2010–2019
Esengo mpe Kokoba Kozala na Molimo
Sanza ya Zomi 2016


Esengo mpe Kokoba Kozala na Molimo

Ntango bomoi na biso efandisami likolo ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka atako nini ezali kosalama—to kosalama te—na bomoi na biso.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, lelo nalingi nasolola na ntina ya libongisi moko oyo ezali fungola mpo na kokoba kozala na biso. Ezali libongisi oyo ekokoma bobele motuya mingi koleka ntango makama mpe balokuta nzinganzinga na biso ezali kobuta.

Oyo ezali mikolo ya nsuka, yango wana moko te na biso akokamwa ntango tozali komona baesakola kokokisama. Baprofeta mingi, bakisa Yisaya, Paulo, Nefi, mpe Mormon, basakolaki ete bangonga ya likama ekoya,1 ete na mikolo na biso mokili mobimba na boningani,2 ete bato bako “zala bamikumisi na bango mpenza, … bato na nko, … bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe”3 mpe ete mingi bakokoma basali ya satana oyo bazali kosunga mosala ya monguna.4 Solo, bino mpe ngai “tozali kobunana … te na mikonzi ya mokili oyo ya molili, [mpe] te na milimo mabe kati na likolo.”5

Lokola matata kati na bikolo ebuti, lokola bateroriste ya bozoba bazali koboma bato bayebi likambo, mpe kaniaka na makambo manso uta na nkita tii na leta ekomi mingi mpo na bato banso, nini ekoki kosalisa biso? Nini ekoki kosalisa moko na moko na biso na bitumba na biso moko mpe na mokakatano makasi ya kozala na bomoi na mikolo ya nsuka oyo?

Profeta Leyi ateyaki libongisi mpo na kokoba kozala na bomoi ya molimo. Ya yambo, tala makambo na ye: Aniokwamaki mpo na koteyaka bosolo na Yelusaleme mpe atindamaki na Nkolo atika bozwi na ye mpe akima elongo na libota na ye na esobe. Afandaki na etonga mpe akobaki kozala na bomoi na bilei oyo ekokaki kozwama na nzela ya kokende epai eyebana te, mpe amonaka mibale ya bana na ye ya mibali, Lamani mpe Lemuele, kotombokela mateya ya nkolo mpe kobundisa bandeko na bango ya mibali Nefi mpe Sam.

Na polele, Leyi ayebaki botomboki, bobangi, moto mpasi, bolozi, kolela, mpe mawa. Atako bongo, asakolaki mpenza mpe na kotatabana te libongisi moko lokola ebimisamaki na Nkolo: “Bato bazali, ete bakoka kozwa esengo.”6 Bokanisa! Na maloba nyonso akokaki kosalela mpo na kolimbola lolenge mpe ntina ya bomoi na biso awa na bokufi, aponaka liloba esengo!

Bomoi etondi na bozangi sembo mpe bozongeli, mimekano mpe mikakatano ya ndenge nyonso. Moko na moko na biso akutani pene na bangonga oyo mawa, mpasi, mpe bozangi elikia pene ezingi biso. Nzokande tozali awa mpo na kozala na esengo?

Iyo! Eyano ezali moko ya iyo! Kasi boniboni ekoki kosalama? Mpe nini tosali mpo na kosenga esengo oyo Tata na Lola azali na yango na magazini mpo na biso?

Eliza R. Snow, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi ya mibale, amipesaki eyano moko ya kitoko. Mpo na etinda ya koboma eyebani mabe ya Missouri, abimisamaki na ebandeli ya eleko ya malili makasi ya 1838,7 ye mpe Basantu mosusu batindamaki na makasi mpo na kokima ekolo na eleko ya malili wana mpenza. Na mpokwa moko, libota ya Eliza elekisaki butu na ndako moko ya banzete moke oyo esalelamaki na bapaya ya Basantu. Mingi ya biloko tati na banzete ebimisamaki mpe etumbamaki mpo na koni ya baoyo bakomaki liboso na bango, yango wana ezalaki na madusu na katikati ya banzete ya minene ekoka mpo ete niau etambola na kati. Ezalaki na malili makasi, mpe bilei na bango ekangamaki makasi.

