2010–2019
“Soki Boyebaka Ngai”
Sanza ya Zomi 2016


“Soki Bino Boyebaka Ngai”

Eyebi biso bobele etali Mobikisi, to ekomi biso kokola na koyeba Ye? Boni ekomi biso koyeba ya Nkolo?

Ntango Mobikisi asukisaki Esakola na Ngomba, Akangamaki na bosolo ya seko ete “bobele na kosalaka bolingi ya Tata moto akoki kozwa ngolu ya libiki ya Mwana.”1

Alobaki:

“Moto nionso te oyo alobaka na ngai, Nkolo, Nkolo, asengeli kokota na bokonzi ya lola; kasi ye oyo asali bolingi ya Tata na ngai oyo azali na lola.

“Mingi bakoloba na ngai mokolo wana, Nkolo, Nkolo, esakolaki biso te na nkombo na yo? Mpe na nkombo na yo tobenganaki milimo mabe te? Mpe na nkombo na yo tosalaki bikamwisi te?

“Mpe bongo nakoloba epai na bango, nayebaki bino te: bolongwa liboso na ngai, bino baye bozali kosala mabe.”2

Bosololi na biso ya epaka oyo ebakisami ntango tomanioli likolo ya bosemboli moko efulama ya likomi wana. Na ntina, Maloba ya Nkolo epesami na Bibilia Ya Mokonzi Yakobo, “Nayebaki bino ata moke te,” ebongolamaki na Joseph Smith Translation na “Bino boyebaki ngai ata moke te.”3

Bomaniola lisusu lisese ya baseka zomi. Bomikundola lisusu ete mitano bazanga mayele mpe balengelamaki te bakendaki kozwa mafuta mpo na mwinda na bango nsima ya koyoka mbela mpo na kokenda mpe kokutana na mobali.

“Mpe ntango bakendaki kosomba, mobali ayaki; mpe oyo balengelamaki bakotaki elongo na ye mpo na libala: mpe ekuke ekangamaki.

“Na nsima na yango lisusu baseka [mitano bazanga mayele] bayaki, kolobaka, Nkolo, Nkolo, fungolela biso ekuke.

“Kasi ayanolaki mpe alobaki, Ya solo nalobi epai na bino, nayebi bino te.”4

Ntina ya lisese oyo mpo na moko na moko na biso ebakisami na limoni mosusu efulama. Na ntina, maloba “nayebi bino te,” lokola epesami na Bibilia Ya Mokonzi Yakobo, elimbolamaki malamu na Joseph Smith Translation na “Bino boyebi ngai te.”5

Maloba “Bino boyebaki ngai ata moke te” mpe “bino boyebi ngai te” esengeli kozala ntina ya bomisosoli ya milimo mpo namoko na moko kati na biso. Eyebi biso bobele etali Mobikisi, to ekomi biso kokola na koyeba Ye? Boni ekomi biso koyeba ya Nkolo? Mituna oyo ya molimo ezali mama na likambo ya etinda na ngai. Nabengisi mpenza lisungi ya Molimo Mosantu ntango tozali komaniola elongo liteya oyo ya motuya eluti.

Kokoma na Boyebi

Yesu alobaki:

“Ngai nazali nzela, bosolo, mpe bomoi: moto akokoma epai ya Tata te, soki na ngai te.

“Soki boyebaka ngai, bolingaki koyeba Tata na ngai lokola.”6

Tokomi na koyeba ya Tata ntango tokomi na koyeba Mwana na Ye ya Bolingo.

Ntina moko monene ya bomoi ya kufa ezali kaka te koyekola etali Mobotami Se Moko ya Tata kasi lisusu kobunda mpo nakoyeba Ye. Bitambe minei ya ntina oyo ekoki kosunga biso tokoma na koyeba Nkolo ezali kosalela bondimi na Ye, kolanda Ye, kosalela Ye, mpe kondimela Ye.

