2010–2019
Batata
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Batata

Natie makanisi na ngai lelo na bolamu oyo mibali wana bakoki kosala na likolo ya misala oyo eleki likolo ya kimobali

Nazali koloba lelo mpo na batata, Nayokaki lokumu na ntina ya libiangi moko oyo ezali na ntina monene na ntango mpe libela na libela. Nalingi kopesa makasi na baoyo bazali kobunda mpo na kokokisa mbela wana malamu. Kotombola mpe kopesa makasi na botata to batata ezali koyokisa nsoni to kokitisa basusu te. Natie kaka makanisi na ngai lelo na bolamu oyo mibali wana bakoki kosala na likolo ya misala oyo eleki likolo ya kimobali—baoyo ya mobali mpe tata.

David Blankenhorn, mokomi ya Fatherless America, akomaki: “Lelo oyo, ekolo Amerika ezali ya mpenza ya kokabuana mpe makanisi moko te na oyo etali likanisi ya botata. Batu mingi bakanisaka kutu yango te. Basusu bazali koyoka mabe na ntina na yango. Basusu, kosangisaka na ebele koleka moke ya bato ya mayele etali mabota batala yango te to bayinaka yango. Ebele mosusu bapesi yango mpenza mokongo te, basusu bamipesi na yango mpenza te. Ebele ya bato bazali kobanza ete tokoki kosalela yango, kasi kolikia ete mangomba na biso kaka ekoki kosala yango te to ekosala yango te.”1

Elilingi
Tondimi batata.
Elilingi
Batata bakambaka na bolingo mpe bosembo.

Lokola Eklezia, tondimeli batata. Tolikii na “bolamu ya moto oyo atie libota na ye liboso.” 2 Tondimi ete “na mokano ya lola, batata bazali kokamba likolo ya mabota na bolingo mpe bosolo mpe bazali ya kokoka kopesa oyo ya mituya ya bomoi mpe bobateli mpo na mabota na bango.”3 Tondimi ete na kobakisaka na misala na bango ya libota, “batata mpe bamama bazali na ndingisa ya kosungana moko mpe mosusu lokola baninga bakokani.”4 Tondimi ete bango bazangi ntina te, batata bazali kaka bango mpe moto mosusu akoki kozua esika na bango te.

Elilingi
Baboti bazali na mikumba ya kosalisana.
Elilingi
Batata bazali ya kolongola te.

Basusu bamoni bolamu ya botata na ndenge ya libota, lokola eloko moko oyo etindi na makasi mibali ete bazali mokumba liboso ya bana na bango, kotindaka bango kozala bato malamu mpe kokanisa na ntina ya bosenga ya basusu, kobongolaka bomoni yak ala ete kaka bamama bazali na mokumba mpo na bana na likanisi ete baboti nyonso mibale bazali na mokumba mpo na bana. … Na mokuse, ya motuya mpo na mibali ezali kozala batata. Ya motuya mpo na bana ezali kozala batata. Ya motuya mpo na bato ezali kokela batata.”5 Ntango mamoni wana ezali ya solo mmpenza mpe motuya, toyebi botata yango ezali mingi koleka botongi ya bato to mbotama ya bokei liboso. Ntina ya tata ezali kowuta na bonzambe kobandaka na Tata moko ya Lola mpe, na mokili oyo ya bokufi, na Tata Adama.

Ndakisa ya malamu koleka ya bonzambe ya botata ezali Tata na biso ya Lola. Ezaleli na Ye mpe makoki na Ye bakisa bolamu etondi mpe bolingo ya solo. Mosala mpe nkembo na Ye ezali kokende liboso, esengo, mpe bomoi ya seko ya bana na Ye.6 Batata na mokili oyo ebebi bakoki kosenga eloko mosusu te ekokani na Nkembo ya Lola, kasi na bolamu na bango koleka, bazali kobunda komekola Ye, mpe bokasi na bango ya solo na mosala na Ye.

Mpo na mibali, botata ebimisaka biso na babolembu na biso mpe bosenga na biso ya kosala koleka. Botata esangaka mbeka. Lisusu, ndakisa ya monene ezali Tata na biso ya Lola, oyo alingaki biso mingi, bana na Ye ya molimo, ete Ye apesaki Muana Mobali Mobotami se Moko mpo na lobiko mpe bonetolami na biso.7 Yesu alobaki, “Moto te ajali na bolingo boleki oyo, ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.”8 Bata balakisi bolingo wana lokola bakitisaka babomoi na bango na nse mokolo na mokolo, kosalaka mosala mpe kosunga mabota na bango.

