2010–2019
Nzambe Akopangusa Mpinzoli Nyonso na Elongi
Sanza ya Zomi 2016


Nzambe Akopangusa Mpinzoli Nyonso na Elongi

Ntango tosaleli bondimi na bison a Mobikisi, akotombola biso likolo mpe akomema biso kati mimekano na biso nyonso mpe na nsuka, akobikisa biso na bokonzi ya selestiale.

Lokola eteni ya mwango ya Tata na biso ya Lola, Apesaki ndingisa na mawa ezala elongo na bomoi ya nkufa.1 Ntango emonisami ete mimekano ya mpasi ekomaka ntango nyonso te na biso While, tokoki kondimisama ete na ndelo moko to mosusu, tonyokwamaka banso mpe tobundaka. Ezali losambo na ngai ete Molomo Mosantu akokamba bison a bososoli monene mpo na nini yango esengeli kozala bongo.

Ntango tomonaka mabaku ya mpasi ya bomoi na nzela ya miso ya bondimi epai ya Klisto, tozalaka na makoki ya komona ete ekoki kozala na ntina ya bozambe na mpasi na biso. Bondimi ekoki kondimela bosolo ya Petelo komonisama lokola liteya ya kpokoso. Akomaki, “Soko bokonyokwama mpo na boyengebene, bokozala na esengo.” 2 Ntango topesaka mitema “na biso mpo na kososola,”3 tokoki komata na likoki na biso na nyonso mibale kozala na molende na mikakatano na biso mpe koyekola uta—na yango mpe kozala na boyebi makasi na—yango. Bososoli ya boye epesaka eyano na eyano ezanga mibu “Mpo na nini makambo mabe esalamelaka bato malamu?”

Liyoki ya moko na moko lelo ezali boyebi elongo na motango ya moto yemei, bozangi elikia, mpasi, bolozi, to mawa. Na bozangi  “liso ya bondimi”4 mpe bososoli ya bosolo ya seko, mbala mingi tomonaka ete bolozi mpe mpasi na nkufa ekoki kotiya molili to kibwisa mpimpa esengo ya seko ya boyebi ete mwango monene ya Tata na biso ya Lola ezali solo mwango ya seko ya esengo. Lolenge mosusu ezali te mpo na kozwa  bofuluki ya esengo.5

Nzambe abengesi biso toyanola na bondimi na bampasi na biso na ntina ete tokoka kozwa mapamboli mpe kolonga boyebi oyo ekoki koyekolama na lolenge mosusu te. Toteyami na lolenge mpe mabaku nyonso mpo na kotosa mitindo, mpo “ye oyo azali na bondimi na ntango ya mokakatano, litomba na ye ekozala monene na bokonzi ya lola.”6 Mpe ntango totangi kati ya makomi, “Soki bozali na mpasi, bosenga epai ya Nzambe na motema mobimba, ete milimo na bino ekoka kosepela.”7

Apostolo Paul, yemei akutanaki na mpasi makasi, ayekolaki uta na boyebi na yemei mpo na koteya na bompikiliki mpe bonzenga bomoni ya seko oyo eyaka ntango totikalaka ngwi mpe motema kokita. Alobaki, “Mpo pole ya mpasi na biso, oyo ezali kaka mpo na mwa ntango moke, ekobota mpo na biso, likolo ya motango nyonso mpe bozito ya seko ya nguya.”8 Na maloba mosusu, tokoki koyeba na katikati ya bampasi na biso ete Nzambe apesaki litomba ya seko.

Likoki ya Paul mpo na kolobela mikakatano, minyoko, mpe mawa ya bomoi na ye ntango “pole” ya mpasi epesaki likanisi mabe ya nsango oyo anyokwamelaki, oyo emelamaki na boyebi ya seko ya nsango malamu. Bondimi ya Paulo kati na Yesu Klisto esalaka makambo nyonso endimama. Abetamaki mbala mitano na mabaya; mbala misato abetamaki na fimbo; mbala moko abambamaki mabanga; anyokwaki mbala misato na botioli; mbala na mbala atiamaki na likama ya liwa na mayi, na miyibi, mpe kutu na bandeko mibali ya mabe; anyokwamaki na bolembu mpe bolozi, nzala mpe mposa ya mayi, mpe akangamaki na boloko ya malili mpe bolumbu.9

