2010–2019
Ntina ya Eklezia
sánzá ya zómi 2015


Ntina ya Eklezia

Ezali na ntina komaniola ntina nini Yesu Klisto aponaki kosalela eklezia moko, Eklezia na Ye, mpo na kosala mosala na Ye mpe ya Tata na Ye

Na bomoi na ngai mobimba, Makita manene ya Eklezia ezalaka makambo ya kafukafu ya molimo, mpe Eklezia yangomei ezalaka esika moko ya koya mpo na koyeba Nkolo. Nasosoli ete ezala na baye bamimonaka bangomoko bato ya boyambi mpe ya molimo mpe kati baboyaka kosala elongo na eklezia moko to ata mposa ya libongisi moko ya bongo. Mosala ya boyambi ezali mpo na bango kaka likambo ya moto na moto. Kasi Eklezia ezali ekelamo ya Ye oyo azali katikati ya makambo ya molimo—Yesu Klisto. Ezali na ntina komaniola ntina nini Ye aponaki kosala eklezia moko, Eklezia na Ye Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu Ba mikolo mya Nsuka, mpo na kosala mosala na Ye mpe ya Tata na Ye “mpo na kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”1

Kobanda na Adama, nsango malamu ya Yesu Klisto eteyamaki, mpe makuli ya ntina ya lobiko, lokola libatisi, esalamaki na nzela ya libota evandi na nzela ya bonganganzambe.2 Ntango mangomba ekolaki kilikili kaka te mabota ya minene, Nzambe abengaki lisusu baprofeta, bapanzi nsango mpe bateyi misusu. Na ntango ya Mose totangi etali libongisi ya sikisiki koleka na kati na yango bampaka, banganganzambe mpe bateyi.

Nde, na katikati ya ntango, Yesu abongisaki mosala na Ye na lolenge moko boye ete nsango malamu ekokaki kotiama na mbala moko na bikolo biike mpe o ntei ya bato kilikili. Lisanga wana, Eklezia ya Yesu Klisto, ekelamaki na “baposotolo mpe baprofeta, Yesu Klisto yemei libanga ya likonzi.”3 Yango ezalaki lisusu na basali lokola bantuku nsambo, bampaka, baepisikopo, mpe badiakona. Yesu Klisto ndenge moko atiaki Eklezia na Mokili ya Amerika nsima ya lisekwa na Ye.

Kolanda lipengwi mpe bopanzani ya EkleziaYe abongisaka ntango azalaki na mabele, Nkolo atiaki lisusu Eklezia ya Yesu Klisto mbala moko lisusu na nzela ya Profeta Joseph Smith. Ntina ya kala etikali; oyo ezali, koteya likambo kitoko ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kosala makuli ya libiki—na elobeli mosusu, mpo na komema bato na Klisto.4 Mpe sikawa, na nzela ya lisalisi ya Eklezia, elaka etiami etali ata kutu milimo ya bawa oyo na ntango na bango ya bomoi bayebaki moke to likambo moko te ya ngolu ya Mobikisi.

Boniboni Eklezia na Ye ekokokisa ntina ya Nkolo? Ezali na motuya ete tokoba “uta ngolu na ngolu, kino [tokozwa] litondi”5 ya nionso Ye akoki kopesa. Yango esengi mingi koleka kaka kozalaka malamu to komonanaka moto ya molimo. Yango esengi bondimi na Yesu Klisto, boyamboli, libatisi ya mai mpe ya Molimo, mpe kotia molende na bondimi tii na nsuka.6 Moko akoki ten a mobimba kokisa ya ngo na komilongolo, boye ntina monene Nkolo azali na eklezia ezali kokela lingomba ya Basantu oyo bakosungana na nzeala “eke mpe ya nkaka oyo ekokamba na bomoi ya seko.”7

“Ye mpe [Klisto] asili kopesa makabo ete bamosusu bajala bapostolo; mpe bamosusu, bajala basakoli, bamosusu bapalangani na nsango Malamu, bamosusu babateli mpe balakisi;