Kosalela Bondimi na Ye

Kosalela bondimi na Yesu Klisto eyekami likolo na makoki, mawa, mpe ngolu na Ye.7 Tobandi kokoma koyeba Mobikisi ntango tolamwisi makoki na biso ya molimo mpe tosaleli yango na mateya na Ye, kutu kino tokoki kopesa esika na milimo na biso mpo nandambo moko ya maloba na Ye.8 Ntango bondimi na biso na Nkolo ekoli, toliki na Ye mpe tondimeli nguya na Ye ya kosikola, kobikisa mpe kolendisa biso.

Bondimi ya solo ekangami kati mpe na Nkolo mpe ekokamba ntango nionso na misala ya bosembo. “Bondimi [na Klisto ezali] libongi ya yambo na eyamba ebimisami, … moboko ya bosembo nyonso, … mpe libongi ya mosala na moto nyonso ya mayele.”9 Mpo kosalaka elongo na malongi ya malamu Mosikoli asakolaki ntina mpenza ya koyamba mpe kosalela bondimi, “bondimi ezanga misala ezali ya kokufa.”10 Tozali mpo nakozala “basali ya maloba, mpe bobele bayoki te.”11

Koyoka maloba ya Nzambe mpe koyamba likabo ya molimo ezali bondimi kati na Mobikisi elakisami pene mpenza, ntango “bondimi eyei na koyokaka, mpe koyokaka maloba ya Nzambe.”12 Tokangami elongo na Ye mpe mongongo na Ye ntango toyekoli mpe na etingia maloba na Ye na makomi,13 kobondela epai ya Tata na nkombo na Ye na motema malamu,14 mpe koluka mpo na kokoba kokambami ya Molimo Mosantu.15 Koyekola mpe kosalela na bomoi na biso malongi ya Klisto esengelami mpo na koyamba likabo ya bondimi epai na Ye.16

Kosalela bondimi epai na Nkolo komibongisa mpenza mpo nakolandi Ye.

Kolanda Ye

“Mpe Yesu, kotambolaka na mbu ya Galilea, amonaki bandeko balingami mibale, Simona babengi Petelo, mpe Andre ndeko mobali na ye, kobwakaka monyama na mbu: mpo bazalaki balobi mbisi.

“Mpe alobaki epai na bango, bolanda ngai, mpe, akokomisa bino balobi ya bato.

“Mpe mbala moko bango batikaki minyama na bango, mpe balandaki ye.”17

Petelo mpe Andre bazali ndakisa ya nguya ya koyoka mpe kolanda Nkolo.

Mobikisi ateyi lisusu bino mpe ngai: “Soki nani akoya epai na ngai, , amiboya yemei, mpe atombola ekulusu na ye, mpe alandi ngai.”18 Kotombola ekulusu na yemei ezali komiboya ye moko mpo na nyonso ezangi bonzambe mpe kotika nyonso ya mokili mpe kotosa mibeko ya Nkolo.19

Mobikisi asengaki biso tokoma lokola Ye azali.20 Bongo na kolandaka Nkolo esangisi komekola Ye. Tokobi na boyebi ya Nkolo ntango toluki na nguya ya Bomikabi na Ye kokoma lokola Ye.

Na misala na Ye na bomoi ya kufa, Yesu alakisaki nzela, afungolalaki nzela mpe apesaki ndakisa ebongi nie. “Likanisi malamu ya ezaleli na ye, kobonga nie, mpe ezaleli”21 epesaka ntina ya molende mpe nzela ya polele ntango tolandi Ye na nzela ya moyekoli ya komikaba.

Kolanda Mobikisi esungaka biso lisusu kozwa “boyebi ya solo ete nzela ya bomoi [tozali] kolanda”22 elongobani na bolingi ya Nzambe. Boyebi ya boye ezangi misala te mpe etali kaka te misala tolandi na bomoi ya kufa to bamposa ya bomoi ya kufa. Nzokande, bokoli na nzela ya mayokami ezali nzela ya bomoi oyo esepelisi Ye.