Mingi kati na biso basambelaki epai ya Nzambe alongola ntina ya mpasi, mpe ntango lisungi tozali koluka ekokisami te, tomekamaki kokanisa ete Azali koyoka biso te. Natatoli ete, atako na bantango oyo, Ayokaka nsambo na biso, azali na ntina ya kopesa ndingisa na bampasi na biso ekoba,10 mpe akosunga biso tolonga yango.11

Na mokapo ya eteni, Paul alobeli biso ezanga nkombo “nsende” na mosuni na ye, oyo esalaki ye mpasi makasi mpe ememelaki mbala misato afukama, kosengaka Nkolo alongola yango uta na ye. Na eyano ya nsambo ya Paul, Nkolo alongolaki nsende te kasi alobelaki kimia mpe apesaki bososoli na motema na ye, kolobaka, “Ngolu na ngai ezali ya kokoka mpo na yo: mpo bokasi na ngai esalaki bobongi nie na bolembu.” Na bososoli ya sika, Paul azalaki na likoki ya kondima mpe kotonda mpo na nsende oyo apesamaki. Alobaki, “Esengo makasi nakozala na yango … nkembo na botawu na ngai, ete nguya ya Klisto ekoka kozala likolo na ngai.”12

Ntango tozwi limoni oyo ya seko na babomoi na biso, makoki ya koyika mpiko ekolaka, toyekolaka boni boni kosunga baoyo bazali na mposa ya lisungi,13 mpe tokomaka kosepela mpe kutu kolakisa botondi mpo na makambo Nzambe apesaka biso lokola bateyi na nzela ya bomoiya seko.

Ntango tomimonaka kosalaka na nzela ya mpasi, ekoki kozala mpasi mpo na komona mikakatano na biso lokola tozali kolanda nzela malamu na momekano na biso moko ya moyekoli. Kasi soki tomimoni na bantango kati ya molili ya bozangi elikia to na nzela ya esengo makasi, koyekola uta na mpe koyoka mawa mpo na bampasi ya basusu ekoki kozala lipamboli.

Kala te na ntango ya mosala ya likita ya likonzi na Filipine, motema na ngai ebukanaki ntango nayekolaki likama ya likambo moko ya ndeko Mobali Daniel Apilado. Ndeko mobali Apilado mpe mwasi na ye babatisamaki na 1974. Bayebaki nsango malamu ezongisama mpe bazwaki bokangami na bango ya libala na tempelo kala te. Sima, bapambolamaki na bana mitano ya kitoko. Na sanza ya Nsambo  7, 1997, ntango Ndeko mobali Apilado azalaki kosala lokola mokambi ya likoki, moto ebimaki na mwa ndako na bango. Mwana ya liboso ya Ndeko mobali Apilado, Michael, abikisaki tata mpe abimisaki ye na moto, sima azongaki mbango na ndako mpo na kobikisa basusu. Ezalaki mbala ya nsuka Ndeko mobali Apilado amonaki mwana na ye ya mobali na bomoi. Baoyo bazikaki na moto ezalaki mwasi ya Ndeko mobali Apilado, Dominga mpe moko na moko ya bana na bango mitano.

Likambo oyo Ndeko mobali Apilado azalaki kosepela na bomoi ya esengo kati na Nzambe na ntango likama eyaki ayebaki te ete likama, to yango esalaki ye abikisama uta na mawa oyo elandaki. Kasi bondimi na ye na kotosaka mayokani na ye mpe kosalelaka bondimi na ye na Klisto epesaki ye elikia na elaka ete akosangana lisusu na mwasi na ye mpe libota. Elaka oyo ekomaki elembo na molimo na ye.14

Na ntango ya botali na ngai, Ndeko mobali Apilado, sikawa azali nkoko ya likoki, alakisaki ngai epai ya mwasi na ye ya sika, Simonette, mpe epai ya bana na bango ya mibali mibali, Raphael mpe Daniel. Ya solo, Yesu Klisto akoki mpe “akokangisa motema ebukana.”15

Na bokaboli lisolo ya Ndeko mobali Apilado, nayekoli ete bonene ya bobungisi na ye ekoki kosala bato ebele bakanisa mawa na bango moko mpe mpasi ezala mpo na likama moke na bokokanisi. Nasengi, bokokanisa te, kasi boluka koyekola mpe kosalela mabongisi ya seko lokola bozali koleka na nzela ya minyoko ya bampasi na bino moko.