“… Mpo na mosala ya kosunga, mpo na kotonga nzoto ya Klisto:

“Kino ekokoma biso nionso na bomoko na kondima mpe boyebi ya Mwana ya Nzambe, mpo na kokoma moto abonga nie, mpo na kokoma na ndelo ya nzoto ya litondi ya Klisto.”8

Yesu Klisto azali “mobandisi mpe mosukisi ya [oyo ya biso] bondimi.”9 Komisangisaka na nzoto ya Klisto—Eklezia—ezali eteni ya motuya ya kokamataka nkombo na Ye likolo na biso.10 Balobeli biso ete Eklezia ya kala “ezalaki kosangana elongo mbala mingi, mpo na kokila mpe kosambela, mpe kolobelana, etali bolamu ya milimo na bango”11 “mpe mpo na koyoka liloba ya Nkolo12 Boye nde eklezia ezali lelo. Kosanganaka na bondimi, koyekola mpe kolendisana mpe kobunda mpo na kobelema na ndelo ya kiboyekoli, “ndelo ya nzoto ya litondi ya Klisto.” Tozali kobunda kosunga moko mpe mosusu kokoma na “boyebi ya Muana ya Nzambe,”13 kino na mokolo wana ntango “basengeli koteya lisusu te bato ya nzinganzinga na ye, … kolobaka, Boyeba Nkolo: mpo bango nyonso basengeli koyeba ngai, wuta na moke ti na mukolo na bango, elobi Nkolo.”14

Na Eklezia tokoyekola kaka te malongi ya bonzambe; tokoyekola lisusu kosalela yango. Lokola nzoto ya Klisto, bandimi ya Eklezia basalisanaka na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Biso banso tobonga mpenza te; tokoki kotuka mpe kotukama. Ntango mingi tomekaka moko na mosusu na ndenge ya moto yemoko. Na nzoto ya Klisto, tosengeli koleka makambo to maloba ya mpamba mpe kozala na mayele moko ya solo na loboko ntango tozali koyekola “kozala elongo kati na bolingo.”15

Eyamba oyo etali kaka te moto yemei; kasi tobengami mpo na kosalisa. Tozali miso, moto, makolo, mpe biteni misusu ya nzoto ya Klisto, mpe kutu “bandimi wana … oyo bamonani bazali batau, bazali na ntina.”16 Tosengeli kozwa mabiangi wana, mpe tosengeli kosalisa.

Moto moko ya palwasi na ngai akolaki kaka te na kozanga lisungi ya baboti kasi na baboti koboyaka mosala na ye na Eklezia. Apesaki likanisi oyo na liyangani moko ya elambo: “Tata na ngai akokaki kososola te ntina nini bato bakoki kolinga kokende na eklezia ntango bakoki kokende kosakana na ngomba ya malili, kasi nalingaki ya solo kokende na eklezia. Na Eklezia, tozali banso na mobembo se moko kaka, mpe nafulami na mobembo wana na bana ya bilenge, mpe ya peto, mpe na oyo nakomona mpe nakoyekola na bamikolo misusu. Nalendisamaki na lisanga mpe nasepeli na esengo ya kosalela nsango malamu.”

Bapalwasi mpe bitape epesi liyangani moko na mposo ya kopema mpe kokoma ya sika, ntango mpe esika mpo na kotika mokili nsima—saba. Ezali mokolo mpo na kosemisepelisa na Nkolo,”17 mpo na koyoka libiki ya molimo oyo eyaka elongo na elambo, mpe kozwa elaka ya sika mpo na Molimo na Ye ezala elongo na biso.18

Moko ya mapamboli manene koleka ya kozala eteni ya nzoto ya Klisto, atako ekoki komonana te na ngonga wana lokola lipamboli, ezali kopamelama mpo na lisumu mpe libungi. Tolingaka kolimbisa mpe kososolisa mbeba na biso, mpe ntango mosusu kaka toyebi te wapi tosengeli kobongisa mpe boniboni kosala yango. Na kozanga baye bakoki kopamela biso “pamela makasi na ntango esengeli ntango opusami na molimo mosantu,”19 tokozanga mpiko mpo na kobongwana mpe kolanda na kobonga mingi mpenza Nkolo. Boyamboli ezali ya moto na moto, kasi lisanga na nzela wana ntango mosusu ya mpasi ezali na Eklezia.20

