2010–2019
Botondi na Mokolo ya Saba
Sanza ya Zomi 2016


Botondi na Mokolo ya Saba

Mpo na Basantu ya Mikolo mya Nsuka, Saba ezali mokolo moko ya bongo ya botondi mpe bolingo

Bandeko na ngai ya Mibali mpe ya Basi oyo bapanzani na mokili mobimba na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, nazali na botondi ete Mokambi Thomas S. Monson asengi ngai naloba na likita Mokolo ya Saba ya lelo. Nasambeli ete Molimo Mosantu akomema maloba na ngai na kati ya motema na bino.

Lelo nazali na mposa ya kolobela mayoki ya motema. Moko oyo nakokangama na yango ezali botondi—mingimingi na mokolo ya Saba.

Toyokaka botondi mpo na makambo mingi: boboto ewuti na mopaya, bilei ntango tozali na nzala, palafo ekauka likolo ya moto na biso ntango ekumbaki etomboki, mokuwa ebukana oyo ebiki, kolela makasi ya bebe abotami sika. Mingi na biso bakomikundolaka koyokaka botondi na bangonga ya boye.

Mpo na Basantu ya Mikolo mya Nsuka, Saba ezali ngonga mpenza, solo mokolo moko, ya botondi mpe bolingo. Nkolo apesaki malako epai ya Basantu na Jackson County, Missouri, na 1831 ete nsambo mpe botondi na bango basengeli kotinda yango na lola. Basantu ya yambo bapesamaki bobimisi moko etali boni kobatela mokolo ya Saba mpe boni kokila mpe kosambela.1

Bango, mpe biso, tolobelamaki na Nkolo boni kokumbamela mpe kopesa botondi na Saba. Lokola bokoki koloba, nini eleki motuya ezali bolingo toyoki mpo na bapesi ya likabo yango. Tala maloba ya Nkolo ya boni kopesa matondi mpe boni kolinga na Saba:

“Napesi bango motindo moko, kolobaka boye: Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na nguya, mayele, mpe bokasi na yo nyonso; mpe na nkombo ya Yesu Klisto okosalela ye. …

“Okotonda Nkolo Nzambe na yo na makambo nyonso.

“Okopesa likabo epai ya Nkolo Nzambe na yo na bosembo, kutu oyo ya motema ya kobukana mpe molimo ya mawa.”2

Mpe nsima Nkolo akobi na kokebisa na ntina ya likama soki tozangi kotondo Tata na biso ya Lola mpe Yesu Klisto lokola bapesi ya makabo: “Mpe na likambo moko te moto atukaka Nzambe, to na moto moko te nkanda na ye epeli, kolongola baye batatoli te loboko na ye na makambo nyonso, mpe batosi te mitindo na ye.”3

Mingi na bino bozali koyoka bosili kozwa esengo na Saba lokola mokolo moko mpo na komikundola mpe kopesa matondi mpo na mapamboli. Bokanisa loyembo bomesana na yango:

Tango likolo ya mbonge bakumbi yo na ekumbaki,

Tango olembi, kokanisaka nyonso ebebi,

Tanga mapamboli na yo mingi; tanga nkombo na yango moko na moko,

Mpe ekokamwisa yo nini Nkolo asali.

Tanga mapamboli na yo;

Tanga nkombo na yango moko na moko.

Tango mapamboli na yo;

Tala nini Nzambe asali. …

Ekumba yo mokumba ya motungisi?

Ekulusu oyo babengi yo omema emonani kilo?

Tanga mapamboli na yo mingi; ntembe nyonso ekokima,

Mpe okozala koyemba nsima ya mikolo.4

Nayambaka mikanda mpe bayaka kotala ngai na Basantu ya Mikolo mya Nsuka ya bondimi oyo bayoki mokumba ya motungisi. Basusu bazali pene na koyoka ete, ata mpo na bango, nyonso ebebi. Nalikii mpe nasambeli ete oyo nalobi na ntina ya kozalaka botondi na mokolo ya Saba ekosalisa mpo na kosala ntembe ekima mpe mpo loyembo ebanda na mitema na bino.

