2010–2019
Litambe na Bino oyo Elandi
sánzá ya zómi 2015


Litambe na Bino oyo Elandi

Tata na bino ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, babangisi bino bozwa litambi na bino oyo elandi na ngambo na Bango. Bozela te. Bozwa yango sikawa.

Motema na ngai emitungisamaki mingi na liyangani oyo uwuti koleka kala te elongo na Basantu ya malamu mingi koleka ya mikolo mya Nsuka. Motuna etunamaki, “Nani alingi kozonga lisusu pembeni ya Tata ya Lola?” Maboko nionso etomwamaki. Motuna elandi ezalaki ete “Nani azali na elikia ya kolonga?” Mbala moko mpe na mbalakaka, maboko nionso ekitaki.

Ntango tomonaka bokeseni kati ya oyo biso tozali sikawa mpe oyo biso tozali na mposa ya kokoma, ebele kati na biso bamekami kopona kobungisa bondimi mpe elikia.1

Mpo ete “eloko elongobana te ekoki kozala esika moko Nzambe,”2 mpo na kozonga epai na Ye lisusu tokozala na mposa ya kosukwama na masumu3 mpe kosantisama.4 Soki tosalaki yango biso moko, mutu te kati na biso akokoka yango. Kasi tozali biso moko te. Na yango, tozali atako biso moko te.

Tozali na lisungi ya lola mpo na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.5 Mobikisi alobaki, “Soki bokozala na bondimi epai na ngai bokozwa nguya ya kosala makambo nionso oyo ezali ntina mpo na ngai.”6 Ntango bondimi etiami na misala, bondimi emataka.

Botika toyeba elongo mabongi misato oyo ekosunga bison a mobembo na biso ya bozongi epai ya Tata na Lola.

Kokoma lokola Mwana

Nkoko na biso ya moke ya mobali alakisaki libongi ya yambo. Sima ya koyekola konguluma mpe sima atelemaki, azalaki mpembeni ya kotambola. Na ntango ya bomeki na ye ya ndambo ya yambo, akweyaki, alelaki, mpe amilobelaki, “Nakoki atako—ata moke te—komeka yango lisusu! Nakokoba kaka konguluma.”

Ntango alengaki mpe akweyaki, baboti na ye ya bolingo bayokaki te ete azangaki elikia to ete akokaki kotambola lisusu te. Kasi batandaki maboko na bango na kobengaka ye, mpe ntango amonaki bongo, amekaki lisusu kotelema kokende kino na maboko ya baboti.

Baboti ya bolingo bazali ntango nionso pene ya kotanda maboko mpo na koyamba atako mwa matambe na biso na nzela malamu. Bayebi ete bolingi na biso ya komeka mpe komeka lisusu ekomema na bobuti mpe bolongi.

Mobikisi ateyaki ete kokota na bokonzi ya Nzambe, tosengeli kokoma lokola mwana moke.7 Na yango, na elobeli ya molimo, libongi ya yambo ezali ete tosengeli kosala oyo tosalaki ntango tozalaki bana.8

Na lolenge ya bomikitisi ya bomwana mpe bolingi ya koyekamela Tata na biso ya Lola mpe Mobikisi, totambolaka epai na Bango, tolongola elikia te, atako tokweyisami. Tata na biso ya bolingo ya Lola, asepelaka na bokasi nionso ya kozongela mpe komeka lisusu.

Kosala na Bondimi

Libongi ya mibale elakisami na Basantu mibale ya bondimi, moko na moko azalaki na mposa ya kozwa moninga ya seko. Bango mibale basambelaki na bondimi mpo na kozzwa eyano.

Yuri, Mosantu ya mikolo mya Nsuka ya mboka Russie, amikabaki mpe asungaki mpo na kokende mobembo moko ya molai na tempelo. Na kati ya engunduka amonaki mwasi moko ya kitoko na makoki ya malamu, mpe ayokaki ete asengelaki kokabola nsango malamu na ye. Ayebaki eloko mosusu ya kosala te, abandaki kotanga Buku na ye ya Mormon, na elikia ete akomona.

Yuri ayebaki te ete mwasi, Mariya, azalaki Mosantu ya mikolo mya Nsuka. Ayebaki te ete Yuri mpe azalaki mondimi, mpe kolandaka botindiki ya molimo asengelaki kokabola nsango malamu na ye, Mariya abandaki kotanga na Buku na ye ya Mormon mpe lisusu, kolikiaka ete akokaki koyeba.

Malamu, ntango batombolaki mitu na ntango moko, Yuri mpe Mariya bakamwaki komona Buku ya Mormon na maboko ya moko mpe mosusu—mpe na misu, sima ya bango kolingana, bakangamaki na temple. Lelo, Yuri mpe Mariya Kutepov ya Voronezh, Russie, lokola baninga ya seko, basungaki na bokoli ya Eklezia na Russie.

Bobeti sete awa ezali kaka te mpo na bolingi ya balongani oyo ya kosalisa na bondimi. Ezali lisusu na ntina libongi ya mibale—Nkolo na mposa ya kotondisa bolingi na biso mpo na kosalisa na bondimi. Bolingi na biso ya kokoba ezwami bobele wana; epesameli na mapamboli elakelama ya Nkolo.

