango te. Molongo oyo ya Matai elakisi nzela oyo bato oyo babongwanaki na nsango malamu ya Yesu Klisto bayebi: “Bokonzi ya lola ezali lokola eloko ya motuya ebombami kati na elanga, oyo moto azwi yango mpe azipi yango; mpe bongo na esengo na ye akei mpe atekisi biloko nionso azalaki na yango mpe asombi elanga yango.”2

Tika nakabola na bino ndakisa moko uta na Buku ya Mormon oyo elakisi nini ezalaki mposa ya mobongwani moko kosala mpo na kozwa esengo esangani na kozwa eloko ya motuya elobamaki na Yesu Klisto na lisese ya eloko ya motuya ebombami na elanga.

Bomikundola na buku ya Alma, mokapo ya 20, Ammon mpe Lamoni bakendaki na mobembo na etuka ya Middoni mpo na ntina ya kozwa mpe kosikola ndeko mobali ya Ammon Aaron uta na boloko. Na mobembo na bango bakutamaki na tata ya Lamoni, oyo azalaki nkumu ya mboka nionso ya Balamanite.

Nkumu asilikaki mpenza ete mwana mobali na ye Lamoni azalaki kokende mobembo elongo na Ammon, misionele ya Banefi, oyo azalaki lokola monguna. Ayokaki mwana mobali na ye asengelaki kozala na lipati monene abongisaki mpo na bana mibali na ye mpe mpo na bato naye. Nkumu ya Balamani asilikaki makasi ete atindaki mwana mobali na ye Lamoni aboma Ammon na mopanga na maloba na ye. Ntango Lamoni aboyaki, nkumu abendaki mopanga na yemei mpo na koboma mwana mobali na ye na ntina ya bozangi botosi; na yango, Ammon atelamaki mpo na kobikisa bomoi ya Lamoni. Atelemelaki nkumu na nguya nionso mpe akokaki koboma ye.

Oyo ezali nini nkumu alobaki na Ammon na kobangaka abungisa bomoi na ye: “Soki okobikisa bomoi na ngai; nakotikela yo nionso okosenga, kutu ndambo ya bokonzi na ngai.”3

Bongo nkumu alingaki kofuta motuya ya ndambo ya bokonzi na ye na ntina ya kobatela bomoi na ye. Nkumu asengelaki kokamwa ntango Ammon asengaki bobele ete abimisa ndeko mobali na ye Aaron mpe baninga na ye uta na boloko mpe ete mwana mobali na ye Lamoni atikala na bokonzi na ye.

Sima, na ntina ya bokutani oyo, Aaron ndeko ya mobali ya Ammon abimaki uta na boloko ya Middoni. Sima ya bobimi na ye uta na boloko afulamaki mpo na kokende mobembo na mboka nionso nkumu ya Balamanite azalaki kokonza. Aaron amemaki epai ya nkumu mpe azwaki ndingisa ya koteya ye nsango malamu ya Yesu Klisto, elongo na mwango monene ya bosikoli. Nkumu afulamaki na mozindo na mateya ya Aaron.

Eyano ya nkumu na mateya ya Aaron ezwami na molongo 15 ya Alma mokapo 22: “Mpe esalemaki ete esilisaki Aaron kolimbola makambo maye epai na ye, nkumu alobaki: Nini nasengeli kosala mpo ete nakoka, kozwa bomoi ya seko oyo olobeli? Ya solo, nini nakosala ete nakoka kobotama na Nzambe, kolongolaka molimo oyo ya nkuna libanda ya motema na ngai, mpe kozwa Molimo na ye ete nakoka kotondisama na esengo, ete nakoka kobwakama mosika te na mokolo ya nsuka? Tala, elobaki ye, nakotika nionso nazwi, iyo, nakotika bokonzi na ngai ete nakoka kozwa esengo ya monene ya boye.”

Ya kokamwa, na bokeseni ya kotika ndambo moko ya bokonzi mpo na kobatela bomoi na ye, nkumu ya Balamanite azalaki sika na mposa ya kotika bokonzi na ye mobimba ete akoka kozwa esengo oyo eyaka uta na bososoli, koyamba, mpe kozala na nsango malamu ya Yesu Klisto.

