2010–2019
Kokima Mosika na Ekumbaki
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Kokima Mosika na Ekumbaki

Ntango oyo ekondimbola bakimi te, kasi eyano na biso ekosunga kondimbola biso

“Mpo nazalaki na nzala, mpe opesaki ngai bilei: nazalaki na mposa ya mai, mpe opesaki ngai mai: nazalaki mompaya, mpe oyambaki ngai:

“Bolumbu, mpe yo alatisaki ngai.  …

“Ya solo nalobi na bino, mbala nionso bosali yango na moko aleki moke na bandeko na ngai oyo, bosali yango na ngai.”1

Bakanisi ezali na 60 milio ya bakimi na mokili lelo, yango elingi koloba ete “1 na bato 122 nionso … bakimasi bango bandako na bango na makasi,”2 mpe katikati na bango bazali bana.3 Ezali kosala mabe komona motango bazali mpe komaniola nini yango elingi koloba na bomoi ya moto moko na moko. Mosala na ngai ya lelo ezali na Europa, wapi bamilio moko mpe moko na minei ya bakimi bakomi na mobu eleki uta na biteni ebebi na bitumba na mikili ya Esiti ya Kati mpe Afrika.4 Tomoni mingi na bango bakomi kaka na elamba balati mpe nini bakoki komema na mwa saki moko. Ndambo monene na bango batanga malamu, mpe banso basengelaki kosundola bandako, bakelasi, mpe misala.

Na nse ya boyangeli ya Bokambi ya Yambo, Eklezia ezali kosala na molongo ya mabongisi 75 na bikolo 17 ya Europa. Mabongisi oyo ekwi uta na masanga ya bikolo kino bikela ya mangomba mike, uta na babilo ya leta kino mangomba ya bolingani ya biyamba mpe ya mokili. Tozali na esengo mpo na kosala elongo na mpe koyekola epai ya basusu oyo bazali kosala na bakimi na mokili mobimba uta mibu mingi.

Lokola bandimi ya Eklezia, lokola ekolo, tosengeli te kotala mosika nsima na mambi na biso mpo na komaniola ntango oyo tozalaki bakimi, tobenganamaki na loma mosika na bandako mpe bilanga mbala na mbala lisusu. Poso eleki na kolobelaka bakimi, Ndeko mwasi Linda Burton asengaki basi ya Eklezia bakanisa, “Boni soki lisolo na bango ezalaki lisolo na ngai?”5 Lisolo na bango ezali lisolo na biso, mibu mingi te eleki.

Ezali na koswana mingi na babulamatari mpe na lingomba etali nini ndimbola ya mokimi ezali mpe nini esengeli kosalema mpo na kosunga bakimi. Maloba oyo ezali te na ntina moko to mosusu mpo na kozala eteni ya kosamba wana ya makasi, te lisusu kolobela lolenge ya kobomba bakimi kasi kutu mpo na kokangama na bato oyo babengani bango na bandako mpe bikolo na bango na bitumba oyo babandaki te.

Mobikisi ayebi mpasi nini esalaka kozala mokimi—Ye azalaki moko na bango. Lokola mwana moke mpenza, Yesu mpe libota na Ye bakimaki na Ejipito liwa na mopanga ya Elode. Mpe na bileko mingi na mosala na Ye, bakanaki Yesu mpe bomoi na Ye ezalaki na likama, na nsuka amitikaki na mokano ya bato mabe oyo basalaki mwango ya liwa na Ye. Ntango mosusu, nde, ezala malamu mpo na biso komaniola ete Ye mbala na mbala ateyaki biso kolingana, kolinga lokola Ye alingaki, kolinga mozalani na biso lokola bisomei. Ya solo, “eyamba ya peto mpe ya mbindo te liboso ya Nzambe mpe Tata ezali oyo, Kotala bazanga tata mpe bakufela mibali na mitungisi na bango”6 mpe “kotala babola mpe bazanga mpe kosala mpo na kosunga bango ete bayoka mpasi te.”7

Ezali kofula komona nini bandimi ya Eklezia na mokili mobimba bapesaki na bokabi mpo na kosalisa moto na moto mpe babota oyo babungisi mingi mpenza. Na Europa mobimba kaka, namonaki bandimi mingi ya Eklezia oyo bazwa bolamuki mpe bobongi ya molimo ntango bayanoli na mposa ya kobotama ya mozindo, mpo na koyamba mpe kosalisa baye na mposa ya nsuka boye nzinganzinga na bango. Eklezia epesaki babibombelo mpe nkisi. Makonzi mpe bamisio bapesaki bilei mpe mai, bilamba, kazaka ya mvula, bavelo, babuku, basaki ya mokongo, maneti, mpe mingi lisusu.