Ndoto ya Lehi na Buku ya Mormon emonisi nzela tosengeli kolanda, mikakatano tokokutana na yango, mpe maziba ya molimo ebongisami mpo na kosunga biso na bolandi mpe koya epai ya Mobikisi. Kokende mbangu liboso mpe kolanda nzela eke oyo Alingi biso tolanda. Komeka mbuma ya nzete mpe kongwama na mozindo kati na Nkolo”23 ezali mapamboli Alengeli mpo na biso biso tozwa. Na yango, abengi biso, “Toya, tolanda ye.”24

Nyonso kosalela bondimi kati mpe kolanda Yesu Klisto ezali komibongisa mpenza mpo na kosalela Ye.

Kosalela Ye

“Mpo boniboni moto akoyeba nkolo oyo ye asalelaki te, mpe oyo azali mopaya epai na ye, mpe azali mosika na ye uta na makanisi ya motema na ye?”25

Tokomi na litondi ya koyeba Nkolo ntango tosaleli Ye mpe na mosala ya bokonzi na Ye. Ntango tosali bongo, akopambola biso na motema malamu na Ye elongo lisungi ya bonzambe, makabo ya molimo, mpe kokolisaka makoki. Totikali biso moko te ntango tozali kosala na elanga ya vinyo.

Alobaki: “Mpo nakokende liboso na bino. Nakozala na loboko ya mobali na bino mpe na loboko ya mwasi na bino, mpe Molimo na ngai ekozala na mitema na bino, mpe banzelu na ngai nzinganzinga na bino, mpo na kotatola epai na bino.”26

Tokomaka na boyebi ya Mobikisi ntango tosali na bokasi na biso mpo na kokende epai wapi Ye alingi biso tokende, ntango tomeki komona nini alingi biso toloba, mpe tokomi oyo alingi boso tozala .27 Ntango tondimi na kotika nyonso koyangelama na epai na Ye, Akolisi makoki na biso ya kosala koya makasi koleka. Moke moke, bamposa na biso esangani nyonso elongo na bamposa na Ye, mpe bantina na Ye ekomi ya biso, boye ete “ tosengi te oyo wapi ekokani te na bolingi [na Ye].”28

Kosalela Ye esengi motema na biso nyonso, nguya, mayele, mpe bokasi.29 Lokola mbano ya, kosunga basusu na koluka litomba te elongolaka maknisi ya mopimi mpe ezaleli ya bomoto. Tokolisi kolingo ya baye tosungi. Mpe na ntina ya kosunga basusu ezali kosunga Nzambe, Tokolisi bolingo epai na Ye mpe bandeko mibali mpe basi na mozindo mpenza. Lokola bolingo ezali elombo ya likabo ya molimo ya bolingani, kutu bolingo ya solo ya Klisto.30

“Bondela epai ya Tata na nguya ya motema nyonso, ete bokoka kotondisama na bolingo wana, oyo apesi na baye banso oyo bazali bayekoli ya solo ya Mwana na Ye, Yesu Klisto; ete bozala bana ya Nzambe; ete ntango akomimonisa tozala lokola ye, mpo tokomona ye lokola azali; ete tozala na elikia oyo; ete topetolama kutu lokola ye azali peto.”31

Tokomi na boyebi ya Nkolo ntango totondisami na bolingo na Ye.

Kondimela Ye

Ekoki yango kosalema kosalela bondimi epai na Ye, kolanda, kosunga, kasi kondimela Ye te?

Nayebi na bandimi ya Eklezia oyo bandimili bosolo ya makuli mpe mayokami ezwami na makomi mpe esakolami uta na elobelo oyo. Kasi bazali na mpasi ya kondima ete babosolo wana nsango malamu esalema mingi mingi na bomoi na bango mpe na mabaku na bango. Basali lokola bazali na bondimi epai ya Mobikisi, kasi banddimeli te mapamboli na Ye alakaki ezali mpo nabango to ekoki kosalema na bomoi na bango. Nakutaka mpe lisusu na bandeko mibali mpe basi oyo bazali kokokisa na mobimba mabiangi na bango basungi na motema mobimba kasi mpo na baye nsango malamu ezongisama ezali nano mpenza te bosolo moko mpe mbongwana na bomoi. Tokomi na boyebi ya Nkolo ntango tondimeli kaka te epai na Ye kasi lisusu tondimeli Ye mpe sikisiki na Ye.

