2010–2019
Nakomema Pole ya Nsango malamu kati ya Libota na Ngai
Sanza ya Zomi 2016


Nakomema Pole ya Nsango malamu kati ya Libota na Ngai

Tokoki komema pole ya nsango malamu na mabota na biso, biteyelo, mpe bisika ya misala soki tozali koluka mpe kokabola makambo malamu na ntina ya basusu mpe kotika komipesa na makambo ezanga ntina.

Na eyano na libengisi ya Ndeko mwasi Linda K. Burton na likita linene ya Sanza ya Minei, 1 mingi kati na bino basali misala ya etonda na makanisi mpe ya bokabi ya bolingani oyo ezali ya kosunga bamposa ya bapaya na bisika bofandaka. Na bopete, makasi ya moko na moko na pologalami ya lingomba mobimba, misala oyo ezali biyano ya bolingo. Lokola bokabolaki ntango, batalanta, mpe misolo na bino, ya bino —mpe ya bapaya—mitema engengisamaki. Botongi ya elikia mpe bondimi mpe kutu ya bolingo makasi katikati ya mozwi mpe mopesi ezali mbano ya koboya te ya bolingani ya solo.

Profeta Moroni ayebisi biso bolingani ezali elembo ya ntina mingi ya baoyo bakozala na Tata ya Lola na bokonzi ya selestiale. Akomi, “Longola se soko bozali na bolingani bokoki ata moke te kobikisama na bokonzi ya Nzambe.”2

Ya solo, Yesu Klisto azali ndakisa ebonga nie ya bolingani. Bomipesi na Ye ya yambo ya nkufa mpo na kozala Mobikisi na biso, misala na Ye na bomoi na Ye ya nkufa, libonza ya Bomikabi na Ye ya motuya koleka, mpe bokobi ya makasi na Ye ya kozongisa biso epai ya Tata na biso ya Lola ezali bilembo ya nsuka ya bolingani. Asalelaka na likanisi moko: bolingo oyo alakisaki na Tata na Ye na nzela ya bolingo na Ye mpo na moko na moko na biso. Na ntango atunamaki na ntina ya motindo monene, Yesu ayanolaki:

“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe molimo na yo na mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.

“Oyo ezali motindo ya yambo mpe monene.

“Mpe ya mibale ezali lolenge moko na yango, Okolinga mozalani na yo lokola okomilingaka yo moko.”3

Moko ya ndenge ya ntina tokoki kokolisa mpe kolakisa bolingo epai ya bazalani na biso ezali kozala mokabi na makanisi mpe maloba na biso. Mibu ebele eleki moninga moko ya bolingo akomaki, “Ndakisa monene ya bolingani ekoki kozala koboya kosambisa basusu.”4 Yango ezali bosolo kino lelo.

Kala te, ntango Alyssa ya mibu misato azalaki kotala film na bandeko na ye, akamwaki kolobaka, “Mama, soso wana ezali kokamwisa!”

Mama na ye atalaki na etando mpe azongisaki na koseka, “Cheri, ezali paon.”

Lokola mwana ya mibu misato wana azanga boyebi, ntango mosusu totalelaka basusu na bososoli ya mombida te to ya solo te. Tokoki kotalela babokeseni mpe babotau emonanaka kati ya baoyo bazali nzinganzinga na biso epai wapi Tata na biso ya Lola amonaka bana na Ye, bakelama na elili na Ye ya seko, na likoki ya kafukafu mpe ya nkembo.

Mokambi James E. Faust akundolisami mpo na koloba, “Mingi nakomi mobange, moke nakosambisa.”5 Yango ekundolisi ngai limoni ya Apostolo Paulo:

“Ntango nazalaki mwana, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kososola lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke: kasi ntango nakomi [mokolo], natie mosika biloko nyonso ya bomwana.