Lipamboli moko mpo na yango tokoki kozala na botondi ezali ete tozala kuna na bosangani ya elambo mpenza, ya kosangana elongo na mingi kleka moko to mibale ya bayekoli na Ye na nkombo na Ye. Ezali na basusu na ndako oyo bazali kokoka kotelema te uta na mbeto na bango. Ezali na basusu oyo bakolinga kozala wapi tozali kasi nsika wana bazali kosalisa na balopitalo mpe kopesa kimia na bato to bazali kobatela biso na kotiaka bomoi na bango moko na likama na esobe to zamba. Likambo ya kozala na makoki ya kosangana elongo ata na Mosantu moko mosusu mpe kokabola elambo ekosalisa biso tobanda koyoka botondi mpe bolingo mpo na boboto ya Nzambe.

Na ntina ya Profeta Joseph Smith mpe nsango malamu ezongisami, lipambo mosusu ezali ete tozali na libaku ya kolia elambo poso nyonso—elengelami, epambolami, mpe elekisami na basali bandimami ya Nzambe. Tokoki kozala na botondi ntango Molimo Mosantu endimisi biso ete maloba ya nsambo ya elambo, elobami na bamemi ya bonganganzambe wana bapesami ndingisa, ekumisami na Tata na biso ya Lola.

Na mapamboli nyonso tokoki kotanga, moko ya monene na mosika ezali liyoki ya bolimbisi oyo eyaka ntango tozali kokabola elambo. Tokoyoka bolingo makasi koleka mpe bosepeli mpo na Mobikisi, oyo ya ye libonza ezanga ndelo esalaki ete tozala ya kosukwama uta na lisumu. Ntango tozali kokabola limpa mpe mai, tozali komikundola ete Aniokwamaki mpo na biso. Mpe ntango toyoki botondi mpo na maye Asali mpo na biso, tokoyoka bolingo na Ye mpo na biso mpe mpe bolingo na biso mpo na Ye.

Mapamboli ya bolingo tozwi, ekosala yango pete koleka mpo ete biso tobatela motindo ya “ntango nyonso komikundola ye.”5 Bokoki kutu koyoka bolingo mpe botondi, lokola esalaka ngai, mpo na Molimo Mosantu, oyo Tata ya Lola alakaki akozala ntango nyonso elongo na biso ntango tobateli na bondimi na mayokani tosali. Tokoki kotanga mapamboli wana nyonso eyenga nyonso mpe koyoka botondi.

Saba ezali lisusu ngonga ebongi mpenza mpo na komikundola liyokani tosalaki na mai ya libatisi mpo na kolinga mpe kosalela bana ya Tata ya Lola. Kokokisaka elaka wana na mokolo ya Saba ekotia na kati kosala elongo na kelasi to lisanga likoki moko na mposa ya motema mobimba mpo na kotonga bondimi mpe bolingo o ntei ya bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazali wana elongo na biso. Elaka wana ekotia na kati kokokisaka na esengo mabiangi na biso.

Nazali na botondi mpo na biyenga mingi nateyaki lisanga likoki ya badiakona na Bountiful, Utah, lokola na Eteyelo ya Eyenga na Idaho. Mpe namikundoli kutu bantango nasalaki lokola mosungi ya mwasi na ngai na lopitalo, wapi mosala na ngai ya yambo ezalaki kokabola bisanele mpe kolokota yango.

Esalaki mibu liboso nayeba na nzela ya Molimo ete lisalisi na ngai ya pete mpo na Nkolo ezalaki na ntina na bomoi ya bana ya Tata na biso ya Lola. Na kokamwa na ngai, basusu na bango bamikundolaki mpe batondaki ngai mpo na mwa komeka na ngai na kosalisa bango mpo na Nkolo na mikolo ya Saba wana.