Bato uta na Scotland kino Sicily bakoti likambo oyo na misala nionso eyebani. Minganga mpe bifelemi bakabi lisalisi na bango na esika oyo bakimi bakomelaki ya kopola, kolenga na malili, mpe mbala mingi ya kobeba na kokatisaka mai. Ntango bakimi babandaki koluka kofanda na mboka, bandimi ya bisika bazali kosalisa bango koyekola monoko ya ekolo ya sika, ntango basusu bazali kolendisa bana mpe baboti na kopesaka bisanele, bisaleli ntoki, miziki mpe masano. Boko bazali kozwaka nsinga, ntonga ya tiloko, mpe mitonga mpe koteyaka makoki wana na bakimi ya esika ya mikolo mpe bilenge.

Bandimi ya kokomela na Eklezia oyo bapesi mibu ya lisalisa mpe boyangeli batatoli likambo oyo ete kosalisa bato oyo na mposa ya boye mpenza epesi mayele ya kitoko mpe esengo koleka na mosala na bango kino sikawa.

Bosolo ya likambo oyo esengeli komonama mpo na kondima yango. Na eleko ya malili, o ntei ya basusu, mwasi moko ya zemi uta Syrie na nganda moko ya bakimi ya kolekela kolukaka na elikia te kimia ete akoka te kobota mwana na ye na nse ya malili ya ndako wapi afandaki. Na Syrie azalaka moteyi na université. Mpe na Grece nasololaki na libota moko naino ya kopola, kolengaka, mpe kobangaka uta na bwato moko ya ndembo uta na Turquie. Nsima ya kotala na miso na ye mpe koyoka lisolo na bango, ya nsomo oyo bakimaki mpe ya mobembo ya makama mpo na kokoka kokima, nakozala lisusu ndenge ya kala te.

Kotandolaka lisalisi mpe lisungi ezali molongo moko ya basali bamipesa na kosunga, mingi na bango bazali komikaba. Namonaki na mosala mondimi moko ya Eklezia oyo, basanza mingi, asalaki na butu, kosalisaka bamposa ya sasipi eleki ya baye bawuti Turquie mpe Grece. O ntei ya basali misusu, apesaki lisalisi ya liboso na baye na mposa ya nkisi makasi koleka, amonaki ete basi mpe bana basalaki mobembo bango moko kaka basungamaki; asimbaki baye bazangaka na nzela, mpe asalaki malamu na ye koleka mpo na kotinda makoki ya moke na bazangi moke. Lokola mingi boye, azalaki mpenza anzelu mosali, oyo ya bango misala babosani te na baye azalaki kosalisa, to na Nkolo, oyo atindaki ye.

Banso oyo bamipesaki mpo na kosunga bato na mpasi nzinganzinga na bango bazali mingi lokola bato ya Alma: Mpe boye, o bizaleli bya bomengo bwa bango, babenganaki moto moko te oyo azalaki bolumbu, to oyo azalaki na nzala, to oyo azalaki na mposa ya mai, to oyo azalaki na bokono, to oyo aleisamaka te … mpe batiaki te mitema mya bango likolo lya bozwi; yango wana bakabaki na banso, mobange mpe elenge lokola, mowumbu mpe monsomi lokola, mwasi mpe mobali lokola, soko libanda lya eklezia to o eklezia, koponoko bato te na bango baye bazalaki na mposa.”8

Tosengeli kokeba ete nsango oyo ya mpasi ya bakimi ekoma te momesano ntango bosutuki ya liboso esili, mpe kasi bitumba ezali kokoba mpe mabota ekobi kokoma. Bamilio ya bakimi na mokili mobimba, oyo ya bango masolo ezali lisusu nsango te, bazali naino na mposa makasi ya lisalisi.