Ntango mosusu mosala ya motuya ya motuya koleka makasi ya tata ezali kobalola mitema ya bana na ye epai ya Tata na bango ya Lola. Soki na nzela ya ndakisa lokola na maloba na ye tata akoki kolakisa ndenge nini bosembo ya Nzambe ezali na bomoi ya mokolo-na-mokolo, ete tata wana akopesa na bana na ye fongola ya kimia na mokili oyo mpe bomoi ya seko na mokili ekoya.9 Tata oyo atangaka makomi na mpe elongo ya bana na ye akomesanisa bango na mongongo ya Nkolo.10

Elilingi
Tata atangaka makomi

Tokutaka na makomi kokangama mingi na lotomo ya baboti mpo koteya bana na bango:

“Mpe lisusu, na lolenge oyo lokola baboti oyo bazali na bana na Siona, to na bamakonzi na ye mosusu oyo ebongisami, oyo bateyi bango te kososola malongi ya boyamboli, bondimi na Klisto Muana ya Nzambe na bomoi, mpe na libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu na kotiamaka maboko, ntango bakokisi mibu muambe, lisumu ekozala na mitu ya baboti. …

“Mpe basengeli lisusu koteya bana na bango kosambela, mpe kotambola sembo liboso ya Nkolo.”11

Na mobu 1833, Nkolo alobelaki bandimi ya Bokambi ya Yambi na bozangi bokebi na mokumba ya koteya bana na bango. Na moko alobaki mingi mingi, “Boteyaki bana na bino pole mpe bosolo te, kolandisaka mitindo; mpe ete oyo alembi azua nguya, lokola boye, likolo na bino, mpe yango ezali ntina ya mpasi na bino.”12

Batata basengeli koteya mobeko ya Nzambe mpe kosala lisusu mpo na nkola wana. Lokola mokomi njembo moko alobaki,

“Jambi ye atiaki litatoli na ye kati na Yakobo, atiaki mpe Mobeko kati na Yisalaele, oyo elobaki ye na batata na biso, ete bateya yango na bana na bango:

“Ete libota likoya libeya yango na nsima, bana baoyo babotami nanu te; bango mpe batelema kosakola yango na bana na bango:

“Ete batia elikia na bango kati na Njambe, mpe babosana misala na Njambe te, kasi babatela mibeko na ye.”13

Elilingi
Tata mpe mwana mwasi bazali kobina

Ya solo mpenza koteyaka nsango malamu ezali mokumba moko ekabuani katikati ya batata mpe bamama, kasi Nkolo azali polele ete Ye azali kozela batata bakamba na kotiaka yango likolo ya makambo nyonso. (Mpe tika tomikundola lisolo ya bongobongo, kosalaka mpe kosakanaka elongo, koyokaka ezali makambo ya ntina ya koteya) Nkolo azali kozela batata basunga kosala bana na bango, mpe ndakisa ezali nzela monene. Bana balingi mpe bsengeli na ndakisa moko.

Elilingi
Tata mpe mwana mobali basalaka elongo

Ngai moko napambolamaki na tata moko ya ndakis. Nabanzi yango lisusu ndako nazalaki elenge ya mibu lokola 12, tata na ngai akomaki moko ya bamekami mpo na koponanama mokambi ya etuka na lisanga na biso ya muke. Ye asangisaki batu ebele te mpo na champagne ya boponami—nyonso nakundoli ezalaki ete Tata azalaki na bandeko na ngai ya mibali mpe ngai mpo na kokabola mikanda mike na ekuke moko mpe mosusu, kosenga bato bapona Paul Christofferson. Ezalaki na ebele ya bakolo oyo napesaki lokasa moko na baoyo bamonaki ete Paul azalaki mobali moko malamu mpe ya samba mpe ete bakozala na likambo te mpo na kopona ye. Motema na ngai ya elenge mobali etondaki na lofundu mo na tata na ngai. Epesaki ngai bomipesi mpe mposa ya kolanda ndakisa na ye. Azalaki malamu koleka te—moto moko te azali malamu koleka—kasi azalaki sembo mpe malamu mpe ndakisa ya kolanda mpo na muana na ye ya mobali.

Bosemboli mpe etumbu ezali eteni moko ya koteya. Lokola Paulo alobaki, “Jambi Nkolo akopesaka bitumbu epai ya baoyo akolingaka.”14 Kasi na kosembolaka tata asengeli kosalela bokebi mingi noki te ekozala na eloko moko ekoki kokokana na koniokola, oyo elongobani ata moke te. Na kopesakaka etumbu, ntina ya tata esengeli kozala bolingo mpe mokambi ya ye Molimo Mosantu:

“Kopamela nokinoki, ntango otindami na Molimo Mosantu; mpe nde kolakisa nsima bobakisi ya bolingo epai na ye, noki te akokanisa ozali monguna na ye;

“Ete asengeli koyeba ete bosembo na bino ezali makasi koleka basinga ya nkufa.”15

Bosemboli na lolenge ya bonzambe ezali mingi te kopesaka etumbu lokola yango ezali etali kosungaka moko ya bolingo na nzela ya lolenge ya komikamba yo moko.