Molongani na ngai, Nancy, azali bongo mobongwani na Eklezia. Ayebisaka ngai mbala mingi mobu na mobu esengo ayokaki na bomoi na ye uta na kozwaka, mpe kozalaka na nsango malamu ya Yesu Klisto. Oyo elandi ezali makanisi ya ndeko mwasi Maynes na boyebi na ye:

“Lokola elenge monzemba na ebandeli na ngai ya mibu 20, ezalaki na ngonga na bomoi na ngai oyo nayebaki nasengelaki na kobongola eloko moko mpo na kozala na esengo. Nayokaki lokola nazalali kotambola na bozangi mbano mpe bokambami, mpe nayebaki te wapi nakokende mpo na kozwa yango. Nayebaka yango ete Tata na Lola azalaka mpe na bomoi na ngai nasalaki mabondeli, koyokaka ete Azalaki koyokamela.

“Ntango nabandaki boluki na ngai, nakendaki na baeklezia mingi kasi nazalaki kaka na mayoki moko mpe bozangi elikia. Nayoki kopambolama mpenza mpo ete libondeli na ngai mpo na bokambami mpe ntina na bomoi na ngai ezwaki mbala moko eyano, mpe litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto epesamaki na bomoi na ngai. Mbala ya yambo nayokaki lokola nazali na, mpe mwango ya bosepeli epesaki esengo ya solo na bomoi na ngai.”

Boyebi mosusu uta na Buku ya Mormon elakisi polele boniboni bomoi etongami na Klisto ekoki kotondisa biso na bosepeli monene ata ntango tozingami na mitungisi.

Sima ya profeta Lehi mpe libota na ye batikaki Jerusalem na 600 yambo ya Klisto, batelenganaki na esobe pene na mibu mwambe kino bakomaki na mboka moko babengaki Bountiful, oyo ezalaki pembeni ya mbu. Nei alakisi bomoi na bango ya mikakatano na nzela oyo na esobe: “Tomonaki mpasi mingi mpe mitungisi, … kutu boye mingi ete tokoki kokoma yango nionso te.”4

Ntango bazalaki na Bountiful, Nefi azwaki mokumba na Nkolo mpo na kotonga masuwa oyo ekokaki komema bango bakatisa mbu mpo na mboka ya elaka. Sima ya bokomi na mboka ya elaka, bobendani ekobaki kokola kati na bato oyo batongaki bomoi na bango kati na Klisto mpe baoyo bandimelaki te oyo balandaki bandakisa ya Laman mpe Lemuel. Na nsuka, likama ya mobulu kati na masanga oyo mibale ezalaki monene mingi ete Nefi mpe baye balandaki mateya ya Nkolo bakabwanaki bangomei mpe bakimaki na esobe mpo na bokengi na bango. Na ntango wana, mwa mibu 30 nsima Lehi mpe libota na ye batikaki Jerusalem, Nefi asalaki esakola moko ya maloba kitoko mpe ya kokamwisa, mingi mingi nsima ya bokomi na makomi mpasi mingi mpe mitungisi bakutanaki na yango ntango molai. Oyo ezali maloba na ye: “Mpe esalemaki ete [tovandaki ] na nsima na lolenge ya esengo.”5 Atako mpasi, bazalaki na makoki ya kozala nsima na lolenge ya esengo mpo ete batiamaki kati na Klisto mpe nsango malamu na Ye.

Bandeko mibali mpe basi, lokola mabele na esalelo, bomoi na biso esengeli kozala mpenza kati na Klisto soki tolingi kozwa esengo ya solo mpe kimia na bomoi oyo. Bandakisa ya nkumu ya Balamanite; molongani na ngai, Nancy; mpe bato ya Nefite nionso esimbi libongisi oyo ya bosolo.

Napesi epai na bino litatoli na ngai lelo ete biso mpe tokoki kozwa kimia wana, bosepeli wana, esengo wana ya bosolo soki toponi kotonga bomoi na biso kati na Klisto, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.