Kaka lokola tokoki te ntango mosusu komona bambano ya lisalisi na biso moko oyo epesami na Saba, tokoki komona bambano ebakisami ya basali misusu ya Nkolo te. Kasi Nkolo azali kotonga bokonzi na Ye na kimia na nzela ya basali na Ye ya bondimi mpe ya komikitisa, na makelele moke, kokedaka y epai ya mikolo na yango ekoya ya kembo ya nkoto ya mibu. Esengeli Molimo Mosantu mpo na komona bonene ya kokola.

Nakolaki na kokendeke na bosangani ya elambo na mwa etape ya New Jersey na mwa bandimi mpe libota moko, na ngai moko. Mibu ntuku nsambo eleki, babatisaki ngai na Philadelphia na ndakoanzambe moko kaka etongamaki ya Eklezia oyo tokokaki kokede na Pennsylvania to New Jersey. Nzokande esika ezalaki na mwa etape moko na Princeton, New Jersey, ezali sikoyo na bapalwasi minene mibale. Mpe kaka mwa mikolo mileki, bankoto ya bilenge basalaki bosepeli oyo ezalaki yambo ya kobulisa Tempelo ya Philadelphia Pennsylvania.

Ntango nazalaki elenge mobali, babengaki ngai nazala misionele ya disitiliki na ndakoanzambe moko kaka na Albuquerque, New Mexico. Lelo ezali na tempelo moko mpe makonzi minei.

Natikaki Albuquerque mpo na kokende na kelasi na Cambridge, Massachusetts. Ezalaki na ndakoanzambe moko mpe disitiliki moko epanzanaki eteni monene ya Massachusetts mpe Rhode Island. Nakendeki na motuka na bangomba ya mboka wana ya kitoko mpo na bosangani ya elambo na mwa bitape, mingi na bandako ya kofutela to mwa bandako babongisa. Sikoyo ezali na tempelo ya bule na Belmont, Massachusetts mpe makonzi oyo epanzani na bamboka ya mike.

Oyo nakokaki komona na pelele te ntango wana ezalaki ete Nkolo azalaki kosopa Molimo na Ye na bato na mwa mayangani wana ya elambo.Nakokaki koyoka yango, kasi nakokaki te komona etando mpe ntango ya makanisi ya Nkolo mpo na kotonga mpe kopesa nkembo na bokonzi na Ye. Profeta moko, na libimisi, amonaki mpe akomaki oyo tokoki komona bisomei sikoyo. Nefi alobaki ete mitango na biso mobimba ekozala te monene kasi ete pole ebakisama ekozala limoni ya komona:

“Mpe esalemaki ete namonaki eklezia ya Mpate ya Nzambe, mpe mitango na yango ezalaki moke. …

“Mpe esalemaki ete ngai, Nefi, namonaki nguya ya Mpate ya Nzambe, ete ekitaki likolo ya basantu ya eklezia ya Mwana Mpate, mpe likolo ya bato ya boyokani ya Nkolo, oyo bapanzanaki likolo ya etando ya mabele; mpe balatisamaki na bibundeli ya bosembo mpe ya nguya ya Nzambe na nkembo monene.”6

Na eleko oyo, ndimbola ya esakola moko ekokani ya ezaleli mpe mabaku na biso ya mikolo ekoya ekomami na Doctrine et Alliances:

“Bososoli naino te mapamboli minene ya lolenge nini Tata azali na yango na maboko na yemei mpe alengeli mpo na bino;

“Mpe bokoki te komeme makambo nyonso sikoyo; nzokande, bozala na esengo monene, mpo nakokamba bino. Bokonzi ezali ya bino mpe mapamboli na yango ezali ya bino, mpe bomengo ya boseko ezali ya bino.

