2010–2019
Esengo Monene te Koleka Koyeba Ete Bayebi
Sanza ya Zomi 2016


Esengo Monene te Koleka Koyeba Ete Bayebi

Nayebi te soki eloko moko na mokili oyo ekoki komema esengo mpe bosepeli mingi koleka koyeba ete bana na biso bayebi Mobikisi.

Bandeko mibali mpe basi, kala te namanyolaki motuna oyo: “Soki nyonso oyo bana na bino bayebaki na ntina ya nsango malamu ewutaki epai na bino—ezali ete bino bozalaki ebandeli na bango—boni boni basengelaki koyeba?” Motuna oyo ezali na ntina na baoyo nyonso balingaka, bakambaka, mpe balakisaka bana.

Ezali na likabo monene moko te oyo tokoki kolakisa na bana na biso koleka ebombelo monene kati ya mitema na bango oyo toyebi ete Mosikoli na biso azali na bomoi? Bayebi ete toyebi? Mpe ntina koleka, nsima bayebi mpo na bangomei ete Azali na bomoi?

Ntango nazalaki elenge mobali, nazalaki moto makasi epai ya mama na ngai mpo na kobokola. Nazalaki na ntina makasi ya bolandeli. Mama na ngai ayebisaka ngai ete bobangi na ye makasi ezalaki ete nalingaki kokoma elenge mobali te. Nazalaki mobulu makasi.

Namikundoli ntango nazalaki elenge mobali nafandaki mokolo na liyangani ya elambo elongo na libota na biso. Mama na ngai azwaki liboke ya makomi ya sika. Liboke oyo ya sika esanganaki na misala nyonso kati ya bobimisi, mpe na katikati mpenza ezalaki lokasa ya nzelanzela mpo na kokomela.

Ntango ya liyangani, natunaki soki nakokaki kosimba makomi na ye. Na elikia ya kokolisa bokebi na ngai, asimbaki yango na nse ya ebonga ya eklezia. Mpe ntango namonaki makomi na ye, namonaki ete akomaki ntina na yemei na eteni ya likomi. Mpo na kolimbola ntina ya na ye; nasengeli koyebisa bino ete nazali moto ya mibale kati ya bana motoba mpe nkombo na ngai Brett. Mama na ngai akomaki, na langi ya motane, bobele ntina moko: “Patience na Brett!”

Mpo na kopesa elikia ya kosunga bino bososola momekano baboti na ngai bakutanaki na yango na bobokoli libota na biso, tika nayebisa bino na ntina ya botangi makomi na libota na biso. Ntongo nyonso, mama na ngai azalaki kotangela biso Buku ya Mormon na ntango ya bilei ya ntongo. Na ntango wana, yaya na ngai ya mobali, Dave, mpe ngai tosengelaki kofanda kimia. Mpo na kozala sembo na mobimba, tozalaki koyoka te. Tozalaki kotanga bamapa na basani.

Na nsuka, ntongo moko, nazwaki mokano ya kotumbola mama na ngai. “Nakamwaki, “Mama mpo na nini ozali kosala yango mpo na biso? Mpo na nini otangaka Buku ya Mormon ntongo nyonso?” Nsima nalobaki ete nalembi makambo oyo. Ya solo, nakoki kondima te sikawa ete ngai nde nalobaki yango. Nayebisaki ye, “Mama, nazali koyoka te!”

Eyano na ye ya bolingo ezalaki ya mwa ntango na bomoi na ngai. Alobaki, “Mwana mobali, nazalaki na liyangani epai wapi Mokambi Marion G. Romney ateyaki na ntina ya mapamboli ya botangi makomi. Na ntango ya liyangani wana, nazwaki elaka ete soki natangeli bana na ngai Buku ya Mormon mikolo nyonso, nakobungisa bango te.” Nsima atalaki ngai na misu mpe, na mokano, alobaki, “Mpe nakobungisa bino te!”

Maloba na ye ebetisamaki na motema na ngai. Atako bozangi bobongi nie na ngai, nzalaki mosungi ya molongobani! Ateyaki ngai bosolo ya seko ete nazali mwana ya Tata ya Lola ya bolingo. Nayekolaki ete atako mabaku, nazalki molongobani, oyo ezalaki ntango elongobana mpo na mwa mwana mobali azanga bobongi nie.

Nakotikala ntango nyonso na botondi epai ya anzelu mama na ngai mpe mpo na baanzelu oyo balingaka bana na bosolo, atako bozangi bobongi nie na bango. Nandimisami mpenza ete bandeko basi nyonso—nakobenga bango “baanzelu”—bazali bamama na Siona, bazala banzemba to babalani bazala na bana to te na ntango ya bomoi oyo ya nse.

Mibu eleki Bokamnbi ya Yambo esakolaki: “Bomama ezali pene ya bonzambe. Ezali likolo koleka, mosala ya bule oyo moto akoki kosala kati ya bato. Etiaka bamama oyo batosaka libiangi na ye ya bule mpe mosala lolenge moko na baanzelu.”1

Nazali na botondi mpo na baanzelu ya Eklezia mobimba baoyo bazali na sakola na nzoto mpe na bolingo bosolo ya seko epai ya bana ya Tata ya Lola.

Nazali na botondi mpo na likabo ya Buku ya Mormon. Nayebi ezali ya solo! Ezali na bofuluki ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Nazali na botondi na moto nyonso azali kotanga Buku ya Mormon na bokebi nyonso mikolo nyonso na likanisi malamu mpe bondimi na Klisto baoyo babungisi litatoli na bango mpe ekweyisami. Elaka ya profeta grateful Moroni ememaka elongo na yango fungola ya koyeba bosolo ya makambo nyonso—bakisa kozala na likoki ya kososola mpe kokima mimekano ya monguna. (Tala Moroni 10:4–5.)