Elilingi
Tata na masala
Elilingi
Kozwa lifuta

Nkolo alobaki ete “bana nyonso basengelami basungama na baboti na bango mpo na bokoli na bango kino bakokoma bakolo.”16 Kolongaka mbongo mpo na kosunga libota ezali mosala moko ya bule. Kopesaka mpo na libota moko na mbala mingi atako esengaka mingingi ngonga mosika na libota, yango ezali yakokoka te mpo na botata—yango ezali ntina ya kozalaka tata moko malamu. “Mosala mpe libota, ezali mikumba oyo ezali moko likolo ya mosusu. .”17 Yango, na bosolo, ekolongisa te mobali oyo atali mpamba libota na ye mpo na mosala na ye to, mpe na nsuka mosusu, moko oyo akosala yemoko te mpe azali kopona kopesa mokumba na ye na basusu. Na maloba ya Mokonzi Benjamino:

“Bokotika te bana ba bino bakende na nzala, to bolumbu; mpe bokotika te ete babuka mibeko na Nzambe, mpe babunda mpe baswana bango na bango, . . .

“Kasi bokolakisa bango kotambola o nzela ya bosolo mpe limemia; bokolakisa bango kolingana bango na bango, mpe kosalisana bango na bango.”18

Toyebi mpasi ya mibali oyo bazali kokoka te komona nzela mpe lolenge nini ekoki mpo na kosunga mabota na bango. Ezali na soni te mpo na baoyo na ngonga moko atako na makasi na bango ya koleka bazali kokoka te kokokisa balotomo mpe misala ya batata. “bolema, nkufa, to mabaku ekoki kosenga komesana ya moto na moto. Mabota mobimba esengeli kopesa lisungi ntango esengami.”19

Elilingi
Baboti ya bolingo
Elilingi
Baboti babinaka

Kolingaka mama ya bana na ye—mpe kolakisa bolingo yango—ezali biloko mibale ya malamu koleka tata akoki kosala mpo na bana na ye. Yango elakisi lisusu mpe epesi lisusu makasi na libala oyo moboko ya bomoi mpe ya kimia ya libota na bango.

Elilingi
Tata elongo na bilenge bana mibali

Boko mibali bazali batata banzemba, batata babokoli to ya batata ya mobali to ya mwasi. Ebele kati na bango bazali kosala mosala na makasi koleka mpe kosala oyo bango bakoki kosala mingi mingi na mosala oyo ya mpasi. Topesi lokumu na baoyo nyonso bazali kosala nyonso ekoki kosalama na bolingo, motema kokita, mpe komibonza ya moto ye moko kokokisa babosenga na ye moko mpe ya libota. Esengeli elobama ete Nzambe Yemoko apesaki Muana Mobali Mobotami se Moko epai ya Tata mobokoli. Na ntembe te lokumu nyonso ekendaki na Yosefu mpo na ntina oyo lokola abokolaki Yesu, Ye akolaki “akolaki na mayele mpe na molai, mpe na boboto na miso na Njambe mpe na bato.”20

Na mawa mingi, mpo na nkufa, kosundola, to bokabuani ya tata na mama, bana mingi bazalaka na batata te oyo bavandaka elongo na bango. Misusu bakoki kozala na batata oyo bazali wana kaka na nzoto kasi na motema bazali wan ate to na nzela mosusu bakebaka te mpe basungaka te. Tobengi batata nyonso basala ya malamu koleka mpe bazala malamu koleka. Tobengi bapesi nsango mpe bato ya masano, balobela batata oyo bamipesi mpe bakoki oyo balinga basi na bango na bosolo mpenza mpe na mayele nyonso kotambuisa bana na bango, na esika ya balobi makambo ya mpamba mpe basekisi bato, to “batu oyo baluki makambo,” lokola batata mbala mingi balobelami.

Na bana oyo lolenge ya mabota ezali na matata, tolobi, bino to binomoko bozali moke te mpo na yango. Bitumba ezali na bangonga moko kolakisama ya bolikii ya Nkolo epai na yo. Ye akoki kosunga yo mbala moko mpe na nzela ya basusu, kozua mayele na oyo bokutani na yango. Bokoki kokoma nkola, ntango mosusu ya yambo na libota na yo. Kuna esengo mpe balolenge ya bonzambe oyo Nzambe atiaku mpo na mabota ezua na bosolo esika mpe epambola nkola nyonso sima na bino.