Na lisolo oyo ya Eklezia lokola nzoto ya Klisto, tosengeli ntango nionso kozala na makanisi na makambo mibale. Moko, tokobunda te mpo na mbongwana na Eklezia kasi mpo na Klisto mpe nsango malamu, mbongwana oyo ekomisami pete na Eklezia.21 Buku ya Molomoni elobeli yango ntango malamu koleka ntango elobi ete “bato babongwanaki na Nkolo, mpe bazalaki ya kosangana na eklezia ya Klisto.22 Mibale, tosengeli komikundola ete na ebandeli, Eklezia ezalaki libota, mpe ata kutu lelo lokola libongisi ekabwana, libota mpe Eklezia esalisanaka mpe elendisanaka. Moko eniataka mosusu te, mpe na ntembe te Eklezia, ata kutu na ntango ya malamu koleka, ekoki te kokitana baboti. Likambo ya koteya nsango malamu mpe makuli ya bonganganzambe oyo epesami na Eklezia ezali ete mabota makoka kokokisama mpo na bomoi ya seko.

Ezali na ntina monene ya mibale misala ya Mobikisi na nzela ya eklezia, Eklezia na Ye, mpe yango ezali mpo na kokokisa makambo masengeli oyo ekoki te kokokisama na bato moko na moko mpe na maboke mike. Ndakisa moko ya polele ezali kosalisa babola. Ezali ya solo ete lokola bato moko na moko mpe mabota tolengelaka mposa ya nzoto mpe misusu, kokabanaka biloko ya ntango mpe ya molimo engebene na bozangi mpe bisenge na bango.”23 Kasi elongo na Eklezia, bokoki mpo na kolengela babota mpe bazangi ebakisami mpo na kokokisa mposa ye monene koleka, mpe kolikya na bokoki ya moto ye moko ekomaki ya solo mpona ba ebele.24 Nsima, Eklezia, Lingomba ya Bamama Basungi na yango, mpe masanga makoki na yango bazali na makoki ya kopesa lisungi na bato mingi na bisika mingi oyo ezwami libomi linene ya mokili, etumba, mpe minioko.

Na kozanga kozala na makoki ya Eklezia na Ye, etinda ya Mobikisi ya komema nsango malamu na mokili mobimba ekokaki te kosalema.25 Elingaki kozanga bafungola ya bapostolo, libongisi, balolenge ya kozua mbongo, mpe mabondeli mpe libonza ya bamilio ya bamilio ya ba misionele ba bosenga ya kobima na mosala. Bomikundola, “Nsango malamu ya lola oyo [esengeli] koteyama na mokili mobimba, mpo na litatoli na bikolo nionso, mpe nde nsuka ekoya.”26

Eklezia ekoki kotonga mpe kosala bapatempelo, bandako ya Nkolo, wapi makuli mpe mayokani ya ntina mpenza ekoki kosalema. Joseph Smith alobaki ete ntina ya Nzambe na kosangisaka bato na Ye na bileko nionso ezali “kotongaka mpo na Nkolo ndako moko wapi Ye [akoki] kobimisa na bato na Ye makuli ya ndako na ye mpe nkembo ya bokonzi na Ye, mpe koteya bato nzela ya lobiko; mpo ezali na boko makuli mpe mabongisi oyo, ntango eteyami mpe esalemi, esengeli kosalema na esika to ndako moko etongama mpo na ntina wana.”27

Soki moto moko akanisi ete banzela nionso ememaka na lola to ete ezali na bisenge moko boye te mpo na lobiko, ye akomona ntina te mpo na kosakola nsango malamu to mpo na makuli mpe mayokani kosikolaka baye ya bomoi mpe bawa. Kasi tolobeli kaka te etali bozangi kufa kasi lisusu bomoi ya seko, mpe mpo na yango nzela ya malamu ezali na ntina mpenza. Mpe Mobikisi azali na mposa ya eklezia mpo na kopesa yango na bana banso ya Nzambe—baye bazali na bomoi mpe bawa.