Nazali lisusu na botondi mpo na Tata ya Lola mpe mpo na Mwana ya Ye, Yesu Klisto. Mobikisi apesaki ndakisa ya bobongi nie ya boniboni kozala na mokili oyo ya bozangi bobongi nie mpe bozangi bolongobani. “Tolingaka ye, mpo ye alingaka biso yambo (1 Yoane 4:19). Bolingo na Ye mpo na biso ezanga motuya. Azali moninga na biso ya solo. Atokaki “ntango ezalaki matanga etangaki lokola makila” mpo na yo mpe lisusu mpo na ngai (Luka 22:44). Alimbisaki bazangi bolimbisami. Alingaki bazangi kolingama. Asalaki oyo moto ya nkufa akokaki kosala te: Apesaki Bosikoli mpo na kolonga masumu, bampasi, mpe babokono ya bato.

Mpo na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kozala na bomoi elongo na elaka ete atako bobundi na biso ekoki kozala, tokoki kozala ntango nyonso na elaka epai na Ye, “oyo azali nguya mpo na kobikisa” (2 Nefi 31:19). Na ntina ya Bomikabi, tokoki kozwa esengo, kimia, esengo, mpe bomoi ya seko.

Mokambi Boyd K. Packer alobaki: “Bikisa mpo na mwa ndambo oyo batiki bobungi, ezali na ezalela te, na bowumbu te, na botomboki te, na lisumu te, na bopengwi te, na likama te uta na elaka ya bokokisi bolimbisi. Oyo ezali elaka ya bomikabi ya Klisto.”2

Moko ya milulu ya ntina koleka na lisolo ya moto ezali botali ya mosala ya Mobikisi na bato ya kala ya Amerika. Banza na makanisi na yo oyo esengelaki kozala kuna. Ntango namanyolaki bolingo na Ye mpe kolengela mpenza na ntina ya mokangano wana ya Basantu basanganaki na tempelo, natalelaki na bana na ngaimei oyo nalingaka mingi moleka bomoi yangomei. Namekaki kobatela boni boni nakokaki koyoka kosimba baye ya biso, na litatoli ya moko na moko libiangi ya Mobikisi ya mwana nyonso aya epai na Ye, mpo na kotatola bonene ya maboko, kotelema lokola mwana nyonso, moko na moko, na bosembo ayoki bilembo na maboko mpe makolo, na Ye, mpe nsima komona moko na moko na bango batelemi mpe kotatola ete Azali na bomoi! (Tala 3 Nefi 11:14–17; tala lisusu 17:21; 18:25.) Komona bozongi ya bana na biso mpe koloba, “Mama, Papa, ezali Ye!”

Elilingi
Mobikisi elongo na bana

Nayebi te soki eloko moko na mokili oyo ekoki komema esengo mpe bosepeli mingi koleka koyeba ete bana na biso bayebi Mobikisi, koyeba ete bayebi “na oyo ebandeli bakoki koluka bolimbisi ya masumu na bango.” Yango ezali mpo na nini; lokola mondimi ya Eklezia, “toteyaka na ntina ya Klisto” mpe totatolaka na ntina ya Klisto (2 Nefi 25:26).

  • Na yango mpo nini tosambelaka elongo na bana na biso mikolo nyonso.

  • Na yango mpo nini totangaka makomi elongo na bango mikolo nyonso.

  • Na yango mpo na nini toteyaka bango basalisa basusu, na yango bakoki kolobela mapamboli ya komona bango moko ntango bamibungisi kati ya mosala ya basusu (tala Malako 8:35; Moziya 2:17).

Ntango tomipesi biso moko na ndakisa ya kimoyekoli, topesaka ndingisa na bana na biso elongo na bolingo ya Mobikisi mpe na bokambi ya bonzambe mpe bobateli ntango bakutanaka na mitungisi ya monguna.

Nsango malamu solo ezali na ntina ya moko. Ezali na ntina ya mwana ya mpate moko abunga (talaLuka 15:3–7); ezali na ntina ya mwasi moko ya Mosamaliya na liziba (tala Yoane 4:5–30); ezali na ntina ya mwana mobali moko abunga (tala Luka 15:11–32).

Mpe ezali na ntina ya mwana mobali moko ya moke oyo asengelaki koloba azali koyoka te.

Ezali na ntina ya moko na moko kati na biso—lokola tozali banzangi bobongi nie—kokomaka moko elongo na Mobikisi lokola Ye azali moko elongo na Tata (tala Yoane 17:21).

Natatoli ete tozali na Tata ya Lola ya bolingo, oyo ayebi biso na nkombo! Natatoli ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe ya bomoi. Azali Mwana Se Moko mpe Molobeli na biso epai ya Tata. Nabakisi litatoli ete lobiko ewutaka epai mpe na nzela ya nkombo na Ye—mpe na lolenge mosusu te.

Ezali losambo na ngai ete tokopesa mitema mpe maboko na biso mpo na kosunga bana nyonso ya Tata na Lola bayeba Ye mpe bayoka bolingo na Ye. Ntango tosali yango, alaki biso esengo ya seko mpe bosepeli kati ya mokili oyo mpe na mokili oyo ezali koya. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Nsango ya Bokambi ya Yambo,” na Lapole ya Likita, Sanza ya zomi. 1942, 12–13; etangami na Mokambi J. Reuben Clark Jr.

  2. Boyd K. Packer, “The Brilliant Morning of Forgiveness,” Ensign, Sanza ya zomi na moko. 1995, 20.