2010–2019
Ndako ya Likolo ya Minei, Ekuke ya Nsuka
Sanza ya Zomi 2016


Ndako ya Likolo ya Minei, Ekuke ya Nsuka

Nzambe “apesaka mbano na baye bazali koluka ye na lokengo,” yango wana tozali na mposa ya kokoba kobeta ekuke. Bandeko basi, botika te. Boluka Nzambe na motema na bino mobimba.

Bandeko na ngai balingami basi, balingami baninga, topambolami mpenza na kosanganaka lisusu na likita ya mokili mobimba oyo na nse ya bokambami mpe boyangeli ya profeta mpe Mokambi na biso molingami, Thomas  S. Monson. Mokambi, tolingi yo mpe tosungi yo! Toyebi ete olingaka bandeko basi ya Eklezia.

Nalingaka koya na liyangani oyo ya kitoko ya likita linene esalemi mpenza mpo na bandeko basi ya Eklezia.

Bandeko basi, ntango nazali komona bino, nakoki mpenza te kozanga kokanisa basi oyo basali na nguya mingi na bomoi na ngai: nkoko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai oyo bazalaki bato ya yambo ya kondima libengisi ya koya mpe ya komona maye Eklezia ezali na yango nyonso.1 Ezali na mwasi wa ngai wa bolingo, Harriet, oyo tolinganaki mbala ya yambo namonaki ye. Ezali mama na Harriet, oyo akotaki na Eklezia mosika te nsima ya kobungisa mobali na ye na cancer. Nsima ndeko na ngai ya mwasi, mwana na ngai ya mwasi, nkoko na ngai ya mwasi, mpe nkokololo na ngai ya mwasi—bato oyo nyonso basali na nguya ya kobongisa bomoi na ngai. Bango ya solo bamemaka bongengi ya moi na kati ya moi na ngai. Bango bafulaka ngai mpo na kozala moto ya malamu koleka mpe moyangeli moko ya Eklezia ya boboto koleka. Ya bokeseni boni elingaki kozala bomoi na ngai soki bango te!

Ntango mosusu nini esalaka namikitisa koleka ezali koyeba ete nguya na bango ebakisami mbala milio na Eklezia mobimba na nzela ya makoki, batalanta, mayele, mpe litatoli ya basi ya bandimi lokola bino.

Sikawa, basusu kati na bino bakoki komiyoka balongobani te na lokumu monene ya bongo. Bokoki kokanisa bazali na ntina mpenza te mpo na kozala na nguya ya ntina na basusu. Ntango mosusu bomimonaka kutu te “Basi ya bondimi” mpamba te ntango mosusu bozali kobunda na ntembe mpe bobangi.

Lelo, nalingi koloba na moto nyonso oyo ayomiyokaka lolenge oyo—mpe oyo mbala mingi ekwi biso bango na ngonga moko to mosusu. Nalingi kolobela bondimi—ezali nini, nini ekoki mpe ekoki te kosala, mpe nini tosengeli kosala mpo na kolamusa nguya ya bondimi na bomoi na biso.

Bondimi Ezali Nini

Bondimi ezali elikia ya makasi etali likambo moko tondimi—elikia moko makasi mpenza ete ekotindika biso mpo na kosala makambo oyo soki te tokoki kosala te. “Bondimi ezali kozala na ntembe te na nini tolikii mpe sikisiki na nini tomoni te.”2

Soki oyo ezali na ntina mpo na bato ya bondimi, ezali mbala mingi na mobulu epai ya baye bandimi te. Bakoningisa mito mpe bakotuna, “Boni ekoki moto koyeba na sikisiki etali nini bakoki komona te?” Na bango, oyo elakisi ya solo ete boyambi ezali likambo ya mayele te.

Nini bazangi kososola ezali ete ezali na banzela mingi ya komona koleka na miso na biso, banzela mingi ya koyoka koleka na maboko na biso, banzela mingi ya koyoka koleka na matoyi na biso.

Ezali likambo moko lokola mayele ya elenge moko ya mwasi oyo azalaki kotambola elongo na nkoko na ye ya mwasi. Loyembo ya bandeke moko ezalaki ya nkembo mpo na mwana mwasi wana ya moke, mpe alakisaki makelele nyonso na nkoko na ye.

“Oyoki yango?” mwana mwasi wana ya moke atunaki mbala na mbala. Kasi nkoko na ye ya mwasi azalaki koyoka na mpasi mpe akoki te koyoka makelele.

Na nsuka, nkoko wana afukamaki mpe alobaki, “limbisa, molingami. Nkoko ayokaka malamu mpenza te.”

