2010–2019
Baluka epai na Ye mpe Eyano Ekoya
sánzá ya zómi 2015


Baluka epai na Ye mpe Eyano Ekoya

Zala na botosi, mikundola bangonga ntango oyokaki Molimo na kala, mpe senga na bondimi. Eyano na yo ekoya.

Ntango nazalaki elenge, baboti na ngai bakomaki bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Toyebi ete bamisionele bateyaka bango, kasi baboti na ngai bazwaki mateya bango moko.

Nsima ya liyebisi oyo ya kokamwa, baleki na ngai ya mibali mpe ngai tobandaki koyokamela bamisionele malamu mpenza, mpe baleki na ngai moko na moko bayambaki nsango ya Bozongisami na esengo. Atako nalingaki koyeba na ntina nsango malamu ezongisama, motema na ngai ezalaki na mposa mpenza te ya mbongwana ya bomoi na ngai. Na yango, nandimaki momekano ya kobondela na ntina ya Buku ya Mormon soki ezalaki liloba ya Nzambe, kasi nazwaki eyano te.

Osengeli kotuna mpo na nini Tata ya Lola ayanolaki libondeli wana te; namitunaki mpenza. Nayekolaki uta na elaka epesamaki na Moroni ezalaki ya solo. Nzambe ayanolaka mabondeli na biso na ntina ya bosola ya nsango malamu, kasi Ayanolaka yango ntango tozali na “motema ya bosembo” and “bolingi ya solo.1 Ayanolaka kaka mpo na kopesa eyano na mposa ya boyebi na biso te.

Ntango mosusu ezali na likambo na bomoi na yo oyo ozali komituna mpo na yango. Ntango mosusu ezali na motuna moko oyebi mpenza te boniboni koyanola. Lelo nalingi kokabola makanisi mingi oyo ekoki kosunga bino mpo na kozwa biyano to kosunga bino bozali koluka. Yango ebandi na kobongwana na nsango malamu ya Yesu Klisto.

Kozwa Libimisi Etali Masengami mpe Mposa ya Mitema na Biso

Nakanisi na ntina ya nsango ya bato mingi na makomi. Ndakisa, Laman mpe Lemuel. Lokola Nephi, babotamaki “ na baboti ya malamu” mpe bayekolaki “ na boyekoli nionso ya tata na [bango] .”2 Mpe tala bango bayimayimaki na ntina ya tata na bango azalaki moto ya mamoni. Na makanisi na bango, mikano na ye ezalaki na ntina te, mpo bayebaki te bozalani ya Nzambe, mpe yango wana bandimaki te.3

Ezali na litomba kotala ete maponi na bango epesaki bango ndingisa ya kokota na makoki ya kotonga bondimi. Batikaki ndako na bango mpe bozwi na bango. Bamonaki mpasi na kowayawaya na esobe. Na nsuka basungaki na kotonga masuwa, mpe bandimaki kokende mobembo na mboka eyebani te.

Nephi alekaki na makambo ya lolenge moko kaka. Kasi makambo wana etongaki bondimi na bango? Bondimi ya Nephi ekomaki makasi, kasi Laman mpe Lemuel bokomaki na nkele mpe nkanda koleka. Bandeko mibali wana ata bamonaki mpe bayokaki anzelu, kasi mawa, bakobaki kotia ntembe.4

Bomoi ya kufa ezali pete te mpo na biso banso. Totiami na mokili mpo na komekama mpe komekisama. Eyano na biso ya boyebi ekoki mbala mingi kozala nguya monene na matatoli na biso. Tala mwa bizaleli Laman mpe Lemuel: bayimayimaki ntango tata na bango asengaki bango basala makambo ya makasi.5 Bamekaki kozwa palaki ya motako, kasi ntango elonga eyaki te, batikaki. Ezalela na bango ezalaki “Tomeki; nini lisusu tokoki kosala?”6