Soki nakoki koloba epai na bino ngai moko— “bino nyonso oyo bolembi mpe bozali na mikumba,”16—nakoki koloba ete bitumba na bino moko—mawa, mpasi, mitungisi, mpe babotawu ya yomei ya lolenge nyonso—nyonso eyebani epai ya Tata na biso ya Lola mpe epai ya Mwana na Ye. Bozala na mpiko! Bozala na bondimi! Mpe bondimela bilaka ya Nzambe!

Ntina mpe misio ya Yesu Klisto ezalaki mpo ete Asengelaki “kozwa likolo na ye bampasi mpe bokono ya bato na ye,” “kozwa likolo na bango botawu na bango,” mpo “kosunga bato na ye engebene na botawu na bango.”17

Mpo na kozwa makabo nyonso oyo Mobikisi na biso amibonzaki mpamba, biso nyonso tosengeli koyekola mpasi oyo mpe mpo na yangomei eteyaka te to kopesa biso eloko moko ya ntina ya nsuka mpamba te na bosembo komipesa na mosala ya boyekoli na bampasi na bison a nzela ya bosaleli bondimi.

Mpaka Neal A. Maxwell kala akabolaki oyo ayekolaki mpo na ntina ya mpasi na maloba oyo:

“Mwa bilembo mosusu ya mpasi, boyiki mpiko malamu, ekoki kozala sikawa malamu mpo na biso. …

“…Eteni ya boyiki mpiko malamu ezali kozala sembo ya kokoka, koyekola uta na boyebi na biso ya ntina. Kasi kolekela na makambo oyo, esengeli esalema epai na biso … na lolenge oyo ekobulisa [biso].”18

Namonaki yango ya bomoi na ngaimei mpe na ndakisa ya basusu ete kosalela makasi mpe kolikiaka na Yesu Klisto mpe bilaka na Ye epesaka elikia ya makambo malamu ezali koya. Elaka ya solo oyo elendisaka biso, komemaka bokasi mpe nguya tosengeli na yango na ntina ete toyika mpiko.19 Ntango tokoki kokangisa mpasi na elikia ya ntina na bomoi na biso ya nkufa mingi mingi koleka na litomba oyo ezali kozela biso na bisika ya lola, bondimi na biso epai ya Klisto ekomata mpe tokozwa bolendisi na milimo na biso.

Nsima tokoki komona pole na nsuka ya balabala moke. Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki: “Ezali mpenza na pole na nsuka ya balabala ya moke. Ezali Pole ya Mokili, Bongengi mpe Mwenze ya Ntongo, ‘pole ezanga nsuka, oyo ekoki kozima atako moke te.’ [Moziya 16:9]. Azali mpenza Mwana ya Nzambe Yemei.”20

Tokoki kolendisama na koyekaka ete makambo nyonso ya mpasi na bomoi oyo ezali bobele mpo na ntango moke—atako molili butu ebaluki na moyi ya ntongo mpo na bandimi.

Ntango nyonso esuki mpe toyikaki mpiko na makambo nyonso na bondimi na Yesu Klisto, tozali na elikia ete “Nzambe akopangusa [mpinzoli] nyonso [na] elongi.”21

Natatoli ete Tata na biso mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, azacli na bomoi mpe été Bazali babateli ya bilaka. Natatoli ete Mobikisi na biso abengisi biso nyonso toya mpe tozwa Bomikabi na Ye. Ntango tosaleli bondimi na biso na Ye, akotombola biso likolo mpe akomema mimekano na biso mpe, na nsuka, akobikisa biso bokonzi ya selestiale. Nabengisi bino boya epai ya Klisto, toyika mpiko na bondimi, tokoma ya kobongisama nie na nzela na Ye, mpe kozala na esengo ebonga nie kati na Ye. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.