Na nkele, mwana mwasi wana ya moke akamataki elongi ya nkoko na ye na maboko na ye, atalaki swii na miso na ye, mpe alobaki, “Nkoko, yokemela malamu lisusu!”

Ezali na mateya na lisolo oyo mpo na bazangi kondima mpe bandimi lokola. Kaka mpamba te tokokoki koyoka te eloko moko ntango mosusu elingi koloba te ezali na eloko te ya koyoka. Bato mibale bakoki koyoka nsango moko to kotanga makomi moko, mpe moto moko akoki koyoka litatoli ya Molimo, kasi moto mosusu akoki te.

Na ngambo mosusu, na makasi na biso ya kosalisa balingami na biso koyoka mongongo ya Molimo mpe kitoko ya mozindo, ya seko, mpe ya monene ya nsango malamu ya Yesu Klisto, kolobelaka bango “koyoka malamu lisusu” ekoki kozala nzela ya kosalisa koleka te.

Ntango mosusu toli ya malamu koleka—mpo na moto nyonso oyo alingi kobakisa bondimi—asengeli koyokemela na bokeseni. Apostolo Paulo alendisaki biso toluka mongongo oyo ekoloba na molimo na biso na matoyi na biso kaka te. Ateyaki, “Moto azangi Molimo akondima te makambo oyo ewuti na Molimo ya Nzambe kasi akomona yango liboma, mpe akoki te kososola yango mpamba te esosolami kaka na nzela ya Molimo.”3 To ntango mosusu tosengeli kotala maloba ya Petit Prince ya Saint-Exupéry oyo alobaki: Moto amonaka polele bobele na motema. Eloko nyonso ya ntina emonanaka te na miso.”4

Nguya mpe Bansuka ya Bondimi

Ntango mosusu, ezali pete te kokolisa bondimi na makambo ya molimo na bomoi ya mokili ya mosuni. Kasi ezali na ntina kosala makasi, mpamba te nguya ya bondimi na bomoi na biso ekoki kozala ya mozindo. Makomi eteyi biso ete na nzela ya bondimi mikili mibongisamaki, mayi makobalanaki, bawa batelemaki, mpe bibale mpe bangomba elongolamaki na nzela na yango.5

Kasi basusu bakoki kotuna, “Soki bondimi ezali na nguya ya boye, mpo na nini nazali kokoka te kozwa eyano na losambo na ngai ya motema? Nazali na ntina te mbu ekabwana to ngomba elongwa. Nazali na ntina kaka bokono na ngai ekenda mosika to baboti na ngai balimbisana to moninga na ngai ya seko abima liboso ya ekuke na liboke ya bafololo na loboko moko mpe na mpete ya libala na loboko mosusu. Ntina na nini bondimi na ngai ekoki te kosala yango?”

Bondimi ezali na nguya, mpe mbala mingi ekozwa mbano ya makamwisi. Kasi ezala bondimi mingi boni tozali na yango, ezali na makambo mibale bondimi ekoki kosala te. Ya yambo, ekoki te kobuka bonsomi ya kopona ya moto mosusu.

Mwasi moko asambelaki mibu mingi ete mwana na ye ya mwasi ya libungi azonga na etonga ya Klisto mpe ayokaki nkele ete nsambo na ye emonana lokola ezwaka eyano te. Yango esalaki mpasi mingimingi ntango ayokaki lisolo ya bana babunga oyo bayambolaka banzela na bango.

Kpokoso ezalaki te na kozanga kosambela to kozanga bondimi. Asengelaki kaka kososola ete, ata mpasi ekokaki kozala mpo na Tata na biso na Lola, Ye akokanga moto te apona nzela na bosembo. Nzambe akangaki na makasi te bana na Ye balanda Ye na mokili ya yambo ya bokufi. Boniboni moke mingi akokanga biso sikawa ntango tozali na mobembo na bomoi oyo ya kufa?

Nzambe akobengisa, akondimisa. Nzambe akolemba te kobelema na bolingo mpe bofuli mpe bolendisi. Kasi Nzambe akotinda na makasi mokolo moko te—oyo elingaki kobebisa mwango na Ye mpo na bokoli na biso ya seko.