Ezalaki kutu na ngonga ntango bazalaki na mawa mpo basalaki mabe mpe basengaki bolimbisi.7 Basambelaki mpe balimbisamaki. Kasi makomi elakisi ete nsima babandaki lisusu koyimayima mpe boyaki kosambela. Bayaki epai ya Nephi mpe balobaki bakokaki te “ kososola maloba oyo tata na [bango] [alobaka].”8 Nephi atunaki bango soki “batunaki Nkolo.”9 Yeba eyano na bango: “Tosali yango te; mpo ete Nkolo alakisaki makambo ya boye epai na bango te.”10

Bokobi na Botosi epesi Biso Ndingisa ya Kowa Biyano

Nephi ayanolaki bandeko na ye ya mibali ezali na fungola mpo na biso kokoba kozwa biyano na losambo:

“Boniboni ezali ete bobateli mitindo ya Nkolo te? Boniboni ezali ete bokowa, na ntina ya bokasi ya mitema na bino?

“Bomikundoli te makambo oyo Nkolo alobaki?—Soki bokoyeisa mitema na bino, mpe kosenga ngai na bondimi, kondimaka ete bokozwa, na etingia na kobatelaka mitindo na ngai, solo makambo oyo [ekolakisama] epai na bino.”11

Nayebi bamisionele ya kala mingi oyo na ntembe te bazwaki boyebi ya molimo, kasi bozangi ya bizaleli mosusu mpenza ya molimo esali bango babosana babosana ntango Nzambe alobelaki bango. Na bamisionele ya kala wana mpe banso kati na biso, soki “oyokaki bayembi loyembo ya l’amour du Rédempteur, nakotuna, yo nini oyoki solo sikawa?”12 Soki oyoki yango sikawa te, okoyoka yango lisusu, kasi zwa toli ya Nephi. Zala na botosi, mikundola bangonga ntango oyokaki Molimo na kala, mpe senga na bondimi. Eyano na yo ekoya, mpe okoyoka bolingo mpe kimia ya Mobikisi. Ekoki koya noki te to na lolenge olingeli, kasi eyano ekoya. Kotika te! Kozonga nsima te!

Tika tokokanisa Laman mpe Lemuel na bana mibali ya Mosiah. Masanga mibale ya mibali ekolisamaki na mabota ya bosembo, banso babungaki. Banso babiangemaki mpo na koyambola uta na anzelu, kasi bokeseni ezalaki nini na ntina boyebi ya bana mibali ya mosiah?

Mimekano Ekoki Kotonga Bondemi na Biso

Elonga na bango na bomisionele ezalaki ya kobosana te. Bamilio ya babongwani na banzela ya Nkolo. Atako, mbala mingi tobosani ete lokola babandaki ba misio na bango, ezalaki na bokakemi, mpe [bango] bazalaki na penepene na kobaluka nsima, [kasi] Nkolo abondisaki [bango].” Bazwaki toli epai ya Nkolo “ kozala na bompikiliki na mitungisi na [bango].”13

Boyekoli ya Makomi Eyebisi Biso Bolingi ya Nzambe

Mpo na nini mimekano ya bana mibali ya Mosiah wana eyeisaki bondimi na bango makasi mpe komipesa koleka na esika ya koyimayima to ya kotia ntembe? Fungola ezali ete “bakolaki makasi na boyebi bosolo; mpo bazalaki bato ya bososoli bolamu mpe balukaki makomi na etingia, ete bakoka koyeba maloba ya Nzambe.”14 Tokokutana banso na mimekano mpe kozala na mituna, kasi mikundola ete tosengeli “kokoba kokende na lombangu liboso mpo na kosimba lingenda ya ebende.”15 “Maloba ya Klisto ekoyebisa [biso] makambo nionso [tosengeli ] kosala.”16 Tosengeli kosala boyekoli ya makomi eteni ya mokolo na mokolo na bomoi na biso, mpo bizipeli ya bokundoli ekopesamela biso.