Na Boyokani ya Sika, tata moko asengaki Mobikisi abikisa mwana na ye. Yesu ayanolaki:

“Soki ozali na kondima, makambo nyonso ekosalema na ye oyo andimeli.

“Mbala moko tata ya mwana agangaki, mpe alobaki na mayi na miso, Nkolo, nandimi, sunga ngai mozangi kondima.”32

Nakanisaki mbala mingi na ntina ya bosenga ya tata oyo: “Sunga ngai mozangi kondima.” Namituni soki makanisi ya mayele na ye ezalaki mpenza te mpo na kosunga ye kondimela Yesu lokola Mosikoli na biso mpe na nguya na Ye ya kobikisa. Akokaki kozwa boyebi ya Klisto lokola Mwana ya Nzambe. Kasi ntango mosusu asengelaki na lisungi mpo na kondimela nguya ya kobikisa ya Nkolo na yango akokaki ye moko mpenza mpe yemei mpenza lokola mpo na kopambola mwana na ye se moko ya bolingo. Akokaki kondimela Klisto kasi kondimela Klisto mpenza mpenza kassi kondimela Klisto te mingimingi mpe na ye moko.

Mbala mingi totatoli na ntina ya oyo toyebi kozala ya bosolo, kasi ntango mosusu motuna ezongaki mpo na biso banso ezali soki tondimeli oyo toyebi.

Makuli ya bule epesami na nguya ya bonganganzambe ezali na mbano mpo na kondimela Mobikisi, kokoma na boyebi na Ye, mpe na nsuka, kondimela oyo toyebi.

“Mpe bonganganzambe ya [Melekisedeki] eyangeli nsango malamu mpe ezali na fungola ya misala ya bokonzi, kutu fungola ya boyebi ya Nzambe.

“Yango wana, na makuli wana, nguya ya bonzambe ezali komonana.”33

Tondimeli mpe toyebi ya Nkolo ntango fungola ya boyebi ya boyangeli ya Nzambe na nzela ya bonganganzambe ya Melekisedeke efungoli ekuke mpe epesi makoki mpo na moko na moko kati na biso ayamba nguya ya bonzambe na bomoi na biso. Tondimeli mpe tokomi koyeba Mobikisi ntango tolandi Ye na koyambaka mpe na botongono totosi makuli ya bule mpe tokolisi elili na ye na mimeseno na biso.34 Tondimeli mpe toyebi Klisto ntango tosali biso moko tobongoli, tobikisi, tokomi makasi, mpe topetolami na nguya ya Bomikabi na Ye. Tondimi mpe tokomi na boyebi ya Nkolo ntango “nguya ya maloba na ye [eboti misisa] kati na biso”35 mpe ekomami na mayele mpe mitema na biso,36 mpe ntango tobwaki “masumu na [biso] nyonso mpo na koyeba [Ye].”37

Kondimela Ye ezali kondima ete ebele ya mapamboli na Ye ebongisami mpe ekozala na bomoi ya moko na moto mpe na mabota na biso. Kondimela Ye na molimo na biso mobimba 38 eyaka ntango topoti na lombango liboso na nzela ya mayokami, kotikaka mposa na biso na oyo ya Ye, mpe komitika na makambo ya yambo ya Ye mpe mabongisi na ye mpo nabiso. Kondimela Ye—kondima lokola solo nguya na Ye mpe bilaka—ebengisaka elikia, kimia, mpe esengo kati na bomoi na biso.

Elaka mpe Litatoli

Na mokolo ekoya, “mabolingo nyonso ekogumbama mpe nkota nyonso ekotatola”39 ete Yesu azali Klisto. Mokolo ya mapamboli wana, tokoyeba Ayebi moko na moko kati na biso na nkombo. Mpe natatoli mpe nalaki tokoki bobele te koyeba na ntina ya Nkolo kasi tokomi lisusu koyeba Ye ntango tosaleli bondimi na, kolanda, kosunga, mpe kondimela Ye. Natatoli bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.