“Sikawa totali na kitalatala, na molili; nsima na elongi na elongi: sikawa nayebi na eteni; kasi nsima nakoyeba atako lisusu nayebanaki.”6

Ntango totali masumu na biso malamu koleka, tokozala na makoki ya komona masumu ya baninga mosusu te “na nzela ya kitalatala, molili.” Tolingaka kosalela pole ya nsango malamu mpo na komona basusu lokola Mobikisi amonaka biso—na mawa, elikia, mpe bolingani. Mokolo ekoya ntango tokozala na bososoli ya mitema ya basusu mpe tokozala na botondi ya kozala na ngolu epesameli biso—kaka lokola tolakisaka makanisi ya bolingani mpe maloba epai ya basusu na bomoi oyo.

Mwa mibu eleki, nakendaki na bwato na lisanga ya bilenge basi. Maziba ya mozindo ya langi ya bule ezingamaki na langi ya mayi ya pondu, ngomba etonda na banzete mpe mangenge ya mabanga ezalaki bozenga mpenza. Mayi ezalaki kotanga likolo esika tozalaki ntango tozalaki kotiya yango kati ya mai ya mpeto, mpe moyi ezalaki kongenga makasi mpe tozalaki kotambola malembe kokataka liziba.

Nzokande, mapata eyindaki kala te, mpe mopepe ebandaki. Mpo na kotambola mbangu, tosengelaki kozindisa makasi miluka na mai, kolukaka na bozangi kopema. Nsima ya mwa bantango moke ya mosala makasi, tozongaki na nsonge na liziba monene mpe tomonaki na kokamwa mpe esengo ete mopepe ezalaki kopepa kaka na nzela tozalaki kokende.

Na lombango, tozwaki mbano ya likabo oyo. Tobimisaki elamba moke mpe tokangaki bansonge na yango mibale na maboko miluka mpe basonge mosusu na makolo ya mobali na ngai, oyo atandaki libanda likolo na ngambo ya bwato. Mopepe ebetaki na masuwa, mpe tokomaki na libongo!

Ntango bilenge basi na bwato mosusu bamonaki lolenge totambolaki na mai na bopete, na lombango basalaki lolenge ya kokumba bamasuwa na bangomei. Mitema na biso ezalaki pepele na koseka mpe lisungi, botondi mpo na lisungi kowuta na mitungisi ya mokolo.

Ekoki kozala na mopepe ya nkembo oyo ekoki kozala botondi ya solosolo ya moninga, mbote ya sembo ya moboti, elembo ya bondimi kowuta na ndeko moko, to koseka ya lisungi ya mosali to moninga ya kelasi, nyonso esengaka kofulaka “mopepe ya sika na bamasuwa na biso” ntango tozali kobundisa mikakatano ya bomoi! Mokambi Thomas S. Monson alobi yango lolenge oyo: “Tokoki kokamba mopepe te, kasi tokoki kokamba bamasuwa. Mpo na esengo monene, kimia, mpe esengo, tokoka kopona ezalela malamu.”7

Maloba ezali na nguya ya kokamwa, ya kotonga mpe ya kobuka lokola. Tokoki banso pene komikundola maloba mabe oyo ememaki biso na nse mpe maloba mosusu oyo elobamaki na bolingo oyo esalaki milimo ematisama. Koponaka koloba bobele oyo ezali malamu na ntina ya—mpe na—basusu ematisaka mpe elendisaka baoyo bazali nzinga nzinga na biso mpe esungaka basusu balanda nzela ya Mobikisi.

Elilingi
Likanisi ya “Nakomema pole ya nsango malamu kati ya libota na ngai”

Ntango nazalaki elenge mwasi na Eteyelo ya bana, nasalaki na etingia mpo na botongi liloba moko elobi, “Nakomema pole ya nsango malamu kati ya libota na ngai.” Mokolo moko ya mosala na nsima ya nzanga ntango biso bana basi tozalaki kokotisa mpe kobimisa batonga na biso na elamba, moletyi na biso abetelaki biso lisolo ya mwana mwasi oyo azalaki kofanda na ngambo moko ya lubwaku. Na mpokwa nyonso azalaki komona likolo ya ngomba na ngambo ya lubwaku ndako moko oyo ezalaki na bafenetele ya kongenga, ya wolo. Ndako na yemei ezalaki moke mpe ya kala, mpe mwana mwasi alotaki kofanda na ndako kitoko wana ya bafenetele ya wolo.