Kosambela, Esangani na Kokila, Ebengisaka Libimisi

Bana mibali minei ya Mosiah, “oyo ezali nionso te; bamipesaki na mabondeli, mpe kokila; yango wana bazalaki na molimo ya bosakoli, mpe molimo ya bokundoli .”17 Libondeli mpe kokila ekoki kopesa biso mayoki mpenza ya pete ya molimo. Kosolola na Tata na biso ya Lola ntango na ntina mpenza koboyaka kolia mpe komela epesaka biso “efungolaka bankamba ya nkanda [mpe] kolongola mikumba ya bozito.”18 Libondeli, elongo na kokila, ekosala solo ete ntango “tobengi, … Nkolo akoyanola; … [mpe ntango] toleli, … akoloba, Nazali awa.”19

Baluka epai na Ye

Bizaleli wana ya moto ya biyamba—botosi, boyekoli makomi, libondeli, mpe kokila—ekomisaki makasi bana ya mibali ya Mosiah. Bozangi ya lolenge ya moto ya biyamba wana ezalaki ntina mpenza oyo Laman mpe Lemuel bayokaki bolembu na momekano mpe mpo na koyimayima mpe kozala na ntembe.

Soki omekamaki mpo na koyimayima, soki ozalaki na ntembe oyo ememaki yo na kozanga kondima, soki mitungisi ekomi lokola koleka nini okoki komema, baluka epai na Ye. Soki ozali oyo obungaki nzela to oluki ntina na bizaleli na yo, tala epai na Ye. Ekoki yo komikundola ntango Alobaki “kimia na mayele na yo… ? Oyo litatoli monene osengeli kozala na yango koleka oyo euta epai ya Nzambe?”20 Mituna yomei, “Ezali ngai pene ya kozala lokola Klisto sikawa lokola nazalaki liboso?” Bolimbisi, baluka epai na Ye.

Tika nazonga na lisolo na ngai. Emonani nab andaki na kozala sembo. Namikundoli ntango misionele oyo azalaki koteya ngai atunaki soki nalengelamaki mpo na bozwa libatisi. Nazongisaki ete nazalaki na mituna mingi. Misionele oyo ya bwania alobaki na ngai ete akokaki koyanola yango kasi ete nasengelaki koyanola ye yambo. Atunaki ngai soki Buku ya Mormon ezalaki ya solo mpe soki Joseph Smith azalaki profeta. Nayebisa ye ete nayebi te, kasi nalingiki koyeba.

Mituna ngai ememaki na kokolisa bondimi. Mpo na ngai, eyano eyaki mbala moko te kasi lokola botamboli. Namonaki ete lokola “bomeki likolo ya [maloba] ” mpe kobanda “kosalela eteni eteni moko ya bondimi,” Buku ya Mormon ekomaki “malamu mpo na ngai” mpe yango “engengisaki bososoli na ngai” mpe solo “etandolaki molimo na ngai.” Na nsuka nazwaki boyebi ya makomi esemboli lokola kovimba ya mabele na ntolo.21 Ezalaki na esika oyo ete nazalaki na mposa ya kobatisama mpe kopesa bomoi na ngai epai ya Yesu Klisto.

Nayebi solo ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe. Neyebi ete Joseph Smith azalaki profeta. Oh, nazali naino na makambo nazali kososola te, kasi litatoli na ngai ya bosolo ezali komema ngai pembeni ya Mobikisi mpe etongi bondimi na ngai.

Bandeko ya basi mpe mibali, bomikundola Nephi mpe bana mibali ya Mosiah, oyo bazwaki boyebi ya molimo mpe bongo basalaki na bondimi solo ete biyano eyaki mpe botongono ekolaki. Na ngmbo mosusu oyo elongo Laman mpe Lemuel, oyo batiaki ntembe mpe bayimayimaki. Atako mbala mingi basalaki na banzela ya bolongobani te, na bondimi ezanga misala. Tosengeli kozala na bondimi na mosala mpo na kozwa biyano.

Nakolikia ntango oyokamelaki na ntongo oyo ete Molimo elobaki na mayele na bino mpe mitema makambo oyo bosengeli kosala mpo na kozwa biyano na mituna na bino to mpo na kozwa bofulami ya kosilisa likambo etelemeli bino. Natatoli na nguya ete Yesu azali Klisto. Bobaluka epai na ye Ye mpe losambo na bino ekoyanolama. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.