Tata ya Lola mpe Mobikisi na biso bazali na mposa ya kopambola biso. Na sima ya nionso, Batunaka kaka mpo na moko ya zomi ya oyo Bapambolaka biso mpe sima balaki ete maninisa ya lola ekofungwama!9

Atako tozali na bolingi ya kosala na bondimi na Yesu Klisto mpe kozwa nzela mosusu, mingimingi litambe mosusu ezanga motuya esengelaka mbongwana to boyamboli, topambolami na bokasi.10

Natatoli ete Nkolo akokamba biso—mpe na nzela ya —matambe na biso elandi. Akobakisa mpenza makoki na biso na nguya na Ye soki tozali na bolingi ya kokoba komeka, koyambolaka, mpe kokobaka liboso na bondimi na Tata na biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Makabo ya Molimo elakelami kaka te na baoyo balingaka Nzambe mpe batosaka mitindo nionso kasi lisusu, na esengo, na baoyo ya biso oyo “[balukaka] kosala malamu.”11 Bokasi epesameli baoyo bakobaka koluka mpe komekaka.

Poto ya minda mibale ya ntina oyo etiami na mobembo na biso ya bozongi na Tata na biso ya Lola ezali liyokani ya libela ya likuli ya elambo mpe botosi ya mokolo na biso ya Sabba. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki bison a likita linene oyo eleki ete mokolo ya us Sabba ezali likabo ya Nkolo epasameli biso. Botosi na biso ya poso ya bomipesi ezali elembo epai ya Nkolo oyo tolingaka Ye.12

Mokolo ya Sabba nionso totatolaka ete tozali na “bolingi ya kozwa likolo [na biso moko nkombo na Ye], mpe ntango nionso tokanisaka Ye, mpe kobatela mitindo na Ye.”13 Na bozongi ya mitema na biso mpe libongisi na biso, Nkolo akomisaka sika elaka ya bolimbisi ya masumu na biso mpe apesaka biso ndingisa ya “kozala ntango nionso na Molimo na Ye elongo na [biso].”14 Nguya ya Molimo Mosanto ebutisaka, elendisaka, eteyaka, mpe ekambaka biso.

Soki, na kokanisaka Ye mokolo nionso ya Sabba, tozongisaka mitema na biso epai ya Mobikisi na nzela ya bapoto mibale ya minda oyo ya ntina, bokasi na biso ezali lisusu ya kobakisama koleka na mapamboli elakelama ya Nkolo. Tolakelami ete, na bomepesi na botosi ya mokolo ya, botondi ya mabele ekozala ya biso.15

Nzela ya bozongi epai ya Tata na biso na Lola etambusaka na ndako ya Nkolo, epai wapi topambolami mpo na kozwa bosalisi ya makuli mpo na biso moko mpe mpo na ntina na biso ya bolingo ya moko na moko. Mokambi Boyd K. Packer ateyaki ete “makuli mpe mayokani ekomaka ndingisa na biso mpo na kokende na miso ya [Nzambe].”16 Nasambeli ete moko na moko na biso akozala ntango molongobani mpe kosalela bandingisa na biso ya tempelo mpo na kosalisa mbala na mbala.

Bolonga Lolenge ya Bomoto

Libongi ya misato ezali oyo: tosengeli kolongola lolenge ya bomoto kati na biso mpo na kotiya mpembeni, kolongola, to kosundola.17

Lokola tozali kokoba na nzela ya liyokani, tokosala bambeba, bantango mosusu. Misusu kati basalelaka bizaleli to bowumbu ya lopipi toyokaka bolembu ya kolonga. Kasi bondimi na Tata na Lola mpe na Yesu Klisto ezali libongi moko ya mosala nguya.18 Soki tozali na bolingi ya kosalela, tokopambwama bokasi ya koyambola mpe bokasi ya kobongwama.

Tokweyaka kaka soki tozwi nzela ya bondimi mosusu. Tokomeka te, tokoki te, kokweya kaka bobele soki tokweyisami na kozwa bondimi nzela mosusu. Tokomeke te, tokokoka te, kokweya soki toyekami na bondimi mpenza na Mobikisi—Ye oyo akweyisama naino te mpe akokweyisa biso te!

Mapamboli Elakelama

Nalaki ete litambe nionso ya bondimi ekokutana na lisungi kowuta na lola. Bokambami ekoya ntango tosambeli na Tata na biso ya Lola, koyekama na Mobikisi na biso mpe kolanda Ye, mpe koyokamela Molimo Mosanto. Bokasi ekoya mpo na likabo ya bomikabi ya Yesu Klisto.19 Kobikisaka mpe kolimbisaka ekoya mpo na ngolu ya Nzambe.20 Bwanya mpe bokitisi motema ekoya na kondimelaka ntango ya Nzambe mpo na biso. Bobateli ekoya na kolandaka baprofeta ya bomoi ya Nzambe, Mokambi Thomas S. Monson.

Bokelamaki “mpo ete [bo] koka kozwa esengo,”21 esengo bokoyoka ntango bokozonga ya kolongobana epai ya Tata na bino ya Lola mpe Mobikisi na bino mpe bokokende na boyambi na Bango ya esengo.

Natatoli na ntina ya bosolo oyo ezanga ndelo. Tata na bino ya bolingo ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, bazali na bomoi. Bayebi bino. Balingaka bino. Babengisaka bino na bolingi bozwa litambe na bino elandi epai na Bango. Bozela te. Bozwa yango sikawa. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.