Mokolo moko mwana mwasi apesamaki ndingisa ya kotambwisa velo na ye kokatisa lobwaku. Atambwisaki mpenza kino akomaki na ndako wana ya bafenetele ya wolo oyo azalaki kosepela na yango ntango molai. Kasi ntango akitaki na velo na ye, amonaki ete ndako yango esundolamaki mpe ebebisamaki, na bamatiti milai mpe bafenetele oyo ezalaki bongo na bongo mpe mbindo. Na mawa, mwana mwasi oyo abalusaki elongi na ye na ngambo ya ndako. Na kokamwa na ye, amonaki ndako na bafenetele ya kongenga, ya wolo likolo ya ngomba na ngambo ya lubwaku, mpe kala te asosolaki ete ezalaki ndaki na yemei mpenza!8

Ntango mosusu, lokola elenge mwasi oyo, totalaka oyo basusu basengeli kozala na yango to kozala mpe komiyoka ndambo na maye matali bokokanisi. Toyekamelaka na bomoi ya bato oyo bazali kotala na media social to kolekisa ntango mpamba na kelasi na biso na bisika ya misala na biso na mimekano. Nzokande, ntango tozwaka mwa ntango ya “kotanga mapamboli na [biso] mingi,”9 tomonaka na emoneli moko ya solo mpe toyebaka lisusu bola ya Nzambe mpo na bana na Ye nyonso.

Ata soki tozali na mibu 8 to 108, tokoki komema pole ya nsango malamu kati na bisika tofandaka, ezala ndako na kati ya etage na Manhttan, ndako likolo ya likonzi na Malaysie, etonga ya banzete na Mongolie. Tokoki kozwa mokano ya koluka bolamu ya basusu mpe na mabaku nzinganzinga na biso. Bilenge mpe basi ya bilenge mingi te bisika nyonso bakoki kolakisa bolingani ntango bazali kopona kosalela maloba oyo etongi elikia mpe bondimi kati ya basusu.

Mpaka Jeffrey R. Holland alobelaki na ntina ya elenge mobali moko oyo azalaki motumboli monene na ntango azalaki kotanga. Mwa mibu eleki akotaki na kisoda, ayekolaki, mpe akomaki makasi na Eklezia. Eleko oyo ya bomoi na ye etondaki na boyebi ya elonga ya kokamwa.

Nsima ya mibu ebele azongaki na engumba na ye ya kobotama. Nzokande, bato baboyaki koyeba bokoli ya bobongwani na ye. Mpo na bango, azalaki kaka lokola mokolo ya “bongo-na-bongo,” mpe bazwaki ye na lolenge wana. Na nsuka, moto malamu oyo abungisaki bobongwani nyonso oyo asalaki na bozangi makoki ya kosalela batalanta na ye ya bokobi malamu koleka mpo na kopambola baoyo batukaki mpe babwakisaki ye na mbala wana lisusu.10 Bobungi kani, nyonso mibale mpo na ye mpe lingomba ya bato!

Apostolo Petelo ateyaki, “Likolo ya makambo nyonso ezali na bolingani kati na binomei: mpo bolingani ekozinga masumu nyonso.”11 Bolingani ya makasi, elakisi “solo koleka,” elakisami na kobosanaka mbeba mpe bokwei ya basusu na esika ya kotikalaka na nkanda to kokundolaka na bisomei mpe na basusu na mabe basala na kala.

Lotomo na biso mpe libaku malamu ezali ya koyamba bokoli kati na moko na moko lokola tozali koluka kokoma mingi lokola Mobikisi na biso, Yesu klisto. Esengo kani ezali ya komona pole kati ya miso ya moto oyo asosoli nsima Bomikabi ya Yesu Klisto mpe azali kosala mbongwana ya solo solo na bomoi na ye! Bamisionele bayokaki esengo ya komona mobongwami kokota kati ya mayi ya libatisi mpe nsima kokota na bikuke ya tempelo ezali matatoli ya lipamboli ya kopesa nzela—mpe kolendisa—basusu babongwana. Bandimi oyo bayambaka babongwami oyo bakokaki komona bato babongi mpo na bokonzi te bamonaka esengo makasi na kosungaka bango bayoka bolingo ya Nkolo. Bonzenga makasi ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali bosolo ya bokobi ya seko—topesami te bobele nzela ya kobongwama mpo na malamu koleka kasi lisusu ya kolendisaka, mpe kutu totindami, kokoba koluka mbongwana mpe, na nsuka, bobongi nie.

