2010–2019
Kosunga Bakambi ya Eklezia
sánzá ya zómi 2015


Kosunga Bakambi ya Eklezia

Bandeko Mibali mpe Basi, Mokambi Monson asengi ete sikawa nalakisa bino Bakambi Minene, Bantuku Sambo ya Etuka, mpe bakambi ya bokambi ya masanga malandi ya Eklezia mpo na voti na bino ya kosunga.

Epesami ete tosunga Thomas Spencer Monson lokola profeta, momoni, mpe mobimisi mpe Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya basantu ba mikolo mia nsuka; Henry Bennion Eyring lokola Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo; mpe Dieter Friedrich Uchtdorf lokola Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi bwa Yambo Henry Bennion Eyring.

Baye bandimi bakoki komonisa yango.

Baye bandimi te, soki bazali, bakoki komonisa yango.

Voti endimami.

Likanisi epesami ete tosunga Russell M. Nelson lokola Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale mpe baye balandi lokola bato ya lisanga likoki wana: Russell M. Nelson, Dallin H. Oaks, M. Russell Ballard, Robert D. Hales, Jeffrey R. Holland, David A. Bednar, Quentin L. Cook, D. Todd Christofferson, Neil L. Andersen, mpe, lokola bandimi ya sika na Lisanga Likoki ya Bazomi na mibale, Ronald A. Rasband, Gary E. Stevenson, mpe Dale G. Renlund.

Baye bandimi, tosengi bomonisa yango.

Oyo andimi te akoki kolakisa bongo.

Voti endimami.

Likanisi epesami ete tosunga bapesi toli na Bokambi ya Yambo mpe Bapostolo Zomi na Mibale lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi.

Baye bandimi, tosengi bomonisa yango.

Baye baboyi, soki bazali, na elembo se moko.

Voti endimami.

Elongo na mabiangi na bango lokola bandimi ya Lisanga Likoki ya Bazomi na mibale, na oyo topemisi Ronald A. Rasband lokola mondimi ya Bokambi ya Bantuku Nsambo mpe Mpaka Rasband mpe Mpaka Dale G. Renlund lokolaa bandimi ya Lisanga Likoki ya Yambo ya Bantuku Nsambo.

Baoyo baye basepeli kosangana na vote ya bondimi bakoki kolakisa.

Likanisi lipesami ete topemisa na botondi mpo na bomipesi na bango na mosala: Mpaka Don R. Clarke lokola moko ya Lisanga Likoki ya Yambo ya Bantuku Sambo mpe Bampaka Koichi Aoyagi mpe Bruce A. Carlson loka bato ya Lisanga Likoki ya Mibale ya Bantuku Sambo mpe toponi bango lokola Bakambi Banene ya kala.

Baoyo balingi kosangana na biso na kozongisaka matondi mpo na mosala malamu na bango, tosengi bomonisa yango.

Tosemboli lisusu bopemisi na Serhii A. Kovalov lokola Ntuku Sambo ya Etuka.

Baoyo balingi kosangana na biso na kozongisaka matondi mpo na mosala malamu na bango, tosengi bomonisa yango.

Na ngonga oyo, tondimi babopemisi ya Ndeko Mobali John S. Tanner lokola mopesi toli ya yambo na bokambi monene ya Eteyelo ya Eyenga mpe Ndeko Mobali Devin G. Durrant lokola mopesi toli ya mibale na bokambi monene ya Eteyelo ya Eyenga. Lokola eyebisamaki liboso, Ndeko Mobali Tanner aponami mpo na kosala lokola Mokambi ya BYU–Hawaii.

Banso baye balingi kosangana na biso na kolakisaka botondi epai ya bandeko mibali oyo mpo na mosala na bango ya komipesa, tosengi bomonisa yango.

Ndeko mobali Devin G. Durrant abiangami sikawa mpo na kosala lokola mopesi toli ya yambo na bokambi monene ya Eteyelo ya Eyenga mpe ndeko mobali Brian K. Ashton mpo na kosala lokola mopesi toli ya mibale na bokambi monene ya Eteyelo ya Eyenga.

Banso baye bandimi, tosengi bomonisa yango.

Baye bandimi te, soki bazali.

Likanisi lipesami ete tosunga Bakambi Banene mosusu, Bantuku Sambo ya Bituka Binene, mpe babokambi monene ya masanga malandi lokola ezali sikawa.

Banso baye bandimi, tosengi bomonisa yango.

Baye bandimi te, soki bazali.

Voti endimami. Tobengisi baoyo bandimaki te moko ya makanisi bamona bakambi ya makonzi na bango.

Bandeko Mibali mpe Basi, totondi bondimi mpe nsambo na bino na nkombo ya bakambi ya Eklezia.

Sikawa tosengi na bandimi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na mibale kozua bisika na bango na liboso. Bakozua libaku ya koloba na biso lobi na ntongo.