Ntina ya nsuka oyo nakolobela mpo na yango Nkolo atiaki Eklezia na Ye ezali se moko mpenza—Eklezia ezali, nsima ya nionso, bokonzi ya Nzambe na mabele.

Ntango Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezalaki kosalama mibu 1830, Nkolo alobaki na Profeta Joseph Smith, botombola mitema na bino, mpo epai na bino bokonzi, to na elobei mosusu, bafungola ya eklezia epesami.”28 Na likoki ya bafongola wana, basali ya bonganganzambe ya Eklezia babatelaka bopeto ya malongi ya Mobikisi mpe bosembo ya kobatelaka makuli na Ye.29. Basalisaka baye batombeli kozwa yango, bakotala bokoki mpe bolongobani ya baye bakosalela, mpe baye bakosala yango.

Na bafungola ya bokonzi, basali ya Nkolo bakoki koyeba bosolo mpe bobe, mpe mbala moko lisusu kololoba na likoki, “Boye elobi Nkolo” Na mawa, boko basilikeli Eklezia mpamba te balingi kolimbola bosolo na bangomei, kasi ya solo ezali lipamboli eluti kozwa “bosolo ya makambo lokola ezali mpenza, mpe lokola ezalaki, mpe lokola esengeli koya”30 kala te lokola Nkolo alingi kobimisa yango. Eklezia ebatelaka mpe ebimisaka na mikanda maye mabimisi ya Nzambe —makomi oyo mandimama.

Ntango Daniele alimbolaki ndoto ya Mokonzi ya Babiloni Nabukadanasala, koyebisaka na mokonzi “nini ekozala na mikolo mya nsuka,”31 asakolaki ete “Nzambe ya lola akotia bokonzi moko, oyo ekobebisama mokolo moko te: mpe bokonzi wana ekotikala na bato misusu te, kasi ekobuka na biteni mpe ekozikisa babokonzi misusu, mpe ekozala libela.”32 Eklezia ezali bokonzi ya mokolo ya nsuka esakolamaki oyo ekelamaki te na moto, kasi etiamaki na Nzambe ya lola mpe ekokende kobalukaka lokola libanga moko ekatama uta na ngomba na maboko te mpe ekotondisa mabele.33

Lotomo na yango ezali kotia Siona na kolengelaka bozongi mpe boyangeli ya mibu nkoto ya Yesu Klisto. Liboso ya mokolo wana, ekozala te bokonzi moko na lolenge ya mokili—lokola Mobikisi alobaki, “Bokonzi na ngai ezali te ya mokili oyo.”34 Kasi, ezali esika wapi likoki na Ye etiami na mabele, bakambi ya mayokani na Ye, bakengeli ya batempelo na Ye, babateli mpe basakoli ya bosolo na Ye, esika ya bosangani mpo na Yisalaele epanzana, mpe “bobateli moko, mpe … ebomelo moko na ekumbaki, mpe na nkanda ntango ekosopana libanda na kosangisasangisa te likolo ya mabele.”35

Nasukisi na libondeli mpe losambo ya Profeta:

“Bobelela Nkolo, ete bokonzi na ye ekoka kokende liboso likolo ya mabele, ete bafandi na yango bakoka koyamba yango, mpe bamilengela mpo na mikolo mikoya, na yango Mwana ya Moto akokita na mabele, na elamba ya kongenga ya nkembo ya ye, mpo na kokutana na bokonzi ya Nzambe oyo etiami na mabele.

“Yango wana, tika bokonzi Ya Nzambe ekende liboso, ete bokonzi ya lola ekoka koya, ete yo, O Nzambe, okoka kokembisama na lola mpe na mabele, ete banguna na yo baniatama; mpo na yo ezali lokumu, nguya mpe nkembo, libela na libela.”36

Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.