“Mpe ye oyo akoyamba makambo nyonso na botondi akokoma na nkembo; mpe biloko ya mabele eye ekobakiselama ye, kutu mbala nkama, iyo, koleka.”7

Nayoki mbongwana wana ya kokola na botondi mpo na mapamboli mpe bolingo ya Nzambe kokolaka na Eklezia mobimba. Emonani lokola ezali kobakisa mbangu o ntei ya bandimi ya Eklezia na bantango mpe bisika wapi ezali na mimekano ya bondimi, wapi basengeli kobelela na Nzambe asalisa mpo na kokoba.

Bantango tokolekela ekozala kati na yango na mimekano ya makasi, lokola ezalaki mpo na bato ya Alma na nse ya Amulon ya motema mabe, oyo atiaki mikumba likolo ya mikongo na bango ya kilo koleka mpo na bango komema:

“Mpe esalemaki ete mongongo ya Nkolo eyaki na bango na mitungisi na bango, kolobaka: Botombola mito na bino mpe bozala na mpiko, mpo nayebi boyokani oyo bosalaki epai na ngai; mpe nakosala boyokani elongo na bato na ngai mpe na kokangola bango na bowumbu.

“Mpe nakolembisa lisusu mikumba na bango oyo etiami na mapeka na bango, ete kutu bokokoka te koyoka yango na mikongo na bango, kutu ntango bozali na bowumbu. Mpe oyo nakosala ete bokoka kotelama lokola banzeneneke mpe na ngai nsima, mpe ete bokoka koyeba na ntembe te ete ngai, Nkolo Nzambe, natalaka bato na ngai na mitungisi na bango.

“Mpe sikawa esalemaki ete mikumba oyo etiamaki likolo ya Alma mpe bandeko na ye ekomaki pepele; iyo, Nkolo alendisaki bango ete bakokaki komema mikumba na bango na pete, mpe bamitikaki na esengo mpe na bompikiliki na bolingi ya Nkolo.”8

Bino mpe ngai tozali banzeneneke ntango nyonso tobateli mayokani na bison a Nzambe, mingimingi ntango yango ezali makasi, Ye ayoki nsambo na biso ya matondi mpo na oyo Ye asili kosala mpo na biso mpe ayanoli losambo na biso mpo na bokasi ya koyika mpiko na bondimi. Mpe mbala mingi koleka moko Ye akomisi biso ya esengo mpe makasi.

Bokoki malamu komituna nini bokoki kosala mpo na kozala mpe kokumbamela na mokolo ya Saba oyo mpo na kolakisa botondi na bino mpe mpo na kolendisa bino moko mpe basusu na mimekano oyo ezali liboso.

Bokoki kobonga lelo na losambo ya moto na moto mpe ya libota ya matondi mpo na nyonso Nzambe asali mpo na bino. Bokoki kosambela mpo na koyeba nini Nkolo alingi bino bosala mpo na kosalela Ye mpe basusu. Mingimingi, bokoki kosambela mpo ete Molimo Mosantu alobela bino na ntina ya moto moko oyo azali ye moko kaka to na mposa epai na ye Nkolo alingi bokende.

Nakoki kolaka bino ete nsambo na bino ekoyanolama, mpe na kosalelaka biyano bokozwa, bokomona esengo na Saba, mpe motema na bino ekotonda na matondi.

Natatoli ete Nzambe Tata ayebi bino mpe alingi bino. Mobikisi, Nkolo Yesu Klisto, amikabaki mpo na masumu na bino mpo na bolingo mpo na bino. Bango, Tata mpe Mwana, bayebi bino na nkombo na bino lokola bayebaki Profeta Joseph Smith ntango babimelaki ye. Natatoli ete oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe ete Ye akokumisa mayokani bosalaka mpe bozongisaka sika na Nzambe. Ezalela na bino mpenza ekobongwana mpo na kokoma mingi koleka lokola Mobikisi. Bokolendisama kotelemelaka lisenginia mpe kotelemelaka mayoki ya ntembe na oyo etali bosolo. Bokozwa esengo na mokolo ya Saba. Nalaki bino boye na nkombo ya Yesu Klisto, amene.