Na bilenge mibali, koyebaka mosala okozua lokola mopesi mpe mobatelim tolobi bomibongisa sikawa na kozalaka na etingia na eteyelo mpe kobongisaka mpona koyekolaka kelasi elandi. Bobokoli, atako na universite, eteyelo ya tekiniki, koyekola mosala maboko, to pologalame ya ndenge moko, ezali fongola mpo na kokolisaka makoki mpe bamakasi bokozala na yango bosenga. Bozua litomba ya mabaku ya kosangana na bato ya mibu nyonso, kosangisaka bana, mpe boyekola lolenge nini kolendisa bokolongo na nzoto mpe kolongaka kiboninga. Oyo elingi kaka koloba kosololaka na bato mpe ntango mosusu kosalaka makambo elongo, kaka te mpo na kobongisaka makoki na yo ya ba textos. Bozala na bomoi na bino boye lokola mobali bokomema bompeto na mabala na bino mpe na bana na bino.

Na bankola nyonso ezali kokola, tolobi, ata esika nini ozali kotia tata na yo moko na ebutele ya malamu, malamu mingi-malamu mingi koleka (mpe nasakoli ete kotiaka wana ekokende likolo lokola okomi mukolo mpe na buanya koleka), zua mokano ya kopesa ye mpe mama na yo lokumu na bomoi na yo mobimba. Kundola ete elikya monene ya tata lokola elobamaki na Yoane, “Najali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bajali kotambolaka kati na makambo na solo.”21 Bosembo na bino ezali lokumu monene koleka oyo tata nyonso akoki kozua.

Na bandeko na ngai mibali, batata na Eklezia oyo, nalobi, nayebi ete bolingi bozala tata moko ya bobongi nie koleka. Nayebi ete nalingi nazala bongo. Atako bongo, kokolongola babosuki na biso, tika biso tosala oyo esengeli, tika biso tobuaka pembeni mateya mabe ya kimoyimi mpe bomikoki ya momesano ya lelo mpe tokanisa liboso mpo na esengo mpe bozali malamu ya basusu. Na bosolo mmpenza kolongola bozangi makoki na biso, Tata na biso ya Lola atombola biso mpe akosala ete makasi na biso ya mpete ebota mbuma. Nazuaki makasi na lisolo moko emonanaki na New Era na mobu kaka moko wana nakomaki Mokambi Monne. Mokomi abetaki lisolo oyo elandi:

“Ntango nazalaki elenge, libota na biso ya muke ezalaki na ndako ya mbeto moko na etage ya mibale. Nazalaki kolala na elalelo na esika ya kovanda. …

“Tata na ngai, mosali ya mabende, azalaki kotika ndako na ntongo makasi mpo na mosala mokolo nyonso. Ntongo asengelaki … kofinika ngai bulangeti mpe kotelema mua miniti. Nakokaki kozala ya kolota ndambo ntango nakokaki koyoka tata na ngai kotelemaka pembeni ya mbeto, kotalaka ngai. Lokola nazalaki kolamuke moke moke, nayokaki nsoni komona ye kuna. Namekaki kosala lokola nazalaki kaka ya kolala. … akomaki ya kokeba lokola atelemaki pembeni ya mbeto azalaki kosambela na bokebi, nguya, mpe makanisi na ye nyonso—mpo na ngai.

“Ntongo nyonso tata na ngai asambelaki mpo na ngai. Ye asambelaki ete nazala na mokolo moko malamu, ete nakoka kozala na kobatelama, ete nakoka koyekola mpe komibongisa mpo na lobi ekoya. Mpe banda wana akokaki kozala eleongo na ngai kino na mpokwa, abondelaki mpo na balakisi mpe baninga oyo nakokaki nakozala na bango mokolo wana. …

“Na ebandela, nazalaki kososola te nini tata na ngai azalaki kosalaka bantongo wana nyonso ntango azalaki kobondela mpo na nagi. Kasi ntango nakomaki mokolo, nayaki kososola bolingo mpe ntina na ye mpo na ngai mpe makambo nyonso nazali kosala. Ezali moko ya makundoli na ngai oyo nasepelaka na yango mingi. Yango ezalaki te kino mibu ya sima, sima na ngai kobala, kozua bana na ngai moko, mpe nakokaki kokende na bisika na bango ya kolala ntango bango balalaki mpe nasambelaki mpo na bango ete nasosolaki na mobimba lolenge nini tata na ngai ayokaki mpo na ngai.”22

Alma atatolaki na muana na ye:

“Mpe sikawa, nalobi na bino, ete ezali [Klisto] oyo ya solo akoya …; iyo akoya kosakola nsango ya nsai ya lobiko epai ya bato ba ye.

“Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, eye ezali mosala mpo ya mwango obiangemaki, mpo ya kosakola nsango eye ya nsai epai ya baton a ye, mpo ya kolengele mayele ma bango; mpo kutu … ete bakoka kolengele mayele ma bana ba bango na koyoka liloba o ntango ya boyei bwa ye.”23

Oyo ezali mosala ya batata lelo oyo. Nzambe apambola bango mpe akokisa bango na yango, na nkombo na Yesu Klisto, amene.