Butu wana pene ya bato 80 basanganaki kati na ndako moke wana, bobele 6.1 metele kare. Mingi bafandaki to batelemaki butu mobimba komekaka koyotela moto. Na libanda, liboke moko ya bato balekisaki butu kosanganaka nzinganzinga ya moto makasi, elongo na basusu koyembaka nzembo mpe basusus kotumbaka bambala ya malili. Eliza akomaki: “Koyimayima moko te eyokanaki—banso bazalaki na esengo, mpe kosambisaka uta na ndenge tozalaki komonana, bapaya bakokaki kozwa biso batamboli ya esengo na esika ya liboke ya bato babenganaki na mbula matari.”

Mbando ya Eliza na ntina ya mponkwa wana ya kongama ya mikuwa, ya kolembisa ezalaki na kokamwa ya moto ya bosepeli. Alobaki: “Wana ezalaki butu ya esengo mpenza. Moko te soki basantu te bakoki kosepela na nse ya makambu nyonso.”8

Yango wana! Basantu bakoki kosepela na nse ya makambo nyonso. Tokoki koyoka esengo kutu ntango tozali kolekisa mokolo mabe, poso mabe, to kutu mobu mabe!

Bandeko na ngai mibali mpe basi, esengo toyokaka etali moke makambo ya bomoi na biso kasi mingi ya kosala na makambo ya kobetela nsete ya bomoi na biso.

Ntango bomoi na biso efandisami likolo ya mwango ya lobiko ya Nzambe, oyo Mokambi Thomas S. Monson kaka ateyaki biso, mpe Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye, tokoki koyoka atako nini ezali kosalama—to kosalama te—na bomoi na biso. Esengo eyaka uta mpe mpo na Ye. Azali liziba ya esengo nyonso. Toyokaka yango na eleko ya Mbotama ntango toyembaka, “Oh, quell Bonheur! Jésus viendra.”9 Mpe tokoki koyoka yango nyonso mobu mobimba. Mpo na Basantu ya Mikolo ya Nsuka, Yesu azali esengo!

Wana ezali ntina bamisionele na biso batikaka bandako na bango mpo na koteya nsango malamu na Ye. Ntina na bango ezali ya kobutisa motango ya bandimi ya Eklezia te. Kasi, bamisionele na biso bateyaka mpe babatisaka 10 mpo na komema esengo epai ya bato ya mokili!11

Kaka lokola Mobikisi apesi kimia oyo “eleki makanisi nyonso,”12 Apesaka lisusu esengo moko makasi, ya mozindo, mpe monene oyo eleki mayele ya moto to bososoli na bokufi ndakisa, emonanaka lokola ekoki kosalama te koyoka esengo ntango mwana na bino azali kobela bokono moko esilaka te to ntango obungisi mosala, to ntango akosi yo. Nzokande wana ezali esengo oyo Mobikisi apesaka. Esengo na Ye ekatanaka te, endimisaka biso ete ya biso “mitungisi ekozala mpo na ngonga moke”13 mpe ekozala mpo na litomba na biso.14

Boniboni, nsima, ekoki biso kosenga esengo wana? Tokoki kobanda na “bondimi na biso”15 “na makanisi nyonso.”16Tokoki kopesa matondi mpo na Ye na nsambo na biso mpe na kobatelaka mayokani tosali na Ye mpe Tata na biso na Lola. Ntango Mobikisi na biso akomi mingimingi solo epai na biso mpe ntango tobondeli mpo na esengo na Ye epesemela biso, esengo na biso ekobuta.

Esengo ezali na nguya, mpe koyekamaka likolo ya esengo ememaka nguya ya Nzambe kati na bomoi na biso. Lokola kati na makambo manso, Yesu Klisto azali ndakisa monene mingi na biso, “oyo mpo na esengo oyo etiamaki liboso ye amema ekulusu.”17 Kanisa yango! Mpo ete Ye atiaki molende na likambo ya mpasi mingi etielama molende naino na mabele te, mobikisi na biso ayekamaki na esengo!

Mpe nini ezalaki esengo oyo etiamaki liboso na Ye? Solo ezalaki na esengo ya kosukola, kobikisa, mpe kolendisa biso; esengo ya kofutaka mpo na masumu ya banso oyo bakoyambola; esengo ya kosalaka ete bino mpe ngai tozonga ndako—ya kosukwama mpe ya kolongobana—mpo na kozala na bomoi elongo na ya biso Baboti ya Lola mpe mabota.

Soki toyekami na esengo oyo ekoyela biso, to na baye tolingaka, nini ekoki koyela biso oyo sikawa ezali komonana lokola ya bozito, bolozi, kobangisa, mabe, to na pete ekoki kosalama te?