Likambo ya mibale oyo bondimi ekoki kosala te ezali kotia na makasi bolingi na biso likolo ya Nzambe. Tokoki te kotinda Nzambe na makasi na bamposa na biso—ezala malamu kani tokanisi tozali to na bosolo kani tosambeli. Maniola likambo ya Paulo, oyo abondelaki Nkolo mbala mingi mpo na kobika na momekano na ye moko—oyo abengaki “nzube na mosuni.” Kasi yango ezalaki te bolingi ya Nzambe. Na nsuka, Paulo asosolaki ete momekano na ye ezalaki lipamboli, mpe atondaki Nzambe mpo na koyanolaka te nsambo na ye na lolenge alikisaka.6

Elikia mpe Bondimi

Te, ntina ya bondimi ezali te mpo na kobongola bolingi ya Nzambe kasi mpo na kokembisa biso kosala engebene na bolingi ya Nzambe. Bondimi ezali elikia—Elikia ete Nzambe amonaka oyo biso tokoki te mpe ete Ye ayebi oyo biso toyebi te.7 Ntango mosusu, kolikia na bomoni mpe mokano na bisomei ekoki te.

Nayekolaki likambo oyo bo motambwisi mpepo na mikolo oyo nasengelaki kopumbwa na kati ya londende to mapata mpe nakokaki komona kaka mwa bametele liboso. Nasengelaki koyekama na bisalele oyo ezalaki kolobela ngai wapi nazalaki mpe wapi nazalaki kokende. Nasengelaki koyokemela mongongo ya mokengeli ya nzela ya mpempo. Nasengeleki kolanda bokambami moto moko ya mayebisi ya sikisiki koleka oyo nazalaki na yango. Moto moko oyo nakokaki komona te kasi na oyo nayekolelaki kolikia. Moto oyo akokaki komona oyo nakokaki te. Nasengelaki kolikia mpe kosala engebene mpo na kokoma na likama te esika na ngai ya kokende.

Bondimi elingi koloba ete tokolikia kaka te na bwania ya Nzambe kasi ete tokolikia lisusu na bolingo na Ye. Elingi koloba ete Nzambe alingaka biso na bobongi mpenza, ete nyonso oyo Ye asalaka—lipamboli nyonso Ye apesaka mpe lipamboli nyonso, na ngonga moko, Ye alongolaka—ezali mpo na esengo na biso ya seko.8

Na bondimi ya lolenge oyo, atako tokoki te kososola ntina nini makambo mosusu ekoyaka to ntina nini nsambo mosusu ezwaka eyango te, tokoki koyeba ete na nsuka nyonso ekozwa ntina. “Makambo nyonso ekosala elongo mpo na bolamu ya bango oyo balingaka Nzambe.”9

Nyonso ekokoma alima. Nyonso ekozala malamu.

Tokoki koyeba na sikisiki ete biyano bikoya, mpe tokoki kozala na elikia ete tokozala kaka te na esengo na biyano wana kasi tokosepela lisusu na ngolu, boboto, bokabi, mpe bolingo ya Tata na biso ya Lola mpo na biso, bana na Ye.

Kaka Koba na Kobeta Ekuke

Kino wana, totambolaka na bondimi kani tozali na yango,10kolukaka ntango nyonso kobakisa bondimi na biso. Ntango mosusu oyo ezali boluki ya pete te. Baoyo bazangi bompikiliki, bamipesi te, to bazangi bolengeli bakoki komona bondimi ezali kpokoso. Baoyo balembaka na pete  to babungisaka makanisi noki bakoki na mpasi koyeba yango. Bondimi eyaka na bato ya komikitisa, ya etingia, ya molende.

Eyaka na baye bafutaka ntalo ya botongono.

Bosolo oyo elimbolami na likambo ya bamisionele mibale ya bilenge oyo basalaki na Poto, na etuka moko wapi ezalaki na mabatisi moke ya babongwani. Nabanzi ekokaki kososolama mpo na bango bakanisa ete oyo basalaki elingaki kosala bokeseni mingi te.

Kasi bamisionele oyo mibale bazalaki na bondimi, mpe bamipesaki. Bazalaki kokanisa ete soki moko te ayokemelaki nsango na bango, elingaki kozala te mpo ete basalaka kaka makasi ya malonga te.

Mokolo moko, bakanaki kobelema na bato bazalaki kofanda na etonga moko ya bandako minei ya likolo ya kitoko. Babandaki na bandako ya nse mpe babetaki ekuke moko na moko, kolakisaka nsango na bango ya lobiko ya Yesu Klisto mpe Bozongisi ya Eklezia na Ye.

Elilingi
Ndako ya etage ya bomwana ya Ndeko mwasi Uchtdorf

Moko te na bandako ya nse alingaki koyoka bango.

Na pete kani ekokaki bango koloba, “Tomekaki. Tika tosuka kaka awa. Tika tokende komeka ndako mosusu.”

Kasi bamisionele oyo mibale bazalaki na bondimi mpe bazalaki na bolingi ya kosala, mpe boye babetaki na ekuke nyonso na bandako ya likolo ya mibale.

Lisusu, moko te alingaki koyoka bango.