Mokambi Thomas S. Monson apesaki toli: “Kati ya banzela mike monkama, banso kati na bino bosengeli kolata kazaka ya bolingani. … Na esika ya kosambisa [to] kotongaka [moko] na basusu, tika tozala na bolingo ya mpeto ya Klisto mpo na baninga na biso ya mobembo kati na mobembo oyo tozali kosala na bomoi oyo. Tika tokoka koyeba lisusu ete moko na moko azali kosala na makoki [na ye] mpo na kolonga mikakatano oyo eyaka na nzela [na ye], mpe tika tokoka kobunda kosala na makoki na biso mpo na kosunga basusu.”12

Bolingani, na ndenge malamu, ezali motema piyo, boboto, mpe esengo. Bolingani etiaka basusu na esika ya yambo, ezali bomikitisi, kosalela bomisosoli, koluka bolamu kati ya basusu, mpe kosepela ntango moto moko asali malamu.13

Lokola bandeko basi (mpe bandeko mibali) na Siona, tokoyokana mpo na “kosala banso elongo … kosala oyo malamu mpe bomoto, mpo na kolendisa mpe kopambola na nkombo ya [Mobikisi]”?14 Tokoki, na bolingo mpe baelikia makasi, koluka mpe koyamba bonzenga kati ya basusu, kopesaka nzela mpe kolendisaka bokobi? Tokoki kosepela na baelonga ya basusu na ntango bazali kokoba kosala na oyo biso moko tozali kosala?

Iyo, biso tokoki komema pole ya nsango malamu na mabota na biso, biteyelo, mpe bisika ya misala soki tozali koluka mpe kokabola makambo malamu na ntina ya basusu mpe kotika komipesa na makambo ezanga ntina. Botondi kani etondisami na motema na ngai na ntango nazali kobanza na boyamboli oyo Mobikisi na biso, Yesu Klisto, asalaki mpo na biso nyonso baoyo basumukaki na mokili oyo ya kobonga nie te mpe ntango mosusu ya mpasi!

Natatoli ete ntango tolandi ndakisa na Ye ya kobonga nie, tokoki kozwa libonza ya bolingani oyo ekomemela biso esengo monene na bomoi oyo mpe lipamboli elekama ya bomoi ya seko elongo na Tata na biso na Lola. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Linda K. Burton, “I Was a Stranger,” Liahona, Sanza ya Mitano 2016.

  2. Moroni 10:21.

  3. Matai 22:37–39.

  4. Sandra Rogers, “Hearts Knit Together,” na Hearts Knit Together: Masukulu uta na Likita ya Basi ya 1995 (1996),7.

  5. James E. Faust, in Dallin H. Oaks, “‘Judge Not’ and Judging,” Ensign, Sanza ya Mwambe. 1999, 13

  6. 1 Bakolinto 13:11–12.

  7. Thomas S. Monson, “Living the Abundant Life,” Liahona, Sanza ya Yambo. 2012, 4.

  8. Emekolami uta na Laura E. Richards, The Golden Windows: A Book of Fables fto Young and Old (1903) 1–6.

  9. “Compte les bienfaits,” Cantiques, no. 156.

  10. Tala Jeffrey R. Holland, “The Best Is Yet to Be,” Liahona, Sanza ya Yambo. 2010, 18–19. Sanza ya Yambo. 2010, 25–26.

  11. 1 Petelo 4:8.

  12. Thomas S. Monson, “Charity Never Faileth,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2010, 125.

  13. Tala 1 Bakolinto 13:4–6.

  14. “Nous, soeurs de Sion,” Cantiques, no. 201; nsete ebakisami