Tata moko na ezalela moko ya mpasi ya molimo ayekamaki likolo ya esengo ya kozalaka na nsuka ya kosukwama mpe ya kondimama na Nkolo—esengo ya kozala na bonsomi uta na elindo mpe nsoni—mpe esengo ya kozalaka na kimia ya makanisi. Boyekami wana epesaki ye mpiko ya kotubela epai ya mwasi mpe episikopo na ye na ntina ya likambo ya ponogalafi mpe ekobo oyo elandaki. Azali sikawa kosala makambo nyonso episikopo na ye asengaki ye asala, kosalaka makasi na motema na ye mobimba kozongela kondimama na mwasi na ye wa bolingo.

Elenge mwasi moko ayekamaki likolo ya esengo ya kotikalaka peto na ekobo, mpo na kosalisa ye kozala molende na botioli ya baninga, ntango abimaki esika moko eyebana mpe ya kotumbola mposa ya nzoto, kasi ya likama na molimo.

Mobali moko oyo mbala na mbala azalaki kokitisa mwasi na ye mpe kosepela na nkanda agangelaka bana na ye, ayekamaki na esengo ya kozalaka ya kolongobana mpo na kozwa Molimo Mosantu lokola moninga na ye ya ntango nyonso. Boyekami wana etindaki ye abwakisa moto ya mokili,18 epai na oyo akweyisamaka mbala mingi, mpe asala bambongwana esengeli.

Moninga ya mosala moko ya bolingo kala te ayebisaki ngai na ntina ya mibu bazomi mibale na ye eleki ya mimemakano ya bozito. Alobaki, “Nayekoli koniokwama na esengo. Monioko na ngai emelamaki kati na esengo ya Klisto.”19

Nini bino mpe ngai tokozala na makoki ya kotia molende, ntango tozali koyekama na esengo oyo “etiami liboso” na biso?20 Boyamboli nini ekosalama nsima? Botau nini ekokoma bokasi?21 Etumbu nini ekokoma lipamboli?22 Mawa nini, kutu makama, ekobaluka mpo na malamu na biso?23 Mpe lisalisi ya mokakatano nini mpo na Nkolo ekozala yo na makoki ya kosala?24

Ntango toyekami na etingia na Mobikisi mpe nsima tolandi ndakisa na Ye ya koyekamaka na esengo, tosengeli koboya makambo oyo ekoki kokata esengo na biso. Bomikundola Korihor, motelemeli-klisto? Kolobaka lokuta na ntina ya mobikisi, Korihor akendaki bisika na bisika tii amemamaki liboso ya banganga minene oyo batunaki ye: “Mpo na nini okei nzinganzinga kosantola nzela ya nkolo? Ntina nini olakisi bato oyo ete ekozala klisto te, mpo na kokata bosepeli na bango?”25

Likambo nyonso oyo ebundisi Kliso to malongi na Ye ekoka esengo na biso. Wana ekwi bafilozifi ya bato, etonda mpenza na Interneti mpe ekomami na ba site, oyo ezali kosala mpenza maye Korihor asalaki.26

Soki totali na mokili mpe tolandi bisalelo na yango mpo na esengo,27 tokoyeba esengo mokolo moko te. Bato ya mabe bakoki koyoka motango kani ya mayoki ya motema mpe ya mosuni, kasi bakoyoka mokolo moko te esengo!28 Esengo ezali likabo mpo na bomoi ya botongono, lokola eteyamaki na Yesu Klisto.29 Ezali likabo oyo eyaka uta na likanisi ya komekaka kozala na bomoi ya bosembo, lokola eteyamaki na Yesu Klisto.30

Ateyaki biso lolenge nini kozala na esengo. Ntango toponi Tata na Lola azala Nzambe na biso 31 mpe ntango tokoki koyoka Bomikabi ya Mobikisi kosalaka na bomoi na biso, tokovandisama na esengo.32 Ntango nyonso toleisaka mwasi na biso mpe tokambaka bana na biso, ntango nyonso tolimbisaka moto moko to tosengaka bolimisi, tokoki koyoka esengo.

Mikolo nyonso oyo bino mpe ngai toponi kosalela mibeko ya selestiale, mikolo nyonso oyo tobateli mayokani na biso mpe tosalisi basusu kosala yango kaka, esengo ekozala ya biso.