Soki bozali kotuna, “Nini nakoki kosala?” Tika tomikundola ete tosengeli te kosalisa na bozangi ya mabota na biso mpe mikumba misusu,9 to tosengeli te kozela bakambi na biso babongisa miango mpo na biso. Kasi lokola bilenge, mibali, basi, mpe mabota, tokoki kosangana na bokasi oyo monene ya kosalisa bato.

Mpo na koyanola na libengisi ya Bokambi ya Yambo mpo na kosala elongo ya lisalisi ya lolenge ya Klisto mpo na bakimi na mokili mobimba,10 bakambi ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, mpe Eteyelo ya Bana babongisaki bokasi moko ya kosunga na nkombo “Nazalaki Mompaya.” Ndeko mwasi Burton abandaki koloba yango na basi ya Eklezia poso eleki na liyangani linene ya basi. Ezali na makanisi, makoki, mpe mayele mpo kilikili ya ntina mpo na kosalisa na IWasAStranger.lds.org.

Bobanda na kotia mabolongo na nse mpe kobondela. Mpe sima bokanisa lokola kosala likambo moko penepene na ndako, na lingomba na binomei, esika bokomona bato oyo bazali na mposa ya lisalisi na kokokisa yango na ezaleli na bango ya sika. Ntina ya nsuka ezali kozongisa bango na bomoi ya mosala mpe bomikoki.

Mabaku mpo na biso mpo na kotia loboko mpe kozala moninga moko ezangi nsuka. Bokoki kosalisa bakimi oyo bakofanda na mboka koyekola monoko ya ekolo na bango ya sika, kobongisa makoki na bango ya mosala, to komeka bosololi mpo na mosala. Bokoki komipesa mpo na kokamba libota moko to mama monzemba moko ntango bazali koleka na bizaleli bamesana te, kutu elongo na eloko moko na pete kotambolaka na bango na ba magazine to eteyelo. Boko bapalwasi mpe bitape ezali na mangomba ya malamu mpo na kosala elongo. Mpe, engebene ya bisika, bokoki kopesa na bokasi ya kokamwa ya kosalisa bato ya Eklezia.

Kobakisaka mpenza moko na moko na biso akoki kobakisa boyebi ya makambo ya mokili oyo ebengani mabota oyo mosika ya bandako na bango. Tosengeli kotelemela boyini mpe koloba mpo na limemia mpe bososoli na kati ya mimesano mpe bonkoko. Kokutana na mabota ya bakimi mpe koyoka masolo na bango na matoyi na binomei, mpe na television to mikanda te, ekobongola yo. Kiboninga ya solo ekokola mpe ekokolisa mawa mpe bosangani ya malamu.

Nkolo ateyi biso ete makonzi ya Siona esengeli kozala “bobateli” mpe “ekimelo mosika na ekumbaki.”11 Tozwa ekimelo. Tika tobima na bisika na biso ya kimia mpe tokabola elongo na bango, bofuluki na biso, elikia Mpo na bomoi ekoya ya malamu kolekabondimi na Nzambe mpe na moninga moto, mpe bolingo oyo emonaka mosika koleka bokesani ya mimesano mpe makanisi mpo na bosolo ya nkembo ete tozali banso bana ya Tata na Lola.

“Mpo Nzambe apesi biso te molimo ya kobanga; kasi ya nguya, mpe ya bolingo.”12

Kozala mokimi ekoki ngonga ya ndimbola na bomoi na baye bazali bakimi, kasi kozala mokimi ezali te kolimbola bango. Mpo na mingi liboso na bango, ekozala eleko moko—tolikii eleko moko ya mokuse—na bomoi na bango. Boko na bango bakokoma nsima balongi ya Nobel, bakalaka ya leta, minganga, bato ya mayele, bato ya ntoki, bakambi ya biyamba, mpe basali elongo na bisika misusu. Ya solo, mingi na bango bazalaki makambo wana liboso babungisa nionso. Ngonga oyo elimboli bango te, kasi eyano na biso ekosalisa kolimbola biso.

“Ya solo nalobi na bino, mbala nionso bosali yango na moko aleki moke na bandeko na ngai oyo, bosali yango na ngai.”13 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Mpo na koyeba mingi koleka, tala IWasAStranger.lds.org mpe mormonchannel.org/blog/post/40-ways-to-help-refugees-in-your-community.