Bandako ya likolo ya misato ezalaki lolenge moko. Mpe bongo ezalaki bandako ya likolo ya minei—ezalaki boye, kino babetaki na ekuke ya nsuka na bandako ya likolo ya minei.

Ntango ekuke efungwanaki, elenge mwana mwasi moko asekisaki bango mpe asengaki bango bazela lokola azalaki koloba na mama na ye.

Mama na ye, azalaki kaka na mibu 36, kala te abungisaka mobali na ye, mpe azalaki na mposa ya kosolola na bamisionele ya Bamormon te. Yango wana alobaki na mwana na ye ya mwasi abengana bango.

Kasi mwana mwasi wana abondelaki ye. Bilenge mibale bazalaki kitoko mpenza, ye alobaki. Mpe ekozwa kaka mwa baminuti.

Yango wana, na kotatabana, mama wana andimaki. Bamisionele bapesaki nsango na bango mpe bapesaki buku na mamayango atanga—Buku ya Mormon.

Nsima ya kotika bango, mama azwaki mokano ya kotanga ata mwa nkasa.

Asilisaki buku mobimba nsima ya mwa mikolo.

Elilingi
Libota ya ndeko mwasi Uchtdorf elongo na bamisionele

Kala te nsima, libota kitoko oyo ya baboti bazanga bana bakotaki na mayi ya libatisi.

Ntango libota wana ya moke bakendeki na etape na bango ya Frankfort na Allemagne, elenge diakona moko amonaka kitoko ya moko ya bana basi wana mpe akanisaki na ye moko, “Bamisionele oyo bazali kosala mosala moko ya kitoko!”

Nkombo ya elenge diakona wana ezalaki Dieter Uchtdorf. Mpe elenge mwasi kitoko yango—moko oyo abondelaka mama na ye mpo na koyokemela bamisionele—azali na nkombo kitoko ya Harriet. Alingami na banso oyo bakutani na ye ntango azali kokende na ngai elongo na mibembo na ngai. Apamboli bomoi ya bato mingi na nzela ya bolingo na ye mpo na nsango malamu mpe bomoto na ye ya kongenga. Azali solo bongengi ya moi ya bomoi na ngai.

Elilingi
Ndeko mwasi Uchtdorf kolobaka na Norvege

Mbala boni natomboli motema na ngai na botondi mpo na bamisionele mibale oyo batelemaki na bandaki ya likolo ya yambo te! Mbala boni nazongisaka botondi mpo na bondimi mpe mosala na bango. Mbala boni napesaka botondi ete bakobaki kokende—kutu tii na bandako ya likolo ya minei, ekuke ya nsuka.

Bakofungolela Bino

Na boluki na biso mpo na bondimi ya molende, na mposa na biso ya kozalana elongo na Nzambe mpe bantina na Ye, tika tomikundola elaka ya Nkolo: “Bobetaka ekuke mpe bakofungolela bino.”11

Ekotika biso nsima ya kobeta ekuke moko to mibale? Bandako ya likolo moko to mibale?

To ekokoba biso koluka kino tokokoma na bandako ya likolo ya minei, ekuke ya nsuka?

Nzambe “apesaka mbano na baye bazali koluka ye na lokengo,”12 kasi mbano wana ezali mbala mingi nsima ya ekuke ya yambo. Yango wana tozali na mposa ya bokoba na kobeta ekuke. Bandeko basi, botika te. Boluka Nzambe na motema na bino mobimba. Bosalela bondimi. Botambola na bosembo.

Nalaki ete soki bosali boye—kutu tii na bandako ya likolo ya minei, ekuke ya nsuka—bokozwa biyano bozali koluka. Bokozwa bondimi. Mpe mokolo moko bokotondisama na pole oyo ekopela “makasi mingimingi tii na mokolo ebonga nie.”13

Bandeko na ngai ya basi ya bolingo kati na Klisto, Nzambe azali ya solo.

Azali na bomoi.

Alingi bino.

Ayebi bino.

Asosolaka bino.

Ayebi mabondeli na bino ya motema. Atiki bino te. Akosundola bino te.

Ezali litatoli na ngai mpe lipamboli na ngai ya apostolo na moko na moko na bino oyo akoyoka na motema to makanisi na ye bosolo eluti oyo mpo na binomei. Bozala na bomoi na bondimi, baninga balingami, bandeko basi balingami, mpe “Nkolo Nzambe [na biso] [ako] zalisa bino mbala nkoto mpe akopambola bino lokola alakaki!”14

Natikeli bino bondimi, bolikii, mpe litatoli na ngai ya koningana te mpe sikisiki ete oyo ezali mosala ya Nzambe. Na nkombo ya bule ya Mobikisi na biso wa bolingo, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.