Tala maloba oyo ya Mokomi Nzembo: “Natie Nzambe liboso na ngai libela: azali na loboko na ngai ya mobali, bongo nakokweya te. … Esengo mingi ya kotonda ezali epai na [Ye].”33 Ntango libongi oyo ekotisami na mitema na biso, mokolo moko na moko mpe mikolo nyonso ekoki kozala ya mokolo ya esengo mpe bosepeli.34 Natatoli bongo na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala 2 Timote 3:1–5.

  2. Tala Doctrine et Alliances 45:26; 88:91.

  3. 2 Timote 3:2–4.

  4. Tala Doctrine et Alliances 10:5.

  5. Baefese 6:12.

  6. 2 Nefi 2:25.

  7. Guvelenele Lilburn W. Boggs ya Missouri abimisaki etinda ya koboma BaMormon Sanza ya Zomi 27, 1838 (Tala Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 349).

  8. Tala Eliza R. Snow, na Edward W. Tullidge, The Women of Mormondom (1877), 145–46.

  9. “Joy to the World,” Hymns, no. 201.

  10. Bamisionele basalaka lokola Nkolo atindaki: bateyaka, balakisaka, mpe babatisaka na nkombo na Ye (tala Matai 28:19; Malako 16:15; Mormon 9:22; Doctrine et Alliances 68:8; 84:62; 112:28). Na Losambo na Ye Mpo na Basusu, Yesu asakolaki mokangano na Ye na esengo ya bayekoli na Ye. Alobaki, “Nazali kosolola makambo oyo kati na mokili, ete batonda na esengo na ngai kati na bango” (Yoane 17:13; nsete ebakisami).

  11. Tala Alma 13:22.

  12. Bafilipi 4:7.

  13. Doctrine et Alliances 121:7.

  14. Tala 2 Nefi 2:2.

  15. Baebele 12:2.

  16. Doctrine et Alliances 6:36.

  17. Baebele 12:2.

  18. Tala Moziya 3:19. Tanga: “moto ya mokili” azali bobele moyini ya Nzambe; azali moyini ya mwasi mpe bana na ye.

  19. Tala Alma 31:38.

  20. Baebele 12:2.

  21. Tala Etele 12:27.

  22. Tala Baebele 12:6.

  23. Tala Doctrine et Alliances 122:7.

  24. Tala Matai 19:26; Malako 10:27.

  25. Alma 30:22. Buku ya Mormon etondi na bandakisa ya mibali mpe basi oyo bayoki esengo mpe bosepeli mpamba te baponi kolanda Yesu Klisto. Boponi nyonso mosusu, lokola na ndakisa ya Korihor, ememaka nsukansuka na libebi.

  26. Lokuta, kolingaka koloba botalisi ya mabe, elimbolami lokola maloba ya mabe mpe ya likundu elobami mpo na kozokisa lokumu ya moto moko to ya eloko moko. Lokuta ezalaki kosalama na mikolo ya Korihor, mpe ezali kosalama sikawa. Profeta Joseph Smith alobaki ete Eklezia ekoki kolongama te ata liboso ya lokuta. Alobaki: “Ndelo ya bosolo etongami; loboko moko te esantolama ekoki kopekisa mosala yango ekoba; minioko ekoki kopela, maboke ekoki koyokana, mapinga ekoki kosangana lokuta ekoki kobebisa, kasi solo ya Nzambe ekoke liboso mpenza, na lokumu, mpe bosomi, tii ekota na mikili nyonso, okende kotala bikolo nyonso, mpe ekoyokisama na matoyi nyonso, tii ntina ya nzamba ekokokisama, mpe Yeova Monene akoloba mosala esalami” (Teachings: Joseph Smith, 444).

  27. Mokili eteyi ete bosombi biloko ekomema esengo. Mpe soki wana esimbi te, bosomba mingi koleka! Ezali lisusu ete bokoki kosumuka mpo na esengo na bino. Mpe soki esimbi te, bosumuka mingi koleka! Elaka ezali ete bokoki kozwa esengo monene na kosalaka nyonso oyo bolingi kosala. Lokuta!

  28. Na mokili oyo te to na mokili ekoya te.

  29. Basembo Basantu “baye bamemeki na molende baekulusu ya mokili… bakosangola bokonzi ya Nzambe, … mpe bosepeli na bango ekozala etonda libela” (2 Nefi 9:18).

  30. Ndakisa, tala 2 Nefi 27:30; Alma 27:16–18.

  31. Tala 1 Nefi 17:40.

  32. Tala Moziya 4:2–3.

  33. Nzembo 16:8, 11.

  34. Tala Yisaya 35:10; 2 Nefi 8:3.